BOMOI YA BAKRISTO
Tókolisa Makoki Na Biso Ya Kosakola—Kopesa litatoli na nzela ya kamera to ya interphone
MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Lokola mayele ya teknoloji ekoli mpe mobulu ekómi mingi, bato mingi bakómá komona malamu kosolola na bato na nzela ya bakamera to ya ba-interphone na esika ya kokɔtisa bango mbala moko na ndako. Na yango, kosakwela moto oyo azali komona biso kasi biso tozali komona ye te ekoki kobangisa. Makambo oyo elandi ekosalisa biso tópesa litatoli na nzela ya kamera to ya interphone kozanga kobanga.
NDENGE YA KOSALA YANGO:
Zalá na makanisi malamu. Bankolo-ndako mingi oyo basalelaka kamera to interphone bazalaka na mposa ya kosolola na biso
Yebá ete bakamera mosusu ebandaka kozwa makambo ata soki ofini naino butɔ te mpe nkolo-ndako akoki kobanda kotala yo to koyoka yo kaka ntango okómi liboso ya porte na ye
Soki nkolo-ndako andimi kosolola na yo, sololá na ye na interphone to na kamera lokola nde ozali kosolola na ye boye. Sɛkáká mwa moke mpe saláká bajɛstɛ. Lobá makambo ndenge obongisaki koloba soki bokutanaka na ye boye. Soki ezali kamera, kopusa elongi mingi te pene na yango. Soki nkolo-ndako ayanoli te, kotika te mesaje ya maloba
Soki bosilisi kosolola, kobosana te ete nkolo-ndako akoki kokoba kotala yo to koyoka makambo ozali koloba