Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier lok. 30
  • Nkomá ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkomá ya batángi
  • Lamuká!—1995
  • Masolo mosusu
  • Nkomá ya batángi
    Lamuká!—1995
  • Nkomá ya batángi
    Lamuká!—1995
Lamuká!—1995
g95 Janvier lok. 30

Nkomá ya batángi

Likámá na nzela Botángi ya lisoló “Kolemba wana ozali na yenda” (“Makambo mazali koleka na mokili,” Lamuká! Yanuáli-Mársi 1994) ekundweli ngai lisusu likambo likómelaki ngai esili koleka mbula 20, ntango nazalaki motambwisi ya mituka ya minene. Nazalaki kozonga na ndako nsima ya kosala mingi mokolo mobimba mpe nabandaki kolala na yenda. Na mbala moko, kotutana makasi ya motuka elamwisaki ngai mpe na nsɔ́mɔ nyonso, nayaki koyeba ete nazalaki kotambola na ngámbo ya mabe na nzela. Natutaki mopanzi ya nzela, kasi motuka moko te to moto moko te azalaki wana. Nazwaki likámá moko te, kasi yango epesaki ngai liteya oyo nakoki kobosana soko moke te. Nakokaki koboma moto bobele mpo ete namipemisaki te na ntango oyo nazalaki na yango mposa. Toli na ngai ezali oyo: Tángá lisoló yango kati na Lamuká! mpe landá makanisi mapesami na yango.

M. Y., Angleterre

Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló “Ozaláká na bomoi kala? Okozala lisusu na bomoi?” (Lamuká! Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1994) Ezali kolimbola na lolenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele ezalela ya solo ya bakufi. Na makanisi na ngai, moto nyonso oyo azali koluka solo mpo na likambo yango asengeli bobele kondima oyo bino bozali kokoma.

F.P., Italie

Elenge mwasi moko oyo azwaki kanser Nauti kosilisa kotánga lisoló elobi “Nazali na bomoi ya mpasi,” ya Kathy Roberson (Yulí-Sɛtɛ́mbɛ 1994). Ya solo, nandimi ete lisoló yango lisimbaki ngai mingi. Esengelaki bobele nakoma mpo na komonisa botɔ́ndi na ngai mpo na lisoló wana ya kitoko koleka. Nazali na mibu 14 mpe na eteyelo batungisaka ngai mingi mpo ete nazali Motatoli ya Yehova. Ezalela na ngai ezali lolenge moko na oyo ya Kathy Roberson te, kasi nalendisamaki mingi na komonáká ete Yehova asungaki ye na boumeli ya komekama na ye.

C. G., États-Unis

Oyo nde lisoló kitoko! Ngai mpe nabɛlaki mingi ntango nakómaki na mibu 9, mpe yango esɛngaki ete nalekisa basanza mingi na lopitalo. Nzokande, ntango nakɔtaki na eteyelo ya katikati, nzoto ezongaki malamu. Ezalaki mpenza mpasi mpo na Kathy Roberson ndenge mpasi ezalaki kozonga mbala na mbala. Ezalela na ye ya elimo mpe nguya na ye esalisi ngai ete natalelaka makambo na lolenge ya malamu.

D. V., États-Unis

Konúngisa bana Nsima ya basanza misato, nakobota mwana na biso ya mibale. Ntango nazwaki nimero na ngai ya Lamuká! Yuli-Sɛtɛ́mbɛ 1994, mpe nafungolaki na lisoló “Konúngisa bana: Mateya ya ebandeli,” nasepelaki mingi. Ezali mpenza malamu kotánga lisoló oyo lizali kopesa nkembo mpe lokumu oyo ebongi epai na Oyo azali Mobandisi ya bomoi. Nazali kokamwa ndenge nini tokoki kowangana kozala ya Mozalisi ya mayele mpe oyo atondi na bolingo na ntango tozali komona lolenge nzoto ya mama esalemi mpo na kopesa bilei epai na mwana na ye.

L. K., États-Unis

Nandimisami ete bokozwa nkomá mingi ya matɔ́ndi mpo na lisoló oyo. Na kokanisáká likoló na yango, nayei komona ete nazwaki ekateli malamu mpe ya matomba na koponáká konúngisa bana na ngai misato. Nayebi ete lisoló oyo likolendisa bamama mpe baoyo bakokóma bamama.

C. S., États-Unis

Mpasi Nazali monyolisi ya nzoto. Nalingi kopesa bino matɔ́ndi mpo na masoló oyo masangisamaki esika moko na motó ya likambo “Bomoi bozangi mpasi ekoya mosika te! (Lamuká! Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1994). Mayele, bwanya mpe bokatikati oyo emonani kati na bolukiluki mpe na komonisama ya makanisi, ekamwisaki ngai mingi. Masoló yango makozala lisungi monene epai na bato na mayele, bato ya maladi mpe basusu. Na kokóbáká kolɛmbisa mpasi na konyolisáká nzoto, nazali kozila mokolo oyo, kati na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, mpasi oyo ekosilaka te ekozala lisusu te.

D. T., Danemark

Nazali kokomela bino longwa na mbeto na ngai. Uta mbula mibale na ndambo, nasengelaka na bileko mosusu kotikala nalali ntango nyonso na mbeto na ntina na kokabwana ya mikuwa mibale ya mokɔngɔ. Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló na bino kitoko oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ozali na mpasi ya mokɔngɔ́?” (Lamuká! Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1994). Nalelaki ntango nazalaki kotánga yango mpamba te nazalaki komona lokola nde bozalaki kolobela mpenza ngai. Nakanisaki te ete moto moko akokaki kososola mokakatano yango malamu boye!

B. H., Angleterre

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto