Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?
“Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”—LUKA 12:21.
1, 2. (a) Mpo na likambo nini bato mingi bandimaki komipela makambo mingi? (b) Mokakatano mpe likama nini baklisto basengeli kokutana na yango?
NA BISIKA mingi, bana basalaka lisano ya koluka eloko moko oyo ebombami. Mpo na kozwa eloko yango ezalaka mpasi mpenza. Ndenge moko mpe, bato ya bileko nyonso balukaka bozwi. Na ndakisa, ntango wolo ebimaki na Australie, na Afrika ya sudi, na Canada mpe na États-Unis, ebele ya bato batikaki bamboka mpe mabota na bango mosika mpo na kokende koluka bozwi na mikili wana oyo bayebaki te, oyo ntango mosusu ezalaki bisika ya mabe mpenza. Ya solo, bato mingi bandimaka mpenza kotya bomoi na bango na likama mpe komipimela makambo mingi mpo na koluka bozwi.
2 Atako lelo oyo bato mingi te bazali kokende koluka wolo na mikili ya mosika, bazali koboma nzoto na mosala mpo na kobikela. Na mikolo na biso, koluka biloko ya kobikela ezalaka mpasi mpe esɛngaka mingi. Ezali mpasi te ete moto akóma komibanzabanza mingi mpo na bilei, kolata, mpe ndako; mpe yango ekoki kosala ete abosana makambo eleki ntina. (Baloma 14:17) Yesu apesaki ndakisa moko oyo elobelaki mpenza ezaleli wana oyo bato bazalaka na yango. Ndakisa yango ezwami na Luka 12:16-21.
3. Lobelá na mokuse ndakisa oyo Yesu apesaki na Luka 12:16-21.
3 Yesu apesaki ndakisa yango ntango azalaki kopesa toli oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki. Nsima ya kokebisa mpo na ezaleli ya kolula biloko ya bato, Yesu apesaki ndakisa ya mozwi moko oyo bandako na ye ya kobomba biloko etondaki mpe amonaki malamu abuka yango mpe atonga ya minene koleka mpo abomba biloko mingi. Kaka ntango akanisaki ete akoki sikoyo kopema mpe kozala na bomoi ya malamu, Nzambe ayebisaki ye ete bomoi na ye ekómi na nsuka, mpe biloko nyonso oyo azali kodondwa na yango, moto mosusu nde akotikala na yango. Yesu asukisaki na maloba oyo: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.” (Luka 12:21) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa wana? Ndenge nini tokoki kosalela liteya yango?
Mobali oyo azalaki na mokakatano moko
4. Tokoki koloba ete moto oyo Yesu alobeli na ndakisa wana azalaki moto ya motindo nini?
4 Ndakisa oyo Yesu apesaki eyebani mingi. Tomoni ete Yesu abandaki lisolo na ye mbala moko na maloba oyo: “Mabelé ya motó moko ya bomɛngo ebotaki malamu.” Yesu alobaki te ete moto wana azwaki biloko na ye na nzela ya mabe to na moyibi. Na maloba mosusu, Yesu alobaki te ete azalaki moto mabe. Na yango, tokoki kokanisa ete moto oyo Yesu alobeli na ndakisa na ye, asalaki mosala makasi. Tokoki koloba ete moto yango azalaki komona mosika mpe kobomba biloko mpo na mikolo ekoya, ntango mosusu mpo na bolamu ya libota na ye. Kutu, soki totaleli makambo kaka na ndenge ya bomoto, tokoki koloba ete moto wana azalaki mpenza kokokisa mikumba na ye.
5. Mokakatano nini moto oyo Yesu alobeli na ndakisa wana akutanaki na yango?
5 Ezala ndenge nini, Yesu abengaki moto yango moto ya bomɛngo, elingi koloba azalaki na biloko mingi. Nzokande, ndenge Yesu amonisi yango, moto wana azalaki na mokakatano moko. Mabelé na ye ebotaki mingi koleka ndenge akanisaki mpe bandako na ye ya kobomba biloko ekómaki moke. Asengelaki kosala nini?
6. Makambo nini basaleli mingi ya Nzambe bazali kokutana na yango lelo oyo?
6 Lelo oyo, Basaleli mingi ya Yehova bazali kokutana na mikakatano lokola oyo moto wana ya bomɛngo akutanaki na yango. Baklisto ya solo basalaka makasi bázala basali ya sembo mpe ya molende. (Bakolose 3:22, 23) Ezala basalaka epai ya bato mosusu to basalaka misala na bango moko, mbala mingi makambo yango elongaka to etambolaka malamu. Soki esɛngi bámatisa bango mpɛtɛ na mosala to bakutani na libaku mosusu ya mosala, esɛngaka bázwa ekateli. Bakondima bámatisa bango mpɛtɛ na mosala to bakondima mosala mosusu wana mpo bázwa mbongo mingi? Ndenge moko, Batatoli mingi ya bilenge bazalaka mayele mingi na kelasi. Na yango, bakoki koloba bázwa bango mpo na kofutela bango kelasi na biteyelo ya minene. Basengeli kaka kosala lokola bana nyonso mpe kondima libaku wana?
7. Ndenge nini moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa wana asilisaki mokakatano oyo akutanaki na yango?
7 Soki tozongi na ndakisa ya Yesu, moto wana ya bomɛngo asalaki nini ntango mabelé na ye ebotaki mingi mpe esika ezalaki te mpo na kobomba biloko oyo abukaki? Abukaki bandako ya kobomba biloko oyo azalaki na yango mpe atongaki oyo ya minene mpo abomba biloko na ye nyonso. Lokola amonaki ete yango ekomemela ye kimya mpe esengo, akómaki kokanisa ete: “Nakoloba na molimo na ngai ete: ‘Molimo, ozali na biloko ebele ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, misepelisá.’”—Luka 12:19.
Mpo na nini moto yango abengami “Zoba”?
8. Likambo nini ya ntina mingi moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa wana abosanaki?
8 Nzokande, ndenge Yesu amonisi yango, mwango ya moto wana ememelaki ye kimya ndenge azalaki kokanisa te. Abosanaki likambo moko ya ntina mingi: mokano ya Nzambe. Azalaki kokanisa kaka bolamu na ye moko, ndenge akobanda kopema, kolya, komɛla mpe komisepelisa. Azalaki kokanisa ete lokola azali na “biloko ebele ya malamu” akozala mpe na “bambula mingi.” Kasi likambo ya mawa, makambo ebongwanaki. Ndenge kaka Yesu alobaki na ebandeli, “ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Na butu wana kaka, biloko nyonso oyo moto wana abomelaki nzoto etikalaki, mpo Nzambe alobaki na ye ete: “Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?”—Luka 12:20.
9. Mpo na nini moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa yango abengami zoba?
9 Sikoyo, tokómi mpenza na likambo oyo Yesu alingaki bato básimba na ndakisa yango. Nzambe abengi moto wana zoba. Diksionɛrɛ moko (The Exegetical Dictionary of the New Testament) elimboli ete maloba ya Grɛki oyo basaleli awa “elimbolaka ntango nyonso kozanga bososoli.” Emonani ete na ndakisa yango Nzambe asaleli liloba wana mpo na komonisa ete “myango ya moto ya bomɛngo wana ezali na ntina te.” Liloba yango ezali komonisa te moto oyo azangi mayele, kasi “oyo azali koboya kondima ete asengeli kotalela Nzambe.” Maloba oyo Yesu asaleli mpo na moto wana ya bomɛngo ezali kotinda biso tókanisa oyo alobaki na nsima na baklisto ya lisangá ya Laodikia, na Asie Mineure ete: “Olobaka ete: ‘Nazali moto ya bomɛngo mpe nasili konduka bomɛngo mpe nazali ata na mposa ya eloko moko te,’ kasi oyebi te ete ozali moto ya mpasi mpe moto ya mawa mpe mobola mpe moto akufá miso mpe bolumbu.”—Emoniseli 3:17.
10. Mpo na nini kozala na “biloko ebele ya malamu” ezali ndanga te mpo na kozala na “bambula mingi”?
10 Ekozala malamu tókanisa na ndakisa yango. Tokozala nde lokola moto wana ya bomɛngo: Tokoboma nzoto na mosala mpo na kozala na “biloko mingi ya malamu,” kasi tokobosana kosala likambo eleki ntina, oyo ekoki kopesa biso elikya ya kozala na “bambula mingi”? (Yoane 3:16; 17:3) Biblia elobi ete: “Bozwi ekosunga na mokolo ya nkanda te,” mpe “ye oyo akotalela bozwi na ye akokwea.” (Masese 11:4, 28) Yesu asukisaki ndakisa na ye boye: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”—Luka 12:21.
11. Mpo na nini ezali na ntina te kotya elikya na biso nyonso na biloko ya mosuni?
11 Ntango Yesu alobaki ete “ezali mpe bongo,” alingaki komonisa ete likambo oyo ekómelaki moto wana ya bomɛngo ekoki mpe kokómela baoyo bazali kotya elikya na bango nyonso kaka na biloko ya mokili. ‘Komibombela biloko ya motuya’ ezali mabe te. Kozanga kozala “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe” nde ezali mabe. Moyekoli Yakobo apesaki toli moko oyo ekokani na toli wana ntango akomaki ete: “Sikoyo, bóya, bino baoyo bolobaka ete: ‘Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokomikɔtisa na mombongo mpe tokozwa benefisi mingi,’ nzokande boyebi te oyo bomoi na bino ekozala lobi.” Bato ya ndenge wana basengeli kosala nini? “Kutu, bosengelaki nde koloba ete: ‘Soki Yehova alingi, tokozala na bomoi mpe lisusu tokosala boye to boye.’” (Yakobo 4:13-15) Ezala moto azali na bomɛngo ndenge nini to azali na ebele ya biloko ndenge nini, nyonso wana ekozala na ntina moko te soki azali moto ya bomɛngo epai ya Nzambe te. Kasi, kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe elakisi nini?
Kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe
12. Nini ekokómisa biso bato ya bomɛngo epai na Nzambe?
12 Na maloba ya Yesu, kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe ekeseni na komibombela biloko ya motuya, to koluka bomɛngo ya mokili. Na yango, Yesu alingaki koloba ete tosengeli te koluka libosoliboso konduka bomɛngo to kosepela na biloko oyo tozali na yango. Na esika ya kosala bongo, tosengeli nde kosalela biloko na biso mpo na kobongisa boyokani na biso na Yehova. Kosala bongo ekoki mpenza kokómisa biso bato ya bomɛngo epai ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te yango ekosala ete Nzambe asopela biso mapamboli. Biblia eyebisi biso ete: “Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”—Masese 10:22.
13. Ndenge nini mapamboli ya Yehova ‘eyeisaka bozwi’?
13 Ntango Yehova apambolaka basaleli na ye, apesaka bango ntango nyonso oyo eleki malamu. (Yakobo 1:17) Na ndakisa, ntango Yehova apesaki Bayisalaele mokili ya kofanda, ezalaki “mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi.” Atako Ezipito ebengamaki mpe mokili ya mabɛlɛ mpe ya mafuta ya nzoi, mokili oyo Yehova apesaki Bayisalaele ekesanaki na oyo ya Ezipito na likambo moko ya ntina mpenza. Moize alobaki na Bayisalaele ete ezalaki “mokili oyo [Yehova] Nzambe na yo akobatelaka.” Na maloba mosusu, bakokaki kokóma na biloko mingi mpo Yehova azalaki kobatela bango. Ntango nyonso oyo Bayisalaele bazalaki sembo epai ya Yehova, Ye azalaki kopambola bango mingi mpe bazalaki na bomoi ya malamu koleka bikólo nyonso oyo ezalaki zingazinga na bango. Ya solo, mapamboli ya Yehova nde ‘eyeisaka bozwi’!—Mituya 16:13; Deteronome 4:5-8; 11:8-15.
14. Baoyo bazali bato ya bomɛngo epai ya Nzambe bazwaka matomba nini?
14 Maloba “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe” ebongolami mpe na moto oyo ‘azali na bomengo na miso ya Nzambe.’ (Bible na lingala ya lelo oyo) Bato ya bomɛngo bamibanzabanzaka mbala mingi na ndenge oyo bazali komonana na miso ya bamosusu. Yango emonanaka mbala mingi na bomoi na bango. Balukaka kobenda likebi ya bato, to ‘kolakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela’ ndenge Biblia elobi. (1 Yoane 2:16) Nzokande, Nzambe asepelaka na bato oyo bazali na bomɛngo epai na ye, amoniselaka bango boboto monene, mpe bazalaka mpenza na boyokani na ye. Makambo nyonso wana epesaka esengo mpe kimya koleka oyo bomɛngo ekoki kopesa. (Yisaya 40:11) Motuna yango oyo: Tosengeli mpenza kosala nini mpo na kozala bato ya bomɛngo na miso ya Nzambe?
Bato ya bomɛngo na miso ya Nzambe
15. Tosengeli kosala nini mpo na kozala bato ya bomɛngo na miso ya Nzambe?
15 Na ndakisa oyo Yesu apesaki, moto wana azwaki bibongiseli mpe abomaki nzoto na mosala kaka mpo na kokóma moto ya bomɛngo. Kasi, babengaki ye zoba. Na yango, mpo na kozala bato ya bomɛngo epai ya Nzambe, tosengeli kosala makasi mpe komipesa na misala oyo ezali mpenza na ntina mpe ebongi na miso ya Nzambe. Na kati ya misala yango, ezali na oyo Yesu atindaki bayekoli na ye básala: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:19) Soki tozali kosalela ntango, makasi mpe makoki na biso mpo na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, kasi te mpo na koluka matomba na biso moko, ekozala lokola tozali kobomba eloko ya motuya. Baoyo basalaki bongo, bazwi matomba beboo na elimo, ndenge bandakisa oyo elandi emonisi yango.—Masese 19:17.
16, 17. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge moto akoki kokóma moto ya bomɛngo na miso ya Nzambe.
16 Tózwa ndakisa ya moklisto moko na ekólo moko ya Azia. Azalaki kosala misala ya baordinatɛrɛ mpe bazalaki kofuta ye mbongo mingi mpenza. Nzokande, mosala yango ezalaki kolya ye ntango nyonso mpe ezalaki kozongisa ye mpenza nsima na elimo. Nsukansuka, na esika akoba kaka na mosala na ye wana, atikaki yango mpe akómaki kosala krɛmɛ mpe kotɛka yango na balabala mpo azwaka ntango ya kokokisa bamposa na ye mpe mikumba na ye ya elimo. Baninga oyo azalaki kosala na bango na misala ya baordinatɛrɛ bakómaki kosɛka ye. Kasi, esukaki ndenge nini? Alobaki boye: “Sikoyo, nazali kozwa mbongo koleka kutu oyo nazalaki kozwa ntango nazalaki kosala misala ya baordinatɛrɛ. Mosala oyo nazali kosala sikoyo ezali kopesa ngai esengo, mpamba te epesaka ngai motó mpasi mpe mitungisi te lokola oyo ya liboso. Mpe likambo eleki ntina, nazali komona ete nakómi mpenza penepene na Yehova.” Mbongwana oyo moklisto wana asalaki epesaki ye likoki ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe azali sikoyo kosala na biro ya Batatoli ya Yehova ya ekólo na bango. Mapamboli ya Yehova eyeisaka mpenza bozwi!
17 Ndakisa mosusu ezali ya mwasi moko oyo akolaki na libota oyo bazalaki kolinga bana na bango bátánga mingi. Atángaki na iniversite na France, na Mexique mpe na Suisse, mpe azalaki na makoki ya kokóma mpenza moto monene. Alobaki ete: “Makambo na ngai nyonso ezalaki kotambola malamu; bato bazalaki komemya ngai mingi mpe nazalaki kozwa mabaku mingi ya mosala. Kasi na motema, nazalaki koyoka ete eloko moko ezangi ngai; nazalaki na esengo te.” Na nsima, ayekolaki makambo ya Yehova. Alobaki boye: “Ntango nazalaki kokola na elimo, mposa na ngai ya kosepelisa Yehova mpe kozongisela ye ata moke na nyonso oyo apesaki ngai esalisaki ngai namona polele nzela nini nasengeli kolanda: kosalela ye na mosala ya ntango nyonso.” Atikaki mosala na ye mpe mosika te azwaki batisimo. Asili kokokisa mbula ntuku mibale na mosala ya mobongisi-nzela, oyo azali kosala na esengo mpenza. Alobi boye: “Bato mosusu bakanisaka ete nabwaká mayele na ngai na mai. Kasi, bandimaka ete nazali moto ya esengo, mpe basepelaka na ndenge natambwisaka bomoi na ngai. Nabondelaka Yehova mikolo nyonso ete asalisa ngai nazala moto ya komikitisa, mpo andima ngai.”
18. Na ndakisa ya Paulo, ndenge nini tokoki kozala bato ya bomɛngo epai ya Nzambe?
18 Saulo, oyo bakómaki kobenga ntoma Paulo, akokaki kokóma moto monene. Kasi, akomaki na nsima ete: “Nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso ete ezali biloko ebungá mpo na motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu Nkolo na ngai.” (Bafilipi 3:7, 8) Mpo na Paulo, bomɛngo oyo azwaki na nzela ya Klisto eleki mosika eloko nyonso oyo mokili ekokaki kopesa ye. Soki biso mpe toboyi koluka kaka matomba na biso moko mpe tomipesi mobimba epai ya Nzambe, tokoki kozala na bomɛngo na miso ya Nzambe. Liloba ya Nzambe epesi biso elikya oyo: “Komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe lokumu mpe bomoi.”—Masese 22:4, NW.
Okoki kolimbola?
• Mokakatano nini moto oyo Yesu alobeli na ndakisa oyo apesaki azalaki na yango?
• Mpo na nini moto yango abengami zoba?
• Kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe elakisi nini?
• Ndenge nini tokoki kokóma bato ya bomɛngo epai ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 26]
Mpo na nini moto ya bomɛngo abengamaki zoba?
[Elilingi na lokasa 27]
Ndenge nini komata mpɛtɛ na mosala ekoki kokóma motambo?
[Elilingi na lokasa 28]
“Mapamboli ya Yehova ekoyeisa bozwi”