Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/14 lok. 6
  • Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • Bazali kosɛnga lisalisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Moyengebene akosepela na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Nazali na mposa ya kokufa—Biblia ekoki kosalisa ngai ntango nazali na makanisi ya komiboma?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 4/14 lok. 6
Mobali moko oyo azangi elikya mpe azali kokanisa komiboma

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?

SOKI okutani na Diana,a okomona ete azali elenge mwasi moko mayele, boboto mpe ayebi kofanda na bato. Atako amonanaka lokola azali na esengo, kasi mbala mingi atungisamaka na makanisi. Alobi boye: “Mokolo moko te elekaka kozanga ete makanisi ya kokufa eyela ngai. Namonaka mpenza ete mokili ekozala esika moko ya malamu mingi soki ngai nazali te.”

“Baankɛtɛ mosusu emonisi ete na bato nyonso oyo bamibomaka, 200 kati na bango basí bameká komiboma mpe [bamosusu] na bango 400 bazwaká makanisi yango.”​—THE GAZETTE, MONTREAL, CANADA.

Diana alobi ete akomiboma soki moke te. Ata bongo, na bantango mosusu amonaka ntina ya kokoba kozala na bomoi te. Alobi lisusu boye: “Nalingaka mpenza nakufa ata na aksida moko boye. Nakómá komona liwa lokola moninga, kasi monguna te.”

Bato mingi bamiyokaka lokola Diana, mpe bamosusu bakanisá to baluká komiboma. Kasi bato ya mayele balobi ete bato mingi oyo balukaka komiboma balingaka mpenza te kokata bomoi na bango; balingaka nde kosilisa bampasi na bango. Na mokuse, bamonaka ete ezali na ntina bákufa; kasi bazalaka nde na mposa ya koyeba ntina ya kokoba kozala na bomoi.

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi? Tótalela bantina misato.

LOKUTA: Kolobela likambo ya komiboma to kosalela kutu liloba yango etindaka bato báluka komiboma.

SOLO: Mbala mingi kolobela likambo yango polele esalisaka moto

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto