Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/7 nk. 11-13
  • Mikano na yo eyokani na mokano ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikano na yo eyokani na mokano ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango mikano ya bato eyokani te na mokano ya Nzambe
  • Bozoba ya mozwi moko
  • Koluka kozala lokola bato nyonso
  • Ozali “moto ya bomɛngo epai ya Nzambe”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tótambola na Nzambe —na elikya ya bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Eloko nini ezali mpenza na ntina?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/7 nk. 11-13

Mikano na yo eyokani na mokano ya Nzambe?

NA BAZAMBA ya Amerika ya Nɔrdi, ezali na ndɛkɛ moko ya langi ya putulu esangani na mwa mpɛmbɛ. Na mbula moko, ndɛkɛ yango ayanganisaka mpe akundaka na nse ya mabelé mbuma mikemike soki 33 000; abombaka yango na bisika soki 2 500 mpo na komilɛngɛla mpo na eleko ya malili. Ndɛkɛ yango azali na “mayele ya lɔɔmbi” na ndenge amibombelaka bilei mpo na mikolo ekoya.​—Masese 30:24 NW.

Bato basalemá na likoki ya kokamwa koleka. Na kati ya bikelamu nyonso ya Yehova awa na mabelé, kaka moto nde azali na likoki ya kozwa liteya na makambo oyo eleká mpe kotika ete yango etambwisa ye ntango azali komityela mikano. Mokonzi Salomo alobaki ete: “Na motema ya moto myango [to mikano] mingi ezali.”​—Masese 19:21.

Atako bongo, mbala mingi bato bamityelaka mikano na kolanda ndenge oyo bakanisi ete mikolo ekoya ekozala. Na ndakisa, omityeli mikano mpo na lobi mpo okanisi ete moi ekobima mpe okozala kaka na bomoi. Koloba ete lobi moi ekobima ezali likambo ya kotya ntembe te; kasi koloba ete okozala na bomoi eyebani mpenza te. Yango wana Yakobo, moko na bakomi ya Biblia, alobaki ete: “Boyebi te oyo bomoi na bino ekozala lobi.”​—Yakobo 4:13, 14.

Yehova Nzambe akeseni na bato. Ye ayebaka “makambo ya nsuka longwa na ebandeli.” Ata ndenge nini, mokano na ye ekozanga te kokokisama. Alobi boye: “Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.” (Yisaya 46:10) Kasi, nini esalemaka ntango mikano ya bato eyokani te na mokano ya Nzambe?

Ntango mikano ya bato eyokani te na mokano ya Nzambe

Eleki sikoyo mbula soki 4 000, bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele bazwaki mokano ya kopekisa bato bápanzana na mabelé mobimba. Balobaki boye: “Yaká, tótongela biso mboka mpe ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma na likoló, mpe tózalisa nkombo ya lokumu mpo na biso mpenza ete tópalangana na mokili mobimba te.”​—Genese 11:4.

Nzokande, likambo yango eyokanaki te na mokano ya Nzambe. Nzambe ayebisaki Noa ná bana na ye boye: “Bóbota mpe bózala mingi mpe bótondisa mokili.” (Genese 9:1) Nzambe asalaki nini na mikano ya bato ya Babele oyo bazalaki batomboki? Asalaki ete bákóma koloba minɔkɔ ndenge na ndenge mpo báyokana lisusu te ntango bazali kosolola. Nini esalemaki na nsima? “[Yehova] apanzanisaki bango na esika yango esii, na bipai nyonso na mokili.” (Genese 11:5-8) Bato oyo bazalaki kotonga Babele bazwaki liteya. Ntango mikano ya bato eyokani te na mokano ya Nzambe, “toli ya [Yehova], yango ekotɛlɛma.” (Masese 19:21) Otikaka ete mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo eleká etambwisa mikano na yo na bomoi?

Bozoba ya mozwi moko

Mbala mosusu ozali kokana kotonga ndako molai te, kasi bato mingi lelo oyo bazali kokana komibombela mbongo mingi na banki mpe konduka biloko ya mokili mpo bakoka kozala na bomoi ya malamu ntango bakozwa pansiɔ. Ezali mabe te ete moto alinga kosepela na mbuma ya mosala na ye. Salomo akomaki boye: “Moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:13.

Tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo tozali kosalela mbuma ya mosala na biso. Eleki mbula soki 2 000, Yesu apesaki bayekoli na ye lisese moko mpo na komonisa likambo yango. Alobaki boye: “Mabelé ya moto moko ya bomɛngo ebotaki malamu. Na bongo abandaki kokanisakanisa na kati na ye moko, kolobáká ete, ‘Nakosala nini, sikoyo lokola nazali te na esika ya koyanganisa biloko na ngai oyo nabuki?’ Bongo alobaki, ‘Nakosala boye: Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, mpe kuna nakoyanganisa mbuma na ngai nyonso mpe biloko na ngai nyonso ya malamu; mpe nakoloba na molimo na ngai ete: “Molimo, ozali na biloko ebele ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, misepelisá.”’” (Luka 12:16-19) Ekoki komonana lokola nde mokano ya mozwi yango ezalaki malamu, boye te? Ndenge moko na ndɛkɛ oyo tolobelaki na ebandeli, emonani ete moto oyo Yesu alobelaki na lisese na ye azalaki komibombela biloko mpo na kokokisa bamposa na ye na mikolo ekoya.

Nzokande, makanisi ya moto wana ezalaki mpenza malamu te. Yesu alobaki lisusu boye: “Kasi Nzambe alobaki na ye ete, ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?’” (Luka 12:20) Yesu alingaki nde kokweisa makanisi ya Salomo ete mosala mpe mbuma na yango ezali makabo ya Nzambe? Te. Boye, Yesu alingaki komonisa nini? Yesu alobaki boye: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”​—Luka 12:21.

Yesu alingaki koteya bayoki na ye ete Yehova alingaka ete tótalela Ye ntango tozali komityela mikano. Mozwi wana akokaki kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe soki alukaki ndenge ya kokolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, bwanya, mpe bolingo. Maloba ya moto yango emonisaki ete azalaki kotyela makambo wana likebi te, azalaki mpe te kokanisa kotika mbuma mosusu na elanga mpo babola báya kolɔkɔta, to mpe kopesa Yehova makabo. Moto wana azalaki te kokanisa ndenge oyo akoki kosalela basusu malamu to mpe komityela mikano ya elimo na bomoi na ye. Azalaki komityela mikano mpo na kokokisa kaka bamposa na ye mpe kozala na bomoi ya malamu.

Yo mpe omonaka ete lelo oyo, bato mingi bazali komityela mikano lokola ya mozwi oyo Yesu alobelaki na lisese na ye? Tózala bazwi to babola, ezali mpasi te mpo tókóma kokanisa kaka biloko ya mokili, mpe tózongisa nsima boyokani na biso na Nzambe mpo na koluka kokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo. Ndenge nini okoki kokima likama yango?

Koluka kozala lokola bato nyonso

Na bokeseni na mozwi oyo Yesu alobelaki na lisese na ye, mbala mosusu yo onyokwamaka mpo na kozwa mbongo. Atako bongo, soki ozali na libota, na ntembe te ozali na mokano ya koleisa mpe kolatisa bato ya libota na yo mpe, soki likoki ezali, otángisa bana na yo kelasi ya malamu. Soki ozali monzemba, mbala mosusu omityeli mokano ya kozwa mosala to kobatela mosala na yo, mpo ozala te mokumba mpo na basusu. Mikano yango ezali mabe te.​—2 Batesaloniki 3:10-12; 1 Timote 5:8.

Atako bongo, kosala mosala, kolya, komɛla, na mokuse kozala na bomoi lokola bato nyonso, ekoki kosala ete moto azala na bomoi oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. Na ndenge nini? Yesu alobaki boye: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo se ndenge bazalaki na mikolo yango liboso ya mpela, kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:37-39.

Liboso Mpela eya, bato bazalaki komona ete bomoi na bango ezalaki malamu. Kasi, mabe na bango ezalaki ete “batyaki likebi te” na mokano ya Nzambe ya koboma bato mabe na mpela. Na ntembe te, bazalaki komona ete Noa azalaki na bomoi ya malamu te. Kasi, ntango Mpela eyaki, emonanaki ete bomoi ya Noa mpe ya libota na ye nde ezalaki bomoi ya bato ya bwanya.

Makambo oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili emonisi ete tozali na ntango ya nsuka. (Matai 24:3-12; 2 Timote 3:1-5) Mosika te, Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa” ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (Danyele 2:44) Ntango Bokonzi yango ekoyangela, mabelé ekobongwana paladiso. Bokonzi yango ekolongola maladi mpe liwa. (Yisaya 33:24; Emoniseli 21:3-5) Bikelamu nyonso awa na mabelé bakofanda na kimya mpe nzala ekozala lisusu te.​—Nzembo 72:16; Yisaya 11:6-9.

Kasi, liboso Yehova asala makambo wana, akani ete nsango malamu ya Bokonzi ‘esakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.’ (Matai 24:14) Na kolanda mokano ya Nzambe, Batatoli ya Yehova soki milio 7 bazali kosakola nsango malamu na mikili 236, na minɔkɔ koleka 400.

Bato ya mokili bakoki kokamwa bomoi ya Batatoli ya Yehova, ata mpe kotyola bango. (2 Petelo 3:3, 4) Ndenge moko na bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela, bato mingi lelo oyo bamipesi na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Bakoki komona ete moto oyo aboyi kozala na bomoi lokola bato nyonso azali kokanisa malamu te. Kasi mpo na bato oyo bandimaka makambo oyo Nzambe alaki, moto oyo atyaka makambo ya Nzambe na esika ya liboso nde azali kokanisa malamu.

Yango wana, ozala mozwi to mobola, ezali malamu ete mbala na mbala otalelaka mikano oyo omityeli mpo na mikolo ekoya. Ntango ozali kosala yango, osengeli komitunaka boye: ‘Mikano na ngai eyokani na mokano ya Nzambe?’

[Elilingi na lokasa 11]

Ntango mikano ya bato eyokani te na mokano ya Nzambe, toli ya Yehova nde ekotɛlɛma

[Elilingi na lokasa 12]

Ntango mozwi azalaki komityela mikano, abosanaki mokano ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto