Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Janvier nk. 26-27
  • Osengeli kobatisama lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kobatisama lisusu?
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bózalisa bayekoli, bóbatisa bango
  • Babatisamaki lisusu
  • Masɛngami mpo na kobatisama
  • Batisimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ntina ya batisimo na yo
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Janvier nk. 26-27

Engebene Biblia

Osengeli kobatisama lisusu?

LUCIA atungisamaki. Atako abokwamaki na lingomba ya Katolike, abandaki koyekola Biblia kala mingi te elongo na moninga moko oyo azalaki moto ya Katolike te. Abandaki kososola ete batisimo oyo Biblia ezali kolobela ekeseni na molulu oyo basalelaki ye na ntango azalaki mwana moke. Na bosembo nyonso, atunaki epai na moninga na ye ete: “Elingi koloba ete nasengeli kobatisama lisusu? Nzambe akomona yango mabe te?”

Bamilió mingi ya bato, bakatolike to baprotestá, babatisamaki na komwangisáká bango mai to na kosopeláká bango mai ntango bazalaki bilɛzi. Bamilió mosusu babatisamaki na kozindisama mobimba na mai wana bakómaki mikóló. Na yango, motuna oyo mozali kotunama: Batisimo ya boklisto ezali nini? Ezali na mabaku mosusu oyo ekosengela kobatisama lisusu?

Búku ebéngami Pocket Catholic Dictionary (Diksionere ya moke ya Katolike) elimboli batisimo ete: “Sakramento na nzela na yango, na mai mpe na liloba ya Nzambe, moto apetwami na masumu na ye nyonso, abotami lisusu mpe asantisami kati na Klisto mpo na bomoi ya seko.” Búku yango elobi lisusu ete: “Batisimo ezali kotya kati na molimo elembo oyo ekoki kolongolama te; na boye ete batisimo ekoki kopesama lisusu te (mpo ete ntina ezali te ya kosala bongo).” Ezali yango nde Biblia ezali koteya?

Bózalisa bayekoli, bóbatisa bango

Tozali kokuta kati na Matai 28:19, 20 etindá etali batisimo oyo Klisto mosekwi, apesaki epai na bayekoli na ye liboso ya komata na likoló: “Boye bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [Elimo Santu, NW], kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino.” Na ndenge emonani, batisimo esɛngisami epai na bayekoli baklisto (baoyo epai na bango bateyi kotosa makambo oyo Klisto alakaki), kasi ezali mpo na bilɛzi te.a Yango eyokani na lolenge oyo ete batisimo nyonso oyo Makomami malobeli ezalaki ya bayekoli, oyo na lolenge tokoki kokanisa, ezalaki ya kozindisama mobimba kati na mai. Na ntembe te, ezali yango nde esalemaki ntango Yesu ye moko abatisamaki na Yoane Mobatisi. Lisoló ya Biblia liyebisi ete nokinoki nsima na kobatisama Yesu “abimi na mai,” ya Yordani. (Matai 3:16) Na yango, Makomami mamonisi ete Yoane aponaki malamumalamu esika oyo azalaki kobatisa: esika oyo mai mazalaki mingi.​—Yoane 3:23.

Mwa mikolo na nsima, kolobeláká mpo na batisimo ya mokube moetiopia, Biblia emonisi ete “Bango mibale bakiti kati na mai, na Filipo, na [mokube, NW] lokola, mpe abatisi ye.” Na nsima, ‘babimi na mai.’ (Misala 8:38, 39) Batisimo wana ya kozindisama na mai ezali na ndimbola oyo eyebani na lokótá ya greke. Liloba “batisimo” euti na likelelo (verbe) ya greke baptizo, “kobatisa,” oyo euti na bapto, “kozindisa na to kozindisa na nsé ya.”

Babatisamaki lisusu

Tokoloba boni mpo na bamilió ya bato oyo babatisamaki ntango bazalaki naino bana mpenza to baoyo bazindisamaki mobimba te kati na mai? Ebongi ete bábatisama lisusu? Lisoló ya Misala 19:1-7, ezali kosalisa biso na koyanola. Ekoki kozala na boumeli ya eleko ya mpiɔ ya mibu 52-53 T.B. nde ntoma Paulo akendeki na Efese, engumba oyo ezalaki na bozwi mingi, na Asie Mineure. Kuna, akutaki mwa bayekoli oyo bazalaki na mposa ya kobatisama lisusu. Nsima na koyeba ete mibali wana babatisamaki na batisimo ya Yoane, Paulo abatisaki bango lisusu “na nkombo ya Nkolo Yesu.” Akanisaki te ete likambo yango lizalaki mabe na miso ya Nzambe. Nkutu, kozanga ntembe, Nzambe andimaki likanisi ya Paulo mpo ete, na esika ya komona mabe mpo na batisimo yango, Nzambe amonisaki motuya na yango na kopesáká bango likabo ya elimo santu.

Soki mibali wana 12 baboyaki mateya ya Paulo mpo na oyo etali lolenge ya batisimo mpe ntina ya Masiya, Yesu Klisto, mbɛlɛ ntoma Paulo alingaki kobatisa bango soko moke te. Mibali wana basengelaki liboso kokokisa masɛngami. Nsima na yango nde bakokaki kobatisama mpe kondimama na Nzambe.

Masɛngami mpo na kobatisama

Nini ezali masɛngami mpo na kobatisama? Talá ebele na bato oyo babatisamaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33. Masɛngami nini bato wana basengelaki kokokisa? Epai moko, lokola bazalaki Bayuda to bato oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda, basilaki kozwa boyebi malamu na ntina na Yehova Nzambe, na ntina na lolenge na ye ya kosala epai na libota na ye mpe na ntina na bisakweli ya Biblia mpo na oyo etali Masiya oyo alakamaki. Epai mosusu, bakólaki kati na boyebi ya sikisiki na nzela ya litatoli oyo ntoma Petelo apesaki na mokolo yango na kopemama na elimo ya Nzambe. Matomba nini mamonanaki?

“Eyokaki bango bongo bakatani na mitema, mpe balobi na Pɛtɛlɔ na bantoma mosusu ete: ‘Tosala nini, bandeko? Pɛtɛlɔ alobi na bango ete: ‘Bongola mitema, mpe batisama mɔkɔ mɔkɔ na nkombo na Yesu Klisto mpɔ na kolimbisama na masumu na bino, mpe bokojua likabo na [Elímo Sántu, Biblia Liloba lya Nzambe]’” (Misala 2:37, 38) Tomoni ete litatoli ya Petelo lizalaki ya likolólikoló te. “Mpe na maloba mosusu mingi atatoli na bango, kopɛsaka bango toli.” Lokola bazalaki na ntembe te likoló na makanisi oyo azalaki kopesa, bandimaki makambo oyo azalaki koloba mpe babatisamaki. “Na mokɔlɔ yango bato sɔkɔ nkoto misato babakisami na bango.”​—Misala 2:40, 41.

Bobele masɛngami wana nde mazali na ntina lelo oyo mpo ete batisimo ezala na motuya engebene Makomami: (1) boyebi ya sikisiki, (2) koyoka mawa ya solo na motema mpe (3) kobongwana, elingi koloba komibalola epai na Nzambe mpe koboya “libota oyo libungi nzela.” Lisusu, esengeli kobatisama “na nkombo na Yesu Klisto,” elingi koloba kondima motuya ya mbeka na ye ya lisiko mpo na bolimbisi ya masumu mpe kotosa ye lokola Mokonzi oyo atyami na Nzambe.​—Misala 2:40; Baloma 5:12-19; 7:14-25.

Bato ya motema sembo oyo bazali kokokisa masɛngami ya Biblia, bákanisa te ete bakozanga kosepelisa Nzambe soki babatisami lisusu. Na esika ete ezala bongo, batisimo yango oyo eyokani na Makomami ezali nde kosepelisa ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na bandimbola mingi, talá lisoló “Le baptême: est-il pour les tout-petits?” (Batisimo: ezali mpo na bana mike?) ebimaki na Réveillez-vous! ya Ɔkɔtɔ́bɛ 8, 1986.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto