Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 34 nk. 168-172
  • Bandakisa ebongi na lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ebongi na lisolo
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
    “Yaká, landá ngai”
  • Bandakisa oyo ezali koteya
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 34 nk. 168-172

Liteya 34

Bandakisa ebongi na lisolo

1, 2. Limbola na mokuse ntina na bandakisa to bililingi kati na diskur.

1 Na kosalelaka bandakisa, molobi azali kokotisa kati na elimo ya bayoki na ye bililingi oyo bizali na ndimbola monene. Bandakisa soko mpe masese elamusaka mposa ya bayoki mpo na kolanda lisolo mpe ezali kobimisa makanisi ya ntina polele. Ezali kopusa makanisi ya bato mosika mpe ezali kosalisa bango na kosimba noki makanisi ya sika. Bandakisa eponami malamu ezali kofungola bososoli mpe mayoki ya bato oyo bazali kolanda yo. Na motindo yango, liteya elekisami na elimo, na makasi oyo, mayebisi mpamba ekoki kosala yango te. Nzokande, ekozala boye solo soki bandakisa oyo oponi ezali bandakisa ebongi. Esengeli kokokana na lisolo.

2 Tokoki ntango mosusu kolonga to kopengola botemeli na lisalisi ya ndakisa moko. Liboso ya kolobela liteya moko oyo ebimisaka ntembe mingi, mbala mingi tokoki kopengola botemeli soki tokosalela elakiseli malamu. Na ndakisa, tokoki koloba: “Tata nini akozikisa mosapi ya mwana na ye na móto mpo na kopesa ye etumbu?” Elakiseli motindo oyo, liboso ya kolobela liteya ya “lifelo”, ekomonisa polele ete liteya oyo ezali eloko ekoki kondimama te mpe ezali lokuta; bongo ekozala mpasi te mpo na kokweisa yango.

3-6. Epai wapi tokoki kozwa bandakisa oyo tokosalela?

3 Bandakisa ekoki kozala na mitindo mingi: kokokanisa biloko mibale to mingi, masese, kokesenisa biloko mibale to mingi, boyokani na biloko mibale, bililingi, makambo bato basili kokutana na yango, bongo na bongo. Ezali kozwama na nzela mingi. Ekoki kotalela biloko ndenge nyonso bizalisami, oyo etambolaka na oyo etambolaka te. Ekoki kozwama na misala ndenge na ndenge oyo bayoki basalaka, na makambo matali bato nyonso, na biloko ya ndako, na biloko oyo bato basili kosala, lokola bandako, bamasuwa, bongo na bongo. Kasi ata elakiseli nini oyo esalelami, molobi akopona yango engebene libaku mpe lisolo epesameli ye, kasi ezala te bobele mpo ete esepelisi ye.

4 Keba! Otondisa bandakisa ebele te kati na diskur na yo. Salela bandakisa, kasi kolekisa ndelo te!

5 Koyeba kosalela malamu bandakisa ezali lokola koyeba mosala. Esengi mayele mpe komesena. Kasi soki esalelami malamu, motuya na yango ezali monene. Mpo na koyeba kosalela yango, omimekisa kokanisa na kosalelaka bandakisa. Simba to zwa note na bandakisa oyo ozali kokutana na yango kati na botangi na yo. Na kotalaka biloko ndenge na ndenge, luka kokokanisa yango na bomoi mpe na mosala ya moklisto. Na ndakisa, soki omoni fololo moko ebebi mpe ekauki, okoki kokanisa: “Bolingo ezali lokola fololo; soki ebatelami malamu te, ekobeba mpe ekokauka.” Bato mingi bamonaka sanza ete ezali bobele eloko moko bato bakendaka kotala na likoló na mibembo na bango na bafizé. Nzokande mpo na moklisto, ezali eloko moko Nzambe asálá, satelite moko ezalisamaki na Nzambe, eloko ya likoló oyo ekoumela seko, oyo mpe ezali kotalela bomoi na biso, na koninganisaka mai monene na ndenge ya mbonge.

6 Na ntango ozali kobongisa diskur, soki ozwi bandakisa malamu te, tala mikanda ya la Société mpe luka bandakisa kuna na kati. Kanisa mpe na maloba ya ntina ya diskur mpe na bililingi oyo yango ezali kobimisa kati na elimo na yo; ekosalisa yo na kozwa bandakisa. Kasi obosana te ete ndakisa oyo eponami malamu te ezali kosala mabe mingi na esika ete esala malamu. Pwé oyo “Bandakisa ebongi na lisolo”, oyo esengami na fiche ya Toli mpo na balobi, elakisi mitindo mingi oyo ebongi tobatela yango ntango nyonso na makanisi.

7-9. Mpo na nini bandakisa ya petee eleki malamu?

7 Ezali na mindondo te. Bato bakomikundola noki ndakisa moko soki yango ezali petee. Na esika ete etya molili na lisolo mpe ebungisa makanisi ya bato, esengeli nde kongengisa likambo ya ntina oyo ozali koteya. Bandakisa mingi oyo Yesu apesaki ezalaki bobele na maloba moke. (Tala Matai 13:31-33; 24:32, 33.) Maloba masalelami masengeli kozala ya petee, oyo bato bakoki kosimba ntina na yango noki. Soki ndakisa moko ezali kosenga ndimbola milai, ezali lisusu na litomba te. Tika yango pembeni to luka ndenge okoki kolobela yango na motindo ya petee.

8 Yesu akamataki biloko ya petee mpo na kolimbola makambo minene, akamataki makanisi ya petee mpo na kolimbola polele makanisi ya komplike. Elilingi kati na ndakisa esengeli kozala petee kati na makanisi ya bato mpe ezala na mindondo mingi te. Esengeli kozala eloko moko ya polele mpe oyo bato bakoki komona yango. Na motindo yango, bayoki bakobunga te mpo na ndenge bakoki kosalela yango.

9 Ndakisa esengeli kozala na boyokani na makambo nyonso na lisolo oyo yango elingi kongengisa. Soki eteni moko ya ndakisa yango ezali malamu te, ebongi malamu otika yango. Moto moko kati na bayoki akoki komona ete ndakisa na yo ekokani na lisolo na yo te; soki ezali bongo, ndakisa yango ekokisi mokano na yango te.

10, 11. Monisa mpo na nini osengeli kolakisa polele ntina ya bandakisa oyo opesi.

10 Kolimbola polele ntina na yango. Soki olimboli te ntina oyo opeseli ndakisa boye to ndakisa boye, bayoki mosusu bakosimba ntina bango moko likambo nini olingi koloba, kasi ekozala bongo te mpo na bayoki nyonso. Molobi ye moko asengeli koyeba mpo na nini apesi ndakisa yango mpe komonisa polele epai na bayoki ndenge nini bakoki kosalela liteya ezwami kati na yango. (Tala Matai 12:10-12.)

11 Ndakisa ekoki kosalelama na mitindo mingi mikeseni. Tokoki kosalela yango mpo na kongengisa lilako moko eyebisami liboso to nsima na kopesa ndakisa. Tokoki komonisa ndenge ya kosalela yango na kotalelaka bosukisi ezwami nsima na ndakisa epesami, na boyokani na likanisi oyo olingi kosimbisa. To okoki kosuka bobele na komonisa boyokani kati na makambo mazali na ndakisa mpe makambo mazali na lisolo oyo ozali kopesa.

12-14. Nini ekosalisa biso na koyeba soki ndakisa moko ebongi?

12 Makambo ya ntina mabimisami polele. Kosalela ndakisa te bobele mpo ete ozwi ndakisa moko. Yekola naino lisolo na yo mpo na komona wapi makambo maleki ntina, na nsima pona mwa bandakisa mpo na kosalisa bayoki ete bakanga ntina na yango malamu. Soki osaleli bandakisa minene mpo na bapwɛ́ mikemike, bato bakomikundola yango na esika ete bamikundola bapwɛ́ minene. (Tala Matai 18:21-35; 7:24-27.)

13 Esengeli te ete ndakisa ekunda likanisi ya ntina. Atako bayoki bakomikundola liboso elilingi to ndakisa oyo osalelaki, nzokande na nsima bakomikundola mpe likanisi eteyamaki na nzela na yango. Soki boye te ndakisa ekokamata esika ya liteya.

14 Wana ezali yo kobongisa diskur mpe kopona bandakisa oyo okosalela, luka komona motuya ya mokomoko na yango na boyokani na pwɛ́ oyo yango esengeli kosimbisa. Ekolendisa pwɛ́ yango mpe ekobimisa yango polele? Engengisi yango koleka mpe bayoki bakoki kosimba yango nokinoki? Soki ezali boye te, elingi koloba ete ezali ndakisa moko malamu te.

15, 16. Limbola mpo na nini bandakisa esengeli kobonga na bayoki.

15 Bandakisa esengeli kozala na boyokani na lisolo, kasi esengeli lisusu kobonga na bayoki. Ezali pwɛ́ mosusu esengami na lokasa ya toli na motó na likambo ete “Bandakisa ebongi na bayoki”. Ntango Natana apamelaki Davidi mpo na lisumu oyo asalaki na Bata-Seba, aponaki kosalela ndakisa ya mobola oyo azalaki bobele na mpate moko ya moke. (2 Sam. 12:1-6) Ndakisa yango ezalaki na takte mingi, kasi ebongaki lisusu na Davidi mpo ete azalaka kala mobateli na mpate. Davidi asimbaki noki ntina na likambo oyo Natana alingaki koloba.

16 Soki bayangani mingi bazali mikóló, ekobonga te ete osalela bandakisa oyo bobele bana nde bakoki kosepela na yango. Bandakisa oyo ya bilenge ekobonga soko ozali koloba na etuluku moko ya bana ya kelasi. Ntango mosusu, tokoki kosalela bililingi na kotalelaka yango na nzela ekeseni, na ndakisa, mpo na bilenge mpe mpo na mibange, mpo na mibali mpe mpo na basi, bongo na bongo.

17-19. Epai wapi tokozwela bandakisa na biso mpo ebenda likebi ya bayoki?

17 Ezwami na makambo ya mokolo na mokolo. Soki ozwi bandakisa na yo to bililingi na makambo oyo tomeseni na yango mokolo na mokolo, bayoki na yo bakolanda yo malamu. Ezali yango Yesu asalaki. Kolobaka epai na mwasi Mosamaria oyo ayaki kotoka mai, asalelaki elilingi ya mai mpo na komonisa makoki oyo ye azali na yango ya kopesa bato bomoi. Azwaki masese na ye mpe bandakisa na ye na makambo oyo tomeseni na yango na bomoi ya mokolo na mokolo; ezalaki makambo ya koluka mosikamosika te. Bandakisa na ye ezalaki kobimisa mbala moko elilingi kati na elimo ya bayoki na ye to ezalaki kokundola bango likambo moko oyo basilaki komona yango. Azalaki kosalela bililingi mpo na koteya.

18 Biso mpe tosengeli kosala ndenge moko. Atako basi bakoki kozala na mwa boyebi na makambo matali ndenge mokili ezali kotambola, nzokande bakolanda yo malamu soki osaleli bandakisa ezwami na makambo ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo: bana na bango, mosala na bango na ndako mpe biloko oyo basalelaka na ndako na bango.

19 Ndakisa na eloko moko oyo bayoki bamonaka yango na mboka na bango eleki malamu. Tokoki mpe kolobela makambo masalemaki na région na biso mpe mayebani malamu, soki nde ezali na nsoni te.

20-22. Tanga mwa mitambo oyo tosengeli kopengola wana ezali biso kosalela bililingi to bandakisa.

20 Ezali na nsoni te. Ndakisa nyonso esengeli kokokana na lisolo moko na Biblia. Nzokande, esengeli kopengola ndakisa nyonso ya nsoni to oyo ekoki kolimbola makambo mibale mbala moko, mpamba te ekoki kobungisa bayoki. Etinda malamu okoki kosalela ezali oyo: Soki ozali kokakatana to kobeta ntembe, tika ndakisa wana.

21 Esengeli te ete bandakisa na biso epesa nsoni na bayoki na biso, mingimingi bato ya sika. Yango wana tokoboya kobimisa ntembe na mateya oyo etali lisolo oyo tozali kosolola te. Na yango, tokokamata ndakisa ya likambo ya kozongisa makila te soki mpe likambo ya kopesa saluti na bendele te, na ntango lisolo na biso etali makambo yango te. Bandakisa ya motindo boye ekoki kotaisa moto libaku. Nzokande ezali boye te ntango lisolo esengi ete olobela makambo yango. Soki esengi boye, okozala na likoki ya kokanisa elongo na bayoki na yo mpe kosilisa ntembe na bango. Kasi keba ete osalela bandakisa te oyo ekoki koboyisa bayoki na yo makambo ya solo mpe ya ntina oyo olingi koteya bango.

22 Na yango, zala na bososoli wana ezali yo kopona bililingi mpe bandakisa na yo. Tala naino malamu mpo na komona soki ebongi na lisolo na yo mpe na bayoki na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto