Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Juillet nk. 6-9
  • Kotya kelasi na esika na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotya kelasi na esika na yango
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolakisama oyo eleki ntina
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Juillet nk. 6-9

Kotya kelasi na esika na yango

MOSÁLI ya ntɔki oyo azali na makoki, ayebi mpenza komonisa lolenge oyo eloko azali koyema ezali. Bililingi oyo bisengeli kozala na esika ya liboso, azali komonisa yango na mozindo mpenza koleka bililingi oyo elandi mpe oyo ya nsuka. Biso mpe tosengeli koyeba makambo oyo masengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi.

Yesu Klisto alobaki ete: “Mapamboli epai na baoyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo, mpo ete bokonzi ya makoló ezali na bango.” (Matai 5:3, NW) Na yango, makambo ya elimo masengeli kozala na esika ya liboso. Nzokande, biloko ya mosuni bisengeli kopesamela motuya moke.

Wapi esika ebongi mpenza mpo na kelasi? Ya solo, baklisto bayebi ete yango ezali mpenza na ntina. Mbala mingi, kelasi ezalaka na ntina mpenza mpo na kokokisa lisɛngisi ya Makomami, oyo ntoma Paulo ayebisaki ete: “Sɔkɔ moto nani akoleisa bato na ye tɛ mpe na koleka bato kati na ndako na ye mɔkɔ tɛ, asili [koangana kondima, NW] mpe aleki mabe moto oyo ajangi kondima.” (1 Timɔtɛ 5:8) Epai mosusu, mpo na kokokisa mosala oyo Yesu apesaki na bayekoli na ye, ete bázalisa bayekoli, “kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili [ye] kolaka [bango],” esengeli ‘kozala na boyebi’ mpe na nsima, kolakisa basusu na lolenge malamu mpenza.​—Matai 28:19, 20; Yoane 17:3; Misala 17:11; 1 Timoté 4:13.

Nzokande, kelasi esengeli kopesama motuya monene koleka te. Esengeli te kotánga bobele mpo na kozwa bilembo ya malamu na kelasi to mpo na kozwa mapɔlɔ́mi oyo mazali kokamwisa. Kopesa na kelasi motuya monene koleka, elimboli mpenza koluka komiyokisa mawa. Ya solo, yango ekoki mpenza kopesa matomba ya mosuni ya ntango mokuse. Kasi, lokola Salomo mokonzi na mayele amonisaki yango, “moto ajali oyo akosalaka na mayɛlɛ, [na makoki mpe na bolongi, NW] nde akotika yango libula epai na moto oyo asali elɔkɔ kati na yango tɛ.”​—Mosakoli 2:21.

Soki Batatoli ya Yehova bapesaka motuya mingi na kelasi, ezali bobele te mpo na koyeba makambo na yango, kasi mpo ete yango esalisaka bango na kozwa makoki mingi lisusu kati na mosala na bango mpo na Nzambe mpe na kokokisa bamposa na bango. Lokola mosala na bango ya kosakola ezali na lifuti ya mosolo te, mingi basengeli kosala mosala ya mosuni. Likambo oyo ekoki kozala mpenza ntembe monene mpo na basakoli ya ntango nyonso, to babongisi-nzela, oyo bazali kosala mingi kati na mosala ya kosakola, wana basengeli mpe kokokisa bamposa na bango, mpe soki basilá kobala, oyo ya mabota na bango.a​—Masese 10:4.

Nsima na kotalela malamumalamu likambo yango, bamoko kati na Batatoli ya Yehova baponi kolanda kotánga kelasi minene. Na ntembe te, basengeli kokeba ete bápesa te na kelasi motuya monene koleka. Bazali kosala ndenge nini? John, elenge moko ya Brésil alobi ete: “Makambo mingi masalisaki ngai. Ezala na bantango oyo esengelaki na ngai koyekola na mpokwa, nazangaki te koyangana na makita ya boklisto. Mpe, uta ebandeli ya kelasi, namonisaki yango polele epai na baninga na ngai ya kelasi ete nazali Motatoli ya Yehova.”

Eric, elenge mosusu ya Brésil oyo akɔtaki na eteyelo monene, azalaki kosimba mabaku nyonso ya malamu mpo na kolobela bindimeli na ye. Alobi ete: “Nazalaki kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia elongo na balakisi mpe na banakelasi, mitano kati na bango basili kozwa batisimo mpe mibale basili kokóma bankulutu.”

Richard azongelaki kotánga kelasi, oyo ezalaki kozwa ye mokolo mobimba te, mpo na kozwa lipɔlɔ́mi ya moyemi. Alobi ete: “kelasi wana esalisaki ngai na kokokisa bamposa na ngai mpe oyo ya mwasi na ngai mpe efungolaki lisusu nzela ya libaku moko malamu mpo na ngai. Wana nazalaki kokende na bisika ya botongi Bandako ya Bokonzi na ntango moke mpe na kosololáká na baoyo bazalaki na mikumba kati na mosala yango, nayaki koyeba ete bazalaki na mposa ya bayemi. Nakokaki sikawa kosalela mayele oyo nazwaki na kelasi kati na mosala etali botongi yango.b Mpe lisusu, ngai mpe mwasi na ngai tozali kolikya, mokolo mosusu, kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova to kati na misala na bango ya botongi kati na mikili mingi.”

Ezali na ebele ya Batatoli ya Yehova oyo bazali kokokisa bamposa na bango, kozanga ete bákɔta na biteyelo minene. Marie alimboli ete: “Nazali kokokisa bamposa na ngai na kosaláká misala ya ndako mbala mibale na pɔ́sɔ. Likambo ya kokamwa mpenza, nazali kozwa mosolo mingi koleka baoyo babéngaka ngai ete nasalela bango misala wana. Natalelaka mosala na ngai lokola nzela mpo na kokokisa mokano moko. Yango ezali kosalisa ngai ete natikala kati na mosala ya babongisi-nzela mpe nazali kooka mawa te mpo na yango.”

Stéphane mpe azali kotalela makambo motindo moko. Alobi ete: “Ntango nakómaki mobongisi-nzela, bamoko batunaki ngai soki nakosala nini ntango nakobala, ntango nakobota bana, mpe soki nakolónga kokokisa bamposa na biso na boumeli ya sanza mobimba. Ya solo, nasalaki misala mingi mikeseni, yango wana nasili koyeba makambo mingi kati na mosala moko na moko. Lokola nasengeli sikawa kokokisa bamposa ya mwasi na ngai, nasili komona ete nazali kozwa mosolo mingi koleka baoyo bazali na mapɔlɔ́mi ya biteyelo minene, oyo bazali kosala elongo na ngai kati na kompanyi moko.”

Ekoki kokóma ete batata ya mabota oyo bazali Batatoli ya Yehova te, bazali kosɛnga na bana na bango ete bálanda kelasi na biteyelo minene, mpe engebene makomami, bazali na lotómo ya kosala bongo. Na likambo ya motindo oyo, mpe na boyokani na Matai 6:33, bilenge bakoki kopona lolenge ya kelasi oyo ekoki kosalisa bango na kokóma basaleli ya makoki mpenza kati na mosala ya Yehova, to oyo ekopesa bango nzela na kosala mosala ya ntango nyonso wana bazali naino kotánga.

Kolakisama oyo eleki ntina

Batatoli ya Yehova nyonso, ezala basalaki kelasi nini, bazali na likambo moko oyo ekangisi bango. Bandimisami ete kolakisama oyo eleki ntina ezali oyo euti na Liloba ya Nzambe, Biblia. Yoane 17:3 (NW) elobi ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bákóma na boyebi ya yo Nzambe bobele moko ya solo mpe motindami na yo Yesu Klisto.” Ata asali bakelasi ya lolenge nini, kokóma na boyebi ya Yehova mpe ya Mwana na ye, Yesu, esengeli kozala na esika ya liboso mpo na moklisto.

Yango ezalaki mpenza likanisi ya baklisto ya ekeke ya liboso. Manaene “atángaki kelasi elongo na Elode, moyangeli ya etúká.” Nzokande, kati na basakoli mpe balakisi ya lisangá ya Antiokia, azalaki wana, kosaláká mosala. (Misala 13:1) Paulo mpe atángaki kelasi oyo ekokani na mateya ya eteyelo monene ya mikolo na biso. Nzokande, nsima ya kokóma moklisto, apesaki na kolakisama na ye motuya monene te koleka. Na esika ete asalela yango mpo na konyata basusu, Paulo asalelaki boyebi na ye ya sociologie ya makambo matali mibeko mpe ya makambo ya kala, mpo na koteya bato ya motindo nyonso.​—Misala 16:37-40; 22:3; 25:11, 12; 1 Bakolinti 9:19-23; Bafilipi 1:7.

Baklisto ya ekeke ya liboso bayebanaki mpenza mingi na ntina na bakelasi oyo batángaki te. Mingi kati na bango bazalaki “bainga mpe bato mpamba;” oyo bayekolaki kati na biteyelo ya balakisi na mibeko na bayuda te. Kasi yango elingi koloba te ete bazangaki kolakisama. Nkutu, mibali mpe basi wana bazalaki na makoki mpo na koloba na ntina na kondima na bango​—likoki wana lizali elembeteli oyo emonisi ete balakisamaki mpenza.​—Misala 4:13.

Na yango, baklisto nyonso bazali kozwa kelasi na motuya monene. Nzokande, bazali kosala makasi mpo na ‘komikɔtisela malamu makambo oyo maleki ntina,’ kotyáká kelasi, bakisá mpe makambo na bango mosusu, na esika ekoki na yango.​—Bafilipi 1:9, 10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Esengeli koyeba ete ntoma Paulo oyo, atángaki bakelasi minene, azalaki kosala mosala ya kotonga hema mpo na kokokisa bamposa na ye kati na mosala ya kosakola, mpe ekoki kozala ete ayekolaki mosala yango epai na tata na ye. Kosala hema ezalaki mosala ya pɛtɛɛ te; elamba ya nsuki ya ntaba oyo ebengami Cilicium oyo bazalaki kosalela ezalaki mpenza makasi mpe engumbamaka na mpasi; na yango, ezalaki mpenza mpasi mpo na kokata mpe kotonga yango.​—Misala 18:1-3; 22:3; Bafilipi 3:7, 8.

b Elobeli oyo ete “botongi na ntango moke” ezali komonisa tekiniki ya botongi oyo ebongisami malamu mpe ebandisami na Batatoli ya Yehova. Baoyo bazali kosangana na botongi yango mpe baoyo basalaka na bisika ya botongi yango bazali basali ya bolingo malamu; bazali kopesa ntango mpe biloko na bango kozanga kosɛnga lifuta. Mbula nyonso kati na Etats-Unis, Bandako ya Bokonzi 200 ezali kobongisama lisusu na lisalisi ya tekiniki yango.

[Etanda na lokasa 7]

Bokumisi oyo ebongi

Mbula moko liboso ete asilisa kelasi ya katikati, Matthieu, elenge moko Motatoli ya Yehova, akanisaki na mozindo mpenza na lolenge oyo akokaki kosala mpo na kokokisa bamposa na ye mpe kozala mosakoli ya ntango nyonso. Nsima na kotalela likambo yango kati na libondeli, ye mpe baboti na ye bamonaki malamu ete atánga mwa moke lisusu mpo na kozwa nzela ya kokokisa mokano yango kozanga mpasi. Na yango, atondisaki lokasa ya lisɛngi mpo na kozwa mosolo oyo bapesaka na banakelasi. Mopesi na ye ya toli abakisaki likoló na yango, mokanda ya bokumisi oyo elobi ete:

“Na boumeli ya mbula mibale na ndambo, nazalaki na esengo mpenza ya kozala mopesi na toli mpe moninga ya Matthieu. Azali moto na mobulu te . . . Azali na kondima mozindo mpe na bindimeli ya makasi oyo emonisami na misala na ye mpe na boyokani na ye elongo na basusu.

“Na bambula oyo euti koleka, Matthieu abongisamaki mpenza lokola mosaleli ya Nzambe. Kati na lingomba na ye, basaleli bazwaka lifuta ya mosolo te. Ezali mpenza na bolingo nde azali kokokisa mosala na ye. Matthieu atalelaka bobele litomba na ye moko te mpe atondi na limemya mpo na basusu. Mosolo oyo wana ekosalisa moto yango ya kondima ete alanda kotánga kelasi mpe akóba mosala na ye ya bolingo malamu.

“Mpo na oyo etali kosala na bolingo malamu mpe mosala mpo na kosalisa bato, Matthieu azali kolekisa bangonga mingi na kosakoláká ndako na ndako na nsuka ya pɔ́sɔ, na nsima ya kelasi mpe na bantango na ye ya lói. Akosalaka na molende kati na lisangá ya bato mpe elongo na bato mingi bakeseni. Matthieu amonisaki makoki na ye ya koyeba kotambwisa makambo na koyekoláká Biblia elongo na bilenge mpe mikoló lokola. . . . Azali na makoki ya kolendisa bato mpe kosalisa bango na kosala oyo bakoki kosala. Balakisi balobaka ete azalaka ntango nyonso na bopusi malamu likoló na basusu kati na kelasi. Abandisaka masoló oyo masalemaka na kelasi mpe amonanaka ete azali molobi malamu. . . .

“Matthieu azali moko ya bilenge baleki malamu, oyo bapesamelaki ngai ete napesaka bango toli. Baninga na ye mpe balakisi na ye balingaka ye mpe bamemyaka ye. Bosembo na ye emonani na makambo nyonso.”

[Bililingi na lokasa 9]

Soki Batatoli ya Yehova bazali kopesa motuya na kelasi, libosoliboso ezali mpo ete yango esalisa bango ete bázala basaleli ya Nzambe oyo bazali na makoki mingi koleka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto