Engebene Biblia
Baklisto basengisami kozala babola?
MOKOLO moko, Yesu ayebisaki elenge moko oyo azalaki mokonzi mpe moto ya mbongo ete akende mpe atɛka biloko nyonso oyo azalaki na yango mpe akabela babola. Lisolo yango elobi ete moto yango alɛmbaki nzoto na maloba wana ya Yesu mpe akendeki na mawa “mpo azalaki na biloko mingi.” Na nsima, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ekozala likambo ya mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na bokonzi ya Nzambe!” Yesu abakisaki: “Koleka ya kamela na lidusu ya ntonga ezali mpenza pɛtɛɛ mingi koleka kokɔta ya moto ya bomɛngo na bokonzi ya Nzambe.”—Malako 10:21-23; Matai 19:24.
Yesu alingaki koloba nini? Kozala na mbongo mingi eyokani te na losambo ya solo? Baklisto basengeli nde kokanisa ete basali mabe soki bazali na mbongo mingi? Nzambe asɛngaka nde bango bázala na bomoi moko ya mpasi?
Nzambe andimaka “bato ya ndenge nyonso”
Na ntango ya kala, Nzambe asɛngaki te ete Bayisalaele bázala babola. Tózwa ndakisa: Ntango bazwaki mokili ya ndaka mpe bakabolaki yango, basalaki bilanga mpe basalaki mombongo mpo na kobikela mpe kosalisa mabota na bango. Makambo lokola nkita ya mboka, mbula to moi, bokolɔngɔnɔ ya nzoto, to koyeba malamu ndenge ya kosala mombongo, ekokaki kosala ete milende na bango elonga to te. Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga Bayisalaele bámoniselanaka motema mawa ntango moko na bango azali konyokwama mpo azangi mbongo to akómi mobola. (Levitike 25:35-40) Nzokande, basusu bakómaki bato ya bomɛngɔ. Boazi, moto ya kondima mpe ya sembo, oyo akómaki moko ya bankɔkɔ ya Yesu, abengami “moto ya mosolo.”—Luta 2:1.
Na ntango Yesu azalaki awa na mabelé, makambo ebongwanaki te. Ntango Yesu alobaki na moto ya mbongo oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, azalaki kolendisa bobola te. Azalaki nde koteya likambo moko ya ntina mingi. Na ndenge oyo bato batalelaka makambo, ekoki kosalema te ete moto ya mbongo amikitisa mpe andima nzela oyo Nzambe abongisi mpo bato bázwa lobiko. Nzokande, Yesu alobaki ete: “Epai ya bato, yango ekoki kosalema te, kasi epai ya Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”—Matai 19:26.
Lisangá ya baklisto ya ekeke ya liboso ezalaki koyamba “bato ya ndenge nyonso.” (1 Timote 2:4) Ezalaki na bato ya bomɛngo, ná bato oyo bazalaki na mwa mbongo mpe mingi mosusu bazalaki babola. Ekoki kozala ete basusu bazwaki mbongo mingi liboso ya kokóma baklisto. Mpo na basusu, ekoki kozala ete makambo mosusu esalaki ete bákóma na mbongo to mpe bayebaki malamu kosala mombongo, yango wana bakómaki na mbongo.
Ndenge moko lelo oyo, lisangá mobimba ya bandeko etondi na bato oyo bango nyonso bazali na makoki ndenge moko te. Bango nyonso bazali kosala makasi mpo na kolanda toli oyo Biblia ezali kopesa na makambo ya mbongo, mpamba te mposa ya kokóma na mbongo mingi ekoki koyela moto nyonso. Liteya oyo Yesu apesaki mpo na elenge wana oyo azalaki mokonzi mpe moto ya mbongo ekebisi moklisto nyonso mpo na bopusi mabe oyo mbongo mpe biloko ekoki kozala na yango likoló ya moto.—Malako 4:19.
Likebisi mpo na bato ya mbongo
Atako Biblia epekisi te kozala na mbongo, epekisi kolinga yango. Paulo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobaki ete: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo ya mabe ya ndenge nyonso.” Amonisaki ete mpo batyaki mposa ya kokóma bazwi liboso ya makambo ya elimo, “bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”—1 Timote 6:10.
Paulo apesi malako ya polele oyo, mpo na bato ya mbongo. Alobi boye: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” (1 Timote 6:17) Ya solo, bato ya mbongo bazali na likama ya kokóma na lolendo mpe komimona ete baleki bato mosusu. Lisusu, bakoki komikosa mpe kokanisa ete mbongo ekoki kobatela bango na ndenge ya solosolo—nzokande ezali kaka Nzambe nde akoki kobatela na ndenge ya solosolo.
Baklisto oyo bazali na mbongo mingi bakoki kokima mitambo wana soki bazali “bato ya bomɛngo na misala ya malamu.” Misala malamu yango ezali kosɛnga “bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba,” oyo bafungolaka mitema mpo na kosalisa baoyo bazali kokelela. (1 Timote 6:18) Baklisto nyonso—bázala bato ya mbongo to babola—bakoki mpe kosalela ndambo ya biloko na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, likambo oyo eleki ntina mpo na Baklisto ya solo lelo. Soki moto afungoli motema ndenge wana, yango ekomonisa ete moto yango atalelaka biloko ya mokili na makanisi oyo ebongi mpe yango ekosala ete Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto básepela na ye mingi, mpamba te bango balingaka bato oyo bapesaka na esengo.—Matai 24:14; Luka 16:9; 2 Bakolinti 9:7.
Makambo oyo eleki ntina
Tomoni polele ete Baklisto basɛngisami te kozala babola. Basengeli mpe te kozala baoyo “balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo.” (1 Timote 6:9) Basalaka nde mosala makasi mpo na kozwa biloko oyo esengeli mpo na bomoi na bango. Na kotalela makambo ndenge na ndenge mpe nkita ya mboka oyo bazali kofanda, milende na bango ekoki kopesa matomba ndenge moko te.—Mosakoli 11:6.
Bázala bato ya mbongo to babola, Baklisto basengeli kosala makasi mpo na “kotalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Soki batii makambo ya elimo na esika ya liboso, bazali nde ‘komibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.’—1 Timote 6:19.