Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/11 nk. 24-25
  • Nzambe andimaka ete bato bázala baombo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaka ete bato bázala baombo?
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge makambo ezalaki kotambola eyokani te na mitinda ya Biblia
  • Ndenge oyo Biblia elobeli boombo
  • Ndenge oyo boombo ekosuka
  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?
    Lamuká!—2002
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • “Bosombamaki na motuya moko boye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 10/11 nk. 24-25

Biblia elobi nini?

Nzambe andimaka ete bato bázala baombo?

MOKO na mateya minene ya Biblia elobaka ete moto asengeli kolinga mozalani na ye. Nzokande, kolinga moto eyokani ata moke te na kokómisa moto moombo mpe konyokola ye. Yango wana, bato mosusu bakamwaka ete Biblia elobeli boombo.

Na ntango ya kala, Nzambe atikaki nzela ete basaleli na ye bázala na baombo. (Ebandeli 14:14, 15) Ata na ntango ya bantoma, bakristo mosusu bazalaki na baombo mpe bamosusu bazalaki baombo. (Filemo 15, 16) Yango elingi nde koloba ete Nzambe andimaka moto azala moombo?

Ndenge makambo ezalaki kotambola eyokani te na mitinda ya Biblia

Ntango Biblia ebandaki kokomama, bato basilaki kotya mibeko oyo ezalaki kotambwisa mboka mpe ebongiseli ya nkita oyo eyokani te na makambo oyo Nzambe andimaka. Atako Mibeko ya Moize epekisaki makambo yango mosusu, Nzambe atikaki nzela na makambo mosusu, na ndakisa likambo ya boombo.

Na likambo etali ndenge makambo ezalaki kotambola na Yisraele, buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi ete: “Mboka esengelaki kozala lokola nde bato nyonso bazali bandeko, babola basengelaki kozala te [mpe esengelaki te] kolyela basi oyo mibali bakufá, bato oyo bazangi bisika ya kofanda to bitike.” Na yango, na esika atika kaka ebongiseli mpe makambo ya nkita oyo ezalaki na ntango wana, Nzambe atyaki mibeko oyo, soki batosi yango, bakonyokola baombo te, kasi bakosalela bango makambo na boboto.

Ndenge oyo Biblia elobeli boombo

Tótalela makambo oyo ezali na Mibeko oyo Nzambe apesaki Moize:

● Moto oyo akangi moto mosusu mpe atɛki ye na boombo azalaki kozwa etumbu ya liwa. (Kobima 21:16) Kasi, soki bibongiseli nyonso oyo ezwamaki mpo na kobatela bato bákóma babola te esimbi te, mpe Moyisraele moko akómi na nyongo ya monene, mbala mosusu mpo asalelaki mbongo mabe, akokaki komitɛka na boombo. Na ntango mosusu akokaki kutu kozwa mbongo mingi oyo ekokaki kosalisa ye alongwa na boombo.​—Balevi 25:47-52.

● Boombo yango ezalaki te ya konyokola bato, ndenge ezalaki kosalema na mikili mingi na ntango wana. Balevi 25:39, 40 elobi ete: “Soki ndeko na yo oyo azali elongo na yo akómi mobola mpe asengeli komitɛka epai na yo, osengeli te kosalela ye lokola moto oyo asalaka mosala makasi ya boombo. Akozala elongo na yo lokola mosali oyo azwaka lifuti, lokola moto oyo autá na mboka mosusu.” Ezalaki mpenza ebongiseli ya malamu mpo na Bayisraele oyo bazalaki babola makasi.

● Mibeko elobaki ete moto oyo bakangi ye ete ayibi, kasi azali na likoki te ya kozongisa eloko oyo ayibi akokaki kotɛkama na boombo mpe na ndenge yango kofuta nyongo na ye. (Kobima 22:3) Soki asilisi kofuta nyongo, akoki kokóma na bonsomi.

● Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele epesaki nzela te na konyokola baombo. Atako bapesaki bankolo ndingisa ya kopesa baombo etumbu, basengelaki kolekisa ndelo te. Soki moto abomi moombo na ye, asengelaki kofuta nyongo ya makila. (Kobima 21:20) Soki bakati moombo enama ya nzoto, to balongoli ye lino to mpe babomi ye liso, asengelaki kozwa bonsomi.​—Kobima 21:26, 27.

● Moyisraele asengelaki kozala moombo koleka mbula motoba te. (Kobima 21:2) Bayuda oyo bazalaki baombo bazalaki kozwa bonsomi soki bakómi na mbula ya nsambo. Mibeko elobaki ete nsima ya mbula 50 nyonso, na ekólo mobimba baombo basengelaki kozwa bonsomi, ata soki baumelaki naino te na boombo.​—Balevi 25:40, 41.

● Ntango moto alongwe na boombo, nkolo na ye asengelaki kokabela ye biloko. Kolimbola Mibeko 15:13, 14 elobi boye: “Soki otiki ye alongwa epai na yo akende, azwi bonsomi, osengeli te kotika ye akende mabɔkɔ mpamba. Okopesa mpenza ye eloko oyo euti na etonga na yo ya bampate mpe na esika na yo ya kotutatuta mbuma mpe na mafuta na yo mpe na ekamwelo na yo ya vinyo.”

Na nsima, na ntango ya Yesu mpe ya bantoma, bato mingi ya Roma bazalaki kozwa baombo. Ntango mateya ya bokristo ezalaki kopalangana, bakokaki kopekisa te ete bato oyo bazalaki baombo mpe baoyo bazalaki na baombo báyoka nsango malamu mpe bákóma bakristo. Yesu Kristo ye moko to mpe bantoma na ye bateyaki te ete esengeli kopekisa boombo; balukaki te kobongola ndenge makambo ezalaki kotambola na ntango wana. Kutu, bapesaki baombo ná bankolo ya baombo toli ete bálingana lokola bandeko.​—Bakolose 4:1; 1 Timote 6:2.

Ndenge oyo boombo ekosuka

Lokola makambo mosusu nyonso ya Biblia, esengeli kotalela likambo ya boombo na ndenge oyo makambo ezalaki ntango bato bazalaki na baombo. Soki tolandi Biblia malamu, tokomona ete Nzambe asepelaka te ete bato bányokwama.

Tokomona mpe ete basaleli ya Nzambe bazalaki konyokola baombo te ndenge bato mingi bakanisaka lelo oyo. Biblia emonisi mpe ete Nzambe akosilisa lolenge nyonso ya boombo na ntango oyo atye. Na ntango wana, bato nyonso bakozala na bonsomi ya solosolo.​—Yisaya 65:21, 22.

OSILÁ KOMITUNA?

● Biblia endimaka konyokola baombo?​—Balevi 25:39, 40.

● Ndenge nini bakristo bazalaki kosalela baombo makambo?​—Bakolose 4:1.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]

Nzambe asepelaka te ete bányokola bato

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

© G.M.B. Akash/​Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto