Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 29
  • Nasengeli kobondela basantu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli kobondela basantu?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Basantu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Tosengeli kobondelaka basantu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tosengeli nde kobondela Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 29

Nasengeli kobondela basantu?

Eyano ya Biblia

Te. Biblia emonisi ete tosengeli kobondela to kosambela kaka Nzambe, na nkombo ya Yesu. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino bóbondelaka boye ete, Tata na biso oyo azali na Likolo, Nkombo na yo ezala mosanto.” (Matai 6:9, haut fleuve) Ata mokolo moko te ayebisaki bayekoli na ye básambela basantu, baanzelu, to moto mosusu, na esika ya Nzambe.

Yesu alobaki lisusu na bayekoli na ye ete: “Ngai nazali nzela, nazali solo, pe nazali bomoi. Moto moko té akoki kokende epai ya Tata soki aleki epai na ngai té.” (Yoane 14:6, Bible na lingala ya lelo oyo) Moto oyo Nzambe atyá mpo alobelaka biso epai na ye ezali kaka Yesu.​—Baebre 7:25.

Ezali mabe soki nasambeli Nzambe bongo nasambeli mpe basantu?

Na Mibeko Zomi, na esika moko Nzambe alobaki boye: “Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe moko ya zuwa.” (Kobima 20:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Na ndenge nini Nzambe azali na “zuwa”? Na esika yango, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika elobi ete azali “Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” Nzambe asɛngi ete losambo nyonso, ata mpe libondeli, epesama mbala moko epai na ye moko kaka.​—Yisaya 48:11.

Nzambe ayokaka mabe soki tosambeli moto mosusu, ezala basantu to baanzelu ya likoló. Ntango ntoma Yoane alukaki kosambela anzelu moko, anzelu yango apekisaki ye mpe alobaki na ye ete: “Kosala boye té! Ngai nazali kaka mosali lokola yo, pe lokola bandeko na yo oyo babatelaka sango Yezu ayeelaki bato! Fukamela bobele Nzambe.”​—Emoniseli 19:10, Bible na lingala ya lelo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto