Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/06 nk. 16-17
  • “Tozali kokanisa lisusu . . . ai!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tozali kokanisa lisusu . . . ai!”
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nkisi ya makasi
  • Ndenge balonaka ai na lobwaku ya Constanza
  • Ezali moke, kasi ezali na nsolo makasi
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1997
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Lamuká!—2006
g 1/06 nk. 16-17

“Tozali kokanisa lisusu . . . ai!”

Euti na mokomi na biso na République dominicaine

KANISÁ ete ozali mosika na mboka na bino mpe ozali na nzala, okoyoka mposa ya kolya nini? Na ntembe te, okokanisa bambuma mpe bandunda kitoko oyo ezalaka na mboka na bino, to ntango mosusu okokanisa elubu kitoko ya nyama to ya mbisi oyo mama na bino alambaka. Kasi, ezali mwa mpasi oyoka mposa ya kolya ai.

Nzokande, eleki mbula soki 3 500, ntango bana ya Yisalaele bazalaki koyengayenga na esobe ya Sinai, balobaki ete: “Tozali kokanisa lisusu mbisi oyo tozalaki kolya ya ofele na Ezipito, ná kɔkɔmbrɛ mpe pastɛki mpe pwaro mpe matungulu mpe ai!” (Mituya 11:​4, 5, NW ) Ɛɛ, bakanisaki ai oyo bazalaki kolya na Ezipito! Bayuda bazalaki kolinga ai mingi, yango wana lisolo ya bonkɔkɔ na bango emonisi ete bakómaki komibenga balei-ai.

Nini esalaki ete Bayisalaele bákóma kolinga ai mingi ndenge wana? Na mbula 215 oyo baumelaki na Ezipito, bazalaki kolya ai mingi. Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki emonisi ete Baezipito babandaki kolona ai bambula mingi liboso ete Yakobo ná libota na ye bákóma na Ezipito. Hérodote, Mogrɛki mpe moto ya mayele na masolo ya kala, alobaki ete bakonzi ya Ezipito bazalaki kosomba ebele ya matungulu, ya radis, mpe ya ai mpo na koleisa baombo oyo bazalaki kotongela bango bapiramide. Emonani lokola ete bazalaki kopesa bango bilei oyo ezali na ai mingi mpo bákóma makasi mingi mpe bábɛlaka mpambampamba te. Ntango Baezipito bakundaki Farao Toukankhamon, batyaki biloko mingi ya motuya na lilita na ye, bakisá mpe ai. Ya solo, ai ezalaki na ntina moko te mpo na moto oyo akufi, kasi ezalaki na ntina mingi mpo na bato ya bomoi.

Nkisi ya makasi

Banda kala, minganga basalelaka ai mpo na kosalisa bato ya maladi. Eleki bankama ya bambula, minganga Bagrɛki, Hippocrate mpe Dioscoride bazalaki kopesa bato ai lokola nkisi ya libumu, ya maladi ya maba, ya kansɛr, ya mpota, ya bamaladi oyo eutaka na mikrobɛ, mpe ya maladi ya motema. Na ekeke ya 19, Louis Pasteur, moto ya mayele na chimie na ekólo France, ayekolaki ai mpe alobaki ete ezali nkisi oyo ebomaka mikrobɛ. Na Afrika, na ekeke ya 20, Albert Schweitzer, misionɛrɛ mpe monganga oyo ayebani mingi, azalaki kosalela ai mpo na kobikisa bato oyo babɛli pulupulu oyo eutaka na amibe mpe bamaladi mosusu. Na etumba ya mibale ya mokili mobimba, ntango minganga ya basoda ya Russie bazalaki kozanga nkisi, bazalaki kosalela ai mpo na kosalisa basoda oyo bazalaki kozoka. Yango wana, bakómaki kobenga ai pénicilline ya bato ya Russie. Eleki mikolo mingi te, bato ya siansi bamonaki ete ai esalisaka makila etambola malamu na nzoto ya moto.

Tomoni ete ai ezali bilei kitoko, ezali nkisi ya makasi, mpe nsolo na yango ná elɛngi na yango ezali ya ndenge mosusu. Kasi ai eutá wapi? Bato mosusu oyo bayekolaka banzete balobi ete ai eutá na Azia ya ntei, mpe na nsima epalanganaki na mokili mobimba. Tótalela sikoyo moko ya bisika oyo balonaka ai mingi.

Ndenge balonaka ai na lobwaku ya Constanza

Na lobwaku ya Constanza, oyo ezali na République dominicaine, malili ezalaka makasi. Lokola bangomba ezingi lobwaku yango, mabelé na yango ezalaka malamu mpo na milona mpe mbula enɔkaka mingi kuna. Constanza ezali mpenza esika malamu mpo na kolona ai.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ to ya Ɔkɔtɔbɛ, bato ya Constanza oyo basalaka bilanga bakataka matiti mpe babalolaka mabelé, basalaka mikala oyo ekabwani na mɛtrɛ moko. Na mokala mokomoko, batimolaka mwa banzela misato to minei, esika bakolona ai. Na nsima, bato ya mosala bakopanza ai ya mibimba na mbuma mokomoko, mpe bakotya yango na mai miniti 30. Basali balonaka yango na mwa banzela oyo batimolaki na mokala mokomoko. Na République dominicaine, ai ekolaka na eleko ya malili makasi.

Na sanza ya Marsi to ya Aprili, ezalaka ntango ya kobimisa yango na bilanga. Basali bapikolaka ai oyo ekɔmeli mpe batikaka yango elala na mabelé kuna na bilanga mikolo mitano to motoba. Na nsima, balɔkɔtaka yango, balongolaka nkasa mpe misisa na yango, mpe batyaka ai ya mibimba oyo etikalaka, na mitalaka oyo babengaka cribas. Batikaka yango na moi mokolo mobimba na mitalaka yango mpo ekauka. Nsima na yango nde bakoki kotɛka yango.

Ezali moke, kasi ezali na nsolo makasi

Ntango ofandi na mesa mpo na kolya ndunda ya mobesu to elubu mosusu ya kitoko oyo batye ai, oyebaka yango mbala moko na nsolo na yango. Kasi, mpo na nini ai ezalaka na nsolo te soki naino bapasoli to batuti yango te? Biloko ya mikemike oyo epesaka ai nsolo makasi esanganaka te soki naino batuti yango te, bakati yango te, to baniki yango te. Soki bakati ai, eloko babengi alliinase esanganaka na oyo babengi alliine. Ntango biloko yango esangani, mbala moko ebimisaka eloko babengi allicine, oyo epesaka ai nsolo kitoko mpe elɛngi.

Ntango ozali kotafuna ai ya mobesu, ezali lokola ozali kopanza allicine na monɔkɔ na yo. Olinga, olinga te, nsolo ya ai ekopanzana na esika ozali. Okoki kosala nini mpo nsolo ya ai oyo etikalaka na monɔkɔ eleka mingi te? Okoki kotafuna matiti ya mobesu lokola persil to girofle mpo bato báyoka nsolo yango mpenza te.

Kasi kobosana te ete nsolo ya ai oyo ezali kobima na monɔkɔ na yo ezali kouta nde na mimpululu na yo. Ntango olei ai, misɔpɔ na yo elekisi yango na makila, mpe makila elekisi yango na mimpululu. Ntango ozali kopema, nsolo ya ai ezali kobima na monɔkɔ. Yango wana, ata soki osukoli monɔkɔ ndenge nini to otafuni persil, nsolo ya ai ekosila noki te. Ezali nde na mayele mosusu mpo na kosilisa nsolo yango noki? Mpenza te. Kasi, soki na esika ofandi moto nyonso alyaka ai, ntango mosusu moto moko te akomona yango mabe!

Na bikólo mingi, balambaka biloko te kozanga kotya ai. Mpe ata na bisika oyo basalelaka ai mingimingi te, bato mingi oyo balyaka yango bandimaka ete ezali malamu mingi atako nsolo na yango esilaka noki te na monɔkɔ.

[Elilingi na lokasa 17]

Kokaukisa ai oyo bauti kopikola

[Elilingi na lokasa 17]

Lobwaku ya Constanza

[Elilingi na lokasa 17]

Mpo na nini ai ebimisaka nsolo kaka soki batuti yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto