Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nasengeli kokende na mokili ya bozwi?
TARA atikaki la Trinité, mboka na ye epai abotamaki, Sheila atikaki Jamaïque mpe Erick atikaki Suriname. Bilenge wana misato bakendaki na mboka ya bozwi. Mpo na ntina nini?
Tara ayebisi ete: “Na la Trinité, bilenge bapusami mingi na makambo bazali komona kati na bazulunalo mpe na televizyó. Na mawa nyonso, bazali kondima bongo makanisi mpamba oyo bazali na yango na ntina ya États-Unis mpe mikili misusu ya bozwi.”
Maloba ya Sheila mazali ndenge moko: “Nazali komikundola, bazalaki koloba ete mpo na kozwa mosala ezalaka petee mpe kotanga kelasi esalemaka kozanga kofuta mbongo.” Mpe abakisi ete: “Nayebi ntina te, kasi baoyo bakendaki na mikili wana bazalaki kolobela soko moke te makambo mosusu. Mbala mosusu bazalaki na nsoni na kondima ete kuna mpe makambo nyonso mazalaka bobele ya kitoko te ndenge tokanisaka yango.”
Atako bongo, bato bazali se kokende na mikili ya bozwi. Kati na lisoló moko ya Los Angeles Times, tokokaki kotanga ete kobanda 1980 kino 1990 motuya ya bato oyo bazalaki kokende na mikili misusu emataki mbala mibale mpe esengeli lisusu komata mbala mibale kobanda sikawa kino mobu 2000. Mbula na mbula, koleka bato 700 000 bazali kokende kofanda na États-Unis. Arabie saoudite, Australie, Canada mpe Côte d’Ivoire bazali kozwa na mbula moko bato mingi oyo bazali kouta na mikili misusu koleka 50 000, kati na bango, mingi bazali koluka bomoi ezangi mpasi.
Yo, oyo ofandi na mokili moko ya bobóla, mbala mosusu ozali komituna soki avenir mbele ekozala malamu te kati na mokili moko ya bozwi. Na likambo yango, ekateli osengeli kokamata ezali ya liseki te. Lolenge nini kosala liponi ya mayele?
Kosala mbangumbangu te
Na likanisi ya Erick, oyo autaki na Suriname, esengeli kosala mbangumbangu te, kasi nde kobanda koluka koyeba makambo ndenge mazalaka kuna. Alobi ete: “Ata na Suriname, bato mingi bazali na bandeko oyo bazali kofanda na mikili ya bozwi. Na bongo, esengeli koyeba makambo ndenge yango ezali kuna mpe koyeba solo likoló na makambo ya nkita kati na mokili mobimba.”
Liboso ete ozwa ekateli, obosana likambo oyo te: “Myango mikokufa wana bato na toli bazangi, nde ekolónga wana bamonisi bayei mingi.” (Masese 15:22) Na bongo, lobelá na bosolo nyonso myango na yo elongo na baboti na yo, na bankulutu ya lisangá na boklisto to na bato mosusu oyo bayebi malamu makambo na bomoi, baoyo bazali komibanzabanza mpo na yo.
Kondima makambo nyonso bazali koloba te
Ntango oyoki maloba ya kosepelisa na ntina na mikili ya bozwi oyo ezali mosika, mwa ntembe moke esengeli kozala. Lisese moko ya mayele elobi ete: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.”—Masese 14:15.
Sheila, oyo azalaki kofanda na Jamaïque, ayebisi ete: “Molakisi na ngai ya Lingelesi azalaki kolobela ngai mbala na mbala ete, likambo ya malamu nakokaki kosala ezalaki ya kokende kofanda na États-Unis. Mikóló bazalaki koloba na ngai ete soki nakei na Canada, na États-Unis to na Angleterre, yango ekozala litomba mpo na ngai na makambo nyonso. Na mokuse, nalingaki kozala zoba soki nazangisaki libaku yango.”
Kokende na ye na États-Unis esalisaki ye mpenza? “Na makambo mingi, bomoi na ngai ebongwanaki solo, kasi oyo ya baninga na ngai oyo batikalaki na Jamaïque ebongwanaki mpe lokola. Na ndenge esalemaka, tozali bobele kosombitanya mokakatano moko na mokakatano mosusu. Mbongwana kati na bomoi ya moto etalelaka ntango nyonso te mboka oyo ye aponi kofanda.”
Tara, oyo atikaki la Trinité mpo na kokende na États-Unis, andimi ete: “Tozalaki kotalela mikili ya bozwi lokola bisika epai kuna makambo nyonso makozalaka bobele ya kosepelisa mpe ya mpasi; epai likoki ezali ya koyekola, ya kosala, ya kozwa mbongo mpe ya kozala na bomoi malamu. Lelo oyo, bato mingi oyo bazali kotika mboka na bango bazali komona ete makambo mazali kobeba bipai binso. Basusu bazali nkutu kozonga na mboka na bango.”
Talela matomba mpe mikakatano
Soki olingi kokamata ekateli ya mayele, esengeli kotalela makambo na bososoli malamu, na esika ya komitika kozimbisama na ndoto mpamba. Talela matomba mpe mikakatano mpo na oyo etali nkita, bato, bizaleli mpe elimo.
Na ndakisa, makambo ya nkita mazali mbala mosusu kotambola malamu te epai yo ofandi. Kasi yango elingi koloba ete likoki ya kozwa mosala ezali ata moke te na etúka na bino? Tara alobi ete: “Epai na biso, bato mingi bazalaki na mosala te, mingimingi kati na baoyo basalaki kelasi minene te.” Na bongo, atikaki mboka na ye. Bandeko na ye mibale ya mibali batikalaki. “Baleki na ngai mibale ya mibali bayekolaki kosala bakiti ya kitoko mpe ba tapis. Sikawa bazali na mosala kati na usine, mpe bato mingi bazali kobenga bango ete basalela bango biloko oyo bazali na yango mposa mpo ete bazali kosepela na mosala na bango. Bazali mpenza malamu koleka ngai oyo nazali na ‘mokili ya bozwi.’”
Soki okei na mokili mosusu, okokutana mbala mosusu na mimeseno mikeseni, mpe ekoki kozala ete bizaleli malamu oyo ozali na yango bikokutana na mikakatano makasi. Ebongi solo komonela yango mpasi? Kanisa lisusu na mposa ya bozwi, oyo ezali komonana mingi epai na bato bafandi na mikili ya bozwi. Bizaleli na yo ya elimo bikoki kobeba mpo na yango, boye te?
Zwá liteya na mabunga ya Esau
Esau, moto oyo alobelami kati na Biblia, azalaki kokoka te mpo na kotalela matomba mpe mikakatano, ntango esengelaki na ye kokamata bikateli. Mbala mingi, amonisaki bopotu mpo na makambo oyo mazalaki mpenza ya ntina: ezaleli na ye ya elimo mpe libota na ye. Mpo na yango, bikateli na ye mosusu ya ntina bizalaki likámá mpo na ye.
Biblia ezali kokebisa biso na ntina na ‘moto oyo azali kotya likebi te na makambo ya bulee, lokola Esau oyo atekisaki lotómo na ye ya mobotami ya liboso mpenza mpo na bilei.’ (Baebele 12:16) Lotómo wana ya mobotami ya liboso ezalaki bulee. Nzambe apesaki na libota ya Esau likoki ya kozala kati na libota oyo ekobimisa Masiya, esaleli ya liboso mpo na lobiko ya bato. (Genese 22:18) Nzokande, “Esau atyolaki lotómo ya mobotami ya liboso.” Andimaki mpenza kotekisa yango na supu ya ndunda. (Genese 25:30-34) Boyokani na yo elongo na Mozalisi ezali mpenza likambo lileki bulee. Kosombitanya yango na eloko moko te, komonisa bopotu mpo na yango te, kotya yango na likámá te mpo na matomba ya mosuni.—Malako 12:30.
Na nsima, ntango Esau atikaki mboka abotamaki mpo na kokende na mboka mosusu, abalaki basi mibale ya Bahiti. Ekoki kozala ete, mabala wana mazalaki malamu mpo na bantina ekeseni, kasi, na makambo ya elimo, mabimisaki mikakatano, mpo ete basi wana mibale bazalaki te kosambela Nzambe ya Yisaka mpe ya Lebeka, baboti ya Esau. Bazalaki mpo na bango “ntina na mitungisi na elimo.”—Genese 26:34, 35, MN.
Esalemaka mbala mingi ete bilenge bazali kobala bobele mpo na kozwa ndingisa ya kofanda na mokili mopaya. Na yango, mbula na mbula, bato 4 000 bazali kotika Inde mpo na kokende kofanda na États-Unis, mpe bato 10 000 bazali kokana kokende kuna na mikolo mizali koya. Nzokande, libala ezali likabo kitoko liuti na Nzambe. Tokoki te kobebisa yango na kosalela yango lokola passeport. Kanisa mpe na mawa oyo okopesa na Jéhovah mpe na basangani ya libota na yo soki ‘okangani esika moko na moto oyo azali mondimi te.’—2 Bakolinti 6:14.
Salá ete ekateli na yo ezala na litomba
Oyo ozali kosala mpo na litomba ya ekateli na yo, mbala mosusu ezali likambo lileki ntina koleka ekateli yango moko. Ezala ete okotikala na mboka na bino to okokenda na mokili mosusu, likambo ya ntina ezali ya kosala ete liponi na yo ezala na litomba.
Soki otikali na mboka na bino: koloba mabe te na ntina na baoyo bakei na mikili misusu; ekateli wana etali bobele bango. (Baloma 14:4; Bagalatia 6:4, 5) Yekolá kosepela na bonzenga mpe na matomba mpenza ya mboka na yo. Kolisá bolingo mingi mpo na bato, mpe salá makasi na koyeba malamu mikakatano na bango.
Soki okei na mokili mosusu: Wana ezali yo koyekola mimeseno ya sika, mbala mosusu mpe lokóta ya sika, zalá na mayele mpo na koyeba makambo oyo masengeli kozala na esika ya liboso. Komitika te kozindisama na mosala bobele mpo na kozala na biloko ya mosuni oyo liboso ozalaki na mposa na yango te. Soki bongo te, okomona nokinoki ete ozali na ntango lisusu te mpo na komipesa na makambo ya elimo.
Sheila alobi ete: “Kati na mokili oyo tozali kobika na yango, ezali likambo ya ntina kozala na mosala. Nzokande, libota, baninga mpe makambo ya elimo ezali lisusu na ntina mingi koleka; ntango biloko nyonso mosusu bizangi, ezali yango nde ekopesa biso makasi ya kolanda kozala na bomoi.” Kati na mayele na yango, Biblia ezali kokebisa biso ete ‘tosalela mingi mokili te; mpo ete makambo na mokili oyo mazali kobongwana.’ (1 Bakolinti 7:31) Baoyo bazali kolónga mpenza, ezali baoyo bazali kotika mosala na bango mpe mbongo na esika na yango—nsima ya bamposa ya libota na bango mpe nsima na makambo ya elimo.
Pona malamumalamu baninga na yo ya sika. Erick apesi toli oyo ete: “Zalá na boyokani elongo na baninga oyo balingi lolenge ya bomoi oyo ezali kolendisa.”
Kobosana te bamposa na yo ya solosolo
Makambo tozali na yango mposa mpenza mpo na kozala na esengo, mabongwanaka te. Sheila alobi ete: “Ezala ete ofandi na esika nini, masengami ya Jéhovah mazali bobele ndenge moko.” Masengami yango mazali nini? Yesu alobelaki yango na mokuse: “Esengo na baoyo bazali komibanzabanza na bamposa na bango ya elimo.” “Omitungisa te” na komituna soki okozala na biloko mingi ya kolya to na bilamba mingi ya kolata. Pesá esika ya liboso na ‘Bokonzi mpe na boyengebene ya Nzambe, mpe biloko nyonso mosusu bikobakisamela yo.’—Matai 5:3; 6:31, 33.
Wana otosi mitinda oyo, okozala na esengo koleka, ata na mokili nini oyo ofandi.
[Bililingi na lokasa 27]
Mikili ya bozwi mikoki komonana ete mizali malamu na makambo nyonso, nzokande mizali mpenza bongo te