Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nasala nini mpo kotánga Biblia esepelisa ngai mpenza?
“Mbala mosusu ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia, mpe yango ekoki kolɛmbisa nzoto.”—Anne-Lise, mbula 17.
“Kotánga Biblia ezalaki kolɛmbisa ngai mpenza.”—Karine, mbula 22.
BATO mingi basepelaka na kotánga te. Yango wana, kotánga buku monene lokola Biblia ekoki komonana lokola mosala moko ya monene, ata mpo na bato oyo balingaka kotánga mingi. Tamara, elenge mwasi ya mbula 17, alobi boye: “Mpo na ngai, Biblia ezalaki buku moko ya monene etondi na maloba makasimakasi oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Kotánga Biblia esɛngaka kotyela yango makanisi nyonso mpe kozala na molende.”
Kanisá mpe na badevuarɛ ya kelasi, misala ya ndako mpe kominanola, nyonso wana ekolya yo ntango mpe makasi. Likambo yango mpe ekoki kosala ete kotya makanisi na yo nyonso na kotánga Biblia mpe kosepela na yango ezala mpasi. Alice, ye azali Motatoli ya Yehova, azwaka mpe ntango ya komibongisa mpo na koyangana na makita mpe kopesa biyano mpe ya koyebisa bindimeli na ye epai na bato mosusu. Alobaki ete: “Kotánga Biblia ekoki kozala mpasi, mpamba te makambo ya kosala esilaka te.”
Atako bongo Alice, Tamara, mpe bilenge mosusu mingi balongaki mikakatano yango. Sikoyo, bazali kotánga Biblia mbala na mbala mpe bazali kosepela na yango. Yo mpe okoki kolonga! Talelá makambo misato oyo yo okoki kosala mpo kotánga Biblia esepelisa yo mpenza.
Bongisá ntango mpo na kotánga Biblia
Corinne, elenge mwasi ya mbula 18, alobi boye: “Namonaka ntina oyo bilenge balobaka ete kotánga Biblia elɛmbisaka, ezalaka mpo naino batángá yango mingi mpenza te.” Se ndenge osepelaka na masano moko boye oyo osalaka mingi, okosepela mpe kotánga Biblia na ntango ozali kosala yango mbala na mbala.
Kasi okosala nini soki ozalaka na ntango mpenza te? Ntoma Paulo apesi toli oyo: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” (Baefese 5:15, 16, NW) Okoki ‘komisombela ntango’ soki otiki kolekisa ngonga mingi na makambo oyo ezali na ntina mpenza te, lokola kotala televizyo. Liloba Paulo asalelaki mpo na “ntango” elakisi ntango oyo moto atii mpo na kosala likambo moko. Ntango nini omityeli mpo na kotánga Biblia?
Bato mingi batángaka Biblia na ntɔngɔ, nsima ya kotalela mokapo ya mokolo na komantɛrɛ oyo ezalaka na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo.a Basusu bamonaka malamu kotánga na butu liboso ya kolala. Poná ngonga oyo omoni ete ekozala malamu mpo na yo, mpe soki ezali kosimba te okoki kopona ngonga mosusu tii ekosimba. Alice alobi boye: “Eloko esalisaka ngai natosaka programɛ na ngai ya kotánga mbala na mbala yango oyo: nabongolaka ngonga ya botángi, soki esengeli.”
Bilenge baklisto mosusu, bamityelá programɛ ya kotánga Biblia miniti 10 to 15 mokolo na mokolo. Na ndenge wana, bakoki kotánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula moko to mibale! Ata soki omoni ete okokoka kosala lokola bango te, zwá mokano ya kotánga mwa bavɛrsɛ ya Biblia mikolo nyonso. Soki otii molende mpo na kotosa ntango oyo obongisi mpo na kotánga Biblia, okokóma kolinga Liloba ya Nzambe makasi.—Nzembo 119:97; 1 Petelo 2:2.
Bondelaká mpo ozwa mayele
Ya solo, ata bato oyo batángaka Biblia mbala na mbala, bakutanaka na bisika mosusu ya Liloba ya Nzambe oyo ezalaka mpasi mpo básimba ntina na yango. Yehova Nzambe, Mobandisi ya Biblia, alingi okanga ntina ya Liloba na ye. Na buku ya Misala, ezali na lisolo ya Moetiopia moko oyo azalaki na mobembo, akokaki te kokanga ntina ya esakweli ya Yisaya na mokapo 53. Mobali yango amonaki ntina ya kosɛnga moto asalisa ye, mpe anzelu ya Yehova atindelaki ye misionɛrɛ Filipo alimbolela ye esakweli yango.—Misala 8:26-39.
Yango wana, mpo na kotánga Biblia malamu, osengeli kobanda kotánga mbala moko te kasi salá naino libondeli. Bato mingi bakómá na momeseno ya kobondela Yehova mpo na kozwa mayele ya kokanga ntina liboso kutu ya kofungola Biblia mpe kotya motema na mateya oyo batángaka. (2 Timote 2:7; Yakobo 1:5) Kutu, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa yo mpo bavɛrsɛ ya Biblia ezongela yo na makanisi mpo ete esalisa yo na koyanola na mituna to koyikela komekama mpiko.
Elenge moklisto moko ayebisi ete: “Ntango nazalaki na mbula 12, Tata asundolaki biso. Na butu moko boye ntango nazalaki kobondela na mbeto, nasɛngaki Yehova azongisela biso Tata na ndako. Nsima nakamataki Biblia na ngai mpe natángaki Nzembo 10:14: “Moto na mpasi akomipesa epai na yo [Yehova], yo ozali mosungi na etike. [Yo moko okómi mosungi na ye, NW].” Nafandaki nyɛɛ mwa ntango molai. Nayokaki lokola Yehova azali koloba na ngai mpe koyebisa ngai ete ye azali mosungi na ngai, azali Tata na ngai. Tata nani ya malamu lokola ye nakokaki kozwa lisusu?
Okoki komesana kobondelaka ntango nyonso liboso obanda kotánga Biblia? Adrien apesi likanisi oyo: “Bondelá liboso ya kotánga mpe bondelá lisusu na nsima—ekokóma mpenza lisolo kati na yo na Yehova.” Kobondela mpenza na motema mobimba ekosalisa yo mpo otosa malamu ekateli na yo ya kotánga Biblia na ngonga oyo oponaki mpe ekosala ete boninga na yo na Nzambe ekóma makasi.—Yakobo 4:8.
Salá lokola ozali komona makambo oyo ozali kotánga na Biblia
Mpo na Karine, oyo tolobelaki na ebandeli, Biblia ezalaki kolɛmbisa ye. Ya solo, Biblia ezali buku moko ya kala—ekomamá kala liboso biloko lokola ordinatɛrɛ, televizyo to mpɛpɔ ebima—mpe bato oyo Biblia elobelaka, bakufá eleká bankóto ya bambula. Nzokande, ntoma Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Ndenge nini buku ya kalakala boye ekoki kozala na nguya?
Na mikolo ya mokomi Ezela, bankóto ya mibali, basi mpe ‘banso oyo bazalaki na mayele oyo ebongi mpo na koyoka’ bayanganaki na Yelusaleme mpo báyoka botángi ya Mobeko ya Mose. Mobeko yango esilaki kosala mbula koleka 1 000 na ntango wana! Kasi, Ezela na bato oyo bazalaki kosalisa ye “batángaki kati na mokanda na Mobeko na Njambe polele; mpe [bamonisaki ntina na yango malamumalamu, ete bákanga ntina mpenza ya makambo bazalaki kotánga, NW].” Mbuma nini emonanaki ntango mibali yango balimbolaki Makomami mpe bamonisaki polele ntina ya makambo bazalaki kotánga? “Bato nyonso bakendaki na bango mpo na kolya mpe komɛla mpe kotinda makabo mpe kosepela mingi mpo ete basili kososola maloba masakwelamaki bango.”—Nehemia 8:1-12.
Ndenge nini okoki kosala mpo na ‘komonisa ntina malamumalamu’ ya makambo ozali kotánga na Biblia? Katia, oyo mpo na ye kotánga Biblia ezalaka kilo, atángaka na mongongo makasi mpo ete makanisi na ye etambolatambola te. Nadia amekaka komitya na kati ya lisolo. Alobi ete: “Nakanisaka boye, soki ngai nazalaka na esika yango nalingaki namiyoka ndenge nini? Lisolo oyo nasepelaka na yango mingi koleka nyonso ezali lisolo ya Luta na Naomi. Natángá yango mbala na mbala. Ntango nakendeki kofanda na engumba mosusu, nabɔndisamaki na lisolo yango mpamba te namiyokaki lokola Luta ayokaki ntango akendeki na mboka mopaya epai ayebaki moto te. Namonaki ndenge atyelaki Yehova motema mpe yango esalisaki ngai mpenza mpo nasala bongo.”—Luta, mikapo 1-4.
Mpo Biblia ‘ezala na nguya,’ esɛngaka komanyola. Mbala nyonso ozali kotánga, kanisá naino likoló ya bavɛrsɛ outi kotánga mpe talelá lolenge nini okosalela makambo outi komona. Okoki mpe koluka koyeba makambo mingi lisusu ntango ozali kotánga Biblia, soki ozali mpe kotalela mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo Batatoli ya Yehova babimisaka.b
Kolɛmba kotánga te!
Kotosa programɛ ya kotánga Biblia ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Ata baprogramɛ ya malamu mpenza ya kotánga Biblia, esɛngaka bambala mosusu ebongisama lisusu. Ndenge nini okoki kosala ete olɛmba te kotánga Biblia mokolo na mokolo?
Baninga na yo mpe libota na yo bakoki kosalisa yo. Amélie, elenge mwasi ya mbula 15, alobi boye: “Nalalaka shambre moko na leki na ngai ya mwasi. Na butu mosusu, soki nalɛmbi makasi etindaka ngai nalala mbala moko, kasi leki na ngai ayebisaka ngai nabosana kotánga Biblia te. Yango wana, mwaye nabosana ezalaka te!” Soki omoni vɛrsɛ moko boye to mokapo moko oyo esepelisi yo, yebisá bato mosusu. Okokóma kosepela na Liloba ya Nzambe makasi mpe ekoki ntango mosusu kopesa bato yango mposa bátánga Biblia. (Baloma 1:11, 12) Soki ozangisi kotánga mokolo moko to mikolo mingi, kotika te! Zongelá kaka esika osukaki, mpe tyá molende mpo olandela programɛ na yo.
Kobosana te ete matomba ya malamu mingi ezwamaka na kotánga Biblia mokolo na mokolo. Okozwa esengo ya kozala moninga ya motema ya Yehova soki ozali koyokela ye na nzela ya Liloba na ye. Okobanda koyeba makanisi na ye mpe ndenge amiyokaka. (Masese 2:1-5) Mateya ya solo wana ya motuya mingi oyo eutaka na Tata na biso ya likoló ekobatela yo. Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Elenge mobali akopɛtola nzela na ye na nini? Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo.” (Nzembo 119:9) Na bongo, bandá kotánga Biblia mpe kotika te kotánga yango. Okokamwa ndenge ekosepelisa yo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nkasa 16-17, epesi toli ya malamu mpo na kosalisa yo oyekola Biblia na mozindo.
[Bililingi na lokasa 18]
Kobondela mpe koluka na mikanda mosusu ekokómisa kotánga na yo ya Bibila kitoko mpe ekosalisa yo okanga ntina ya Makomami
[Elilingi na lokasa 19]
Komitya na esika ya bato oyo balobeli na lisolo oyo ozali kotánga ekosalisa yo okanga ntina ya Makomami malamumalamu