MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 17-19
Etumba ya Nzambe mpo na kosukisa bitumba nyonso
Mpo na nini Yehova, “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya,” apesi Mwana na ye, “Nkumu ya kimya,” mokumba ya kobunda etumba?—2Ko 13:11; Yis 9:6.
Yehova ná Yesu balingaka boyengebene mpe bayinaka mabe
Kimya mpe bosembo ya libela ekozala kaka ntango bato mabe bakozala lisusu te
Mampinga ya likoló ya Nzambe “ekobunda etumba na boyengebene,” ndenge bampunda ya mpɛmbɛ mpe lini ya kitoko ya mpɛmbɛ mpe ya pɛto ezali komonisa yango
Tosengeli kosala nini mpo tómindimisa ete tokobika na etumba wana ya ntina mingi?—Sef 2:3