Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 15-17
  • Mbuma oyo basalelaka mingi na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbuma oyo basalelaka mingi na mokili
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbuma oyo esalaka mibembo na mbu
  • Ekómisaka biloko ya kolya elɛngi
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—2004
  • Ntango mbongo etikalaka likoló ya nzeté
    Lamuká!—1995
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 15-17

Mbuma oyo basalelaka mingi na mokili

EZALI “mbuma” moko ya kokamwa oyo esalá mibembo na mokili mobimba. Basalaka na yango biloko ya kolya mpe masanga. Nzete oyo ebotaka mbuma yango ezali elembo oyo emonisaka bisanga ya mikili ya molunge. Ezali mbuma nini? Ezali bongo kokoti, mbuma oyo basalelaka yango mingi na mokili mobimba.

Mpo na bato oyo bafandaka na mikili ya molunge te, kokoti ekoki kozala bobele nzete moko oyo ezongisaka na makanisi na bango konje oyo balekisá na mikili ya molunge. Kasi, mpo na baoyo bafandaka na mikili ya molunge, kokoti ezali nzete moko ya ntina mingi. Bato ya Indonésie balobaka ete “okoki kosala na yango biloko ebele kaka ndenge mikolo ezalaka na mbula mobimba.” Na Philippines, balobaka ete: “Moto oyo aloni kokoti, aloni basaani, bilamba, biloko ya kolya, masanga, ndako mpo na ye moko, mpe libula mpo na bana na ye.”

Makambo oyo lisese wana elobi eleki ndelo te. Na kotalela buku Kokoti​—⁠Nzete ya bomoi (na Lingelesi), kokoti “epesaka biloko ya kolya, mai mpe mafuta ya kolambela. Basalaka na nkasa na yango ndako, nsinga mpe matɔkɔ. Basalelaka mokokoli na yango lokola kɔpɔ to biloko ya kokembisa ndako, mpe basalaka na mai ya fololo na yango sukali mpe masanga.” Buku yango ebakisi boye: “Ata nzete na yango, soki bakati yango malamu, bakoki mpe kosalela yango.” Bato oyo bafandaka na bisanga ya Maldives, na Océan Indien, bazalaki kosala bamasuwa na mabaya ya nzete ya kokoti, mpe balobaka ete bazalaki kokende na bamasuwa yango tii na Arabie mpe na Philippines. Nzokande, ezali kokoti yango moko nde esali mibembo milai na mbu koleka bato oyo balonaka yango.

Mbuma oyo esalaka mibembo na mbu

Kokoti ekolaka malamu pembeni ya mbu na mikili ya molunge, soki mbula ebɛtaka mingi na bisika yango. Atako bato ya bamboka yango balonaka nzete ya kokoti, kokoti yango moko ekei na bisika mosusu ya mosika na mokili mobimba. Mbuma nyonso epanzanaka na ndenge mingi, kasi kokoti etambolaka na mbu. Ezali na mbu nde esalaka mibembo na mokili mobimba.

Ntango kokoti ekɔmeli, ekweaka na nse. Mbala mosusu soki kokoti ekwei, ekendaka tii na mai. Ntango mai ya mbu emataka, ekoki bongo komema yango. Lokola mposo na yango ezali nsingansinga, ezalaka na mopɛpɛ na kati oyo esalaka ete kokoti ezinda te. Soki ezalaki na esanga moko ya mbu ya Pacifique oyo ezali na mwa liziba na kati, kokoti ekokende nde na ngámbo mosusu ya liziba yango. Kasi soki ekei kokwea na mbu, kokoti ekoki kokende mosika mpenza.

Mungwa ya mbu, oyo ebebisaka mbuma mingi, ekɔtaka na kokoti noki te mpo mokokoli na yango ezalaka makasi. Kokoti ekoki kosala sanza misato na mbu, mbala mosusu ekotambola bankóto ya bakilomɛtrɛ; atako bongo soki ekómi na libongo moko ya malamu ekoki kobota. Ntango mosusu ezali ndenge wana nde kokoti etondani pembenipembeni na mbu na mikili ya molunge.

Ekómisaka biloko ya kolya elɛngi

Bato oyo bafandaka na mikili ya molunge te bakoki kokanisa ete basalelaka kokoti kaka mpo na kosala biloko ya sukali to bisikiti. Nzokande, kende na Azia ya sudi-ɛsti, mpe okomona biloko ndenge na ndenge oyo basalaka na kokoti. Buku moko (La cuisine du Pacifique et de l’Asie du Sud-Est, na Lingelesi) elimboli ete “na mikili mpe bisanga nyonso oyo ezali banda Hawaii tii engumba Bangkok, bato balambelaka kokoti na biloko ndenge na ndenge.” Buku yango elobi lisusu ete mpo na bato oyo bafandaka na bamboka wana, “kokoti ezali moko ya biloko oyo balyaka yango mingi . . . na lolenge ekeseni mpe balambelaka yango na biloko ndenge na ndenge.”

Soki balambelaka kokoti mingi na mikili ya molunge ezali mpo na ntina oyo: Kokoti ezali na mai, epesaka miliki mpe mafuta. Ntango ezali naino mobesu, kokoti ezalaka na mai ya sukali, oyo babengaka mai ya kokoti. Ezali masanga moko kitoko oyo esilisaka mposa ya mai, mpe mbala mingi batɛkaka yango pembeni ya nzela. Mpo na kozwa miliki ya kokoti, banikaka ndika na yango na mai esika moko. Soki batii miliki yango na supu to na pɔtɔpɔtɔ, ekokómisa yango kilo mpe elɛngi.

Mpo na kozwa mafuta ya kokoti, moto oyo alonaka yango asalaka boye: azwaka kokoti oyo etɛli, apasolaka yango mpe akaukisaka yango na moi. Soki ekauki, akolongola ndika mpe akosala na yango mafuta. Na mikili ya molunge, mafuta ya kokoti ezali mafuta oyo balambelaka na yango mingi. Nzokande na mikili ya Mpoto, basalelaka yango mingi na mateka, crême mpe bisikiti.

Kobuka kokoti ezali mosala ya pɛtɛɛ te. Mbala mingi, esɛngaka komata mpo na kokende kobuka yango to kosalela tiyo moko ya molai oyo ezalaka na mbɛli na nsɔngɛ na yango. Na ekólo Indonésie, balakisá bamakako mosala yango. Kasi ndenge ya pɛtɛɛ ya koyeba ete kokoti ekɔmɛli mpenza, ezali bongo ya kozela ete yango moko ekwea.

Ata soki babuki yango ndenge nini, kokoti, mbuma oyo basalaka na yango biloko mingi, ezali mbuma oyo etɛkamaka malamu mpenza mpe bato mingi balyaka yango. Na bongo, mbala ya nsima oyo okomona kokoti, ezala na fɔtɔ to na miso, kobosana te ete ezali kaka nzete kitoko te oyo ekómisaka bokula ya mbu kitoko na mikili ya molunge. Yebá ete ozali liboso ya nzete oyo ebotaka moko ya “bambuma” oyo basalelaka mingi na mokili.

[Etanda/Bililingi na lokasa 16]

KOKOTI EKESENI NA BAMBUMA MOSUSU

CRABE YA KOKOTI Ezali kaka bato te nde basepelaka na kokoti. Crabe ya kokoti ezali mwa nyama oyo ebombanaka na mabelé na moi, kasi na butu ebimaka mpo na kolya kokoti. Bato basalelaka mbeli mpo na kopasola kokoti, nzokande crabe yango esalelaka mayele mosusu, ebambaka yango mbala na mbala na libanga tii ekopasuka. Emonani ete bilei na ye wana ebongi na ye mpenza, mpamba te crabe yango eumelaka mbula koleka ntuku misato.

BASALELAKA YANGO MAFUTA YA KOPAKOLA Lokola mafuta ya kokoti ezalaka malamu mpo na mposo ya nzoto, bakompanyi oyo esalaka mafuta ya kopakola etyaka yango na rouges à lèvres mpe na mafuta ya kopakola (laits solaires). Mpe soki osalelaka sabuni to nkisi ya nsuki (shampoings) oyo ebimisaka fulufulu mingi, ekoki kozala ete batyá mafuta ya kokoti mingi na kati.

[Bililingi]

Kokoti ekoki kosala mobembo molai na mbu mpe ekobeba te

Crabe ya kokoti

Kokoti ya moke

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Godo-Foto

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Fɔtɔ ya likoló na lobɔkɔ ya mobali: Godo-Foto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto