Ntango mbongo etikalaka likoló ya nzeté
KANISÁ ete mbongo ebotaka likoló ya nzeté mpe ete yo ozali na nzeté yango. Na makanisi na yo, na boumeli ya ntango boni mbongo ekotikala likoló ya nzeté soki elónamaki na pembeni ya nzela oyo bazalani na yo balekaka mokolo na mokolo?
Soki bazalani na yo nyonso bazalaki Batatoli ya Yehova, pɔtɔmɔni na yo mbɛlɛ ezali na libateli. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te Batatoli ya Yehova balandaka etindá ya Biblia oyo etali komitambwisa na kolongobana na makambo nyonso. (Baebele 13:18) Ezali yango emonisi mwa lisoló oyo liuti koleka kala mingi te:
Na mboka Nigeria, lokasa moko ya naira 5 (mosolo ya Nigeria) lozwamaki na nzela na ntáká ya bamɛtɛlɛ soko nkámá na bandako ya la Société Watch Tower. Moto oyo alɔkɔtaki yango akangisaki yango na mobimbi ya nzeté ya kokotí, na kokanisáká ete moto oyo abungisaki yango mbala mosusu akozonga koluka yango.
Lokasa yango lozalaki komonana polele na Batatoli ya Yehova mingi oyo bazalaki koleka wana mokolo na mokolo, kasi moko te akamataki yango. Na nsima ya bapɔ́sɔ mingi, moto moko azwaki yango mpo na kotya yango na kɛ́si ya makabo.