Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Janvier nk. 20-21
  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boombo na ntango ya Bayisalaele
  • Boombo na ntango ya baklisto
  • Nzambe andimaka ete bato bázala baombo?
    Lamuká!—2011
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • Sɛkɛlɛ oyo babombá yango makasi
    Lamuká!—2000
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Janvier nk. 20-21

Engebene Biblia

Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?

BATO moindo oyo bazali kotɔka na molunge basali molɔngɔ molai mpe bazali kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ, mokɔngɔ egumbami na nse ya basaki mineneminene ya ntokya (coton). Bakapita ya motema mabe bazali kobɛta bango fimbo mpo bátambola. Bana bazali koganga ntango bazali kobɔtɔla bango na mabɔkɔ ya bamama na bango oyo bazali kolela mpo bakei kotɛka bango epai ya bato oyo bazali na mbongo mingi. Ezali makambo ya nsɔmɔ, yango eyaka na makanisi soki okanisi likambo ya boombo.

Likambo ya kokamwa, balobaka ete bato oyo bazalaki kosomba bato mpe baoyo bazalaki kotɛka bato yango bazalaki bato oyo bamipesaki mingi na mangomba na bango. James Walvin, mokomi ya makambo ya kala akomaki boye: “Ezalaki na bankama ya bato ya lolenge yango, na Mpoto lokola mpe na Amerika, baoyo, ntango bazalaki kobalola masuwa na bango ya komema baombo mpo na kozonga na mikili ya Amerika, bazalaki kokumisa Nkolo mpo ete apambolaki mosala na bango na Afrika, oyo epesi litomba mpe elekaki malamu mpenza.”

Bato mingi bazalaki kokanisa ete Nzambe andimaki mombongo ya kotɛka bato. Na ndakisa, na 1842, Alexander McCaine asalaki lisukulu liboso ya ebongiseli moko ya Lingomba ya Metodiste (Conférence générale de l’Église méthodiste) mpe alobaki ete “Nzambe ye moko nde atyaki” boombo. McCaine alobaki solo? Nzambe azalaki kondima ete mibali bákangaka bana basi ya mike na makasi mpo na kosangisa na bango nzoto, azalaki kondima kokabola mabota ya bato na nko nyonso, mpe minyoko ya kobɛta oyo ezalaki kotambola nzela moko na boombo na ntango ya McCaine? Bongo tokoloba nini mpo na bamilio ya bato oyo lelo basengeli kobika mpe kosala misala na kati ya minyoko ya nsɔmɔ lokola baombo? Nzambe andimaka ezaleli mabe wana ya konyokola bato?

Boombo na ntango ya Bayisalaele

Biblia elobi ete “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Mbala mosusu ezali kati na boombo, oyo moto abandisá, nde likambo yango ezali komonana polele mpenza. Yehova Nzambe akangi miso te na mpasi oyo boombo epesi bato.

Tókamata lokola ndakisa likambo moko oyo ekómelaki Bayisalaele. Biblia eyebisi biso ete Baezipito “bazalisaki mikolo na bango na mpasi mpo na misala makasi na biliki mpe na pɔtɔpɔtɔ mpe na misala na ndenge nyonso na elanga, mpe na misala na bango nyonso babakisaki yango makasi.” Bayisalaele “bakimelaki na boombo na bango mpe balelaki ete básungama mpe kolela na bango kati na boombo ekómaki epai na Nzambe.” Yehova akangaki matoi na kolela na bango? Soko moke te! “Nzambe ayokaki mpe [kolela, NW] na bango mpe Nzambe akanisaki kondimana kati na ye na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo.” Lisusu, Yehova ayebisaki bato na ye boye: “Nakobimisa bino na misala na Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango.”​—Exode 1:14; 2:23, 24; 6:6-8.

Emonani polele ete Yehova alingaka te ete ‘moto moko azala na bokonzi likoló na mosusu’ na nzela ya boombo. Kasi na nsima Nzambe apesaki nzela te ete bato mosusu bázala baombo kati na bato na ye? Ya solo, Nzambe apesaki yango nzela. Nzokande, lolenge ya boombo oyo ezalaki na Yisalaele ekesanaki mpenza na mitindo ya boombo oyo enyokoli bato na boumeli ya lisolo mobimba ya bato.

Mibeko ya Nzambe elobaki ete esengeli kopesa moto oyo akangi moninga mpe atɛki ye etumbu ya liwa. Lisusu Yehova apesaki mibeko mpo na kobatela baombo. Na ndakisa, moombo oyo nkolo na ye abebisi enama moko ya nzoto na ye, asengelaki kosikolama na boombo. Soko moombo moko akufi mpo na kobɛta oyo nkolo na ye abɛtaki ye, nkolo na ye akokaki kozwa etumbu ya liwa. Basi oyo bakangaki bango na etumba bakokaki kokóma baombo, to basi ya libala ya bankolo na bango. Kasi bakokaki te kotalela bango lokola biloko mpamba mpo na kosangisa na yango nzoto. Mibeko ezalaki kosalisa Bayisalaele ya mitema sembo ete bátalela baombo na bango na limemya mpe na boboto lokola bato ya mosala oyo bazali kofuta bango.​—Exode 20:10; 21:12, 16, 26, 27; Levitike 22:10, 11; Deteronome 21:10-14.

Bayuda mosusu bamikómisaki bango moko baombo ya bandeko na bango Bayuda mpo bákoka kofuta nyongo na bango. Ebongiseli yango esalisaki bato mosusu bákufa na nzala te mpe esalisaki bamosusu mingi bálongwa na bobola. Lisusu, na bileko mosusu ya mbula kati na manaka ya Bayuda, baombo bazalaki kozwa bonsomi na bango, soki balingi.a (Exode 21:2; Levitike 25:10; Deteronome 15:12) Moses Mielzer, Moyuda moko moto ya mayele alobi ete “moombo azalaki ntango nyonso moto, bazalaki kotalela ye lokola moto oyo azali na ntomo ya makambo mosusu lokola bato mosusu, makambo oyo nkolo na ye akokaki te koboyela ye yango kozanga kozwa etumbu.” Yango ekeseni mpenza na boombo oyo enyokolaki mpenza bato, ndenge emonani na lisolo ya bato!

Boombo na ntango ya baklisto

Na Bokonzi ya Baloma, na ntango ya baklisto ya ekeke ya liboso, boombo ezalaki. Na yango, baklisto mosusu bazalaki baombo, mpe bamosusu na kati na bango bazalaki na baombo. (1 Bakolinti 7:21, 22) Yango elimboli ete bayekoli ya Yesu bazalaki konyokola baombo na bango? Soki moke te! Ata soki mibeko ya Baloma epesaki nzela na minyoko, tosengeli kondima ete baklisto bazalaki konyokola baombo na bango te. Ntoma Paulo alendisaki kutu Filemona ete akamata Onesimo, moombo na ye oyo akómaki moklisto, lokola “ndeko.”b​—Filemona 10-17.

Na esika moko te na Biblia emonisi ete mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete bato bákómisa baninga na bango baombo. Lisusu, esakweli moko te na Biblia emonisi ete na mokili ya sika ya Nzambe, bato bakozala baombo ya baninga na bango. Kasi nde, na paladiso oyo ekoya, bato ya sembo “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na nzete na ye ya mosuke.”​—Mika 4:4.

Emonani polele ete Biblia endimaka te lolenge nyonso ya konyokola bato. Kasi ezali kolendisa bato ete bápesanaka limemya mpe bámonaka ete bakokani. (Misala 10:34, 35) Ezali kolendisa bato ete básalela bamosusu makambo oyo bango balingi ete bamosusu básalela bango. (Luka 6:31) Lisusu, Biblia ezali kolendisa baklisto ete, na komikitisa nyonso, bátalela bamosusu lokola nde ete baleki bango, ata soko bazali bato ya lokumu, ya bozwi mingi to babola. (Bafilipi 2:3) Mitinda yango ezali kokokana soki moke te na lolenge ya boombo oyo enyokolaki mpenza bato na bikólo mingi, mingimingi na bikeke oyo euti koleka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lokola mibeko epesaki nzela na baombo mosusu ete bátikala na bankolo na bango, yango emonisi polele ete baombo na Yisalaele bazalaki konyokolama te.

b Ndenge moko na mikolo na biso, baklisto mosusu bazali bapatrɔ, bamosusu mpe bazali basali. Lokola moklisto asengeli te konyokola mosali na ye, na ekeke ya liboso mpe bayekoli ya Yesu bazalaki kotalela basali na bango ndenge mibeko ya boklisto ezalaki kosɛnga.​—Matai 7:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto