Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 nk. 84-88
  • Makambo etali Géorgie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali Géorgie
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 nk. 84-88
Bandako na Svanétie ya nɔrdi, na etúká moko ya Géorgie

Nɔrdi ya Svanétie

GÉORGIE

Makambo etali Géorgie

Mobali moko amemi kitunga oyo ezali na vinyo

Kobuka mbuma ya vinyo epesaka esengo

Mokili Ekólo Géorgie eyebani mpo na bangomba na yango ya milai oyo bansɔngɛ na yango ezipamaka na banɛjɛ, mosusu na bolai ya mɛtrɛ koleka 4 500. Ekólo yango ekabwani na biteni mibale: Géorgie ya Ɛsti ná Géorgie ya Wɛsti mpe eteni mokomoko ezali na bitúká ebele mpe na istware na yango, klima, mimeseno, miziki, mabina mpe bilei na yango moko.

Bato Na bato milio pene na 5 oyo bafandaka kuna, mingi na bango bankɔkɔ na bango bazalaki mpenza bankolo mboka yango.

Lingomba Bato mingi basambelaka na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Mpe bato moke (10%) bazali Bamizilma.

Monɔkɔ Monɔkɔ ya Géorgien ekokani ata moke te na minɔkɔ ya bikólo oyo ezali zingazinga na yango. Mikanda ya istware emonisi ete alfabɛ ya monɔkɔ ya Géorgien oyo ekeseni na mosusu nyonso ebimaki liboso kutu Yesu abotama.

Ndenge ya kobikela Bato mingi (50%) basalaka bilanga. Mikolo oyo euti koleka, turisme mpe ekómi kotombola nkita ya Géorgie.

Klima Na Géorgie ya Ɛsti, molunge ezalaka makasi te. Pembenipembeni ya Mbu Moindo, na Géorgie ya Wɛsti, ezalaka mwa molunge mpe mwa malili, yango wana malala, mandarine mpe pamplemuse ebotaka mingi.

Bato oyo bazali kobuka vinyo

Bazali kobuka mbuma ya vinyo na etúká ya Kakhétie

Biloko ya kolya Limpa ezangaka te na mesa ntango bato ya Géorgie bazali kolya. Batumbaka mampa ya mboka na bango na etumbelo ya mampa oyo basalá na mabele. Balambaka mingi elubu ya misuni oyo batyá matiti ya nsolo kitoko mpe biloko oyo epesaka elɛngi na bilei. Basalaka vinyo banda kala mpenza. Balalisaka vinyo na bambɛki ya mabele mpo ekóma masanga. Na mabota mingi, bato basalaka bango moko bilanga ya vinyo mpe basalaka vinyo na bango moko. Ekólo Géorgie ezali na lolenge soki 500 ya nzete ya vinyo ya mboka.

Mwasi oyo azali kosala mampa

Azali kosala mampa ya mboka

MOKILI (na kilomɛtrɛ-kare)

26 900

BATO

3 720 400

BASAKOLI NA 2016

18 619

MOSAKOLI 1 MPO NA BATO

200

BAYANGANI NA EKANISELI YA 2016

32 216

Karte ya Géorgie
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto