Makambo mazali koleka na mokili
Kotika bingumba mpe kokende kofanda na bamboka
Lokola balɛmbi na motungisi mpe na momekano ya bomoi ya bingumba, bato moke kasi bazali sé kokóma mingi ya ekólo Japon bazali kotika bingumba mpo na kokende kofanda na mboka. Soki ezali solo ete kofanda na mboka ezalaka na mindɔndɔ́ mingi te wana ozali kofanda kati na biloko bizalisami, kasi kosombitinya kazaka na salopɛti (elingi koloba kotika bomoi ya engumba mpo na bomoi ya mboka) ezangaka mikakatano te. Zulunalo Asiaweek elobi ete: “Kati na balóni yango ya sika ya bilanga, mingi batiki lifuti ya malonga mpenza, bozwi oyo bazalaki na yango na engumba mpe ntango mosusu mosala moko ya lokumu kati na kompanyi moko ya monene.” Lisusu, “baoyo bakómi kosala bilanga bandimi ete basengeli kokitisa mosolo oyo bazalaki kobimisa mpe ntango mosusu bakómi kosala misala mikemike mpo na kobakisa mwa mosolo likoló na oyo bazali kozwa na kotekáká biloko na bango ya bilanga.” Kasi mpo na baoyo bazwi ekateli ya kosala mbongwana, Ministɛrɛ ya makambo matali bilanga esali eteyelo ya kobongisama ya balóni mpo na kosalisa bato yango ete bámesana na bomoi ya mboka.
Koboma libala epesaka liteya?
Zulunalo The Sydney Morning Herald ya Australie elobi ete: “Babalani oyo baboti na bango babomá mabala bazali na likámá monene ya koboma mpe mabala na bango koleka babalani oyo baboti na bango bazali kati na libala na bango.” Profɛsɛrɛ Paul Amato ya Inivɛrsité ya Nebraska, na États-Unis, “atalelaki babalani 2 000 na Amerika na boumeli ya mibu koleka 12” mpe engebene zulunalo yango, amonaki ete “bana oyo baboti na bango babomá mabala bakoki ‘kosangola’ mbeba mpe bizaleli mabe yango oyo ezali kokólisa likámá ya komona ete mabala na bango mpenza esuka na kokufa.” Zulunalo Herald emonisaki ete: “Soki babalani mibale bazali na baboti oyo babomá libala, likámá ya koboma libala na bango ezali mbala misato koleka babalani oyo baboti na bango bazali esika moko.”
Bilembo ya misapi ya nyama ebéngami koala ekokani na oyo ya moto
Moto moko ya siansi na ekólo Australie amonisi ete bilembo ya misapi ya mabɔkɔ mpe ya misapi ya makolo ya koala ekokani mpenza na oyo ya moto. Profɛsɛrɛ Maciej Henneberg, biolojistɛ mpe nganga-mayele na makambo ya mibeko ya Letá na misala ya monganga na Inivɛrsité ya Adélaïde alobi ete: “Ata na microscope électronique bokeseni ezali komonana te.” Bokokani yango ezali te na lolenge ya makaka ya koala kasi ezali nde na lolenge ya lomposo ya misapi ya makolo mpe ya mabɔkɔ na ye—mayemi oyo mamonisamaka na mantutu, mpe mikɔ́lɔ́tɔ́ ya makaka na ye mpe na misapi na ye ya makolo. Lisusu, lokola bato, koala mibale ezalaka na bilembeteli lolenge moko te.
Lingomba endimi pastɛrɛ moko oyo abongoli binama na ye ya kobota
Na États-Unis, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Presbytérien oyo basalaki ye lipaso mpo na kobongola binama na ye ya kobota, azwaki ndingisa ya kokóba mosala na ye ya koteya. Ekateli yango ezwamaki ntango Eric Swenson oyo azali na mibu 49 asɛngaki na Lisangani ya ba presbytériens na engumba Atlanta (na etúká ya Georgie) ete nkombo na ye ekóma Erin nsima wana balongolaki ye binama kobota ya mobali. Zulunalo The Christian Century elobi ete: “Anne Sayre, mosalani na makambo matali bosembo mpe basi ya lingomba yango, alobi ete lisangani ya batambwisi ya lingomba ‘ezalaki na mokakatano monene mpo na kozwa ekateli,’ kasi asukisi ete ‘likambo moko te ya moboko ezalaki kolóngisa’ kolongolama ya pastɛrɛ, ‘ezala na makambo ya teoloji to na makambo matali bizaleli malamu.’ ” Nzokande, Don Wade, pastɛrɛ oyo andimaki te lisɛngi ya Swenson alobaki ete “balobelaki na mozindo te na ntina na mituna oyo makambo ya teoloji ekobimisa liboso ya kozwa ekateli wana.”
Bolimbisi esɛngami nsima ya mibu 500
Na mobu 1496, Manuel I, Mokonzi ya ekólo Portugal abimisaki etindá moko mpo na Bayuda oyo bazalaki na mokili na ye ete bábongwana na Lingomba ya Katolike to bálongwa na mokili na ye. Na mobu 1988, mibu soko 500 na nsima, ekólo Portugal esɛngaki bolimbisi. Eleki mwa mikolo, na molulu moko ya bokundoli, ekólo Portugal ezongelaki lisusu kosɛnga bolimbisi. Engebene lapólo ya Associated Press, Jorge Sampaio, Prezidá ya ekólo Portugal, na lisukúlu na ye oyo asalaki liboso ya badepité, alobaki ete lolenge babenganaki bango ezalaki “likambo mabe oyo limemaki mikakatano.” José Eduardo Vera Jardim, Ministre ya Mambi ma bosembo, alobelaki yango lokola “likambo ya mabe kati na lisoló na biso.” Abakisaki ete Letá asengeli “kosɛnga bolimbisi” mpo na bikeke ya “monyoko makasi” oyo apesaki na Bayuda. Sikawa motángo ya bato ya ekólo Portugal ezali soko milió 10, nzokande Bayuda oyo bazali kosalela losambo na bango bazali soko 1 000 mpamba.
Kebá na bankisi ya mabe
Mombongo ya bankisi ya lokuta oyo ezali sé kokóla ezali kosalela mosolo pene na dolare miliare 16. Engebene zulunalo Le Monde, oyo ebimaka na Paris, “Organisation mondiale de la santé (Lisangani ya Mabota masangani mpo na bokolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto) ekanisi ete soko nkisi 7 likoló ya monkámá oyo etɛkamaka mbula na mbula na mokili mobimba ezali mabe.” Motángo na yango ekoki kokóma na 30 likoló ya monkámá na ekólo Brésil mpe 60 likoló ya monkámá na Afrika. Bankisi ya mabe ekoki kosalema na komekolama ya likolólikoló ya bankisi ya malamu to kosalela biloko oyo ekoki kobikisa te, kútu oyo ekoki nde koboma. Zulunalo Le Monde etángi na ndakisa kopalangana ya bokɔnɔ ebéngami méningite na Niger, epai kuna bankóto ya bato bazwaki mangwele na nkisi oyo eyaki koyebana ete ezalaki bobele mai. Mpe na Nigeria, bana 109 bakufaki ntango bamɛlisaki bango monɔ oyo ezalaki na nkisi oyo babéngi antigel. Zulunalo yango elobaki lisusu ete: “Mbala mingi mapitalo esombaka bankisi motindo yango mpamba te ezalaka na ntalo malamu.” Na bikólo mingi, bakonzi ya minganga bazali na mokakatano ya kozwa mwango ya kosilisa likambo yango mpo ete mibeko ezali makasi te.
Mikakatano mosusu ya bakonzi ya mangomba
Zulunalo Christianity Today elobi ete, na Novɛ́mbɛ 1996, baepiskɔ́pɔ soko 40 ya Lingomba ya Angleterre batyaki mabɔkɔ na nkomá moko oyo ezalaki kosɛnga na lingomba na bango ete “limonisa polele mitindá likoló na ezaleli ya kosangisa nzoto oyo misengeli kotosama na kotaleláká etamboli ya bakonzi ya mangomba na likambo yango.” Lingomba eninganaki na makambo ya nsɔ́ni oyo esalemaki na bakonzi ya mangomba, baepiskɔ́pɔ oyo bakangami na bindimeli ya kala bazali koloba ete ezali makambo oyo mauti na “kozanga komonisa polele mateya ya moboko ya lingomba na ntina na kosangisa nzoto.” Na ndakisa, mokambi ya parwase moko ya lingomba yango na Brooklyn, New York, alongwaki mosala nsima ya koyambola ete azalaki kosangisa nzoto na mibali. Todd Wetzel, mokambi ya Église Anglicane Unie, alobaki ete: “Lingomba ezali bobele na likambo ya nsɔ́ni moko wana te. Ezali na makambo ebele kati na yango oyo touti kolobela eleki kopesa motema mpasi.” Liboso, lingomba elobelamaki mingi na bipanzeli-nsango ntango ekweisaki ezaleli ya episkɔ́pɔ ya kala Walter Righter, ntango atyolaki malako ya lingomba na kokulisáká diakono moko sángó, oyo azalaki kosangisa nzoto na mibali. Likambo yango esilaki nsima wana “esambiselo moko ya Lingomba ya Angleterre ezwaki ekateli ete lingomba ezalaki na ‘liteya moko te ya moboko’ oyo ezalaki kosɛngisa kosangisa nzoto bobele kati na libala.”
Nsolo ya ái
Zulunalo South China Morning Post elobi ete na mikolo miuti koleka, guvernemá ya Taïwan ezwaki meko mpo na kotɛka ái oyo elekaki mingi. Bakonzi balendisaki bato ete “bálya ái mingi.” Mr. Ku Te-yeh, mosali na Conseil taïwanais de l’agriculture alobi ete: “Na mbula oyo tolónaki ái mingi.” Mpo na kolendisa bato ete bálya yango mingi, guvernemá ebimisaki mwa búku moko oyo ezali kolobela mitindo ya bilei oyo bilambamaka na ái. Nzokande, zulunalo yango elobi lisusu ete Mr. Ku andimi ete “tokoki komizela te ete bafandi ya mboka básilisa mokakatano yango.”
Kokata kobota ezali kokóla
Na bambula ya 1960 mwayene ya bana na mabota ya ekólo Brésil ezalaki ya 6,1; lelo oyo mwayene yango ezali ya bana 2,5. Mpo na nini kokita ya ndenge wana? Engebene bolukiluki moko oyo esalemaki na Institut de recherche économique appliquée, Jornal do Brasil elobi ete moko ya bantina ya kokita yango ezali ete “basi ya mabala 40 likoló na monkámá [na Brésil] basili kokata kobota. Lisusu, emonani ete basi mingi bazali kokata kobota noki. Na ndakisa, esili koleka mbula zomi, mwayene ya basi ya ekólo Brésil oyo bazalaki kokata kobota ezalaki na mibu 34, kasi lelo oyo bazali kokata kobota na mibu 29. Bolukiluki yango emonisaki lisusu ete “basi mingi bazali kokata kobota na mwango ebéngami stérilisation na ntango ya kobota,” mingimingi soki kobota esalemi na lipaso. Nzokande, mpo na mibali oyo basaleli mwango ya stérilisation mwayene ezali bobele ya mibali 2,6 likoló na monkámá.
Etumba mpo na mbisi
Zulunalo U.S.News & World Report elobi ete, masuwa ya babomi mbisi ekómi mingi mpe babomi mbisi bazali koluka koboma mbisi, kasi yango ezali komonana lisusu mingi te, mpe likambo yango “ezali kobimisa matata kati na babomi mbisi mpe bapolisi oyo bakɛngɛlaka bokúla ya mai monene.” Na mobu 1990, masuwa ya babomi mbisi ezalaki soko milió misato na mokili mobimba, motángo oyo mokóli mbala mibale soki tokokanisi yango na oyo ya mobu 1970. Lisusu, bisaleli ya mikolo na biso, lokola oyo ebéngami sonar, yango esalisaka na koyeba esika mbisi ezali, mpe mozanga oyo ebéngami chalut géant, ekólisi mpenza makoki ya babomi mbisi. “Nsukansuka baguvernemá oyo ezali na bamboka na bokúla ya mai monene ezali kowelana ntango nyonso na masuwa oyo ezali kouta na mikili mosusu” mpamba te baguvernemá yango ezali koluka kobatela mbisi oyo ezali sé kosila. Na boumeli bobele ya mbula mibale oyo euti koleka, matata kati na babomi mbisi na mai monene esili koboma bato mwambe.