Lolenge nini kolónga mpasi ya kobebisama
Marie abebisamaki wana babangisaki ye na mbeli. Mibu ntuku misato na misato na nsima, motema na ye mozali naino kobeta mpe maboko na ye mazali kobima motoki soki ameki kolobela yango. Alobaki na kolela ete: “Ezali solo likambo lileki kosambwisa oyo bakoki kosala na mwasi. Ezali libaku moko ya nsomo, oyo eleki mabe.”
KOBEBISA mwasi, oyo mbala mosusu etikaka bilembo bikoki kolimwa te, ezalaka ntango mosusu moko na makambo maleki kotungisa makanisi, oyo bakoki kosala epai na mwasi. Penepene ndambo na misato ya basi babebisamaki oyo batunaki bango na boumeli ya boyekoli moko, balobaki ete bakanaki komiboma, mpe mingi kati na bango balobaki ete mabe wana ebongolaki bango libela.
Mobulungano ya maoki ekoki mpenza kozala monene soki mwasi ayebaki mobali oyo abebisaki ye; azali na likámá ete basalisa ye te, mpo ete aboyi koyebisa yango, to mpo ete ayebisi yango, kasi moto moko te alingi kondima ete ezalaki kobebisama. Lisusu, lokola babubaki ye, azali na likámá ya kotya ngambo nyonso na motó na ye moko mpe ya kokakatana na ntina na makoki na ye ya kososola makambo.
Ndimá lisalisi
Kobebisama ebimisaka liboso nyonso mobulugano mpe koboya kondima bosolo na yango. Ntina wana, mwasi moko oyo babebisaki ye liboso na kolekisa momekano moko ya ntina mingi na université alongolaki likambo wana na makanisi na ye kino asilisaki momekano na ye nyonso. Mwasi mosusu alobaki ete: “Nakokaki te kokanisa ata likambo moko na ntina na kobebisama oyo nabebisamaki mpo ete namonaki na miso na ngai mobali oyo nazalaki kotyela ye motema abongwanaki mosali mabe. Nakanisaki te ete moto oyo ayebi yo akoki mpe kobebisa yo. Ekoki komonana lokola likambo ya bozoba, kasi likanisi yango ezalaki kolembisa ngai. Nazalaki komioka ngai moko.”
Basi mosusu bazali kolanda koboya makambo oyo masalemaki wana balingi kolobela kobebisama yango na moto moko te. Bazali kobomba yango bongo mibu mingi, likambo oyo lizali koumelisa kobikisama na bango mpe kobimisa mitungisi misusu ya makanisi oyo bakanisaka te ete ezali na boyokani elongo na kobebisama yango.
Mbala mingi, kobikisama ebandaka bobele nsima ya koloba makambo nyonso oyo ezali na motema. Moto moko oyo otyelaka ye motema akoki kosalisa yo na kososola ete babebisaki yo mpe ezalaki libunga na yo te. Lisese ya kala elobi ete: “Moninga akolingaka ntango nyonso; azali ndeko abotami mpo na ntango na mpasi.” (Masese 17:17) Mpo na babateli na mpate na elimo, bakoki komimonisa “ebombelo mpo na mopepe mpe ezipelo na ntango na mbula makasi.” (Yisaya 32:2; 1 Batesaloniki 5:14) Basi mosusu bakoki mbala mosusu koluka lisalisi epai na bibongiseli oyo epesaka lisalisi mpo na basi oyo babebisami to epai na monganga oyo ayebi makambo yango, epai bakosalisa bango na kotalela mpe na kolónga maoki na bango.
Basi oyo babebisamaki baboyaka mbala mingi kolobela yango mpo ete bazali kooka ete bakweisami, mingi mpenza soki baokaki mposa na ntango na kobebisama yango. Ekoki kozala baoki ete bakomi mbindo mpe babongi te, mpe bazali komipesa mokumba ya kobebisama yango—nzokande bobele mobali oyo abebisaki yo nde azali na mokumba ya mabe na ye.
Marie, oyo ayebisaki mikakatano na ye epai na moninga na ye mwasi moklisto, alobaki ete: “Kozala na moninga oyo okoki koyebisa ye makambo ekoki mpenza kobongola makambo nyonso. Nakokaki kosolola na ye kozanga ete namioka mbindo to kooka nsoni ete babebisaki ngai.”
Lolenge nini kosalisa bango?
Epai mosusu, ezali malamu te mpe ezali likambo ya kozanga bolingo wana baninga bazali koboya kondima ete mobebisami azalaki na makanisi malamu to soki bazali koboya kondima ete abebisamaki solo. Komonisa te ete mwasi oyo abebisami asepelaki na yango to azalaki na etamboli ya mbindo. Likambo lileki ntina oyo baninga babyangami na kopesa ye lisalisi bakoki kosala ezali ya kondima maloba na ye. Bokitisa motema na ye. Boyoka ye wana azali na mposa ya kosolola, kasi koluka te koyeba makambo ya mikemike.
Soki kobebisama yango esalemi kala mingi te, esengeli kolukela mwasi yango lisalisi ya monganga mpe kolukela ye esika malamu ya kofanda. Lendisa ye ayebisa kobebisama yango na la police, kasi tika ye moko akamata bikateli. Auti kokutana na likambo oyo ebulunganisi ye. Mpo na yango, tikela ye meko ya kozongela kotambwisa makambo ya bomoi na ye, na kotikáká ete azwa ekateli na oyo alingi sikawa kosala.
Basangani ya libota basengeli komipekisa. Bakoki te kosalisa mwasi oyo abebisami soki baluki koyeba nani azali na mokumba na likambo yango to soki baluki kobundisa moto oyo abebisi ye. (Baloma 12:19) Ezali na ntina kofunda moto mosusu te bobele moto oyo asali mabe yango, mpe likámá lizali ya koluka kozongisa mabe. Mwasi oyo abebisami akoki bongo kobanda kobanga mpo na libateli na balingami na ye na esika ete atya makanisi na ye likoló na kobikisama na ye.
Esengeli lisusu koyeba ete basi mingi oyo babebisi bango bazali lisusu na makanisi malongobani te na ntina na kosangisa nzoto. Kati na makanisi na ye, kosangisa nzoto ezali ebundeli, mpe akoki kozala na nkaka ya kosangisa nzoto na boumeli ya eleko moko, ata elongo na mobali na ye oyo alingi ye mpe oyo azali kotyela ye motema. Mpo na ntina yango, mobali na ye asengeli te kotungisa ye mpo na kosangana na ye soki amioki naino malamu te mpo na kozongela kosangana. (1 Petelo 3:7) Libota bakoki kosalisa elenge mwasi na kozwa limemya na ye moko na kolandáká komonisa ye bolingo mpe limemya kozanga kotalela likambo oyo likómi. Ekoki kosenga mwa ntango mingi liboso ete azongela bokatikati na maoki na ye. Kolendendela ezali bongo na ntina mingi.
Lolenge nini kolónga kobanga mpe mpasi ya makanisi
Basi oyo babebisami bazali koloba ete kobanga ezali liyoki oyo eleki makasi epai na bango. Mingi kati na bango bakanisaki ete bakobomama. Na nsima, basusu bakozwa bobangi ya kobebisama lisusu to ya kokutana na mobali oyo abebisaki bango.
Lokito, nsolo to bisika ekoki kolamusa nsomo oyo baokaki ntango na kobebisama. Soki abebisamaki na nzela moko moke, akoki lisusu te komeka kotambola na nzela ya moke. Soki abebisamaki na ndako na ye, akoki lisusu te komioka wana na kimya mpe asengeli kolongwa. Ata nsolo ya malasi oyo ekokani na oyo ya mobebisi na ye ekoki kokundwela ye mpasi wana.
Atako esalemaka mingi te, basi mingi oyo babebisi bango babangaka likanisi ya kozwa zemi. Basusu mingi bazali mpe kobanga na elonga nyonso, kozwa maladi oyo elekaka na kosangisa nzoto. Penepene ndambo na bango babelaka mpasi ya makanisi, bazangaka elikya mpe bakomitala mpamba, maoki oyo makoki koumela baposo mingi kino mpe basanza mingi. Kozala motema likoló, nsomo na biloko mosusu mpe bobangi ekoki komonana epai na mwasi oyo abebisami.
Atako akokaki te kopekisa kobebisama, nsima na mwa ntango, mwasi akoki kozongela makanisi na ye malamu, kopekisa maoki na ye mpe lolenge azali komitalela na ntina na kobebisama oyo ekómelaki ye. Akoki koyekola kolongola makanisi mabe na komisalela makanisi ya sika likoló na bomoto na ye moko.
Linda Ledray apesi toli oyo kati na mokanda na ye Ndenge nini kolónga kobebisama (na Lingelesi) ete: “Esika oloba ete ozali mpenza makasi te, na ntina te mpe na makoki te, yeba koloba ete ezalela na yo ekobonga mpe ozali mosika na mobulungano monene oyo kobebisama etyaki yo kati na yango. Mokolo nyonso oyo ozali kooka makanisi mpe maoki ya mabe, omiloba ete: ‘Nazali koyekola kotambolisa lisusu bomoi na ngai.’”
Okoki lisusu kolónga kobanga na yo soki oyebi ntina na yango. Soki ososoli likambo oyo ezali kobandisa kobanga epai na yo, okoki komituna soki ezali solo na ntina. Na ndakisa, soki okutani na moto moko oyo akokani na moto oyo abebisaki yo, omiloba ete azali mosali mabe te mpe ozali na likambo ya kobanga ye te.
Mwango mosusu oyo elakisami mpo na kosilisa kobanga ezali ya kolongola bobangi ya lolenge nyonso. Mpo na yango esengeli kosala molongo na makambo oyo mazali kopesa kobanga, kokoma yango longwa na oyo ezali kobangisa mingi te kino oyo ezali kobangisa mingi mpenza. Na nsima, meka komimona kati na likambo ya liboso, oyo ezali kopesa nsomo mingi te, kino kobanga nyonso ekosila. Landa molongo nyonso kino okoki komioka ata kati na likambo nini kozanga kobanga.
Mpo na kosukisa, na lisalisi na moninga moko ya mwasi, meka kokutana na makambo wana nyonso, na komeka na ndakisa kobima na ndako na ntango butu eyindi to komeka kozala yo moko. Nsima na mwa ntango okolonga kobanga mpo okoka kokokisa malamu misala na yo ya mokolo na mokolo. Nzokande, osengeli bongo kososola ete, makambo mosusu masengeli ntango nyonso kobangisa—na ndakisa kotambola na nzela moko na molili—mpe ekozala ntina te ete oluka kolonga nsomo na yango.
Bimisá nkanda na yo
Kobebisama epesaka mbala mosusu nkanda, oyo okoki kooka na ebandeli epai na mibali nyonso mpe ekokende na nsima mingimingi epai na mobali oyo abebisaki yo. Ekómaka mbala mingi ete basi oyo basiliki bazali koswanisa moto nyonso, kasi basusu bazali kobomba maoki na bango. Nzokande, okoki kobimisa nkanda na yo na lolenge ya malamu, mpe lolenge oyo mwasi moko azali kosalela nkanda na ye ekoki kosalisa ye na kobikisama. Makomami mazali koloba ete: “Boyoka nkanda, nde na lisumu te.”—Baefese 4:26.
Na yambo, kokakatana te mpo na kobimisa nkanda na yo. Yebisa yango epai na basusu. Okoki kozwa nzela malamu ya kobimisa yango ntango ozali kolanda penepene lolenge lisambisi ezali kosalema to na kokoma makambo mikolo nyonso. Misala oyo ezali kosenga makasi ya nzoto, lokola masano ya tennis, hand-ball, kotambola, kokima, kotambolisa vélo to kobeta mai ezali na matomba mibale ya kosilisa nkanda mpe ya kolongola maladi ya makanisi.
Okoki kozongela kotambwisa bomoi na yo.
Nini ekosukisa kobebisama?
Mpo na kosukisa kobebisama, esengeli bobele te ete basi bakima to batemela mibali oyo babebisaka basi. Timothy Beneke akomaki kati na mokanda na ye Mibali mpe kobebisa basi (na Lingelesi) ete: “Mibali nde babebisaka basi, mpe ezali mibali, bango nyonso nde bazali na nguya ya kosilisa likambo ya kobebisa basi.”
Mpo ete kobebisa basi ekoka kosila, ebongi liboso ete mibali batika kotala basi lokola biloko ya kosilisa mposa ya nzoto mpe bayeba ete kosalela bokonzi na makasi ekopesaka boyokani ya malamu soki moke te. Mpo na moto na moto, mibali oyo bateli bakoki kosala bopusi likoló na basusu na kosololáká na bango na polele na likambo yango. Mibali mpe basi bakoki koboya koyoka masoló mabe matali kosangisa nzoto, koboya kotala ba films oyo ezali kolakisa mobulu ya kosangisa nzoto mpe koboya kosunga bato oyo bazali kolakisa kosangisa nzoto na miango ya bopanzi nsango mpo na kozwa mosolo. Biblia ezali kopesa etinda oyo ete: “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na babulami. Tika te ete bosoto bozala to maloba na zoba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopesa matondi.”—Baefese 5:3, 4.
Baboti bakoki koteya epai na bana na bango limemya epai na basi na kopesáká ndakisa. Bakoki koyekolisa na bana na bango ya mibali ete basengeli kotalela basi lokola Jéhovah azali kotalela bango, ye oyo azali na koponapona te. (Misala 10:34) Baboti bakoki koteya na bana na bango ete bazala baninga na basi mpe bamioka malamu elongo na bango, lokola Yesu azalaki kooka. Bakoki koteya na bana na bango mibali ete kosangisa nzoto ezali likambo ya bolingo oyo ezali bobele mpo na babalani. Baboti bakoki komonisa ete mobulu ekoki kondimama soko moke te mpe konyokola moninga ezali na ntina moko te. (Nzembo 11:5) Bakoki kolendisa bana na bango ete basolola polele elongo na bango likoló na makambo matali kosangisa nzoto mpe batelemela baoyo bazali koluka kobebisa bango.
Mosika te kobebisa basi ekozala lisusu te
Nzokande, kobebisa basi ekosila te bobele soki mbongwana ya mozindo esalemi na mokili mobimba. Linda Ledray alobi ete: “Kobebisama ya basi ezali te bobele likambo ya moto na moto, kasi lisusu likambo litali libota, bato nyonso mpe ekolo mobimba.”
Biblia ezali kopesa elaka ya mokili oyo mokozala na mobulu te, oyo kati na yango moto ‘akozala lisusu na bokonzi te likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.’ (Mosakoli 8:9; Yisaya 60:18) Ntango ebelemi oyo Jéhovah Nzambe akondima lisusu te kosalela nguya na lolenge mabe, lokola na likambo litali kobebisa basi.—Nzembo 37:9, 20.
Kati na ebongiseli wana ya sika ya mokili mobimba, bato nyonso bakoyekola kozala na kimya mpe bakolingana bamoko na basusu kozanga koponapona ya nzoto, ya lomposo to ya ekolo. (Yisaya 54:13) Basokemi bakozala bongo na likambo moko ya kobanga te epai na bayebani na bango to na bato bayebani te, mpe “bakosepela na kimya ya solo.”—Nzembo 37:11.
[Etanda/Elilingi na lokasa 19]
Soki babebisaki yo
□ Luká lisalisi ya monganga.
□ Soki olingi mpe soki ebongiseli yango ezali epai ofandi, senga ete moto oyo ayekoli motindo ya kopesa lisalisi na basi babebisami na mibali azala elongo na yo na boumeli mobimba ya lisalisi ya monganga mpe na lisambisi.
□ Bengá la police nokinoki wana ozali na makoki na yango. Bato bayekoli likambo yango balobi ete ezali malamu kosala yango mpo na libateli na yo moko mpe oyo ya basi mosusu. Koyebisa kobebisama elimboli te ete ofundi likambo, kasi soki olingi na nsima kofunda likambo, bilembeteli na yo ekozala na nguya mingi te soki oumelaki liboso na koyebisa kobebisama.
□ Batelá bilembeteli. Kosukola te, kolata elamba mosusu te, kosukola mpe kosanola nsuki na yo te, kolongola bilembo na maboko to na makolo te.
□ Monganga akotala kobebisama mpe akosala ba examens mpo na koyeba soki ozali na likámá ya kozwa maladi oyo elekaka na kosangisa nzoto to ya kozwa zemi. Na likambo ya zemi, mpe soki bapesi yo nkisi oyo ekopekisa zemi (oyo ebyangami pilule du lendemain), basi baklisto basengeli koyeba ete nkisi yango ekoki kolongola zemi ya likei oyo euti kobanda.
□ Sala nyonso oyo ekoki na yo mpo na kozala na libateli (bongola mafungola, zala elongo na moninga moko ya mwasi, kanga ekuke na fungola), atako okanisi ete ozali kolekisa ndelo.
□ Na koleka, luka libondisi ya Makomami, bondela Jéhovah na kobyangaka ye na mongongo makasi na boumeli mpe nsima ya kobebisama. Senga lisalisi ya bankulutu mpe ya baninga na yo ya penepene kati na lisangá. Zongela makita nokinoki mpe zwa litomba ya kozala elongo na baklisto mosusu na kosakolaka elongo na bango.