Bamilió ya bana basi bazali komona mpasi—Likoki ezali ya kosalisa bango?
Euti na mokomani na biso na Afrika
SOKI ozali na likoki, okosilisa bampasi ya bato? Na ntembe te! . . . soki ozali na likoki. Na mawa nyonso, moto ata moko te azali na makoki ya kosilisa bampasi nyonso ya mokili.
Nzokande, mbala mosusu ozali na likoki ya kolembisa, to kopekisa mwa moke, bampasi ya baoyo bazingi yo. Na ndakisa, bazali kokanisa ete na mikili mikeseni, bamilió mingi ya bana basi bazali konyokwama makasi na ntina na momeseno moko ya bonkoko oyo ekotela bato: mpo na kolanda bonkoko yango, baboti mosusu, kokanisaka ete bazali kosala malamu, bazali kopesa nzela ete bana na bango ya basi bakatama ngenga to gazá na boumeli na yango bazali kokata bango eteni moko to mingi kati na eboteli na bango. Momeseno wana bazali kobenga yango ngenga ya bana basi, gazá, to na Lifalansé excision.a
Rapport Hosken (na Lingelesi) likoló na ngenga ya bana basi elimboli ete ezali kosalema kati na eteni monene oyo ebandi na Afrique orientale kino na Afrique occidentale, mpe na mikili misusu mizali zingazinga. Kokatama wana ya mpasi ememaka mikakatano mpe mbala mosusu liwa.
Mingongo mitombwani
Ezalaka petee te mpo na kotemela likambo litali ngenga ya bana basi. Engebene zulunalo moko ya Kenya (The Standard), yango “ezali libombami moko monene. Ezali mpasi, mpe mbala mosusu likámá, mpo na basi mpe mibali oyo balingi ete momeseno wana elimwa. Bazali kotalela bango ete bazali bato oyo bazali kotemela bonkoko, libota, lingomba mpe ekólo, to kotyola bato mpe bizaleli na bango.”
Zulunalo yango moko ebakisaki ete ngenga ya bana basi “ezali ‘momeseno oyo esalaka mabe,’ mpamba te ezali ntina monene ya bampasi oyo ebimaka na nzoto mpe ntina ya liwa epai na basi mpe bana ya basi. . . . Yango ezali kobuka lotómo oyo ezali na mwana mwasi nyonso ya kokólisa nzoto na ye malamu na makambo nyonso.”
Bipai nyonso na Afrika mpe na mokili mobimba, bato mingi bazali kotombola mongongo mpo na koyebisa na bato nyonso mabe ya momeseno wana. Ezali kopesa mpasi mpe kokata binama ya bana basi ya mike, ata mpe ba bébés, nzokande esengami te na makambo ya monganga.
Motuya ya basi oyo bazali kokufa mpo na ngenga to oyo bazali konyokwama libela na ntina na mpasi oyo ekobimaka na nsima, etindaki bato oyo batalelaka kolongono ya nzoto mpe bayangeli ya mikili mingi na kotya likebi na likambo yango. Basusu bazali nkutu kokanisa ete kokata bana basi ngenga ezali mpe kolekisa SIDA na Afrika. Lokola bato mingi bazali kolongwa na Afrika mpe na Proche-Orient mpo na kokende na Australie, na Canada, na États-Unis mpe na Europe, kokatama wana ya binama na nzoto ekómi mokakatano monene mpo na kolongono ya bato kati na balopitalo mosusu ya mikili na Mpótó. Tosengeli te kotyola motuya ya mosolo mozali kobima mpo na kolongono ya nzoto na ntina na mikakatano to na ntina na makambo mabimaka nsima, kati na mayoki, mbala na mbala.
Mibeko misilaki kobimisama mpe mikobimisama mpo na kotya nsuka na momeseno wana. Angleterre, France, Italie mpe Suède ezali mwa mikili ya Mpótó epai ngenga ya bana basi epekisami na mibeko. Zulunalo ya Canada Globe and Mail eyebisi ete yango “epekisamaki na lisangá ya minganga ya Ontario.” Zulunalo yango eyebisi na sikisiki ete: “Atako mibeko ya Canada milobeli polele te ngenga ya bana basi to lipasó mpo na kokangisa nzela ya kosangana (infibulation), bakonzi bamonaki ete mimeseno motindo wana ekotalelama lokola kobebisa bana to konyokola.”
Masangá ya mokili mobimba lokola Organisation mondiale de la santé, ezali kotemela ngenga ya bana basi. Mpo na likambo yango, bolóngi emonanaki na Septembre 1990, wana batambwisi ya mokili, ezala baprezidá ya mikili ya Afrika lokola Ouganda, Sénégal mpe Zimbabwe, bakutanaki na New York mpo na kotya loboko na mokanda mobengami Convention des droits de l’enfant. Mokanda wana mozali kokweisa likambo litali kokata bana basi ngenga to gazá, mpo ete ezali komonisa yango lokola monyoko mpe kobebisa bana.
Zulunalo Economist ya Londres eyebisi ete: “Ngenga ya bana basi, oyo ebongi kobengama ete kokata biteni ya eboteli, ezali moko na makambo maleki nsomo na Afrika. Engebene rapport ya Minority Rights Group, lisangá moko ya Londres . . . yango ezali konyokola mbula na mbula bamilió mingi ya bana basi.”
Zulunalo elandi koyebisa ete: “Lipasó yango, oyo ekoki kopesa mwa mpasi moke to mpe mpasi makasi, esalemaka mpo na kolongola clitoris, to mpe binama mosusu, na mbɛli, na eteni ya molangi to na lotebu—mbala mingi kozanga anesthésie. Ekoki kobimisa mpasi makasi na ntango ya komona sanza, ya kosangisa nzoto mpe ya kobota, ata mpe mobulungano na mayoki, to mpe liwa. . . . Bonkoko yango ezali kolanda kosalema na ntina na bobangi ya biyambayamba bitali mitindo ya basi na makambo matali kosangisa nzoto, na ntina na momeseno mpe na likanisi mabe oyo elobi ete yango ezali mpo na bopeto ya nzoto.”
Momeseno yango ezali naino
Kati na mboka moko ya Afrika epai basi mingi bazali kokatama ngenga, mibeko misalemaki na 1947 mipekisi mitindo mileki mabe ya kokata biboteli. Atako bongo, milulu mizali kolanda kosalema. Mpo na nini bongo? Mpo ete bamilió ya bato oyo bazali na makanisi malamu, kasi balakisamaki nde mabe, bazali kokanisa ete kokata bana basi ngenga ezali likambo malamu. Na ndakisa, mpo na basi mibangé oyo bazali na mboka, balobi ete yango ezali na litomba mpo na bana basi. Tala mpo na nini, engebene zulunalo ya Nigéria The Guardian, lisangá Minority Rights Group endimi ete esengeli “kobongola likanisi ya mibangé basi oyo bazali kolanda kosalela momeseno yango.”
Zulunalo Nursing Times emonisaki likanisi motindo moko: “Kolimbola makambo polele ezali mwango bobele moko mobongi mpo na kobundisa momeseno oyo ya kokata bana basi ngenga.” Mpe ebakisaki ete: “Kosilisama ya momeseno yango na mobimba ekoki kosalema bobele soki bato nyonso bakangi ntina mpe na kolakisama ya mibali mpe basi.” Mpo na nini kolakisa mibali? Mpo ete batata mingi bazali kopesa mosolo epai na baoyo bakokataka bana basi ngenga, mpo na kobalisa bana na bango epai ya mibali oyo bakolinga bobele mwasi oyo basili kokata ye ngenga.
Mbongo ezali ntina mosusu mpo na yango momeseno oyo ya kokata bana basi ngenga ezali se kolandana. American Journal of Nursing elobi ete: “Mosala ya kokata bana basi ngenga ezali liziba ya kozwa mosolo mpo na baoyo bazali kosala yango; bato wana bazali bongo na bantina malamu ya kolanda kosalela momeseno yango.” Ezali te bobele mibangé basi nde bazali kozwa mbongo, kasi lisusu basi oyo babotisaka mpe bakati na nsuki [oyo bazali kosalela lotebu]. Na ba cliniques mosusu, ba infirmières mpe minganga bakondima mpe kosala lipasó mpo na kobatela bana basi ya mike na makámá mpe na bobangi oyo euti na kozanga kokamata meko mpo na kobatela kolongono ya nzoto. Kasi, ata ezala nani oyo azali kosala yango, kokata mwana mwasi ngenga ezali nde kobebisa nzoto na ye.
Basi mosusu bazali mbala na mbala kolongolisa biteni mosusu ya eboteli na ntango ya kobota. New York Times International eyebisi ete: “Basi mingi bazali kozwa lipasó ya mpasi na ntango ya kobota: bazali kokata eteni oyo elongolami liboso ya kobota mpo na koya kotonga yango na nsima. Ebimisaka makila mingi, kobota ekoki koumela ntango molai mpe ekoki kozala likámá mpo na bɔɔngo ya mwana.”
Engebene zulunalo New Scientist, ebele ya “bana basi ya mike bazali kokufa na ntina na kobima mingi ya makila mpo na libunga ya bakati oyo bazali kokata mosisa ya eboteli to mosisa oyo ezali nsima ya clitoris. Basusu bazali kokufa na ntina na mpasi oyo bazali koyoka na nsima ya lipasó mpo ete moto moko te ayebi kolamwisa bango mpe lopitalo ezali mosika; basusu mpe bazali kokufa mpo ete bakáti bazali kokakatana na kosenga lisalisi mpo na nsoni na lolenge oyo mosala mosalemaki.”
Atako bongo, momeseno yango ezali naino. Bazulunalo na Afrika mpe na mikili ya Mpótó ezali mbala na mbala kolobela masoló ya bana basi oyo bakatami ngenga. Zulunalo moko ya Afrika eyebisaki kala mingi te ete “ntalo eleki monene ya baoyo bazali konyokwama na ntina na kolongolama ya biteni mosusu ya eboteli ezali bongo ba bébés mpe bana basi ya mike. Atako baboti bazali kopesa nzela ete bana na bango ya basi bakatama ngenga mpo bazali komona ete yango ebongi mpe ezali na ntina, nzokande lipasó yango mpe mpasi oyo ebimaka na nsima ekokani na monyokoli.” Engebene zulunalo ya Londres The Independent (7 Juillet 1992), boyekoli moko oyo esalemaki kala mingi te emonisaki ete “momeseno wana epalanganaki mingi na Royaume-Uni atako bato mingi bazalaki kokanisa na yango te.” Na Grande-Bretagne, bana basi ya mike koleka 10 000, “oyo mingi na bango bazali na mibu mwambe to na nse, bazali na likámá ya kokatama ngenga.”
Momeseno oyo etongami likoló ya lokuta
Basusu bazali kokanisa ete biboteli ya basi bizali mbindo mpe bisengeli kolongolama. Yango ezali lokuta. Bazali kokanisa ete bobele mibali nde bazali na lotómo ya kosepela na makambo matali kosangisa nzoto, bakanisi lisusu ete kokata mwana mwasi ngenga ezali kopesa ye makoki ya kobota mingi, ezali kolembisa mposa ya pite mpe ezali kopesa elenge mwasi makila malamu mpo na kozwa mobali. Zulunalo Time emonisi ete: “Likambo ya mabe koleka, kozanga kooka mposa ya kosangisa nzoto to kozanga makoki ya kobota oyo euti na kokatama ya biteni mosusu ya eboteli, ezali kotinda mibali mingi na kokima basi na bango.”
Mpo na komonisa lokuta ya likanisi oyo ete kolongolama ya biteni mosusu ya eboteli ezali kobatela basi ete basala bondumba te, bayangani na likita libongisamaki kala mingi te na Lagos (Nigéria), na Commission interafricaine balobaki ete, koteya bizaleli malamu uta bomwana ezali na litomba koleka. Koteya, kasi kokata nzoto te, nde ekoki kokebisa mpo na misala ya mabe. Na ndakisa, esengeli nde kokata maboko ya bana mpo ete noki bakokóma miyibi? To esengeli nde kokata bango lolemu mpo ete noki bakozala koloba makambo mabe?
Mobali moko mpe mwasi na ye ya mboka Nigéria baboyaki ete mwana na bango ya mwasi akatama ngenga. Mama ya mobali yango asilikaki mingi, mpo ete akanisaki ete mwana akozala ndumba ntango akokola. Kasi, na lisalisi ya mateya malamu, elenge mwasi wana atikalaki peto. Nzokande, bilenge basi mosusu, oyo bayebani na libota yango, oyo bakatamaki ngenga, kasi baboti bazwaki ntango te ya koteya bango mitinda ya bizaleli malamu, bakómaki kosala pite. Lelo oyo, nkoko ya mwasi andimisami ete likambo ya ntina ezali ngenga te, kasi nde koteya mwana mibeko ya Nzambe na ntina na bizaleli malamu.
Baoyo balingi bana na bango ya basi, bakokanisa bozindo na makambo oyo makobimaka nsima na kokata mwana mwasi ngenga; bakokotela te mpe bakolendisa soko moke te momeseno wana. Esengeli na bango kozala na mpiko, mpo ete na bisika mosusu, bopusi ya bato ya zingazinga ezalaka makasi mingi.
Boyokani na makambo ya losambo
Lisoló ya momeseno ya kokata bana basi ngenga ekundweli biso likambo mosusu. Momeseno wana ezalaki uta kalakala, lokola emonisi yango bikeko ya Ezipito. Zulunalo Plastic and Reconstructive Surgery ekomaki ete: “Kokata bana basi ngenga ezalaki kosalema na Ezipito ya kala. Ezalaki na boyokani na bindimeli ya Bafarao oyo bazalaki kondima ete banzambe bazali na biboteli nyonso mibale, ya mobali mpe ya mwasi.” Lelo lisusu, lolenge loleki mabe ya kokata eboteli ebengami ete circoncision pharaonique.
Na bisika bisusu, milulu ya losambo uta kala mizali na boyokani na ngenga ya bana basi. Moto monene moko ya Leta na Afrika alimbolaki ete molulu motindo wana etalelami lokola likambo limonisi boyokani elongo na nzambe moko ya bonkoko: bazali kosenga lisalisi na ye mpo na bilenge basi na boumeli ya lipasó, mpe bazali kosenga ye ete apesa bango mayele ya bankoko na bango.—Tala 2 Bakolinti 6:14-18.
Na bongo, tozali kokanga ntina oyo baklisto ya solo, oyo bafandi esika momeseno wana ya kokata bana basi ngenga ezali kosalelama, bakolandaka bonkoko yango te. Esika moko te Biblia emonisi ete esengeli kokata basi ngenga. Ezali polele ete Mozalisi asalaki basi na boye ete baoka elengi na bosangisi nzoto kati na libala. Kokata ngenga epai na mwasi ezali kotemela mitinda oyo Makomami Mosantu mazali kolobela yango mingi: bolingo, koyeba komitya na esika ya mozalani mpe kozala na makanisi mabongi.—Baefese 5:28, 29; Bafilipi 4:5.
Lisusu, momeseno wana ya kokata eteni moko ya nzoto, elongobani te mpe bampasi oyo yango ezali kookisa na bamilió ya basi mpe bana basi ya mike, ezali kopesa mawa na Jéhovah, Nzambe ya bolingo. Oyo nde esengo na koyeba ete alaki mokili ya sika epai mpasi ata moko ekozala lisusu te!—Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisoló “L’excision: pourquoi?” kati na Réveillez-vous! ya 22 Mai 1986.
[Etanda na lokasa 23]
Bongo ngenga ya bana mibali?
Basusu bakomituna soki kokata mwana mobali ngenga ezali mpe mabe. Biblia elobi ete na eleko moko, Nzambe asengaki ete bana mibali bakatama ngenga. Na nsima, wana lisangá ya boklisto lisalemaki, kokatama ngenga, atako epesamaki nzela, ezalaki lisusu lisengami ya Nzambe te. Na bongo, ezalaki likambo ya moto na moto kozwa ekateli mpo na oyo akosala mpo na ye moko mpe mpo na bana na ye ya mibali.
Lelo oyo, kokata ngenga ezali kosalema na bisika mingi. Ya solo, ezali lipasó oyo ezali kolongola mwa mosuni ya nzoto. Kasi, lipasó yango ekokani soko moke te na oyo bazali kosala mpo na kokata bana basi ngenga. Na lolenge esalemaka, mibali oyo bakatami ngenga, bakookaka mpasi mosusu te na nsima, nzokande, epai na basi oyo bakatami ngenga, makambo masengeli, lokola komona sanza, kosangisa nzoto, kobota mpe kosuba, mbala mingi eyokisaka bango mpasi makasi, basusu mpo na bomoi na bango mobimba. Lisusu, mikakatano makasi oyo miyaka na ntango ya kobota mizalaka mbala mingi likambo oyo lisalaka ete bana mosusu bazali kobotama na mbebá na nzoto, to mpe bazali kokufa.
Mibali boni bakolinga, mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali, ete bakata eteni moko ya eboteli na bango mpo ete bazanga kooka eloko na ntango ya bosangisi nzoto to oyo ekoyokisa bango mpasi ntango nyonso na bomoi na bango mobimba mpe ekotya na likámá kolongono na bango ya nzoto? Ntembe ezali te, ngenga ya bana basi ekokani soko moke te na ngenga ya bana mibali.
[Etanda na lokasa 25]
Litatoli ya elenge mwasi moko ya Afrika
‘Nazalaki na mibu mwambe ntango bakataki ngai ngenga. Nazali lelo oyo na mibu 11, kasi nazali kokanisa lipasó yango lokola nde esalemaki lobi loleki. Soki bobele nakanisi ntango yango nazali kobulungana na makanisi. Mbala mosusu, nazali kolota bandoto ya nsomo. Na momeseno, nazalaka na esengo, kasi soki nakanisi bantango yango, nazali komiyoka lokola ete makasi masili ngai.
‘Mbala ya liboso oyo nayokaki ete bazali kolobela gazá to ngenga ya bana basi, nasepelaki mingi. Libota na ngai balingaki kopesa ngai makabo mingi. Nayebaki te lolenge lipasó yango ezalaka; nayebaki te ete yango esalaka mpasi.
‘Esengo na ngai elimwaki. Nazalaki kolela mingi mpo ete nazalaki kobanga. Basi minei basimbaki ngai na maboko mpe na makolo. Mwasi mosusu akangaki ngai monoko na loboko na ye. Namekaki komilongola, kasi lokola bango bazalaki makasi koleka ngai, nalóngaki te. Mpasi ezalaki makasi koleka.
‘Ntango mbɛli ekotelaki ngai na nzoto, makila mazalaki bipai binso. Nayebaki te ete ezalaka eloko ya mpasi mingi boye. Na nsima, batyaki likoló na mpota maki esangisami na sukali. Na nsima lisusu, bakangisaki ngai makolo, moko likoló ya mosusu, mpe bamemaki ngai na motuka. Nalelaki kino na mboka.’—Euti na zulunalo ya Kenya The Standard.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]
WHO/OXFAM