Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbv lisolo 1
  • Marko 1:15—“Bokonzi ya Nzambe ebelemi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Marko 1:15—“Bokonzi ya Nzambe ebelemi”
  • Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge Marko 1:15 elimbolami
  • Makambo oyo bazali kolobela na Marko 1:15
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Oyo Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
ijwbv lisolo 1

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Marko 1:15​—“Bokonzi ya Nzambe ebɛlɛmi”

“Ntango oyo etyamá ekoki, mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema mpe bóndima nsango malamu.”​—Marko 1:15, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

“Elaka esili kokoka mpe Bokonji na Njambe ebɛlɛmi; bongola mitema mpe bondima Nsango Malamu.”​—Marko 1:15, Biblia haut fleuve.

Ndenge Marko 1:15 elimbolami

Yesu Kristo alobaki ete Bokonzi ya Nzambea ‘ebɛlɛmaki,’ to ‘ekómaki pene,’ mpamba te ye oyo asengelaki kokóma Mokonzi ya Bokonzi yango, azalaki na kati na bango.

Yesu alobaki te ete Bokonzi yango esí ebandaki koyangela. Kutu, na nsima amonisaki bayekoli na ye ete Bokonzi yango esengeli koya na mikolo ezali koya. (Misala 1:6, 7) Nzokande, Yesu akómaki Mokonzi na ntango oyo ebongi, na mbula mpenza oyo Biblia esakolaki ete asengelaki kozala Mokonzi.b Yango wana, Yesu akokaki koloba: “Ntango oyo etyamá ekoki;” elingi koloba ntango oyo asengelaki kobanda kosakola polelepolele evanzile, to nsango malamu ya Bokonzi.​—Luka 4:16-21, 43.

Mpo bato bázwela nsango malamu ya Bokonzi matomba, basengelaki kobongola motema, elingi koloba, basengelaki koyoka mawa mpo na masumu na bango ya kala mpe kotosa mibeko ya Nzambe. Baoyo babongolaki motema bamonisaki ete bandimelaki nsango malamu ya Bokonzi oyo ekoya.

Makambo oyo bazali kolobela na Marko 1:15

Yesu alobaki maloba yango na ebandeli ya mosala na ye ya kosakola na Galile. “Uta ntango wana,” Yesu azalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe, maloba yango eyokani na maloba oyo ezali na Matai 4:17. Bokonzi nde ezalaki motó ya likambo ya mosala ya kosakola ya Yesu. Kutu, liloba Bokonzi ezali mbala koleka 100 na Baevanzile minei wanac, mbala mingi na makambo oyo Yesu alobaki. Biblia emonisi ete Yesu alobelaki mingimingi Bokonzi ya Nzambe koleka makambo mosusu nyonso.

Tángá Marko mokapo 1 ná maloba na nse ya lokasa, ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te, bililingi, mpe karte.

a Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo Nzambe atyá na likoló mpo na kokokisa mokano na ye awa na mabele. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”

b Yesu asengelaki kokóma mokonzi mpo na kokokisa moko ya mikumba lokola Masiya oyo alakamaki, Momonisi monene ya Nzambe. Mpo na koyeba makambo mingi etali bisakweli ya Biblia oyo elobeli Masiya, oyo ekokisamaki epai ya Yesu, talá lisolo “Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?”

c Baevanzile ezali mikanda minei ya liboso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo mbala mingi babengaka Testama ya Sika, oyo elobeli lisolo ya bomoi ya Yesu mpe mosala na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto