Nani alingi kozala milionere?
EYANO emonani lokola ete, wana ezali mposa ya moto na moto to pene na bato nyonso. Nzokande, na makanisi ya bato, nzela ya pɛtɛɛ mpo na kozwa yango ezali kolónga na loterie to na momekano ya kosakola liboso équipe ya ndembo oyo ekolónga.
Kolamusáká mposa ya bato mingi—mpe koluláká kozwa misolo oyo Leta akozwa likoló—kolongwa Moscou kino Madrid, kolongwa Manille kino Mexico, baguvernema bazali kopesa lisungi na loterie esalemi na Leta, kati na yango balóngi bakoki kozwa nkámá mingi ya bamilió ya badolare.
Mwa babɛti na yango bazali mpenza kokóma bamilionere. Mongelesi moko oyo azalaki kosala momekano na boumeli ya mibu 25 mpo na kosakola liboso soki équipe nini ekolónga, azwaki mosolo mingi mpenza. Abɛtaki bobele na mosolo mokokani na franka 3 ya ba français, kasi azwaki koleka bamilió mwambe na franka ya ba français. Oyo ekamwisi mpenza ezali likambo ya mwasi oyo ya New York, oyo azwaki bamilió 55 ya dolare na loterie na mboka Floride, moko na libonza monene oyo lizwamaki naino te.
Kasi baoyo bazali kolónga boye bazali sé moke mpenza. Ndakisa emonisi yango malamu ezali mosali na biro moko ya Espagne oyo azali kosomba tiké ya loterie poso na poso uta mibu 30. Atako azwi naino mosolo ya libonza monene te, kasi azali kolɛmba te. Alobi ete: “Nazali ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu nakozwa.” Bobele bongo, likanisi ya mobali moko na Montréal, na Canada, oyo atyaki mosolo nyonso ya lifuti ya mosala na ye ya poso mobimba na loterie, ezali komonisa likanisi ya bato mingi wana alimbolaki ete: “[Loterie] lokola oyo, ezali nkónzo bobele moko mpo na biso babólá ete tolikya kozala na bomoi ya malamu.” Kasi azwaki libonza te.
Longola loterie oyo ezali kobénda mposa ya bato na mokili mobimba, ezali na lisano ya motindo mosusu oyo ekómi kozwa lokumu mingi: bamasini ya masano ya mbongo. Atako biloko bibéngami les “bandits manchots” bazali kopesa nzela na mobɛti te ete azwa mosolo mingi mpenza bobele na mbala moko, kasi bakopesaka ye mbala mosusu mwa mosolo mokoki. Na mikili mingi, makambo masili kobongwana; kala bamasini ya masano ya mbongo ebombamaki na bandako ya masano to ba casinos. Lelo oyo, losébá lokobéndaka likebi ya bato, miinda mikopɛlaka balibali mpe makɛlɛlɛ ya misolo ya ebende oyo ezali kokweakwea kati na masini, okokuta yango kati na ba bars, na ba clubs, na ba restaurants mpe na ba hôtels na mikili ya Mpótó.
Frances azali mobangé mwasi akufela mobali oyo afandi na New York. Mbala mibale to misato na poso, alekisaka ngonga mibale na ndambo na bus, mpo na kokende na Atlantic City, New Jersey. Ezali ye kokóma, akokɔtaka na moko na bandako ya masano ya mboka wana, mpe kuna, akobɛtaka na bamasini ya masano ya mbongo na boumeli ya ngonga motoba to koleka, liboso na kozonga na ndako na ye. Alobi ete: “Nayebi te soko nakokaki kosala boni soki Atlantic City ezalaki te. Ezali lisano na biso, mosala na biso.”
Mpo na bato mosusu, lisano ya mbongo ezali bobele mpo na kominanola te, soko mpe lolenge ya kobosana moke makambo ya mokolo na mokolo to elikya ya kozwa mosolo te. Mpo na bango, ezali nde eloko ya motuya mingi—to mpe ekoki kozanga te—kati na bomoi.
Luciano, moto ya Espagne oyo afandi na mboka Córdoba, alimboli ete: “Nazali kobɛta mpo ete nasepelaka komeka nzoto.” Abakisi ete: “Kozanga koluka komilóngisa, nabandaki kobɛta lisano ya bingo mpamba te namiyokaki ete nanyokwami na makanisi. Na nsima, nakómaki kobɛta na masano mosusu ya mbɛsɛ to zeké. Oyo nde molangwa bobele kotondisa batiké mɛkɛ́ kati na mabenga mpe kozala pene na kobɛta na masano ya mbongo!” Mokolo moko batunaki epai na moto mosusu oyo alingi mingi masano ya mbongo, oyo abungisaki mosala na ye lokola directeur ya kompanyi moko, soki asili kokanisa kotika momeseno na ye wana ya mabe. Ayanolaki ete: “Kotika? Nakoki te! Yango ezali bomoi na ngai mobimba.”
Atako makanisi na bango makeseni, nzokande babɛti bazali bobele mwa etuluku moke te. Na mitindo nyonso, Baameriké 3 kati na 4 bakobɛtaka; motuya oyo ezali lolenge moko na Espagne, mboka mosusu epai kuna masano ya mbongo mazali kosalema mingi. Mpe masano yango mazali bongo mombóngo monene. Bobele mwa bakompanyi na mokili mobimba nde ezali na mosolo mingi koleka oyo ya ba loteries nyonso ya mikili 39.
Emonani ete, masano mazali na bopusi makasi. Kasi, bopusi yango ekosalaka mabe te, to ebómbi nde makámá? Lisese moko ya kala lipesi likebisi oyo ete: “Ye oyo akowela noki mpo na kozwa misolo, akozanga etumbu te.” (Masese 28:20, MN) Maloba oyo mazali kokokana epai na baoyo bazali koluka kokóma bazwi na nzela ya masano ya mbongo?