Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/9 nk. 19-24
  • Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóteyaka na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ
  • Koyeba kotuna mituna
  • Makanisi oyo ebongi
  • Bandakisa oyo ebongi
  • Teyá na mayele mpe yebá kondimisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
    “Yaká, landá ngai”
  • Bandakisa ebongi na lisolo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • “Naino moto moko te alobá lokola moto yango”
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/9 nk. 19-24

Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene

“Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”​—MATAI 28:19, 20.

1, 2. (a) Ndenge nini tokoki mpenza koloba ete biso nyonso tozali bateyi? (b) Na likambo ya koteya, mokumba nini bapesi kaka na baklisto?

OZALI moteyi? Tokoki mpenza koloba ete biso nyonso tozali bateyi. Mbala nyonso oyo ozali kolakisa moto oyo abungi nzela, to ozali kolakisa moninga ya mosala ndenge ya kosala mosala moko, to ozali kolakisa mwana kokanga nsinga ya sapato, ozali koteya. Kosalisa basusu na makambo ya ndenge wana epesaka esengo, boye te?

2 Baklisto ya solo bazali na mokumba moko ya koteya oyo epesami kaka na bango. Bapesi biso mokumba ya ‘kokómisa bato bayekoli mpe koteya bango.’ (Matai 28:19, 20) Toteyaka mpe na kati ya lisangá. Mibali oyo bakokisi masɛngami baponami mpo básala lokola “babateli ya mpate mpe bateyi” mpo na kotonga lisangá. (Baefese 4:11-13) Na misala na bango ya mokolo na mokolo, basi baklisto oyo bakɔmeli basengeli kozala “bateyi ya makambo ya malamu” mpo na bilenge basi. (Tito 2:3-5) Bapesi biso nyonso toli ete tólendisaka bandeko na biso, mpe tokoki kolanda toli yango soki tozali kosalela Biblia mpo na kotonga kondima ya basusu. (1 Batesaloniki 5:11) Kozala moteyi ya Liloba ya Nzambe mpe koyebisa bato mosusu makambo ya elimo oyo ezali na motuya mpe oyo ekoki kopesa bango bolamu ya seko ezali mpenza libaku malamu!

3. Ndenge nini tokoki kokóma bateyi ya malamu koleka?

3 Kasi, ndenge nini tokoki kokóma bateyi ya malamu koleka? Mingimingi, na kolanda ndakisa ya Yesu, Moteyi Monene. Nzokande, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu, moto ya kokoka?’ Ya solo, tokoki kozala bateyi ya kokoka te. Kasi, ezala ete tozali na makoki mingi to te, tokoki kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yesu. Tiká tótalela mayele minei ya koteya kati na oyo azalaki kosalela: kozanga mindɔndɔ, kotuna mituna malamu, kokanisa na bato na ndenge ebongi mpe bandakisa oyo ebongi.

Tóteyaka na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ

4, 5. (a) Mpo na nini emonanaka mingi ete solo ya Biblia ezali na mindɔndɔ te? (b) Mpo na koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ, mpo na nini ezali na ntina tópona malamu maloba oyo tokosalela?

4 Mateya ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe ezali na mindɔndɔ te. Na libondeli moko, Yesu alobaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, . . . mpamba te obombi makambo oyo liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele mpe omonisi yango epai ya bana mike.” (Matai 11:25) Yehova amonisaki bato ya sembo mpe ya komikitisa mikano na ye. (1 Bakolinti 1:26-28) Yango wana, emonanaka mingi ete solo ya Biblia ezalaka na mindɔndɔ te.

5 Ntango ozali koyekola na moto Biblia, to ntango ozongeli moto moko oyo asepelaki, ndenge nini okoki koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ? Makambo nini toyekoli epai ya Moteyi Monene? Mpo bato oyo azalaki koloba na bango bákanga mpenza ntina ya maloba na ye, bato oyo mingi kati na bango “batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,” Yesu azalaki kosalela maloba ya polele oyo bakokaki kokanga ntina na yango. (Misala 4:13) Na yango, mpo na koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ, likambo ya liboso ezali kopona malamu maloba oyo tokoloba. Ezali na ntina te tóluka maloba ya makasimakasi to oyo eyebani mpenza te mpo na kondimisa bato mosusu solo ya Liloba ya Nzambe. ‘Elobeli wana oyo eleki mpenza’ ekoki kobangisa, mingimingi bato oyo bakɔtá kelasi mingi te to bayebi makambo mingi te. (1 Bakolinti 2:1, 2) Ndakisa ya Yesu ezali komonisa ete kosalela maloba ya pɛtɛɛ ekoki kosalisa mpo na koteya solo malamu koleka.

6. Ndenge nini tokoki koboya koyebisa moto oyo tozali koyekola na ye Biblia ebele ya makambo na mbala moko?

6 Mpo na koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ, tólinga mpe te koyebisa moyekoli ya Biblia ebele ya makambo na mbala moko. Yesu azalaki kotalela makoki ya bayekoli na ye. (Yoane 16:12) Biso mpe tosengeli kotalelaka makoki ya moto oyo tozali koyekola na ye. Na ndakisa, ntango tozali koyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ezali na ntina te tólimbolaka makambo mikemike nyonso.a Ezali mpe na ntina te tókendaka mbangumbangu, lokola nde kosilisa makambo nyonso oyo tokanaki kotalela nde likambo eleki ntina. Kasi, ebongi tótalela bamposa mpe makoki ya moto oyo tozali koyekola na ye mpo na koyeba soki ebongi tóyekolaka na ye malɛmbɛmalɛmbɛ. Mokano na biso ezali ya kosalisa moto oyo tozali koyekola na ye akóma moyekoli ya Klisto mpe mosambeli ya Yehova. Tosengeli kozwa ntango nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa moto oyo azali kosepela koyekola akanga mpenza ntina ya makambo oyo azali koyekola. Na ndenge yango, solo ekoki kosimba motema na ye mpe kopesa ye mposa ya kosalela yango.​—Baloma 12:2.

7. Makanisi nini bapesi biso oyo ekoki kosalisa biso na koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ ntango tozali kosala lisukulu na kati ya lisangá?

7 Ntango tozali kosala lisukulu na lisangá, mingimingi soki bato ya sika bazali na kati ya bayangani, ndenge nini tokoki koloba maloba “oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina”? (1 Bakolinti 14:9) Tótalela makanisi misato oyo ekoki kosalisa biso. Ya liboso, mbala nyonso oyo osaleli liloba moko oyo bato mosusu bayebi yango te, limbolá liloba yango. Ezali na maloba mosusu oyo kaka biso nde tosalelaka yango mpo tozwi yango na boyekoli na biso ya Biblia. Soki tozali kosalela maloba lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” “bampate mosusu,” mpe “Babilone Monene,” ekoki kozala na ntina tólimbola yango na mwa maloba ya pɛtɛɛ mpo ezala polele na makanisi ya bato. Ya mibale, tóboya kolobaloba. Ebele ya maloba, to maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ, ekoki kobungisa bato oyo bazali koyoka lisolo. Kozala polele esɛngaka ete moto asalela te maloba to bafraze oyo ezali mpenza na ntina te. Ya misato, koluka kolobela makanisi ebele ebele te. Ntango tozali kotánga mikanda mosusu mpo na koluka makanisi, tokoki kokuta makambo ebele ya malamu. Kasi, eleki malamu kobongisa lisolo na mwa makanisi moke ya ntina, mpe kosalela kaka makambo oyo ezali kolimbola mwa makanisi yango mpe oyo ekoki kolimbolama malamumalamu na boumeli ya ntango oyo epesami.

Koyeba kotuna mituna

8, 9. Ndenge nini tokoki kotuna motuna oyo ebongi mpo na moto oyo tokuti na ndako oyo tokei kosakola? Pesá bandakisa.

8 Tóbosana te ete Yesu ayebaki mpenza kotuna mituna mpo bayekoli na ye bábimisa makanisi oyo ezalaki na bɔɔngɔ na bango mpe mpo na kolamusa makanisi na bango mpe koteya bango ndenge ya kokanisa malamu. Yesu azalaki kosimba mitema na bango na mituna oyo azalaki kotuna bango na boboto. (Matai 16:13, 15; Yoane 11:26) Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini tokoki kotuna mituna malamu?

9 Ntango tozali kosakola ndako na ndako, tokoki kotuna bato mituna mpo na kobenda likebi na bango, mpe na ndenge yango, kobongisa makanisi na bango mpo na kosakwela bango Bokonzi ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kotuna motuna oyo ekoyokana na makambo oyo ekoki kobenda likebi ya moto oyo tokutani na ye? Tóyeba kosalela miso. Ntango tozali kopusana na ndako moko, tóbwakaka mwa moke miso epai na epai. Soki na kati ya lopango tomoni biloko oyo bana basakanaka na yango, ekolakisa biso mbala moko ete bana bazali na ndako yango. Boye, tokoki kotuna motuna oyo, ‘Osilá komituna soki mokili ekozala ndenge nini ntango bana na yo bakokola?’ (Nzembo 37:10, 11) Soki tomoni porte ezali na bafungola mingi, to ezali na biloko mosusu mpo na kopekisa miyibi, tokoki kotuna boye: ‘Okanisi ete ekozala na mokolo mosusu oyo bato lokola ngai na yo tokobanga eloko moko te ntango tofandi na ndako to tozali kotambola na balabala?’ (Mika 4:3, 4) Soki tomoni eloko moko oyo ezali komonisa ete moto ya maladi azali na ndako yango, tokoki kotuna boye: ‘Ekozala na mokolo mosusu oyo moto nyonso akozala nzoto kolɔngɔnɔ?’ (Yisaya 33:24) Tokoki kozwa ebele ya makanisi mosusu na buku Comment raisonner à partir des Écritures.b

10. Ndenge nini tokoki kotuna mituna mpo na ‘kotoka’ makanisi oyo ezali na motema ya moto oyo tozali koyekola na ye, kasi likambo nini tosengeli kobosana te?

10 Ndenge nini tokoki kotuna mituna malamu ntango tozali koyekola na bato Biblia? Biso tozali lokola Yesu te, tokoki te kotánga makambo oyo ezali na mitema ya bato. Nzokande, mituna ya mayele ekoki kosalisa biso na ‘kotoka’ makanisi oyo ezali na motema ya moto oyo tozali koyekola na ye. (Masese 20:5) Tózwa ndakisa ete tozali koyekola mokapo oyo elobi ete “Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe epesaka esengo,” na buku Boyebi. Mokapo yango ezali kolobela makanisi ya Nzambe mpo na makambo lokola kozanga bosembo, pite na ekobo, mpe makambo mosusu. Moyekoli akoki koyanola malamu na mituna oyo batuni na buku, kasi esengeli tóyeba soki azali kondima makambo oyo azali koyekola. Tokoki kotuna ye boye: ‘Omoni likanisi ya Yehova na likambo yango ndenge nini?’ ‘Ndenge nini okoki kosalela mitinda yango ya Biblia na bomoi na yo?’ Kasi, tóbosana te ete tosengeli kozala na limemya, kopesa moto oyo tozali koyekola na ye lokumu. Tosengeli te kotuna ye mituna oyo ekoyokisa ye nsɔni.​—Masese 12:18.

11. Na ndenge nini bandeko oyo basalaka masukulu bakoki kotuna mituna malamu?

11 Bandeko oyo basalaka masukulu bakoki mpe kotuna mituna. Mituna oyo esɛngaka te ete bato oyo bazali koyoka bápesa eyano, ekoki kosalisa bato yango na kokanisa. Na bantango mosusu, Yesu azalaki kotuna mituna ya ndenge yango. (Matai 11:7-9) Lisusu, nsima ya koloba maloba ya ebandeli, molobi oyo azali kosala lisukulu akoki kotuna mituna mpo na komonisa makanisi ya ntina oyo akolobela. Na ndakisa, akoki koloba boye: “Na lisukulu na biso, tokozwa biyano na mituna oyo . . . ” Na nsima, na maloba ya nsuka, akoki kotuna lisusu mituna yango mpo na kozongela makanisi ya ntina.

12. Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge oyo bankulutu bakoki kotuna mituna mpo na kosalisa ndeko moko azwa libɔndisi ya Liloba ya Nzambe.

12 Ntango bakendaka kotala bampate mpo na kolendisa bango, bankulutu bakoki kotuna mituna mpo na kosalisa “milimo oyo ezali konyokwama na makanisi” bázwa libɔndisi ya Liloba ya Yehova. (1 Batesaloniki 5:14) Na ndakisa, mpo na kosalisa moto oyo azali kaka mawamawa, nkulutu akoki kotángela ye Nzembo 34:18. Vɛrsɛ yango elobi boye (NW): “Yehova azali penepene na baoyo bazali kotungisama na mitema; abikisaka baoyo bazali na elimo ya konyokwama.” Mpo na koyeba soki mpenza moto oyo alɛmbi nzoto azali komona ndenge oyo vɛrsɛ yango etaleli ye, nkulutu akoki kotuna ye boye: ‘Yehova azali penepene ya banani? Ntango mosusu omiyokaka ete “motema na yo etutami” mpe ete “elimo na yo enyatami”? Soki, ndenge Biblia elobi yango, Yehova azali penepene ya bato ya ndenge wana, okanisi te ete azali mpe penepene na yo?’ Kolendisa na boboto moto oyo alɛmbi nzoto ndenge wana ekoki kopesa ye lisusu makasi.​—Yisaya 57:15.

Makanisi oyo ebongi

13, 14. (a) Ndenge nini tokoki kokanisa na moto oyo alobi ete andimaka Nzambe te mpo amonaka ye te? (b) Mpo na nini tosengeli kolikya te ete tokondimisa bato nyonso?

13 Na mosala na biso ya kosakola, tosengeli kosalela makanisi oyo ezali kondimisa mpo na kosimba mitema ya bato. (Misala 19:8; 28:23, 24) Yango elingi koloba te ete tosengeli koyekola kokanisa na ndenge ya bato ya mayele mingi mpo na kondimisa bato solo ya Liloba ya Nzambe. Kokanisa na ndenge ebongi esɛngi te kobimisa makanisi ya mindɔndɔmindɔndɔ. Kobimisa makanisi ebongi oyo elobami na maloba ya pɛtɛɛ ebotaka mbuma ya malamu. Tópesa ndakisa.

14 Tokoki koloba nini epai ya moto oyo alobi ete andimaka Nzambe te mpo amonaka ye te? Tokoki kosalisa ye akanisa ndenge oyo makambo esalemaka. Ntango tomoni likambo moko esalemi, tondimaka ete ezali na eloko oyo esali yango. Tokoki koloba boye: ‘Soki okei na kati ya zamba moko mosika mpe kuna okuti ndako moko batongá yango malamu mpe ezali na ebele ya biloko ya kolya, okoloba mbala moko ete ezali na moto moko oyo atongaki yango mpe atyaki biloko na esika ya kobomba biloko na ndako yango. Ndenge moko mpe, ntango tozali komona ndenge oyo mokili ebongisami mpe ebele ya biloko ya kolya na “esika ya kobomba biloko” ya mokili, omoni te ete tosengeli kondima ete ezali na Moto moko oyo asalaki yango?’ Biblia elobi yango na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ ete: “Ya solo, ndako nyonso etongami na moto, kasi oyo atongaki biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebele 3:4) Kasi, ata soki tosaleli makanisi oyo ezali malamu ndenge nini, tokondimisa bato nyonso te. Biblia ezali koloba na biso ete kaka baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi” nde bakokóma bandimi.​—Misala 13:48; 2 Batesaloniki 3:2.

15. Likanisi ya ndenge nini tokoki kosalela mpo na komonisa bizaleli mpe banzela ya Yehova, mpe wapi bandakisa mibale oyo ezali komonisa ndenge tokoki kosalela likanisi yango?

15 Na ntango tozali koteya, ezala na mosala ya kosakola to na lisangá, tokoki kolobela makanisi oyo ebongi mpo na komonisa polele bizaleli mpe banzela ya Yehova. Ezalaka mpenza malamu mingi soki tozali kotuna motuna oyo ezali na maloba ‘mingi boni’ to likanisi oyo ezali na maloba ‘na koleka,’ oyo Yesu azalaki ntango mosusu kosalela, mpo na kosalisa bango na kokanisa. (Luka 11:13; 12:24) Likanisi yango oyo ezali komonisa bokeseni ekoki mpenza kosimba motema. Mpo na komonisa ete liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ ezali liteya ya lokuta, tokoki koloba boye: ‘Tata moko te ya bolingo akotumba lobɔkɔ ya mwana na ye na mɔ́tɔ mpo na kopesa ye etumbu. Na koleka, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akomona likanisi ya kotumba bato na lifelo ya mɔ́tɔ mabe mpenza!’ (Yilimia 7:31) Mpo na komonisa moyekoli ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko, tokoki koloba boye: ‘Soki Yehova ayebi monzoto mokomoko na nkombo, atako minzoto ezali bamiliare, akomibanzabanzaka na koleka mpo na bato oyo balingaka ye mpe oyo ye moko asombaki na makila ya motuya mingi ya Mwana na ye!’ (Yisaya 40:26; Misala 20:28) Kokanisa malamu ndenge wana na bato ekosalisa biso na kosimba mitema na bango.

Bandakisa oyo ebongi

16. Mpo na nini bandakisa ezali na ntina mingi mpo na koteya?

16 Bikelakela ekómisaka bilei elɛngi; ndenge moko mpe bandakisa oyo ebongi ekoki kokómisa mateya na biso elɛngi. Mpo na nini bandakisa ezali na ntina mingi mpo na koteya? Moteyi moko alobaki boye: “Komona makambo na makanisi mpamba ezali moko na makambo oyo bato bazalaka na mokakatano mpo na kosala yango.” Bandakisa emonisaka bililingi oyo bɔɔngɔ ekoki kobomba, mpe esalisaka biso tókanga ntina ya makanisi ya sika malamumalamu. Yesu ayebaki mpenza kosalela bandakisa. (Malako 4:33, 34) Tótalela ndenge oyo tokoki kosalela bandakisa na ntango tozali koteya.

17. Tángá makambo minei oyo esalaka ete ndakisa ezala mpenza malamu.

17 Makambo nini esalaka ete ndakisa ezala mpenza malamu? Ya liboso, esengeli kozala ndakisa oyo ebongi na bato oyo bazali koyoka biso, esengeli kouta na makambo oyo bayebi. Tóbosana te ete Yesu azalaki kozwa bandakisa na ye na makambo oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki komona mokolo na mokolo. Ya mibale, ndakisa esengeli koyokana na likambo oyo tozali kolimbola. Soki boyokani ezali komonana te na likambo oyo tozali kolimbola, ndakisa yango ekobungisa bato oyo bazali koyoka biso. Ya misato, ndakisa esengeli te kotonda na ebele ya makambo mikemike oyo ezali mpenza na ntina te. Tóbosana te ete Yesu alobelaki kaka makambo mikemike oyo ezalaki na ntina mpe atikaki oyo ezalaki mpenza na ntina te. Ya minei, ntango tozali kopesa ndakisa, tosengeli kosala makasi ete ndimbola na yango emonana polele. Soki te, bato mosusu bakokanga ntina na yango te.

18. Ndenge nini tokoki kozwa bandakisa oyo ebongi?

18 Ndenge nini tokoki kozwa bandakisa oyo ebongi? Ezali na ntina te tóluka masolo ya milaimilai mpe ya mindɔndɔmindɔndɔ. Bandakisa ya mikuse ekoki kozala malamu koleka. Tómeka kaka kokanisa bandakisa ya likambo oyo tozali kolobela. Tókamata ndakisa ete tozali kolobela ndenge oyo Nzambe alimbisaka, mpe tolingi kopesa ndakisa moko mpo na kolimbola likanisi oyo ezali na Misala 3:19, oyo elobi ete Yehova ‘abomaka,’ to apangwisaka mabunga na biso. Likanisi yango moko ezali maloba ya elilingi; sikoyo, eloko nini mpenza tokoki kozwa lokola ndakisa mpo na kolimbola likanisi yango? Tokoki kozwa ndakisa ya gɔmɛ to mwa elamba! Tokoki koloba boye: ‘Ntango Yehova alimbisi masumu na biso, abomaka to apangwisaka yango ndenge babomaka makomi na gɔmɛ to bapangwisaka esika na mwa elamba.’ Ezali mpasi mpo moto akanga ntina te ya likanisi oyo ndakisa ya pɛtɛɛ ndenge wana ezali komonisa.

19, 20. (a) Epai wapi tokoki kozwa bandakisa ya malamu? (b) Tángá mwa bandakisa ya malamu oyo ebimaki na mikanda na biso. (Talá mpe etanda.)

19 Epai wapi okoki kozwa bandakisa oyo ebongi, ata mpe oyo ezali kolobela makambo oyo esalemá mpenza? Luká yango na makambo oyo okutanaka na yango na bomoi na yo to na makambo ndenge na ndenge oyo bandeko na yo baklisto bakutaná na yango. Bandakisa ekoki kouta na makambo mosusu ebele, ata mpe na bikelamu ya bomoi to biloko mosusu, lokola oyo ezalaka na ndako, to na likambo moko oyo esalemi na mboka na bino mpe bato bayebi yango malamu. Lolenge ya malamu ya kozwa bandakisa ya malamu ezali kosalela miso na matoi, “kotala na likebi mpenza” makambo oyo ezali koleka mokolo na mokolo na esika tofandi. (Misala 17:22, 23) Mokanda moko oyo ezali koteya ndenge ya koloba liboso ya bato elobi boye: “Molobi oyo atalaka makambo ndenge na ndenge oyo bato basalaka, asololaka na bato ya lolenge nyonso, atalaka malamumalamu makambo mpe atunaka mituna tii akokanga ntina ya makambo yango, akozala na ebele ya bandakisa oyo ekosalisa ye mpenza na ntango oyo azali na mposa ya kosalela ndakisa.”

20 Ezali mpe na bisika mosusu oyo tokoki kozwa ebele ya bandakisa ya malamu: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká!, mpe mikanda mosusu oyo Batatoli ya Yehova babimisaka. Okoki koyeba makambo mingi soki ozali kotala malamu ndenge oyo mikanda yango esalelaka bandakisa.c Na ndakisa, tótalela ndakisa oyo ezali na buku Boyebi na mokapo ya 17, paragrafe ya 11. Ndakisa yango ezali komonisa ete na kati ya lisangá, esengeli kotalela bato ndenge na ndenge mpe bizaleli na bango lokola mituka oyo ezali kotambola na nzela oyo yo moko mpe ozali kotambola kati na yango na motuka na yo. Mpo na nini ndakisa yango ebongi mpenza? Okomona ete euti na makambo oyo esalemaka mokolo na mokolo, eyokani mpenza na likanisi oyo ezali kolobelama, mpe ezali mpasi te mpo na kobimisa liteya na yango. Tokoki kosalela bandakisa oyo euti na masolo oyo ezali na mikanda, mbala mosusu tokoki koyokanisa yango na bamposa ya moto oyo tozali koyekola na ye Biblia to kobongisa yango mpo na kosalela yango na lisukulu.

21. Kozala moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe ezali na mbano nini?

21 Kozala moteyi malamu epesaka mbano monene. Ntango tozali koteya, tozali kopesa basusu; tozali komipesa mpo na kosalisa bango. Kopesa ndenge wana epesaka bolamu, mpamba te Biblia elobi ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Mpo na bateyi ya Liloba ya Nzambe, bolamu yango ezali esengo oyo toyokaka na koyeba ete tozali kokabela bato eloko oyo ezali na motuya ya solosolo mpe ekoumela, elingi koloba solo ya Yehova. Tokoki mpe kozala na esengo ya koyeba ete tozali kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, Moteyi Monene.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Talá motó ya likambo “Entrées en matière pour la prédication,” na nkasa 9 tii 15 to mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, na nkasa 2 tii 7.​—Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Mpo na koyeba na mikanda nini okoki kozwa bandakisa, talá Index des publications de la Société Watch Tower 1986-2000, na motó ya likambo “Exemple.”​—Ebimisami na Batatoli ya Yehova, na minɔkɔ mingi.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini tokoki koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ ntango tozali koyekola na moto Biblia, mpe ntango tozali kosala lisukulu na lisangá?

• Ndenge nini tokoki kotuna mituna malamu ntango tozali kosakola ndako na ndako?

• Ndenge nini tokoki kosalela makanisi oyo ebongi mpo na komonisa polele bizaleli mpe banzela ya Yehova?

• Epai wapi tokoki kozwa bandakisa oyo ebongi?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Ozali koyeba lisusu bandakisa oyo?

Na etanda oyo tozongeli mwa ndambo ya bandakisa oyo ezali malamu mpenza. Tolendisi yo otánga lisusu ndakisa mokomoko na lisolo oyo elobelaki yango mpe talá ndenge oyo esalisaki na kokanga ntina ya likambo oyo lisolo yango ezalaki kolobela.

• Lokola bato oyo basalaka lisano ya kodiembela na nsinga to ya koselumwa mpe kobina na esika oyo ezali moselu, moto oyo alingi kozala na libala ya malamu asengeli koluka molongani oyo abongi.​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Mai 2001, lokasa 16.

• Koyebisa moto mosusu ndenge oyo ozali koyoka na motema na yo ezali lokola kobwakela ye bale. Okoki kobwakela ye yango malɛmbɛ to mpe kobamba ye yango na ndenge oyo ekoki koyokisa ye mpasi.​—Lamuká!, Aprili-Yuni 2001, lokasa 10.

• Koyekola komonisa bolingo ezali lokola koyekola monɔkɔ ya sika.​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Febwali 1999, nkasa 18, 22-23.

• Bikelakela ezali na litomba ya bademo ndenge eloko ya kolya oyo batii na motambo esalisaka babomi-nyama: ebendaka nyama.​—Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, lokasa 111.

• Ndenge oyo Yesu abikisaki bana ya Adama ezali lokola moto moko ya motema malamu oyo azali na bozwi mingi afuti nyongo ya kompanyi moko (oyo mokambi na yango oyo azali sembo te akɔtaki) mpe kompanyi efungwami lisusu; na bongo, ekozala litomba mpo na ebele ya basali ya kompanyi yango.​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Febwali 1991, lokasa 13.

• Ndenge moko bato oyo balingaka mayemi, bikeko mpe biloko mosusu ya ndenge wana bakosala nyonso mpo na kobongisa eloko moko ya valɛrɛ mingi oyo ebebi, Yehova akoki kobosana kozanga kokoka na biso mpe kotya likebi na ye na makambo ya malamu oyo tozali na yango, mpe nsukansuka, kozongisa biso na ezaleli ya kokoka oyo Adama abungisaki.​—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Febwali 1990, lokasa 22.

[Bililingi na lokasa 20]

Baklisto ya solo bazali bateyi ya Liloba ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 21]

Bankulutu bakoki kotuna mituna mpo na kosalisa bandeko na bango bandimi na kozwa libɔndisi ya Liloba ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto