Makambo mazali koleka na mokili
Mikano ya moimi
Nsima mwa moke na kokoma na bokonzi na 1933. Mokonzi Adolf Hitler asalaki boyokani elongo na lingomba ya Katolike. Boyokani yango epesaki ye lotomo ya koboya koponama ya ba episkopo ya Alemanye na mikumba misusu mipesami na Lingomba. Kasi nani alongaki kati na biteni wana mibale? Encyclopédie catholique oyo ezali kobima na monoko ya Lifalansé, oyo euti kobima sika eyanoli polele mpenza na motuna oyo:
“Pape Pie XI ye moko . . . amoni malamu ete . . . esengeli mpenza kopesa mikumba na Lingomba ya Alemanye na nzela ya boyokani (concordat). Boyokani yango bosalamaki na katikati na Avril mpe Juillet ya 1933; atako yango emonanaki malamu na Lingomba ya Katolike, boyokani wana amonisaki mpenza elonga mpo na Hitler wana ezalaki yango kondima boyangeli na ye; tokopamela boyokani yango na oyo ete, asili kolalisa lisosoli ya bakatolike mpe aboyisi misala na ba eveke na kosalaka bongo boyokani ya lokuta, oyo Hitler asili kobebisa mbala na mbala.”
Lelo oyo, mingi mpenza na France mpe na Alemanye, bazali kopamela polele mpenza Lingomba ya Katolike likolo ya boyokani oyo bakonzi na yango, bayokanaki na Banazi. Soko mikakatano motindo boye ezali kobima, ezali mpo ete bakonzi ya mangomba bazali kolanda te maloba na Yesu Klisto ata mpe ndakisa na ye, oyo alobaki na ntina ya bayekoli na ye ya solo ete: “Bazali bato ya mokili te pelamoko ngai nazali moto ya mokili te.“ (Yoane 17:16.) Solo, bakonzi ya mangomba baluki kozwa ngɔlu ya bakonzi ya politike, kasi nini asili kokomela boyokani na bango elongo na Nzambe? Kati na mokanda oyo akomelaki baninga na ye baklisto, Yakobo, moyekoli na Yesu apesaki likebisi oyo: “Kolinga mokili ezali koyinana na Nzambe”—Yakobo 4:4.
Balongi te na loteri
Kati na ba chances soko pene na bamilió 14, mobeti loteri azali bobele na chance moko mpo na kozwa mosolo moleki monene. Atako bongo, engebene The Globe and Mail, zulunalo moko ya canada, bamilio ya bato bazali bobele kobeta loteri oyo ebongisami na Leta mbala na mbala. Boyekoli moko bomonisaki ete loteri ezali na eloko mosusu te oyo ekobenda moto, bobele elikya oyo ya kozwa mosolo moleki monene. elikya oyo ezali mbala mingi kolobelama na nzela ya ba piblisite oyo ekolobela mingi “likoló ya motuya mpe likoló ya eloko oyo bato bakoki kobungisa yango soko bakosomba tiká te”. Mpo ete myango ya loteri ezali mpo na kozwa matomba mingi mpe kolongisa bobele mwa bato, babongisi na yango bazali kobimisa mokolo nyonso maloba kitoko na “elikya ya kozwa bakiliya ya seko.”
Bazali kolonga na yango? Ee! Kati na zulunalo moko na monoko ya Lingelesi (American Health), Durand Jacobs ayebisi ete motuya ya bilenge oyo mozali sé kokola, bazali kobanda kosakana na nzela ya loteri “mpo ete ezali ntalo mingi te, ezali mpasi te mpe emonisami lokola eloko malamu”. Abakisi boye: “Loteri ezali mpambo oyo ezali komema bilenge kino kokoma babeti minene.” Sipesialiste moko ya ebongiseli esalami na masano na canada alobi boye ‘’Soko moto nani alobi ete loteri ekeseni na lisano ya mbongo, azangi mayele . . . Tozali kobimisa bankama na bamilio ya ba dollars mpo na kosomba batike ya loteri na elikya ya kolonga. Ezali mpenza kosakana na mbongo.”
Loteri ezali kolendisa bolingo ya mosolo. Marvin Steinberg, mokambi ya comité moko ya Amerike oyo ekoyekolaka ebongiseli esalami na masano na connecticut (Etats-Unis d’Amérique), amonisaki ete bilenge babali bazali kosalela mbongo na bango ya kolya bazali koyiba mbongo mpe bazali koyiba ata na bazando mpo bakoka kobɛta loteri. Maloba oyo na ntoma Paulo mazali solo: ”Mposa ya mosolo ezali ntina ya mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili . . . komitobola bango mpenza na bolozi mingi.”—1 Timoté 6: 9, 10.