Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 10 nk. 49-54
  • Yekola koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yekola koteya
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 10 nk. 49-54

Liteya 10

Yekola koteya

1-3. Nini esengeli mpo na kozala moteyi malamu, mpe mabaku nini ya koteya mapesameli biso?

1 Lokola tozali baklisto ya solo, tondimi Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto lokola Bateyi minene. Tozali na mayoki ndenge moko na mokomi na nzembo oyo alobaki epai ya Jéhovah kati na libondeli moko: “Lakisa ngai ete nasala mokano na yo.” (Nz. 143:10) Tozali mpe na likanisi ndenge moko na bayekoli na Yesu na ekeke ya liboso oyo babengaki ye “Molakisi”. Mpe azalaki solo Molakisi monene! Wana esilisaki ye Lisolo na ye na likoló ya ngomba, “bibele bakamwi mateyo na ye; mpo ete alakisi bango lokola azali na bokonzi”. (Mat. 7:28, 29) Tala Balakisi baleki minene, mpe biso tozali koluka komekola bango.

2 Koteya ezali mosala oyo tosengeli koyekola yango. Na likambo nyonso, osengeli kolimbola mpo na nini, ndenge nini, esika nini mpe ntango nini. Moklisto nyonso asengeli koluka ete azala moteyi malamu, mingimingi lokola toyebi etinda oyo Yesu apesaki na bayekoli na ye: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso . . . kolakisa mpe bango.” (Mat. 28:19, 20) Mpo na komonisa ete ezali mosala esengi mayele, Paulo apesaki toli oyo epai ya Timote: “Opesa toli, na motema petee mpe [na mayele] na kolakisa.”​—2 Tim. 4:2.

3 Mabaku mpo na koteya mazali mingi. Baboti basengeli koteya bana na bango. Basakoli basengeli koteya bato oyo basepeli na nsango malamu, na nzela na boyekoli ya Biblia na bandako ya bato yango. Mbala mingi ekosengelaka mpe koteya basakoli ya sika. Bandeko mibali mingi bazali na libaku malamu ya kosala badiskur ya kolendisa na likita ya mosala to badiskur na miso ya bato nyonso. Bayekoli nyonso na Eteyelo ya mosala ya Nzambe basengeli kozala na mposa ya komonisa bokoli na bango mpo na oyo etali koteya. Wana ekokolisa yo makoki na yo mpo na koteya mpe okosangana na eteni oyo ya mosala ya boklisto, okooka litondi mpe esengo mozindo. Ezalaka esengo monene ya komona bokoli malamu ya elimo ya moto oyo yo oteyaki ye Liloba ya Nzambe.

4, 5. Likoló na nani mpe likoló na nini tosengeli kotya motema wana ezali biso koteya?

4 Tya motema epai na Jéhovah. Mpo na kozala molakisi akembi ya nsango malamu, esengeli ete otya motema epai na Jéhovah, kotalela ye, koluka kotambwisama na ye mpe kosenga lisalisi na ye. (Masese 3:5, 6) Ata Yesu alobaki: “Makambo mazali ngai koteya mauti na ngai te kasi na Motindi na ngai.” (Yoane 7:16) Azalaki ntango nyonso kotinda bayoki na ye na Liloba na Nzambe, abimiselaki bato maloba na mikanda na Makomami na hébreu soko katikati boye, to mpe akotisaki yango kati na masolo na ye oyo na nsima ekomamaki. Na yango, mekola Yesu ntango ozali koteya bamosusu, kolukaka ntango nyonso kosimbisa mateya na yo na Liloba na solo na Nzambe. Luka biyano na yo kati na yango, mpamba te ezali na mokanda mosusu te oyo ekoki kolakisa bato ndenge ya kokoma bayekoli ya Yesu, bobele Biblia mosantu.​—2 Tim. 3:16.

5 Soki otii motema na yo mobimba epai na Jéhovah, okozanga makoki te. Nzambe azali kopesa biso mayele likoló na mikano na ye ndenge eyebisami kati na Liloba na ye ya solo. Soki okokabola boyebi oyo elongo na bazalani na yo, Jéhovah akosunga yo. Komizongisa nsima te na kolobaka ete: “Ngai nazali molakisi te.” Okoki kokoma molakisi soko okobondela Jéhovah mpe soki okotya motema epai na ye.​—2 Bakol. 3:5.

6-8. Komilengela ezali na ntina mpo na koteya malamu?

6 Komilengela. Ya solo, boyebi esengeli. Liboso ya koteya baninga likambo, yo moko osengeli naino koyekola yango malamumalamu. (Baloma 2:21) Wana boyebi na yo ekokola mingi, okozala mpe molakisi malamu koleka. Nzokande, ata osilisi boyebi nyonso te, oyebi bobele makambo na ebandeli, okoki kozala molakisi. Loba makambo oyo yo oyebi. Ata bana, bakoki kolakisa baninga na bango na kelasi makambo oyo baboti bateyaki bango. Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekosalisa yo oyekola ndenge ya koteya bato mosusu.

7 Soki osengeli kotambwisa boyekoli ya Biblia, omikotela naino yo moko ndimbola nyonso epesami na ntina na likambo boye to likambo boye. Meka koluka koyeba mpo na nini mpe ndenge nini. Sala makasi ya kolimbola makanisi na maloba na yo moko. Yekola mpo osimba ntina malamu na bapreve to bilembeteli bipesami na Biblia na ntina na likambo boye to likambo boye. Omibongisa malamu mpo na komonisa ndenge ya kosalela mikapo mipesami.

8 Komilengela esengi lisusu kotalela na liboso mituna oyo moto akoki kokanisa kati na makanisi na ye na ntina na makambo bateyaki ye na lingomba na ye. Koyebaka yango, okoki koluka biyano epai na epai, likoló na makambo oyo makosepelisa moto yango. Soko obateli na makanisi na yo makambo oyo moto asili koyeba, okoki kotya moboko mpo ete azwa boyebi mosusu mpe kosalisa ye ete akola. Moto oyo abokwamaki lolenge mosusu akozala mpe na mposa ete osalela makanisi mosusu mpo na ye. Na yango soki oyebi moto, okoki komilengela malamu mpo na kosalisa ye.

9. Ndenge nini okoki kosalisa moto ete ayeba kopesa biyano na maloba na ye moko?

9 Mituna. Lokola Yesu Klisto amonisaki yango mbala mingi, kosalela mituna ezali na ntina mingi mpo na koteya malamu. (Luka 10:36) Okosalelaka metode oyo ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, kotunaka mituna minyatami na nse ya nkasa ya mikanda na biso. Kasi moteyi malamu akosuka te bobele na koyoka biyano oyo moyekoli azali kotanga yango se kotanga. Akotuna ye mituna misusu mpo ete moyekoli ayanola na maloba na ye moko. Ntango mosusu, ekoki bobele oloba na ye ete: “Eyano na yo ezali malamu, kasi okoki kozongela yango na ndenge mosusu, na maloba na yo moko?”

10. Limbola ndenge okoki kosalela mituna mpo na kokamba makanisi ya moto.

10 Mituna mikemike mpo na kokamba elimo ya moto ekosalisa mpe yo na koteya malamu. Ezali mituna oyo mikopesa yo nzela na kokamba makanisi ya moto, engebene boyebi azali na yango, kino abimisa likanisi moko oyo naino akanisa te ete ekoki kozala bongo. (Mat. 17:25, 26; 22:41-46) Ezali lokola omilobeli yo moko: ‘Nayebi ete moto oyo ayebi mwa makambo mingi; na yango, soki nakotuna naino ye mituna mikemike na molongo ebongi, akokoma kino na eyano ya malamu. Nzokande, soki nakotuna ye bobele motuna moko ya monene, akokoma na eyano ya malamu te.’ Na maloba mosusu, moto azali na mwa boyebi ekoki oyo mbele ekoki kokomisa ye kino na eyano ya malamu, kasi azali na mposa ya lisalisi. Ya solo, ezali petee mpo na koyebisa ye eyano. Nzokande soki okosalela mituna mikemike mpo na kokamba makanisi na ye, akondima eyano kozanga koimaima mpamba te ye moko nde apesi yango; epai mosusu, kosalaka bongo, ozali kosalisa ye na kokolisa makoki na ye ya kokanisa. Mpamba te mituna na yo milakisi elimo na ye mokemoke kino kokoma na eyano esengeli. Metode oyo ekozala mpo na ye na motuya monene na ntango ekoya.

11. Mpo na nini ebongi kotuna likanisi ya moto?

11 Ntango mosusu okomona ete ezali litomba kotuna moto likanisi na ye mpenza. Okotuna bongo mituna mpo ayebisa yo, nini mpenza ye andimaka. Na ndakisa, okoki kotuna ye mobeko ya Nzambe na ntina na pite. Mbala mosusu akobimisa mokapo ya Biblia oyo emonisi ete pite ezali mabe. Kasi ye mpenza andimi ete ezali bongo? Likanisi na ye moko ezali nini? Okoki bongo kotuna ye motuna mpo na koyeba nini mpenza ye akanisaka mpo na pite, kolobaka na ye boye na ndakisa: “Okanisi ete likambo yango ezali na ntina?” Eyano na ye ekomonisa yo soki asimbaki ntina na nyonso to te, mpe okokoka kosalisa ye. Mituna ya boye ekosalisa yo ete okota na motema ya moto.

12, 13. Mpo na nini kosalela mituna ezali na ntina wana ezali biso koteya ndako na ndako to wana ezali biso kosala diskur liboso ya lisangá mobimba?

12 Mituna mizali mpe na ntina wana ezali biso kokende ndako na ndako. Na ndakisa, mpo na kosalisa moto ete asimba ntina na mateya mingi na Biblia, osengeli koyeba nini ye azali kokanisa. Mpe oyebi ete soki, na kotunaka ye mituna, opesi ye libaku ya kobimisa likanisi na ye moko, akozala na bolingo malamu ya kolanda maloba na yo.

13 Ata ntango ozali kosala diskur liboso ya lisangá mobimba, okoki mbala mosusu kotuna mituna mpe kosenga na bayoki ete bayanola. Kasi okoki mpe kosalela mituna mosusu, oyo ntina na yango ezali bobele mpo na kokamba elimo ya bayoki na yo, kozanga koluka ete bapesa yo eyano. (Luka 12:49-51) Yo moko okoyanola mituna yango. Soki nde olandisi mituna mingi, okoki kozwa ekateli ya koyanola bobele na oyo ya nsuka. Lolenge na mituna yango ekotalela motindo na bayoki mpe na makanisi oyo olingi koteya bango.

14, 15. Yebisa ntina na bandakisa to masese mpe ntina na bozongeli.

14 Bandakisa to masese. Yesu asalelaki mingi bandakisa mpe masese kati na koteya na ye. Lelo se ndenge moko, bateyi baklisto bakoki kokamata kati na makambo ya bomoi mpe na makambo oyo bamonimoni, bandakisa oyo ekosalisa bayoki na bango ete babatela mateya ya ntina kati na elimo na bango. (Mat. 13:34, 35) Pona bandakisa ya petee, mpo soki ezali komplike, bayoki bakolanda yango malamu te mpe ekoki kobungisa makambo ya ntina oyo olingi kotika kati na elimo ya bato. Mokanda ya Yakobo ezali na ebele na bandakisa soki mpe bililingi: mbonge na mai monene, longo ya masuwa, ebende na monoko na mpunda, talatala, bongo na bongo. Bililingi oyo nyonso bizwamaki na makambo oyo bato bameseni komona yango na bomoi ya mokolo na mokolo. Moteyi oyo azali na elimo ya kolamuka akopona bandakisa na ye na kotalela mbula ya moto, lingomba na ye mpe koyekola na ye na mosuni. Nzokande, longola koteya moto mokomoko, bandakisa soki mpe masese ekoki mpe kosalelama mpo na badiskur esopami liboso na bato mingi.

15 Bozongeli. Ezala na badiskur oyo ozali kosala liboso ya lisangá mobimba to mpe ntango ozali koteya moto moko na ndako na ye, bozongeli ezali eloko ekoki kozanga te soki olingi koteya malamu. Luka kotika kati na elimo ya moto maloba to bafraze ya ntina, mpe mingimingi mikapo ya Biblia. Soki opesameli mokumba na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, oyo okosala yango elongo na ndeko mosusu, bimisa bapwɛ́ ya ntina na kotunaka ye mituna lokola bozongeli. Yango ekosalisa yo na komona soki moto asimbi makambo ya ntina. Okomekola Yesu, oyo atunaki motuna oyo: “Bosili kokanga ntina na oyo nyonso?” —Mat. 13:51.

16. Soki oratere azali molakisi malamu, bayoki basengeli komikundola nini nsima na diskur na ye?

16 Badiskur oyo ezali solo koteya bato. Omikundolaka na esengo nyonso badiskur oyo eteyaki yo makambo mingi. Meka komona mpo na nini bandeko mosusu bazali balakisi malamu mpe mpo na nini bato babosanaka badiskur na bango te. Balobaka mbangumbangu te. Batunaka mituna, ezala mpo na kosenga na bayangani ete bayanola, to bobele mpo na kokamba makanisi ya bayoki, kozanga koluka ete bayanola. Bazali kobenga bato kolanda kati na Biblia na bango moko mikapo ya ntina oyo bazali kotanga mpe bazali kokanisa likoló na yango, kolimbolaka yango mpe kobimisaka polele makanisi ya ntina. Ba oratere mosusu basalelaka bafoto to ba dessins mpo na kolakisa yango na miso ya bayoki. Nzokande, ata metode nini oponi, okomona ete bato bakosimba malamu mwa bapwɛ́ soki olimboli yango malamu; nzokande ebele ya makanisi oyo oleki na yango likolólikoló, bakosimba yango mpenza te. Soki oratere azali molakisi malamu, bayoki na ye bakomona mpasi te mpo na komikundola teme ya diskur na ye, makambo ya ntina mingi oyo alobelaki mpe mbala mosusu verset moko to mibale oyo atangaki.

17, 18. Ndenge nini mpe mpo na nini tosengeli kokamba bayoki na biso epai na Bateyi minene?

17 Tokamba bayoki na biso epai na bateyi minene. Moteyi moklisto asengeli koyeba ntango nyonso ete ezali likambo na ntina na kokamba bayoki na ye epai na Jéhovah Nzambe, Liziba na bomoi, mpe epai na Yesu Klisto, oyo na nzela na ye Nzambe azali kopesa bato bomoi mpe mapamboli. (Yoane 17:3) Sala makasi na kokolisa kati na elimo ya bazalani na yo botondi mozindo mpo na Bateyi minene oyo.

18 Wana ekokolisa yo makoki na yo mpo na koteya, okomona ntina ya bolingo. Soki moto ayekoli solo kolinga Jéhovah Nzambe, akosalela ye na bosembo nyonso. Yango wana, na boumeli ya boyekoli elongo na moto, salela mabaku malamu oyo mamonani mpo na kobenda likebi ya moto likoló na oyo nyonso Nzambe asalaki mpe azali naino kosala mpo na biso bato ya masumu. Monisa mayele, boyengebene, bolingo mpe nguya ya Nzambe, bizaleli oyo bizali na boyokani kati na yango mpo na bolamu ya bato ya botosi. Soki motema na moto ezali malamu, nsima na mikolo akoyoka mposa mpenza ya kozala sembo epai ya Jéhovah mpe kosangana na mosala ya kokumisa nkombo na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto