Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/03 lok. 7
  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Ekuke monene efungwami mpo na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Poná kosalela Yehova ntango ozali naino elenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tósakola nsango malamu na mposa makasi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 2/03 lok. 7

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Tozali mpenza na esengo mingi ya kokomela bino! Topesi bino longonya mpo na bolingo mpe elimo ya komipimela oyo bozali kokoba komonisa. Na kati ya Annuaire ya mbula oyo, bokomona ete makambo ya malamu mingi esalemaki na mobu ya mosala oyo euti koleka. Mbala oyo lisusu, tolekisaki bangonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola mpe ya koteya, wana tozalaki kolendisa mpenza bato bápusana penepene na Yehova. Kosala elongo na Nzambe na biso ya lokumu, Tata na biso ya likoló, ezali likambo ya lokumu mingi.​—1 Kol. 3:9.

Soki tokanisi mosala oyo esengeli naino kosalema, tondimi mpenza ete bokokoba komekola molende mpe kondima ya basaleli ya Nzambe oyo balobelami na Biblia. Na ndakisa, ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya kobota mbuma mingi mpenza mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Emonani ete akomelaki lisangá ya baklisto ya Kolinti mokanda na ye ya liboso na mbula ya nsuka oyo afandaki na Efese. Akomaki boye mpo na mikano oyo alingaki kokokisa nokinoki: “Nafandi na Efese tii na ntango ya fɛti ya Pantekote; mpo ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwelami ngai, kasi batɛmɛli bazali mingi.”​—1 Kol. 16:8, 9.

Mokano ya Paulo ezalaki ete akende na Masedonia mpe na Kolinti. Kasi, akangaki ntina ete kotikala mwa ntango na Efese ekozala malamu mpo na kosala mosala ya ntina. Paulo ayebaki komiyokanisa na makambo akutani na yango; amonaki ete, esika azalaki, azalaki na libaku malamu ya kokolisa matomba ya Bokonzi, yango wana abongisaki manaka na ye mpo na yango. Ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwelamaki ye, mpe Paulo alingaki kolekisa libaku yango te.

Kosala bongo esɛngaki mosala mingi​—kosakola nsango malamu mpe lisusu kotonga lisangá ya Efese. Na nsima, Paulo ayebisaki bankulutu ya lisangá ya engumba yango ete: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako. Kasi natatolaki malamumalamu ezala epai ya Bayuda mpe epai ya Bagrɛki na oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.”​—Mis. 20:20, 21.

Ndenge moko mpe, mingi na bino bandeko mibali mpe basi bosalelaki malamu mabaku oyo emonanaki. Na boumeli ya mobu ya mosala oyo euti koleka, mwayene ya bato 798938 bazwaki likoki ya komibongisa mpo básala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to mobongisi-nzela mosungi. Basusu kati na bino bakendaki tii na nsuka ya mabelé mpo na kosala mosala ya misionɛrɛ. Bozali kopalanganisa nsango malamu mpe kotonga masangá na molende mpenza. Basusu bayekoli monɔkɔ mosusu mpo bákoka kosalisa bato oyo bafandi pene na bino oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya. Basusu mpe bamibongisaki mpo básala na bateritware epai masangá ezali te to bakendaki kosala epai mposa ezali makasi. Kutu basusu kati na bino bamonaki ete ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwamelaki bango na eteyelo, na esika ya mosala, to na mabaku mosusu oyo litatoli ya malamu ekoki kopesama, na ndakisa na telefone. Makambo oyo bandeko mosusu bakutanaki na yango na mokili mobimba ezali komonisa mpenza ete bipai nyonso basaleli ya Nzambe, bilenge mpe mikóló, bozali mpenza koluka mpe kosalela na molende mabaku ya kopesa bato boyebi ya solo.

Bóyeba malamu ete Yehova azali komona mpe kosepela mingi na milende na bino. Biblia elobi ete: “Mpo ete Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Ebe. 6:10) Bóluka ntango nyonso kosalela mabaku malamu oyo ekopesa bino nzela ya kotombola losambo ya pɛto. Basusu kati na bino bakoki kozala na likoki ya kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola. Biso nyonso tokoki kosala makasi mpo ete mosala na biso ya kosakola ebota lisusu mbuma mingi.

Botɛmɛli ezangaka te ntango tozali kokokisa mokumba na biso ya kosakola. Kanisá lisusu ete, nsima ya koloba ete ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwelamaki ye, Paulo akomaki ete: “Kasi batɛmɛli bazali mingi.” Batɛmɛli ya Paulo ezalaki Bayuda mpe Bapakano oyo bazalaki kobundisa ye polele mpe bamosusu bazalaki kosalela ye likita na nkuku.​—Mis. 19:24-28; 20:18, 19.

Lelo oyo, tozali mpe kokutana na likambo ya ndenge wana. Na ntango oyo tozali kopusana mpenza na kobomama ya ebongiseli mabe oyo, tóyeba ete botɛmɛli ekokóma lisusu makasi mpenza. Satana azali na “nkanda makasi,” mpe azali kokitisela yango mpenzampenza nde basaleli ya Nzambe. (Emon. 12:12) Bóbosana te ete Satana azali “moyangeli ya mokili.” Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”​—Yoa. 14:30; 15:19.

Tozali na ekateli makasi ya kotikela moto te nzela alɛmbisa kondima na biso epai ya Nzambe to akitisa milende na biso na mosala ya kosakola. Toyebi ete bato oyo bazali kobundisa biso mpe bazali kosalela biso likita bakozala kaka. Kasi atako bongo, tozali se kokende liboso kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi, mpamba te totye motema ete Yesu akonyata Satana mpe ebele ya bato na ye na ntango oyo Yehova abongisi mpo na yango. Batɛmɛli bakokaki kokanga Paulo monɔkɔ te; ata lelo oyo, bazali kokoka te kokanga basaleli ya Yehova monɔkɔ. Atako Satana azali na nkanda mpe mokili eyini bango, elimo ya Yehova ezali kosala misala ya nguya mpenza epai ya basaleli na Ye. Oyo nde esengo ya koyeba ete baoyo bazali kosakola nsango malamu bakómi 6304645!

Libondeli na biso ezali ete bókoba kosalela malamu mabaku nyonso oyo ezali komonana mpo na kotombola matomba ya Bokonzi monene ya Yehova. Bóndima ete tozali komibanzabanza mpo na mokomoko na bino na bolingo nyonso, awa tozali kosala mosala ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Yehova “na bomoko.”​—Sef. 3:9, NW.

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto