Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 4 lok. 4
  • 1 Talelá makambo na ndenge ebongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 Talelá makambo na ndenge ebongi
  • Lamuká!—2016
  • Masolo mosusu
  • Tiká ete makambo omeseni na yango epesa yo litomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Maloba ya ebandeli
    Lamuká!—2016
  • 2 Poná baninga mpe makambo oyo ekoki kosalisa yo
    Lamuká!—2016
  • Baboti​—bókɔtisa bizaleli malamu epai ya bana na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 4 lok. 4
Mwasi oyo azali kosala liste

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOTIKA MIMESENO YA MABE

1 Talelá makambo na ndenge ebongi

Okoki kozala na mposa makambo nyonso ebonga na mbala moko. Na nse ya motema, olobi boye: ‘Na pɔsɔ oyo, nakotika komɛla makaya, maloba mabe, kolala butu makasi mpe nakobanda kosala ngalasisi, kolya malamu mpe kosolola na bankɔkɔ na ngai na telefone.’ Kasi soki oluki kokokisa makambo wana nyonso na mbala moko, okokokisa ata moko te!

TOLI YA BIBLIA: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”​—Masese 11:2.

Moto ya bopɔlɔ atalelaka makambo na ndenge ebongi. Ayebaka ete ntango, makasi mpe bozwi na ye ezali na ndelo. Na yango, na esika aluka kobongola makambo nyonso na mbala moko, asalaka yango mokemoke.

Soki oluki kokokisa makambo wana nyonso na mbala moko, okokokisa ata moko te!

OYO OKOKI KOSALA

Luká kobongisa likambo moko to mibale na mbala moko. Makambo oyo elandi ekoki kosalisa:

  1. Salá liste mibale mpe komá na liste moko makambo ya malamu oyo okolinga omesana kosala mpe na liste mosusu makambo mabe oyo okolinga kotika. Kopona te; komá likambo nyonso oyo eyeli yo na makanisi na liste mokomoko.

  2. Na liste yango, tyá na esika ya liboso makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na yo.

  3. Poná mwa makambo oyo omesaná kosala​—ata moko to mibale na liste mokomoko mpe tyelá yango likebi. Na nsima, leká na likambo moko to mibale oyo elandi.

Mpo makambo ekende mbangu, tiká momeseno moko ya mabe mpe na esika na yango kómá na oyo ya malamu. Na ndakisa, soki na liste na yo ya mimeseno ya mabe okomaki ete otalaka TV mingi mpe na liste na yo ya mimeseno ya malamu okomaki ete osololaka na bandeko mpe baninga na yo, okoki kozwa ekateli oyo: ‘Na esika nafungola mbala moko TV ntango nazongi na ndako nsima ya mosala, nakobenga moninga to ndeko moko mpo tósolola na ye.’

TOLI MOSUSU YA BIBLIA

“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

“Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango.”​—Mosakoli 7:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto