Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Juillet nk. 16-18
  • Lolenge nini kokima kobebisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini kokima kobebisama
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Salá noki
  • Bundá mpo na komibatela
  • Lolenge nini kolónga mpasi ya kobebisama
    Lamuká!—1993
  • Kobebisa basi: Makambo mazali kosalema
    Lamuká!—1993
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya komibatela mpo básangisa na ngai nzoto na makasi te
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Lamuká!—1993
g93 Juillet nk. 16-18

Lolenge nini kokima kobebisama

Éric azalaki elenge mobali moko molai mpe kitoko oyo auti na libota moko ezali na bozwi mingi. Lori, elenge mwasi ya mibu 19, abyangamaki na mpokwa moko epai asengelaki kokutana, na Éric, mpe elenge oyo bazalaka elongo na ye kati na chambre mpe moninga mwasi ya elenge yango. Ntango akomaki mpo na bolei yango, ayokaki ete elenge yango elongo na moninga na ye ya mwasi bakoya te. Babyangami mosusu baumelaki te na kokende.

Alobaki ete: “Namonaki nyonso likambo ya kokamwa, kasi nalukaki mingi te mpo na koyeba.”

Ntango batikalaki bobele bango mibale, Éric abebisaki ye. Lori ayebisaki likambo ya kobebisama wana na police te, mpe na nsima, amonaki malamu kokende kofanda epai mosusu, koleka ntaka ya bakilomɛtɛ̀lɛ 240 mpo akoka kokutana lisusu te na mobebisi na ye. Ata nsima na mbula moko, azalaki komeka te kobima elongo na bilenge mibali.

LOKOLA makámá ya kobebisama ezali se kokola, ebundeli malamu mpo na mwasi ezali ya koyeba ete akoki kokutana na likámá yango mpe asengeli komibongisa mpo na yango. Soki tozali na makoki te ya kokanisa makambo nyonso oyo makoki komema na kobebisama, nzokande likambo ya koyeba motindo nini babebisi bakanisaka mpe babongisaka mobulu na bango ekoki kosalisa yo na komona lolenge likámá lizali koya.a Lokola lisese moko ya ntango na kala elobi yango, “moto [to mwasi] na mayele akososola mpasi liboso mpe akomibomba, bilema bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.”​—Masese 27:12.

Mwango moleki malamu ya kosala ete okutana te na kobebisama ezali ya kokima babebisi. Mpo na yango, meka nokinoki kososola epai na mibali​—ezala baoyo oyebi bango malamu—​bizaleli mosusu ya bato bakoki kokóma babebisi. (Tala encadré ya lokasa 17.) Bato mosusu bakoki kozwa bantina ya kobebisa mwasi na lolenge ya elamba oyo mwasi yango alati to na lolenge oyo azali kondima nokinoki elaka ya kokutana na mobali ye moko. Atako mwasi akoki te kozala na mokumba ya makanisi wana ya mabe, nzokande ebongi malamu ete abosana yango te.

Kozala yo moko te elongo na mobali moko oyo oyebi ye malamu te. (Ata elongo na mobali oyo oyebi ye malamu, ebongi kozala na ekenge.) Mobebisi na basi akoki koya na ndako na yo lokola moto oyo abongisaka biloko ya ndako. Luka koyeba soki mobali yango oyo ayei epai na yo azali nani. Babebisi oyo bayebi basi oyo bazali kokanela balukaka kokutana na bango na esika oyo bato mosusu bazali te, bakokosa likambo moko oyo ekoki komema bango na ndako to babongisaka bokutani na esika oyo balobi ete bato mosusu bakozala wana kasi lokuta. Keba ete okwea na motambo te.

Mpo na kopengola bokutani motindo wana oyo ezali na bobangi, sala nyonso ete bokutana esika bato bazali mingi to esika moninga mosusu azali elongo na yo. Yeba malamu soki azali nani mpe tya bandelo na esika akoki kosimba yo, soki okotika nzela na yango. Keba na komela masanga makasi! Elimo oyo elembi ekopekisa yo na komona likámá. (Tala Masese 23:29-35.) Ndimela maoki na yo. Soki ozali komioka malamu te elongo na mobali moko, kokanisa te ete maoki na yo mazali kokosa yo. Kende na yo.

Lokola ebele na babebisi mpe basi babebisami bazali bilenge, baboti na bilenge basengeli mpenza kokebisa bango na kobebisama na kolobeláká bango polele makambo oyo makoki kotya bango liboso na makámá.

Salá noki

Tokoki te kokanisa makambo nyonso oyo makoki komema na kobebisama. Kozanga ete olinga yango okoki kozwama yo moko liboso na mobali moko oyo azali makasi koleka yo mpe akani mpenza kobebisa yo. Okosala nini?

Salá noki, kobungisa mokano na yo te: kokima. Mbala mingi, babebisi bamekaka mwasi oyo balingi kobebisa liboso na kozwa likatami ya kosala ye mabe; esengeli kobulunganisa ye nokinoki liboso ete amioka makasi mpe abanda kosala yo mabe. Bato na mayele bapesi makanisi ya mitindo mibale: komonisa ete oboyi mpe kobunda mpo na komibatela. Soki likanisi ya liboso elongi te leka na oyo ya mibale.

Meká kolekisa ntango na kosolola, komonisa ete ozali na maladi mabe oyo ekoki koleka na kosangisa nzoto to kosanza na nzoto na mobali oyo alingi kosala yo mabe, ezali miango ya komonisa ete oboyi. (Talá 1 Samwele 21:12, 13.) Kati na mokanda na ye Makanisi na sembo ya balabala ekosalisa basi: mokanda mpo na komibikisa na engumba (na Lingelesi), Gerard Whittemore akomaki ete: “Salela miango nyonso oyo ekoki na yo kokanisa.”

Koboya, oyo esangisi miango nyonso kasi kozanga kobundisa mobebisi, ezali kosenga kobatela kimya na yo mpe bwanya, oyo ntina na yango ezali ya kopengola likebi to ya kokitisa motema na moto oyo alingi kosala yo mabe. Soki likambo yango ezali bobele kosilikisa ye to kokómisa ye mabe mingi, meka mwango mosusu. Kasi kotika te ete amema yo na esika etangolami na bato, wana ozali kokanisa. Mpe kobosana te lolenge mosusu ya koboya oyo ezali na nguya mingi: konganga.​—Tala Deteronome 22:23-27.

Mwango mosusu ezali ya komonisa na moto oyo alingi kosala yo mabe ete oboyi mpenza koboya. Monisa ye na maloba ya polele ete okondima soko moke te kokokisa mposa na ye. Soki oyebi ye, meka kobulunganisa ye na kolobela makambo polele. Soki ongangi ete: “Olingi kobebisa ngai! Nakofunda yo,” mbala mosusu akokanisa malamu liboso ya kokende mosika.

Bundá mpo na komibatela

Soki kosolola epesi matomba ya malamu te, kokakatana te: meká kobunda mpo na komibatela. Elimboli ntango nyonso te ete ozali na likámá monene ya kozoka to ya kobomama, bobele bongo komitika ezali mpe ndanga te ete okobatelama. Mpo na ntina wana, bato mingi ya mayele bazali kopesa toli ya kosalela mino mpe manzaka mpo na komibatela.

Lokola bameseni komonisa bonkonde, kozala nyee mpe kotosa ata bazali kobeta bango, basi mingi bakoki kooka mabe likambo ya kobunda. Mpo na yango, osengeli kozwa ekateli libela ete okomibatela, mpo okoka te kobungisa ntango wana balingi kosala yo mabe.

Soki moto ameki kokanela yo to kosala bopusi mabe likoló na yo, okosilika. Omiloba ete akanelaki mobulu wana mpe mobebisi alingi komonela yo mpo na botosi na yo. Osengeli kosilika, kasi kobanga te. Molukiluki Linda Ledray amonisaki ete: “Nsomo oyo ozali na yango ezali ebundeli makasi ya mobebisi na yo.” Kokanisa te ete olekisi ndelo to bakomona yo lokola moto abeli ligboma. Mwasi moko, moto na mayele na likambo yango apesi toli oyo ete: “Malamu ozanga limemya, kasi babebisa yo te.” Mbala mingi basi oyo balongaki kokimisa babebisi babundaki makasi, na kosalela miango nyonso oyo bazalaki na yango, lokola koswa na mino, kobeta na makolo mpe konganga makasi.

Soki okoki te kopekisa kobebisama, sala nyonso mpo na koyeba mobali oyo abebisi yo. Soki ekoki, tya ye manzaka to pasola elamba na ye: makila to elamba ekozala bilembeteli. Kasi soki okomi boye, mbala mosusu okozala lisusu na likoki te ya kobunda. Bongo, lokola Robin Warshaw akomaki kati na mokanda na ye Nabengaka yango kobebisama te (na Lingelesi) “omifunda te ete ‘omitiki’ babebisa yo. Ozali na mposa te ya kokufa to ya kozokisama mpo na ‘kondimisa’ ete babebisaki yo.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likambo moko te likokani na mosusu, mpe toli moko te ya komibatela ekopesa ntango nyonso matomba malamu. Bayekoli ya likambo yango, bango moko bayokani te na ntina na ndelo mpe motindo ya kobunda mpo na koboya na ntango ya likámá.

[Etanda na lokasa 17]

Lolenge ya bizaleli na mobebisi ya basi

□ Azali kotungisa makanisi na yo na kofingáká yo, koboya kotalela makanisi na yo,kosilika soki omeki kopesa makanisi.

□ Alingi kotambolisa makambo mosusu ya bomoi na yo, lokola molato to liponi na baninga na yo. Ntango bozali esika moko, alingi kozwa ekateli na makambo nyonso, kobanda na esika bokolya kino na film oyo bokotala.

□ Amonisaka zuwa ezangi ntina.

□ Mbala mingi atyolaka basi.

□ Alangwaka to amelaka drogue, mpe alingi ete yo mpe osala bongo.

□ Azali kosenga na yo mbala na mbala ete bokutana bobele bino mibale to alingi kosangana na yo.

□ Alingi kofuta nyonso ye moko mpo na biloko bolyaki mpe azali kosilika soki olingi kofuta.

□ Azali na makambo makasi, ata azali komonisa yango polele mpenza te, na ndakisa kokangama na nzoto na yo to kopusaka yo.

□ Azali kobangisa yo na kofandaka penepene na yo, azali kokanga yo nzela, azali kosimba yo ata opekisi ye yango to azali kolobela yo lokola nde ayebi yo malamu mpenza.

□ Azali kosilika ata mpo na likambo moke.

□ Azali komona yo ete okokani na ye te.

□ Alingi bibundeli mpe azali kosepela na konyokola banyama, bana to bato oyo akoki konyokola bango.

Engebene mokanda Nabengaka yango kobebisama te, ya Robin Warshaw.

[Elilingi na lokasa 17]

Mbala mingi basi oyo balóngaki kokimisa babebisi babundaki na makasi nyonso, na kosalela myango nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto