Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 72
  • Nasala nini mpo natika bisombasomba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo natika bisombasomba?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kotika bisombasomba?
  • Ndenge ya kosala
  • Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Ndenge ya kosalela mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 72
Elenge mwasi oyo azali kosomba biloko na nzela ya Internet

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natika bisombasomba?

“Mikolo oyo euti koleka, nakendaki na magazini moko kaka mpo na kotala. Nazongaki na biloko ya ntalo oyo nakanaki kosomba te ntango nabimaki na ndako!”​—Colin; azali na mbula 22.

Colin andimi ete akokaka te kotika bisombasomba. Yo mpe ozalaka bongo? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

  • Mpo na nini kotika bisombasomba?

  • Ndenge ya kosala

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Mpo na nini kotika bisombasomba?

Lokuta: Komitungisa mpo na ezaleli na yo ya bisombasomba ekotya liberté na yo na nkaka.

Solo: Kotika bisombasomba ekopesa yo nde liberté mingi lisusu. Buku I’m Broke! The Money Handbook elobi boye: “Soki oyebi makambo mingi etali mbongo, okozala na yango mingi mpo na kosomba biloko oyo olingi sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

Kanisá naino: Soki otiki bisombasomba . . .

  • Okozala na mbongo mingi ntango okozala na mposa na yango. Elenge moko na nkombo Inez, alobi boye: “Nazali na mposa ya kokende Amérique du Sud na mikolo ezali koya. Soki nazali kobomba mbongo na ngai, esalisaka ngai nabosana mokano yango te.”

  • Okozala na banyongo te to mingi te. Biblia elobi: “Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Elenge mwasi moko na nkombo Anna, andimi likambo yango; alobi boye: “Banyongo ekoki kobimisela yo mitungisi. Kozanga nyongo ekosalisa yo otya miso na mikano na yo.”

  • Okomonisa ete okɔmɛli. Kotika bisombasomba esalisaka moto ntango akokóma mokóló. Jean elenge moko ya mbula 20, alobi boye: “Namekaka kosalela mbongo malamu mpo namesana bongo tii na mikolo ekoya.”

Likambo ya ntina: Buku The Complete Guide to Personal Finance: For Teenagers and College Students elobi boye: “Koyeba yo moko kosalela mbongo ezali likambo ya liboso ya malamu koleka mpo na kozala na bonsomi. Kosalela mbongo malamu ezali ezaleli oyo ekosalisa yo bomoi na yo mobimba.”

Ndenge ya kosala

Luká koyeba bolɛmbu na yo. Soki ntango nyonso mbongo na yo esilaka, liboso luká koyeba esika mbongo yango ekendaka. Kosomba na nzela ya Internet nde motambo mpo na basusu. Bamosusu basalelaka ntango nyonso mwa mbongo moke tii nsuka ya sanza ekóma, batikalaka mabɔkɔ mpamba!

“Mwa mbongo oyo nasalelaka mokolo na mokolo ebakisaka mpe mokakatano yango. Mwa kado epai na epai, kozwa mwa kafe na restora, kobakisa eloko moko na magazini​—soki sanza esili, nakómaka komituna soki dolare 100 mobimba ekei wapi!”​—Hailey.

Bongisá ndenge ya kosalela mbongo. Biblia elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” (Masese 21:5) Soki obongisi liboso mbongo oyo okosalela, okosomba te koleka mbongo oyo ozwaka.

“Soki ozali kosalela mbongo koleka oyo ozwaka, luká koyeba esika mbongo ezali kokende mpe longolá biloko oyo ozali na mposa na yango te. Longolá biloko mosusu na liste ya biloko oyo okosomba tii ntango okozwa mbongo mingi koleka oyo ozali kosombela biloko.”​—Danielle.

Landelá. Ezali na lolenge mingi ya koyeba mbongo oyo ozali kobimisa. Bilenge mosusu bamonaki ete mayele oyo esalisaki bango mpenza:

  • “Mbala mingi, natyaka mbala moko mbongo na ngai na banki mpo nayebi ete ekozala mpasi nasalela yango soki natye yango kuna.”​—David.

  • “Soki nakei magazini, namemaka mbongo oyo ebongi. Na ndenge yango, nakosomba te koleka oyo nakanaki.”​—Ellen.

  • “Soki nalekisi ntango molai liboso ya kosomba eloko moko, esalisaka ngai nayeba mpenza soki nasengeli na eloko yango to te.”​—Jesiah.

  • “Esɛngi te nakende fɛti nyonso! Ezali malamu naloba nakoya te soki nazali na mwaye te.”​—Jennifer.

Likambo ya ntina: Kosalela mbongo ezali mokumba monene. Colin, oyo tolobelaki liboso, akómaki komona bongo. Alobi boye: “Soki mokolo mosusu nakokóma mokonzi ya libota, nasengeli te kobebisa mbongo mpambampamba! Soki lelo, lokola nabali naino te nayebi kosalela mbongo te, boye yango ekokómela ngai mokakatano ntango nakobala.”

Toli: “Yebisá moto moko biloko oyo okani kosomba mpe sɛngá ye atalaka na yo liste yango mbala na mbala. Kosala kɔnti ezali likambo malamu!”​—Vanessa.

Makambo bilenge mosusu balobi

Julie

“Kozala na nyongo esalaka ete moto amiyoka mabe koleka. Yango nde likambo nazalaki na yango liboso mpe nakolinga lisusu te ekómela ngai. Koboya banyongo esalisi nasalela mabaku oyo nazali kokutana na yango mpe epesi ngai kimya mingi na makanisi.”​—Julie.

Jesiah

“Mbala mingi, bakomelesa ná bato ya piblisite basalaka lokola nde ebongi osomba eloko nokinoki, osengeli kozela te. Kasi mpo na koloba solo, ntango ya kokanisa malamu ezangaka te; soki ezangi, ekoki kozala elembo ete kosomba eloko yango ezali likanisi ya malamu te.”​—Jesiah.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto