Nkomá ya batángi
Sodá akómi moklisto Miso na ngai matondaki na mpisoli ntango natángaki lisoló “Nabongisamaki mpo na koboma, sikawa natindami mpo na bomoi.” (8 Sɛtɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé). Mopalestina abénga Moyuda “ndeko”—bomoko motindo wana ekoki komonana bobele kati na lisangá ya Yehova!
K. T. O., Malaisie
Chop na yo Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló na bino “Chop na yo—Sinyatili na yo.” (22 Máí 1994, ebimeli ya Lifalansé) Ngai na mobali na ngai toyekolaka Biblia na pastɛ́rɛ moko oyo azali Budiste, mobotami na mboka Taiwan. Amonaki bosikisiki ya lisoló yango! Na nsima, atindelaki mama na ye nkomá na Taiwan mpo na kosɛnga na ye ete atindela biso chop oyo batye nkombo na biso likoló na yango. Tosepelaki mingi!
K. J., Etats-Unis
Mitungisi Nauti kotánga molɔngɔ́ ya masoló “Bomoi na yo etondi na mitungisi? Okoki kobongola yango!” (Yanuáli-Mársi 1995) mpe nalingi koyebisa bino ete esungaki ngai mingi. Nazalaka na ezaleli ya komitungisa te, kasi nazalaki kosepela te na bomoi na ngai ya bozongeli makambo bobele moko. Masoló yango masungaki ngai ete natalela makambo na lolenge mosusu.
S. V., Etats-Unis
Bisanga Canaries Nsima ya kotánga lisoló “Bisanga Canaries—mopɛpɛ kitoko, bisika kitoko.” (22 Novɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé) Nalingi komonisa botɔ́ndi na ngai mpo na lisoló yango mpe masoló mosusu ya lolenge wana oyo mabimaka kati na Lamuká! Masoló yango masalisaka biso mpo na kosepela na mabelé kitoko oyo tozali na yango mpe bikelamu ndenge na ndenge ya Yehova. Matɔ́ndi mingi mpo na komemáká biso na “mibembo” wana kitoko.
D. G., Etats-Unis
Bamisionere Nasepelaki mingi na molɔngɔ́ ya masoló na bino “Bamisionere—Bamemi ya pole to ya molili?,” mingimingi eteni ya motoba, “Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo.” (Yanuáli-Mársi 1995) Lisangá na biso lisili kozwa matomba mingi na kosaláká elongo na bamisionere mibale babalani oyo babongisamaki na Galadi. Batoli na bango ya mayele mpe molende na bango epusi ngai ete nakómisa mosala ya ntango nyonso mosala ya bomoi na ngai mobimba.
J. K., Botswana
Koboya komikɔtisa na ebongiseli ya Nazi Lisoló “Topesaki mabɔkɔ te na bitumba ya Hitler” (22 Ɔkɔtɔ́bɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé) lisimbaki motema na ngai mingi. Lizalaki na elilingi moko oyo ezalaki komonisa “Kokata ndai liboso na bato” ya baepiskɔ́pɔ motoba ya mboka Autriche oyo bandimaki kopesa mabɔkɔ na ba Nazi. Moko kati na baepiskɔ́pɔ wana azali oyo akulisaki ngai nkótisa na 1928 ntango nazalaki moyekoli mozezwite. Nasɛkaki mpo na “nkótisa” motindo wana oyo euti epai na moto oyo ayebi ye moko te kotikala ngwi kati na kondima ya boklisto! Etumba wana esukisaki boyokani na ngai na lingomba Katolike. Nalongwaki na mboka na ngai. Namekaki koboya kokɔta na etumba na lolenge na ngai moko, kasi nazalaki na nguya lokola libota ya Wohlfahrt te. Nazali komikundola lolenge Batatoli mibale baboyaki kokamata bibundeli. Babomaki bango na mbala moko. Nasepelaka na bato ya bosembo motindo wana.
P. K., Chili
Mituna oyo bilenge batunaka Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Lolenge nini nakoki kobongisa lomwale na ngai ya bilamba?” (22 Yanuáli 1995, ebimeli ya Lifalansé) Epusaki ngai ete nabongisa lomwale na ngai ya bilamba. Atako nazali na bilamba mingi, mokolo na mokolo nazalaki na mokakatano ya kozwa elamba ya kolata. Kasi na lisalisi ya batoli na bino, sikawa nazali na mokakatano te mpo na kozwa elamba ya kolata.
T. B., Hawaii
Matɔ́ndi mingi mpo na makanisi kitoko oyo mazalaki na masoló “Monzɛlɛ—Bopusi na yango eutaka wapi?” mpe “Monzɛlɛ—Nasengeli kolanda elateli ya sika?” (22 Novɛ́mbɛ 1994 mpe 8 Desɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé) Nazali nkulutu kati na lisangá, nayebi ete ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpo na ngai ete natika kosɛngisa basusu makanisi na ngai. Kasi bafraze na bino lokola “kotalela mayoki mpe makanisi ya basusu” mpe “pɛngolá milato mpe etamboli oyo basusu bakoki komona ete eleki ndelo” ezali mpenza kosimba mitema.
D. Č., Croatie