Nkomá ya batángi
Liwa Nalingi koyebisa bino ete nasepelaki mingi na masoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . ” “Mpo na nini papa akufaki?” (22 Augústo 1994, ebimeli ya Lifalansé) mpe “Lolenge nini nakoki kolónga mokakatano ya liwa ya papa?” (8 Sɛtɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé) Atako nazali elongo na baboti na ngai, kala mingi te natungisamaki mpenza na liwa ya balingami na ngai mibale. Masoló yango mamemelaki ngai elendiseli makasi mpe elakisaki ngai lolenge nini nakoki kolónga mpasi motindo wana.
T. H., France
Tata na ngai akufaki na Ndako ya Bokonzi nsima ya kosala lisukúlu. Bandá ntango wana, nazali kobunda na mawa mpe na nkanda. Nakanisaki ete ezalaki sembo te ete moto oyo alingami mingi mpe amipesi mpenza na Yehova asengelaki kokufa mbalakaka bongo. Na kotángáká masoló wana, namiyokaki ete Yehova apesaki ngai lisungi na ye mpo na kosilisa mpasi nazalaki na yango na motema.
S. A., Nigeria
Tata na ngai akufaki na kansɛr, mpe nazalaki na mpasi mingi na motema mpo na yango. Ezalaki likambo ya kokamwa na komona lolenge oyo lisoló wana ekokanaki mpenza na mayoki na ngai. Likambo oyo lizali kopesa ngai mpasi mingi na motema ezali ete tata na ngai azali na likoki te ya komona makambo oyo mazali koleka kati na bomoi na ngai sikawa. Nazali sikawa kokokisa mokano oyo namityelaki uta kala: mosala ya mopalanganisi nsango malamu ntango nyonso. Nalingaki mpenza ete amona yango. Kozanga litambwisi na ye malamu mpe batoli na ye epesaka mpenza mpasi na bantango mosusu, kasi koyeba ete ezali na basusu oyo bazali komibanzabanza mpo na ngai ezali kobɔndisama monene.
C. T., États-Unis
Makambo mazali koleka na mokili Nalingi kopesa bino longonya mpo na lolenge malamu oyo Lamuká! ebongisami. Nasepelaka mingi na lisoló “Makambo mazali koleka na mokili.” Atako ezali kolobela na mokuse masoló makeseni, toli na yango oyo ebongi, makambo na yango ya kosepelisa mpe lolenge na yango ya kotalela makambo esalisaki ngai ete nabongola bizaleli na ngai mingi. “Makambo mazali koleka na mokili” ezali koyeisa botángi elɛngi.
T. C. C., Brésil
Baboti, bósalisa bana na bino na eteyelo Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló: “[Baboti], bósalisa bana na bino na eteyelo.” (Lamuká! ya Yulí-Sɛtɛ́mbɛ 1994) Kala mingi te, mokambi ya eteyelo ya mwana na ngai ya nsuka ya mwasi alobelaki likambo litali boyokani malamu kati ya baboti mpe balakisi. Namemaki zulunalo yango epai na mokambi ya eteyelo mpe atángaki yango nokinoki. Nsima ya pɔ́sɔ mibale, mwana na ngai azalaki komemela ngai nkomá sanza na sanza. Banyataki eteni ya lisoló oyo elobelaki boyokani malamu mpo ete baboti mpe balakisi básalelaka yango.
W. B., États-Unis
Kelasi (Lamuká! ya Yulí-Sɛtɛ́mbɛ 1994) Nazali na mibu 14 mpe napusami makasi ete nálanda kelasi ya likoló. Na lisungi ya lisoló na bino, nazwaki ekateli ya kosala oyo nalingi. Nalingi kozala mobongisi-nzela [mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso] mpe soki nalingi kobongisama lisusu mpo na kozwa mosala, nakosepela kokenda na eteyelo ya kobongisama mpe nakoyekola kokanga bafɔtɔ́.
H. O., États-Unis
Lisoló na bino limonisaki ntina ya kotalela mabe mpe malamu ya kelasi ya likoló. Nazalaki na mposa ya kokende lisusu na eteyelo, kasi nalingaki te kobosana makambo ya elimo. Nalimbwelaki manáka na ngai ya makita ya boklisto na mokomeli ya eteyelo, mpe abongisaki mateya na ngai mpo ete nayangana na makita nyonso.
M. F. S., Brésil
Lisungi Nazalaki komitungisa mpo na Batatoli ya Yehova ya mboka Rwanda. Na kotángáká lisoló “Lisungi mpo na banyokwami na makambo ya nsɔ́mɔ oyo mabimaki na Rwanda” (Yanuáli-Mársi 1995), nayebi sikawa mwa malamu koleka likoló na mikakatano na bango. Lisoló yango limonisaki ete mingi kati na bango bakufaki. Elikya ya komona bango lisusu na paladiso ezali kopesa nzela na koyika mpiko mpo na liwa na bango. Na kozeláká, nakokóba kosambela mpo na baninga na ngai baklisto ya Rwanda.
J. D., Japon