“Bosombamaki na motuya moko boye”
“Bosombamaki na motuya moko boye. Ɛɛ, bópesaka Nzambe nkembo.”—1 Bakolinti 6:20.
1, 2. (a) Mibeko ya Moize esɛngaki ete básalelaka Bayisalaele oyo bazalaki baombo makambo ndenge nini? (b) Moombo oyo alingi nkolo na ye akokaki kozwa ekateli nini?
DIKSIONƐRƐ moko (Holman Illustrated Bible Dictionary) elobi boye: “Na ntango ya kala, baombo bazalaká mingi mpe bato bazalaki komona yango mabe te. . . . Nkita ya Ezipito, ya Grèce, mpe ya Loma ezalaki kouta na mosala ya baombo. Na ekeke ya liboso, na Italie, moto moko na kati ya bato misato azalaki moombo mpe na bikólo mosusu, moto moko na kati ya bato mitano azalaki moombo.”
2 Atako baombo bazalaki mpe na Yisalaele, Mibeko ya Moize ezalaki na bibongiseli mpo na kobatela bango. Na ndakisa, Mibeko epekisaki Moyisalaele asala lokola moombo koleka mbula motoba. Na mbula ya nsambo, asengelaki ‘kokende nsomi, akofuta mpe te.’ Kasi, lokola Mibeko elingaki te básalela baombo makambo na kozanga boboto, elobaki mpe boye: “Soki nde moombo alobi polele ete, Nalingi nkolo na ngai mpe mwasi na ngai mpe bana na ngai, mpe nakokenda nsomi te, [boye] nkolo na ye akoya na ye epai na ekuke soki epai na likonzi na yango. Nkolo na ye akotɔbɔla litoi na ye na nsete, mpe ye akosalela ye seko.”—Exode 21:2-6; Levitike 25:42, 43; Deteronome 15:12-18.
3. (a) Baklisto ya liboso bandimaki boombo ya ndenge nini? (b) Eloko nini etindaka biso tósalela Nzambe?
3 Ebongiseli ya kondima kotikala moombo ezalaki elilingi ya boombo ya baklisto ya solo. Na ndakisa, bakomi ya Biblia lokola Paulo, Yakobo, Petelo mpe Yuda, bamibengaki baombo ya Nzambe mpe ya Klisto. (Tito 1:1; Yakobo 1:1; 2 Petelo 1:1; Yuda 1) Paulo akundwelaki baklisto ya Tesaloniki ete ‘babongwanaki epai ya Nzambe kotikáká bikeko na bango mpo na kosala lokola baombo mpo na Nzambe moko ya bomoi mpe ya solosolo.’ (1 Batesaloniki 1:9) Nini etindaki baklisto yango bándima kokóma baombo ya Nzambe? Tókanisa naino, nini ezalaki kotinda Moyisalaele oyo azali moombo aboya kozwa bonsomi? Ezalaki bolingo mpo na nkolo na ye. Bolingo mpo na Nzambe nde etindaka baklisto bázala baombo na ye. Ntango toyebi Nzambe ya solo mpe ya bomoi mpe tozali na bolingo mpo na ye, yango etindaka biso tósalela ye “na motema na [biso] mobimba mpe na molimo na [biso] mobimba.” (Deteronome 10:12, 13) Kasi, kozala moombo ya Nzambe mpe ya Klisto elimboli nini? Ndenge nini yango etalelaka bomoi na biso ya mokolo na mokolo?
“Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”
4. Ndenge nini tokómaka baombo ya Nzambe mpe ya Klisto?
4 Moombo azali “mosaleli ya moto moko to ya bato mpe asengeli kotosa na makambo nyonso.” Tokómaka bato ya Yehova ntango tomipesi epai na ye mpe tozwi batisimo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bozali bato na bino moko te, mpo bosombamaki na motuya moko boye.” (1 Bakolinti 6:19, 20) Motuya yango ezali mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso, mpamba te mbeka yango nde esalaka ete Nzambe andima biso tózala basaleli na ye lokola baklisto bapakolami to baninga na bango oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé. (Baefese 1:7; 2:13; Emoniseli 5:9) Yango wana, banda na ntango tozwi batisimo, “tozali bato ya Yehova.” (Baloma 14:8) Lokola tosombamaki na makila ya motuya ya Yesu Klisto, tozali mpe baombo na ye mpe tosengeli kotosa bakomandema na ye.—1 Petelo 1:18, 19.
5. Lokola tozali baombo ya Yehova, nini ezali mokumba na biso ya libosoliboso, mpe ndenge nini tokoki kokokisa yango?
5 Baombo basengeli kotosa nkolo na bango. Biso moko tolingaki kokóma baombo ya Nkolo na biso mpe bolingo na biso mpo na ye nde etindaka biso. Mokapo ya 1 Yoane 5:3 elobi boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” Na yango, botosi nde emonisaka bolingo mpe limemya na biso. Emonanaka na makambo nyonso oyo tosalaka. Paulo alobaki boye: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Mokolo na mokolo, ata na makambo ya mikemike, tosengeli komonisaka ete ‘tosalelaka Yehova lokola baombo.’—Baloma 12:11.
6. Kozala moombo ya Nzambe esɛngaka kosala nini ntango tozali kozwa bikateli? Pesá ndakisa.
6 Na ndakisa, ntango tozali kozwa bikateli, tosengeli koluka koyeba mokano ya Yehova, Nkolo na biso oyo azali na likoló. (Malaki 1:6) Botosi na biso epai ya Nzambe emekamaka na ntango oyo tosengeli kozwa bikateli ya mpasi. Tokolanda toli na ye to tokolanda motema na biso oyo ezali na “bokosi” mpe na “mabe mingi”? (Yilimia 17:9) Ntango Melisa, moklisto moko oyo azali monzemba, azwaki batisimo, mwa moke na nsima, elenge mobali moko akómaki kosepela na ye. Elenge mobali yango azalaki komonana ete azali moto malamu, mpe azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Atako bongo, nkulutu moko amonisaki Melisa ntina ya kotosa komandema ya Yehova ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:39; 2 Bakolinti 6:14) Melisa alobi boye: “Ezalaki likambo moke te mpo nandima toli wana. Kasi namonaki ete lokola namipesaki epai ya Nzambe mpo na kosala mokano na ye, nasengeli kotosa malako na ye.” Ntango akanisaka makambo oyo elekaki na nsima, alobi boye: “Nazali na esengo lokola nalandaki toli wana. Mobali yango atikaki koyekola Biblia. Soki nakangamaki na ye kaka mbɛlɛ nabalá moto oyo azali mondimi te.”
7, 8. (a) Mpo na nini tosengeli kolukaka te kosepelisa bato? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kolonga kobanga bato.
7 Lokola tozali baombo ya Nzambe, tosengeli te kokóma baombo ya bato. (1 Bakolinti 7:23) Ya solo, moto moko te asepelaka bato bálinga ye te, kasi tosengeli kobosana te ete biso baklisto tozali na mitinda oyo ekesenisaka biso na bato ya mokili. Paulo atunaki boye: “Nazali nde koluka kosepelisa bato?” Asukisaki boye: “Soki nazalaki naino kosepelisa bato, mbɛlɛ nazali moombo ya Klisto te.” (Bagalatia 1:10) Tosengeli te kolanda baninga mpe koluka kosepelisa bato. Kasi, tokosala nini soki bato bazali kotya biso mbamba mpo tósala makambo lokola bango?
8 Tózwa ndakisa ya Elena, moklisto moko oyo azali elenge na Espagne. Baninga na ye mingi ya kelasi bazalaki kopesa makila na bango mpo bázongisaka bato mosusu. Baninga yango bayebaki ete lokola Elena azali Motatoli ya Yehova, akoki kopesa makila na ye te to kondima bázongisa ye makila. Ntango Elena azwaki libaku ya kolimbwela baninga na ye nyonso ya kelasi makanisi na ye, Elena asɛngaki asala lisolo moko. Alobi boye: “Lokuta mabe, nazalaki kobanga makasi. Kasi, namibongisaki malamu, mpe yango ebimisaki likambo oyo nakanisaki te. Baninga na ngai mingi ya kelasi bakómaki komemya ngai, mpe molakisi ayebisaki ngai ete asepelaki na mosala na ngai. Likambo eleki ntina, nasepelaki mingi lokola nakumisaki nkombo ya Yehova mpe nalimbolaki polele makanisi na ngai oyo euti na Biblia.” (Genese 9:3, 4; Misala 15:28, 29) Ya solo, biso baombo ya Nzambe mpe ya Klisto tokeseni na bato mosusu. Nzokande, soki tozali kokakatana te mpo na kolobela bindimeli na biso, bato bakomemya biso.—1 Petelo 3:15.
9. Liteya nini tozwi epai ya anzelu oyo abimelaki ntoma Yoane?
9 Soki tozali kobosana te ete tozali baombo ya Nzambe, yango ekoki mpe kosalisa biso tózalaka ntango nyonso na komikitisa. Ntoma Yoane akamwaki mingi ntango amonaki Yelusaleme ya likoló na emonaneli moko ya nkembo; yango wana, akweaki mpo na kosambela liboso ya makolo ya anzelu oyo Nzambe atindaki. Anzelu alobaki na ye ete: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali kaka moninga na yo moombo mpe ya bandeko na yo oyo bazali basakoli mpe ya baoyo bazali kotosa maloba ya rulo oyo. Sambelá Nzambe.” (Emoniseli 22:8, 9) Anzelu yango apesaki ndakisa malamu mpenza mpo na baombo nyonso ya Nzambe! Baklisto mosusu bakoki kozala na mikumba ya minene na lisangá. Atako bongo, Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.” (Matai 20:26, 27) Lokola tozali bayekoli ya Yesu, biso nyonso tozali baombo.
“Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala”
10. Tángá bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo Biblia elobi ete bakakatanaki mpo na kosala mokano ya Nzambe.
10 Kosala mokano ya Nzambe ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bato ya kozanga kokoka. Mosakoli Moize akakatanaki ntango Yehova atindaki ye akende kobimisa bana ya Yisalaele oyo bazalaki baombo na Ezipito. (Exode 3:10, 11; 4:1, 10) Ntango Nzambe atindaki Yona akende kosakola epai ya bato ya Ninive ete akopesa bango etumbu, mosakoli yango “atɛlɛmaki mpo na kokima epai na Talasisi longwa na liboso ya [Yehova].” (Yona 1:2, 3) Baluku, sekrɛtɛrɛ ya mosakoli Yilimia, azalaki komilelalela ete alɛmbi. (Yilimia 45:2, 3) Tosengeli kosala nini ntango bamposa ya motema na biso eyokani te na makambo oyo Nzambe alingi tósala? Ndakisa moko oyo Yesu apesaki ekosalisa biso tózwa eyano.
11, 12. (a) Lobelá na mokuse ndakisa ezali na Luka 17:7-10, oyo Yesu apesaki. (b) Liteya nini tozwi na ndakisa wana?
11 Yesu alobelaki moombo moko oyo alekisaki mokolo mobimba na elanga mpo na kobatela bibwɛlɛ ya nkolo na ye. Ntango moombo akómaki na ndako na kolɛmba nyonso nsima ya kosala mosala makasi ngonga 12, nkolo na ye alobaki na ye te ete afanda mpe alya. Kutu, nkolo alobaki boye: “Bongiselá ngai mwa eloko mpo nalya bolei na ngai ya mpokwa, mpe latá elamba ya mosala mpe salelá ngai tii nakosilisa kolya mpe komɛla, mpe na nsima yo okokoka kolya mpe komɛla.” Moombo akokaki kokokisa bamposa na ye kaka soki asilisi kosalela nkolo na ye. Nsima ya kopesa ndakisa wana, Yesu asukisaki na maloba oyo: “Bongo bino, mpe, ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete, ‘Tozali na biso baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’”—Luka 17:7-10.
12 Soki Yesu apesaki ndakisa yango, ezali te mpo na komonisa ete Yehova amonaka mpamba mosala oyo tosalelaka ye. Biblia elobi polele ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Nzokande, likanisi ya ntina na ndakisa ya Yesu ezali ete moombo akoki te komisepelisa to koluka liboso bolamu na ye moko. Ntango tomipesaki na Nzambe mpe toponaki kozala baombo na ye, tondimaki kotya mokano na ye liboso ya bamposa na biso. Tosengeli kotya mokano ya Nzambe liboso ya bamposa na biso.
13, 14. (a) Ntango nini tosengeli kolonga bamposa ya motema na biso? (b) Mpo na nini tosengeli kotyaka mokano ya Nzambe na esika ya liboso?
13 Kozala na momeseno ya koyekola Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ekoki kosɛnga biso tósala milende mpenza. (Matai 24:45) Ekoki kozala bongo mingimingi soki tomesaná kotánga te to soki mokanda oyo tolingi koyekola ezali kolobela “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10) Kasi, tosengeli kobongisaka ntango mpo na koyekola. Ntango mosusu, ekoki kosɛnga tómityela mibeko mpo na kofanda mpe koyekola. Kasi, soki tosali yango te, tokokolisa mpe te na mitema na biso mposa ya “bilei ya makasi [oyo] ezali ya bato oyo bakɔmeli.”—Baebele 5:14.
14 Ezali boni soki tolɛmbi mingi ntango tozongi na ndako nsima ya kosala mosala mokolo mobimba? Mbala mosusu tosengeli kosala makasi mpo na kokende na makita. Mbala mosusu tozalaka na mokakatano mpo na kosakola epai ya bato oyo toyebi bango te. Ata Paulo ye moko alobaki ete ekoki kokóma ntango mosusu tósakola nsango malamu ‘kozanga ete tópusama na bolingo malamu.’ (1 Bakolinti 9:17) Nzokande, tosalaka makambo yango mpamba te Yehova, Nkolo na biso oyo azali na likoló, oyo tolingaka, atindi biso tósala yango. Longola yango, biso moko mpe tomonaka ete soki tosali kaka makasi mpe toyekoli, to tokei na makita, to mpe tobimi na mosala ya kosakola, tomiyokaka malamu mpe tokómaka na esengo, boye te?—Nzembo 1:1, 2; 122:1; 145:10-13.
Tótala te “biloko ezali na nsima”
15. Na ndenge nini Yesu apesaki ndakisa malamu ya botosi epai ya Nzambe?
15 Yesu Klisto atosaki Tata na ye ya likoló na makambo nyonso. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 6:38) Ntango azalaki kotungisama makasi na elanga ya Getesemane, abondelaki boye: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, tiká ete kɔpɔ oyo eleka mosika na ngai. Nzokande, ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.”—Matai 26:39.
16, 17. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela biloko oyo totiki nsima? (b) Monisá ete Paulo amikosaki te ndenge atalelaki makambo oyo akokaki kozwa na mokili ete ezali “liboke ya bosɔtɔ.”
16 Yesu Klisto alingi ete tózonga nsima te na ekateli tozwaki ya kozala baombo ya Nzambe. Alobaki boye: “Moto moko te oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko ezali na nsima abongi malamu na bokonzi ya Nzambe.” (Luka 9:62) Ntango tozali kosalela Nzambe lokola baombo, ebongi te tokanisaka biloko oyo totiki nsima. Tosengeli nde kosepelaka makasi na oyo tozwi na ndenge toponi kozala baombo ya Nzambe. Paulo akomelaki Bafilipi boye: “Nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso ete ezali biloko ebungá mpo na motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nandimi kobunga ya biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola liboke ya bosɔtɔ, mpo nazwa Klisto.”—Bafilipi 3:8.
17 Kanisá makambo nyonso oyo Paulo azalaki kotalela lokola liboke ya bosɔtɔ mpe atikaki mpo na kozala moombo ya Nzambe mpe kozwa matomba ya elimo. Atikaki bomoi ya malamu na mokili, bakisa mpe libaku ya kokóma mokonzi monene ya Lingomba ya Bayuda. Soki Paulo atikalaki na Lingomba ya Bayuda, akokaki kokóma moto monene lokola Simeona, mwana ya Gamaliele, molakisi ya Paulo. (Misala 22:3; Bagalatia 1:14) Simeona akómaki mokonzi na Lingomba ya Bafalisai mpe, atako azalaki mpe kokakatana mwa moke, azalaki na kati ya bato oyo bazalaki na molɔngɔ ya liboso ntango Bayuda batombokelaki bokonzi ya Loma na mobu 66 tii 70 T.B. Simeona akufaki na etumba wana; ekoki kozala babomaki ye na Bayuda oyo bazalaki kondima ata moke te bokonzi ya Baloma, to mpe na Basoda ya Loma bango moko.
18. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete kosalela Yehova ememaka matomba mingi.
18 Batatoli ya Yehova mingi balandi ndakisa ya Paulo. Ndeko moko, nkombo na ye Jean, alobi boye: “Mwa bambula nsima ya kosilisa kelasi, nazwaki mosala ya sekrɛtɛrɛ na biro ya avoka moko monene na Londres. Nazalaki kosepela na mosala na ngai mpe bazalaki kofuta ngai malamu, kasi nazalaki komona ete nakoki kosala mingi na mosala ya Yehova. Nsukansuka, natikaki mosala yango mpe nakómaki mobongisi-nzela. Nazali na esengo mingi ndenge nazwaki ekateli wana eleki sikoyo mbula 20! Mosala ya ntango nyonso epesi ngai bolamu mingi koleka mosala ya sekrɛtɛrɛ ata na kompanyi nini oyo nakokaki kosala yango. Ezali na eloko moko te oyo epesaka ngai esengo koleka komona ndenge Liloba ya Nzambe ekoki kobongola bomoi ya moto. Kopesa mabɔkɔ na mosala yango ezali likambo malamu mpenza. Makabo na biso epai ya Yehova ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na nyonso oyo ye apesaka biso.”
19. Tosengeli kozwa ekateli nini, mpe mpo na nini?
19 Bomoi na biso ekoki kobongwana nsima ya ntango moko boye. Nzokande, epai ya Yehova, tomipesaka nde mpo na libela. Totikalaka kaka baombo ya Yehova, mpe biso moko nde tosengeli kopona ndenge oyo tokosalela ntango, makasi, mayele, mpe makoki na biso mosusu. Na yango, bikateli oyo tozali kozwa na makambo yango emonisaka bonene ya bolingo na biso mpo na Nzambe. Bikateli yango emonisaka mpe soki tondimaka mpenza komipimela makambo mosusu. (Matai 6:33) Ezala tozali na bomoi ya ndenge nini, tosengeli kozala na ekateli ya kopesa Yehova oyo eleki malamu. Paulo akomaki boye: “Soki libosoliboso mposa makasi ezali, yango ekondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.”—2 Bakolinti 8:12.
“Bozali na mbuma na bino”
20, 21. (a) Baombo ya Nzambe babotaka mbuma nini? (b) Mbano nini Yehova apesaka baoyo basalaka nyonso oyo bakoki na mosala na ye?
20 Kozala baombo ya Nzambe elimboli te konyokwama. Kutu, epesaka biso nzela ya kokima lolenge mabe ya boombo oyo elongolaka biso esengo. Paulo akomaki boye: “Lokola bosikolamaki na lisumu kasi bosili kokóma baombo ya Nzambe, bozali na mbuma na bino na oyo etali bosantu, mpe nsuka bomoi ya seko.” (Baloma 6:22) Kozala baombo ya Nzambe ebotaka mbuma na oyo etali bosantu na ndenge ememelaka biso matomba ya kozala basantu, to bato oyo bazali pɛto na etamboli na bango. Longola yango, ekomemela biso bomoi ya seko na mikolo ezali koya.
21 Yehova azalaka lobɔkɔ pɛtɛɛ epai ya baombo na ye. Ntango tozali kosala nyonso oyo tokoki na mosala na ye, afungolelaka biso “maninisa ya lola” mpe asopelaka biso “lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.” (Malaki 3:10) Tokozala mpenza na esengo ntango tokosalela Yehova lokola baombo libela na libela!
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tokómaka baombo ya Nzambe?
• Ndenge nini tomonisaka ete tondimi kotosa mokano ya Nzambe?
• Mpo na nini tosengeli kondima kotya mokano ya Nzambe liboso ya bamposa na biso?
• Mpo na nini tosengeli te ‘kotala biloko oyo ezali na nsima’?
[Elilingi na lokasa 16]
Ndenge Moyisalaele akokaki kopona kotikala moombo ya nkolo na ye, ezalaki elilingi ya boombo ya baklisto
[Elilingi na lokasa 17]
Tokómaka baombo ya Nzambe ntango tozwi batisimo
[Elilingi na lokasa 17]
Baklisto batyaka mokano ya Nzambe na esika ya liboso
[Elilingi na lokasa 18]
Moize akakatanaki mpo na kondima mokumba oyo bapesaki ye