Teyá na mayele mpe yebá kondimisa
“Motema na moto na mayele ekolakisa monɔkɔ na ye, ekobakisa boyebi na bibebu na ye.”—MASESE 16:23.
1. Mpo na nini koteya Liloba ya Nzambe esuki kaka na koyebisa bato makambo te?
LOKOLA tozali balakisi ya Liloba ya Nzambe, mokano na biso ezali ya kongɛngisa makanisi mpe mitema ya bayekoli na biso. (Baefese 1:18) Yango wana, koteya esuki se na koyebisa bato makambo te. Masese 16:23 elobi ete: “Motema na moto na mayele ekolakisa monɔkɔ na ye, ekobakisa boyebi na bibebu na ye.”
2. (a) Kondimisa elimboli nini? (b) Ndenge nini baklisto nyonso bakoki kokóma balakisi oyo bayebi kondimisa?
2 Tokanisi ete ntoma Paulo asalaki bongo na mosala na ye ya koteya. Ntango azalaki na Kolinti, “sabata na sabata alakisi kati na eyanganelo, mpe amekaki kondimisa Bayuda na [Bagreke, NW].” (Misala 18:4) Nganga-mayele moko alobi ete liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “kondimisa” elimboli “kobongola makanisi ya moto na ndenge ozali komonisa ye makambo oyo ezali na nzela to oyo emonani malamu na miso ya bato nyonso.” Paulo azalaki kosalela makanisi oyo ezali kondimisa, mpe akokaki kopusa bato ete bábongola makanisi na bango. Azalaki na mayele ya kokamwa mpo na kondimisa, kutu banguna na ye bazalaki kobanga ye. (Misala 19:24-27) Atako bongo, Paulo azalaki koteya lokola moto oyo azali kolakisa mayele na ye te. Ayebisaki Bakolinti ete: “Koloba na ngai mpe esakweli na ngai izalaki na maloba na elɛngi mpe na mayele te, kasi mpo na komonisa [elimo, NW] mpe nguya, ete kondima na bino euta na mayele na bato te kasi na nguya na Nzambe.” (1 Bakolinti 2:4, 5) Lokola baklisto nyonso bazali kozwa lisalisi ya elimo santu ya Yehova Nzambe, bango nyonso bakoki kokóma balakisi oyo bayebi kondimisa. Kasi, ndenge nini? Tótalela mwa ndambo ya makambo oyo emonisi ete moto ayebi koteya malamu.
Yebá koyoka
3. Mpo na nini tosengeli kosalela mayele ntango tozali koteya bato, mpe ndenge nini tokoki kosimba mitema ya bato oyo tozali koteya Biblia?
3 Mayele ya liboso mpo na koteya malamu etaleli koloba te kasi koyoka. Lokola Masese 16:23 emonisi yango, mpo na kondimisa bato tosengeli kozala na bososoli. Na ntembe te, Yesu ayebaki kosalela bososoli epai na bato oyo ateyaki. Yoane 2:25 elobi ete: “Ye moko ayebaki yango ezali kati na bato.” Kasi, ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato oyo tozali koteya? Lolenge moko ezali koyeba koyoka. Yakobo 1:19 (NW) elobi: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, awelaka koloba te.” Ya solo, bato mosusu bakakatanaka mpo na kobimisa makanisi na bango. Soki bato oyo tozali koteya Biblia bamoni ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bango, bakoki kopusama na kobimisa mayoki ya mitema na bango. Kotuna mituna na boboto mpe na mayele ekoki kosalisa biso na kosimba motema mpe ‘kotoka’ makanisi yango.—Masese 20:5.
4. Mpo na nini bankulutu baklisto basengeli koyeba koyoka?
4 Ezali na ntina mpenza ete bankulutu báyeba koyoka. Soki bayebi koyoka, ‘bakoyeba soki ekoki na bango kozongisela bato nyonso maloba nini.’ (Bakolose 4:6) Masese 18:13 elobi ete: “Ye oyo azongisi monɔkɔ na likambo liboso naino ayoki yango te, yango ezali epai na ye [bozoba] mpe na nsɔni.” Mokolo mosusu, bandeko mibale bazalaki na likanisi malamu ya kopesa ndeko mwasi moko toli mpo na kokebisa ye na etamboli ya bato ya mokili mpamba te azangisaki mwa makita. Ndeko mwasi yango amitungisaki mingi mpamba te batunaki ye ata te mpo na nini azangisaki makita. Nzokande bautaki kosala ye lipaso mpe azalaki naino kopema mpo na kozwa makasi. Tomoni ete ezali na ntina mingi tóyokaka naino liboso ya kopesa toli!
5. Ndenge nini bankulutu bakoki kosilisa matata oyo ebimi na kati ya bandeko?
5 Mpo na bankulutu, mbala mingi koteya esɛngi mpe kopesa basusu toli. Na likambo oyo mpe, ezali na ntina ete báyeba koyoka. Koyoka ezali mpenza na ntina na ntango bandeko baklisto bazwani na matata. Ezali se nsima ya koyoka nde bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya “Tata oyo akosambisa na koponapona bato te.” (1 Petelo 1:17) Na makambo ya ndenge yango, mbala mingi mayoki ezalaka makasi, mpe nkulutu akosala malamu soki akobatela likanisi ya Masese 18:17 ete: “Ye oyo akoloba likambo na ye liboso ayokani lokola [moto ya sembo, NW]; kasi mozalani na ye akoya mpe akomeka ye.” Molakisi malamu akoyoka moto mokomoko. Ekozala mpe malamu asala libondeli mpo na kokitisa bandeko mitema mpe kotya kimya. (Yakobo 3:18) Soki amoni ete babandi kosilika, akoki kosɛnga bandeko yango ete mokomoko ayebisa ye likambo oyo ezali kotungisa na esika atika bango bábanda koswana. Mituna ya malamu ekosalisa nkulutu na kososola malamumalamu likambo oyo bayei na yango epai na ye. Mbala mingi, matata ebimaka mpo ete bato bazali koyokana malamu te, kasi ezali mpo na motema mabe te. Kasi soki babukaki mibeko ya Biblia, molakisi oyo azali na bolingo akoki koteya na mayele nsima ya koyoka moto mokomoko.
Ntina ya koboya mindɔndɔ
6. Ndakisa nini ya koteya na kozanga mindɔndɔ Paulo na Yesu bapesaki?
6 Koboya mindɔndɔ ezali mpe mayele mosusu mpo na koteya malamu. Ya solo, tolingaka ete bato oyo tozali koteya Biblia ‘báyeba kososola monene mpe molai mpe [bosanda, NW] mpe bozindo’ ya mateya ya solo. (Baefese 3:18) Mateya mosusu ya Biblia esɛngaka kokɔtela yango na bozindo mpe mbala mingi ezalaka pɛtɛɛ te. (Baloma 11:33) Atako bongo, ntango Paulo ateyaki Bagreke, alobelaki se nsango ya polele ya ‘Klisto oyo babakaki na nzete.’ (1 Bakolinti 2:1, 2, NW) Ndenge moko mpe, Yesu ateyaki na lolenge ya polele mpe oyo ezalaki kosepelisa. Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, asalelaki maloba ya pɛtɛɛ. Kasi, lisolo yango ezalaki na mateya ya solo oyo ezali mpenza mozindo.—Matai, mokapo 5-7.
7. Ndenge nini tokoki koboya mindɔndɔ ntango tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia?
7 Biso mpe tokoki koboya mindɔndɔ ntango tozali koyekolisa bato Biblia. Ndenge nini? Soki tokotya likebi na biso se na “makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10, NW) Ntango tozali kolimbola makambo ya makasi, tosengeli kosalela maloba ya pɛtɛɛ. Tosengeli kotya likebi na bavɛrsɛ ya ntina na esika ya koluka kotánga mpe kolimbola bavɛrsɛ nyonso ya Biblia oyo ezali na paragrafe. Likambo yango esɛngi ete tómibongisaka malamu. Tóbulunganisa moyekoli na makambo kilikili te; mpe tókeba ete makambo mikemike oyo ezangi ntina epɛngwisa likebi na biso te. Soki moyekoli atuni motuna oyo eyokani mpenza te na liteya oyo tozali kotalela, tokoki koyebisa ye na mayele nyonso ete tokosolola likambo yango soki tosilisi boyekoli.
Koyeba kotuna mituna
8. Ndenge nini Yesu asalelaki malamu mituna?
8 Mayele mosusu ya koteya malamu ezali kotuna mituna oyo ebongi. Yesu Klisto azalaki kotuna mituna mingi ntango azalaki koteya. Na ndakisa, Yesu atunaki Petelo ete: “Okanisi nini na mpo oyo, Simona? Mikonzi na mokili bakokamata mpako soko lifuti epai na banani?—na bana na bango soko na bapaya? Elobi ye ete, Na bapaya, Yesu alobi na ye ete, Bongo, bana bazali bansomi.” (Matai 17:24-26) Lokola Yesu azalaki Mwana mobotami-bobele-moko ya Ye oyo bazalaki kosambela na tempelo, asengelaki kofuta mpako ya tempelo te. Kasi, Yesu ateyaki solo yango na nzela ya mituna oyo ebongi. Na bongo, kaka na makambo oyo Petelo ayebaki liboso, Yesu asalisaki ye na kokanga ntina ya likambo mosusu.
9. Ndenge nini tokoki kotuna mituna ntango tozali koyekolisa moto Biblia?
9 Biso mpe tokoki kosalela malamu mituna ntango tozali koteya bato Biblia. Soki moyekoli apesi eyano ya mabe, tokoki kozala na mposa ya kopesa mbala moko eyano ya malamu mpo na kosembola. Kasi, tokanisi ete soki tosali bongo akokanga mpenza ntina ya likambo? Mbala mingi eleki malamu komema moyekoli na kokanga ntina malamu na nzela ya mituna. Na ndakisa, soki moyekoli azali koyeba mpenza ntina te oyo tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe, tokoki kotuna ye boye: ‘Nkombo na yo ezali na ntina mingi mpo na yo? . . . Mpo na nini? . . . Okanisi boni soki moto moko aboyi kobénga yo na nkombo na yo? . . . Omoni te ete ebongi ete Nzambe asɛngisa biso tóbénga ye na nkombo na ye?’
10. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalela mituna ntango bazali kosalisa bato oyo bazali kotungisama na mayoki?
10 Bankulutu bakoki mpe kosalela malamu mituna na mosala na bango ya kobatela etonga. Bandeko mingi na kati ya lisangá bazali na mitungisi ya mayoki mpe makambo ya mokili ya Satana ezali kolɛmbisa bango; mpe bakoki komona lokola ete bazali pɛto te mpe bato bakoki kolinga bango te. Nkulutu akoki kosolola na moto ya ndenge yango mpe kotuna ye boye: ‘Atako yo olobi ete obongi te, obanzi ete Yehova azali kotalela yo ndenge nini? Soki Tata na biso ya bolingo andimaki ete Mwana na ye akufa mpo apesa mbeka mpo na yo, emonisi ete Nzambe alingaka yo, boye te?’—Yoane 3:16.
11. Mituna oyo ememaka moto na kokanisa ezali na ntina nini, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango na lisukulu ya bato banso?
11 Kotuna mituna oyo esalisaka bayoki na kokanisa ezali mpe lolenge mosusu ya malamu mpo na koteya. Bayoki bakoyanola mituna yango te, kasi ekosalisa bango bákanisa makambo oyo ozali koloba. Mbala mingi, basakoli ya ntango ya kala bazalaki kosalela mituna yango mpo na komema bayoki na bango na kokanisa na mozindo. (Yilimia 18:14, 15) Yesu asalelaki malamu mituna ya ndenge yango. (Matai 11:7-11) Mituna yango ebongaka mpenza na lisukulu ya bato banso. Na ndakisa, na esika ya kosuka kaka na koloba na bayoki ete basengeli komipesa na molimo na bango mobimba mpo na kosepelisa Yehova, mbala mosusu ebongi kotuna ete, ‘Soki tozali kosalela Yehova na molimo na biso mobimba te, tokanisi ete akosepela?’
12. Mituna oyo esɛngaka na moto apesa makanisi na ye ezali na ntina nini?
12 Mituna oyo ezali kosɛnga moto apesa likanisi na ye ezalaka na ntina mingi mpo na koyeba soki moyekoli azali mpenza kondima makambo oyo azali koyekola. (Matai 16:13-16) Moyekoli akoki koyanola malamu ete pite ezali mabe. Kasi ekozala malamu kobakisa mituna lokola oyo, Okanisi boni na mibeko ya Nzambe mpo na etamboli malamu? Okanisi ete mibeko yango eleki makasi? Mpo na yo, kolanda mitinda ya Nzambe to kolanda yango te ezali mpenza na ntina?
Bilakiseli oyo esimbaka motema
13, 14. (a) Kosalela elakiseli na likambo moko elimboli nini? (b) Mpo na nini bilakiseli malamu ezalaka na litomba?
13 Lolenge mosusu ya kosimba mitema ya bayoki na yo mpe ya bato oyo ozali koyekola na bango Biblia ezali ya kosalela bilakiseli oyo ebongi. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “elakiseli” elimboli mpenza “kotya penepene to kokangisa esika moko.” Ntango ozali kosalela elakiseli, ozali kolimbola likambo moko na ndenge ozali ‘kotya’ yango ‘penepene’ ya eloko mosusu oyo ekokani na yango. Na ndakisa, Yesu atunaki boye: “Tókokisa Bokonzi na Nzambe na eloko nini to tótya yango na lisese nini?” Na eyano na ye, Yesu alobelaki mbuma ya sinapi oyo bato bayebaki malamu.—Malako 4:30-32.
14 Basakoli ya Nzambe basalelaki bilakiseli mingi oyo ebongi mpenza. Ntango Baasulia—baoyo Nzambe asalelaki mpo na kopesa Bayisalaele etumbu—balekisaki ndelo na konyokola Bayisalaele, Yisaya atɔndɔlaki lofundo na bango na elakiseli oyo: “Sóka ekomitombola nde na lolendo likoló na ye oyo akokata na yango, Mosumani ekomiyeisa monene likoló na ye oyo akotambolisa yango?” (Yisaya 10:15) Yesu mpe asalelaki bilakiseli mingi ntango azalaki koteya bato. Biblia elobi ete “azalaki kosolola na bango bobele na masese.” (Malako 4:34) Bilakiseli malamu ebongi mpenza mpamba te esimbaka makanisi mpe motema mbala moko. Esalisaka bayoki na kosimba likambo ya sika nokinoki na ndenge bazali kokokanisa yango na likambo mosusu oyo bayebi malamu.
15, 16. Nini ekoki kosala ete bilakiseli ezala malamu mingi? Pesá bandakisa.
15 Ndenge nini tokoki kosalela bilakiseli oyo ezali mpenza kosimba motema? Ya liboso, elakiseli esengeli mpenza kozala na boyokani na likambo oyo tozali kolimbola. Soki ekokani te, elakiseli ekobulunganisa bayoki na esika engɛngisa makanisi na bango. Mokolo mosusu, molobi moko, alukaki na bosembo nyonso kolimbola botosi ya batikali bapakolami epai ya Yesu Klisto mpe akokanisaki bango na mbwa moko ya malamu. Tokanisi ete bokokanisi wana, oyo ezali kokitisa bango, ebongi mpenza? Biblia elimboli likambo yango moko, kasi na lolenge malamu mpe oyo ezali kopesa lokumu. Biblia ekokanisi bayekoli 144 000 ya Yesu oyo bapakolami na elimo na “mwasi na libala oyo asili [kobongisa] nzoto mpo na mobali na ye.”—Emoniseli 21:2.
16 Bilakiseli ebotaka mbuma malamu soki etaleli bomoi ya bato. Natana asalelaki elakiseli ya mwana ya meme oyo babomaki mpe esimbaki motema ya Mokonzi Davidi mpamba te alingaki bameme; ntango azalaki elenge, azalaki mobateli ya bameme. (1 Samwele 16:11-13; 2 Samwele 12:1-7) Soki elakiseli elobelaki ngɔmbɛ, mbala mosusu mbɛlɛ ebongaki mpenza te. Ndenge moko mpe, bilakiseli oyo elobelaka makambo ya siansi to makambo oyo eleká kala mpe eyebani malamu te ekoki kosimba mitema ya bayoki te. Yesu azalaki koluka bilakiseli na ye na makambo oyo bato basalaka mokolo na mokolo. Alobelaki biloko oyo bato nyonso bayebi malamu lokola mwinda, bandɛkɛ ya likoló, bafololo ya lisobe. (Matai 5:15, 16; 6:26, 28) Ezalaki mpasi te mpo na bato oyo bazalaki koyoka maloba ya Yesu ete bámona biloko yango na makanisi na bango.
17. (a) Bilakiseli na biso ekoki kouta na makambo nini? (b) Ndenge nini tokoki koyokanisa bilakiseli oyo epesami na mikanda na biso na bomoi ya bato oyo tozali koteya?
17 Na mosala na biso ya kosakola, tozalaka na mabaku mingi ya kosalela bilakiseli ya pɛtɛɛ oyo esimbaka motema. Tósalelaka miso na biso. (Misala 17:22, 23) Mbala mosusu tokoki kosalela elakiseli oyo elobeli bana, ndako, to mosala ya moto oyo tozali kosolola na ye to lisano oyo alingaka mingi. Tokoki mpe kolimbola malamumalamu bilakiseli oyo epesami na buku oyo tozali koyekola na kotalela ndenge oyo toyebi moyekoli yango. Na ndakisa, tókamata elakiseli moko malamu oyo epesami na mokapo 8, paragrafe 14 na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Elobeli tata malamu oyo moninga moko ya kartye akoseli ye makambo. Tokoki kokanisa ndenge oyo tokoki koyokanisa elakiseli yango na moyekoli ya Biblia oyo azali moboti.
Kotánga bavɛrsɛ ya Biblia na ndenge ebongi
18. Mpo na nini tosengeli kosala milende mpo tóyeba kotánga malamu?
18 Paulo alendisaki Timote na maloba oyo: “Otyaka motema na kotánga [Makomami] polele mpe na kosakola mpe na koteya.” (1 Timote 4:13) Lokola mateya na biso nyonso eutaka na Biblia, ebongi mpenza tóyeba kotánga Biblia yango malamu. Balevi bazalaki na libaku malamu ya kotángela libota ya Nzambe Mibeko ya Mose. Bazalaki nde kobɛtabɛta mabaku to botángi na bango ezangaki mayoki? Te, na Nehemia 8:8, Biblia elobi ete: “Batángaki kati na mokanda na Mobeko na Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete básosola litángi.”
19. Ndenge nini tokoki kobongisa lolenge na biso ya kotánga bavɛrsɛ ya Biblia?
19 Baklisto mosusu oyo bazali balobi malamu bayebaka kotánga malamu te. Ndenge nini bakoki kosembola likambo yango? Na komimesenisa. Ɛɛ, soki bakotánga na mongongo makasi mbala na mbala, bakoyeba kotánga malamu. Soki bozali na bakasɛti ya botángi ya Biblia na lokota na bino, ezali malamu koyoka ndenge oyo motángi azali konyata maloba ya ntina, ndenge azali kobongola mongongo mpe landá ndenge azali kotánga bankombo mpe maloba oyo esalelamaka mingi te. Soki tomimesenisi na kotánga, ata bankombo lokola Maele-Salala-Hasabaza, tokozala na mokakatano te mpo na kotánga yango.—Yisaya 8:1.
20. Ndenge nini tokoki ‘kokeba na mateya na biso’?
20 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tozali na libaku malamu na ndenge azali kosalela biso lokola balakisi! Tiká ete mokomoko na biso akokisa mokumba na ye malamumalamu. Tiká ete ‘tókeba ntango nyonso na biso moko mpe na mateya na biso.’ (1 Timote 4:16, NW) Tokoki kozala balakisi malamu soki toyebi koyoka, soki toboyi mindɔndɔ, soki tozali kotuna mituna ya mayele, soki tozali kosalela bilakiseli oyo ebongi, mpe soki tozali kotánga bavɛrsɛ ya Biblia na ndenge oyo ebongi. Tiká ete biso nyonso tózwa litomba na mateya ya Yehova oyo tozali kozwa na ebongiseli na ye, mpamba te yango ekoki kosalisa biso na kozala na “lolemo na baoyo balakisami.” (Yisaya 50:4) Soki tokosalela malamu bisaleli nyonso oyo tozali na yango mpo na mosala na biso ya kosakola, ezala mwa babuku, bakasɛti, mpe bakasɛti video, tokosalela mayele mpe tokoyeba kondimisa.
Oyebi lisusu?
◻ Ndenge nini koyeba koyoka ekoki kosalisa biso na ntango tozali koteya?
◻ Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo mpe ya Yesu mpo na koteya na kozanga mindɔndɔ?
◻ Tokoki kosalela mituna ya ndenge nini ntango tozali koteya bato?
◻ Bilakiseli ya ndenge nini ebotaka mbuma malamu?
◻ Ndenge nini tokoki kobongisa makoki na biso ya kotánga liboso ya bato?
[Elilingi na lokasa 16]
Moteyi malamu ayokaka mpo na kozwa mayele
[Bililingi na lokasa 18]
Yesu alukaki bilakiseli na makambo oyo bato basalaka mokolo na mokolo