Liteya 23
Volime ya mongongo mpe poze
1, 2. Mpo na nini tosengeli koloba makasi?
1 Soki bato bazali koyoka te makambo oyo ozali kolobela bango, ozali kosala mosala ya mpamba. Nzokande, soki mpe okoloba makasi mingi, ekosala mpasi na matoi ya bayoki mpe bakolanda te makanisi kitoko oyo obongiselaki bango. Volime ya mongongo ezali na ntina mpenza kati na ba Salles du Royaume mingi, mpamba te mbala mingi bato oyo bafandi kuna na nsuka bayokaka te bakomantere ya bato oyo bafandi kuna na liboso. Mbala mosusu, oratere azali koloba makasi mpenza te mpe bayoki bazali kokoka kolanda ye te. Na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato mosusu oyo bayokaka malamu te, mpe makelele mingi ezalaka, na kati na ndako to na libanda ya ndako. Yango emonisi ntina ya kozala na volime ya mongongo na ndenge oyo bato bakoki koyoka yo malamu.
2 Bakoki koyoka yo malamu. Mpo na koyeba soki volime oyo osaleli ekoki, omituna naino mituna milandi: Nafungolaki mongongo na ndenge nyonso esengeli? Na maloba mosusu, baoyo bafandaki kuna na nsuka balandaki ngai malamu, kozanga ete nazipa matoi ya baoyo bafandaki na liboso? Mpo na moyekoli ya sika, etaleli oyo ekoki; nzokande mpo na moyekoli oyo akoli mwa mingi, ezali na makambo mosusu asengeli kotalela mpo na oyo etali kobongisa volime ya mongongo. Tokolobela makambo yango awa na nse. Mokengeli na eteyelo akotalela toli nini akopesa na moyekoli mokomoko mpo na likambo yango.
3-10. Nini ekosalisa biso mpo na koyeba volime nini ebongi tosalela wana ezali biso koloba?
3 Volime ebongi na makambo okutani na yango. Oratere asengeli koyeba ete makambo makoki kobongwana na esika ezali ye koloba. Yango ekokolisa bososoli na ye, mpo ayeba kobongwana mpe kosimba likebi ya bayoki na ye.
4 Makambo mabongwanaka engebene motuya ya bayoki mpe bonene ya salle. Mpo okoka kobunga te, esengeli otalela volime ya mongongo na yo. Diskur na Salle du Royaume esengaka volime ya mongongo koleka oyo tosalelaka ntango tozali koloba na salon. Bobele bongo, volime okosalela mpo na koloba na mwa bandeko bayangani na likita mpo na mosala ya kosakola, ekeseni na oyo okosalela ntango salle etondi, na ndakisa na likita ya mosala.
5 Nzokande, atako bongo, makambo makoki ntango nyonso kobongwana. Makelele ya mbalakaka ekoki koyokana kino na salle. Na ndakisa motuka to engbunduka ezali koleka, mbwa ezali konganga, mwana azali kolela to makelele ya makolo ya moto moko ayei na retare, nyonso oyo ezali makelele ya mbalakaka oyo ezali kosenga kobongola volime ya mongongo. Soki oratere azali kokipe yango te, makambo mosusu akoloba, ata ezali na ntina, ekoleka bobele mpamba.
6 Masangá mingi bazali na mikro. Kasi atako bongo, mokengeli na eteyelo akopesa toli na moyekoli soki azali kokipe mabongwani te mpe azali koloba makasi mingi to makasi mingi te. (Tala Boyekoli 13 na ntina etali kosalela mikro.)
7 Oratere mosusu akokaka koloba makasi te mpo ete mongongo na ye esuki bobele wana. Soki ezali boye mpo na yo, landa toli ya mokengeli na eteyelo. Mbala mosusu akolakisa yo ba ekzersise oyo okoki kosala mpo na kofungola mongongo na yo mpe kosala boye ete ekemba. Nzokande, volime ya mongongo mpe kitoko ya mongongo ezali makambo mibale makeseni, mpe toli mpo na yango ekeseni lokola.
8 Makambo nyonso oyo mabimaka makoki te kotalelama na boumeli ya diskur bobele moko. Mokengeli na eteyelo akopesa toli mpo na lisolo oyo moyekoli asali, kasi mpo na makambo nyonso oyo mabimaka te. Nzokande, soki esengeli, akoki kokebisa moyekoli moko mpo na mikakatano oyo akoki kokutana na yango na mabaku mosusu, atako akopesa ye longonya mpo na diskur oyo auti kosala mpe akomi “M” na fiche na ye.
9 Ndenge nini moyekoli akoki koyeba ete mongongo na ye ezali koyokana na bato nyonso? Ebongi atala bayoki. Oratere oyo azali na eksperianse akotala malamu bayoki oyo bafandi kuna na nsuka ya salle, wana ebandi ye koloba. Akoki bongo komona soki bazali koyoka ye malamu, mpe akobakisa volime ya mongongo na ye soki esengeli. Ekosila ye “komesena” na salle, akozala lisusu na mikakatano mpo na yango te.
10 Metode mosusu ezali boye ete otalela ba oratere oyo balobaki liboso na yo. Bato bayokaki bango malamu? Volime nini basalelaki? Yo mpe sala lokola bango.
11, 12. Mpo na nini ezali ntina ete tosalela volime moko ebongi na makanisi malakisami?
11 Volime ebongi na makanisi malakisami. Awa tolingi kolobela likambo ya kobongola lolenge ya mongongo te (modulation). Ezali bobele likambo ya kobongola volime ya mongongo engebene makanisi malakisami. Na ndakisa, wana ezali yo kotanga eteni ya Makomami, okosalela volime ndenge moko te mpo na maloba ya lisambisi mpe mpo na maloba ya kolendisa bandeko na bolingo. Tala Yisaya 36:11 mpe na nsima tala verset 12 elongo na 13. Okomona ete maloba oyo mibale malobamaki na volime moko te. Esengeli bongo kobongola volime ya mongongo engebene makanisi malakisami, nzokande kozanga kolekisa ndelo.
12 Mpo na koyeba volime nini ya mongongo okosalela, ososola na likebi nyonso makanisi na yo mpe mokano na yo. Soki olingi kopusa makanisi ya bayoki na yo, kozipa matoi na bango te na kolobaka na mongongo makasi. Nzokande, soki olingi kopusa bango na kosala mosala moko ya esengo, ekosengela na yo kobakisa volime ya mongongo na yo. Soki makanisi malakisami mazali na nguya, ebongi ete mongongo na yo ezala mpe na nguya, nde na bolembu te.
13-16. Monisa ntina ya bapoze.
13 Na ntango ozali kosala diskur na yo, kopema to poze na bisika bisengeli, ezali na ntina mingi, lokola mpe volime malamu ya mongongo ezali na ntina mingi. Soki ozali kopema te, maloba na yo mingi makoyebana nzela te, mpe bayoki bakoyeba te wapi makanisi ya ntina oyo basengeli kosimba. Bapoze to kopema ekosalisa yo ete obunga te, okobatela mpema na yo mpe okobanga te ata okutani na mokakatano kati na diskur na yo. Bayangani bazali komona ete obungi te, obulungani mpe te, oyebi ete bango bazali wana, ozali na makambo ya kolobela bango mpe olingi ete bamikundola yango.
14 Oratere ya sika asengeli kokamata noki momeseno ya kopema to kosala bapoze ya litomba. Omindimisa naino ete makambo olingi koloba ezali na ntina mpe ozali na mposa ete bayoki na yo basimba yango kati na boongo na bango. Ntango mama alingi kosembola mwana na ye, akoloba na ye naino likambo moko mpo na kobenda likebi na ye. Akobakisa liloba mosusu te kino mwana akoyoka ye na likebi. Na nsima nde akolobela ye makambo mazali na ye na motema. Alingi komona ete mwana azali kotya likebi na maloba na ye mpe akobosana yango te.
15 Bato mosusu bapemaka te wana ezali bango koloba, ata na masolo na bango ya mokolo na mokolo. Soki ezali boye mpo na yo, kamata momeseno ya kopema to kotya bapoze; yango ekobongisa masolo na yo. Kati na mosala ya kosakola, tolobaka lokola bato bazali kosolola. Esengeli tosalaka bapoze na motindo boye ete molobani na biso akata biso te kasi azela mpo na koyoka makambo tokoloba na nsima. Ezala na masolo to na diskur, tosengeli kozala na mayele ya kosala bapoze. Na makambo oyo mibale, ye oyo ayebi kosala bapoze akozwela yango mbano.
16 Soki obongisi makambo mingi ya koloba, okozala na mokakatano makasi mpo na kosala bapoze lokola esengeli. Na yango, kokotisa makambo mingimingi te kati na diskur na yo. Omipesa ntango ya kopema to kosala bapoze; ezali eloko ekoki kozanga te kati na lisolo.
17-21. Limbola ntina ya bapoze oyo esalami mpo na kotosa bilembo ya bopemi.
17 Poze mpo na kotosa bilembo ya bopemi. Ntina ya kotelema na bilembo ya bopemi ezali mpo na kososolisa likanisi polele. Bilembo ya bopemi ezali kokesenisa makanisi, ezali kokabola bafraze mpe ezali kolakisa nsuka ya baparagrafe. Ntango mosusu, ekoki bobele kobongola mongongo mwa moke, kasi mingimingi bapoze yango nde ekomonisaka bisika ya bilembo ya bopemi kati na diskur. Ntango tokokomaka, tokokesenisaka virgule mpe point-virgule; bobele bongo bapoze oyo tokosala na bisika wana ekoki kozala ndenge moko te.
18 Soki poze etyami na esika malamu te ekoki kobebisa ndimbola ya fraze mobimba. Tokoki kokamata ndakisa ya maloba ya Yesu makomami na Luka 23:43: “Solo nalobi na yo lelo: Okozala na ngai elongo kati na Paladiso.” Soki tokamati deux points to poze mpe totii yango liboso ya liloba “lelo”, na esika ete ezala nsima na yango, wana likanisi nyonso ebongwani, ekomi eloko mosusu; libunga oyo ezali na ba Biblia mingi. Na yango, tomoni ete bapoze ezali na ntina mingi mpo ete likanisi na biso eyebana polele.
19 Soki ozali kotosa bilembo ya bopemi wana ezali yo kotanga, okoyeba mpe kosala bapoze na badiskur na yo oyo plan na yango ezali bobele na makanisi minene. Elembo bobele moko ya bopemi oyo mbala mosusu tokoki kozanga kotosa na botangi, ezali virgule. Na wana, kopema to kozanga kopema etali bobele motangi ye moko. Nzokande point-virgule, point, guillemets mpe alinéa ezali bilembo bisengeli ntango nyonso kotosama!
20 Soki esengeli na yo kotanga diskur moko to eteni moko ya Biblia, okomona mbala mosusu ete ezali litomba otya bilembo. Telemisa mokolótó moko kati na bafraze oyo esengeli kokabolama na mwa bopemi moko mpe telemisa mikolótó mibale to elembo ya “X” na bisika esengeli na yo kopema mwa molai.
21 Nzokande, na ntango ozali komeka botangi na yo, soki omoni ete bafraze mosusu ezali mpasi mingi mpe ozali kopema na bisika bisengeli te, kangisa na elembo moko ya ekomeli maloba nyonso oyo masengeli kozala na fraze moko. Ntango okotanga, okopema te mpe okokakatana liboso ya kokoma na liloba ya nsuka kati na oyo nyonso okangisaki elongo. Ba oratere mingi oyo bazali na eksperianse basalelaka metode yango.
22-24. Mpo na nini tosengeli kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu?
22 Poze liboso ya koleka na likanisi mosusu. Ntango osilisi likanisi moko ya ntina mpe olingi koleka na likanisi mosusu, poze ezali na ntina mpo ete bayoki bakoka kokanisa. Ekosalisa bango ete bakesenisa makanisi. Poze ekopesa bayoki ntango ya kobongisa makanisi na bango, bamona ete libongwani elingi kosalama mpe likanisi ya sika elingi kopesama. Sofele ya motuka alembisaka naino soki akomi na virage; bobele bongo oratere asengeli kosala poze liboso ya koleka na likanisi mosusu.
23 Kati na diskur oyo plan ezali bobele na makanisi minene, osengeli kobongisa plan na motindo boye ete osala poze nsima na kosilisa pwɛ́ nyonso ya ntina. Kozanga kokata diskur na yo, nzokande osengeli kozala na likoki ya kosolola likanisi moko, kokomisa yango kino na nsuka, mpe kopema naino to kotya poze liboso ya koleka na likanisi elandi. Soki esengeli, okoki kotya bilembo na bisika ya bopemi kati na plan na yo mpo obosana te epai wapi osengeli kosala poze.
24 Poze ya kosukisa likanisi moko liboso ya koleka na likanisi mosusu ezalaka molai koleka poze oyo tosalaka mpo na kotosa bilembo ya bopemi. Nzokande, kozala na momeseno ya bapoze milaimilai te, soki te diskur na yo ekoumela mingi mpe bayoki bakomona lokola ete ozali koluka babetelaka yo maboko to lokumu.
25-28. Monisa motindo nini bapoze ezali kosalisa biso na kobimisa likanisi ya ntina mpe motindo nini ekoki kosalisa biso na ntango makelele ebimi.
25 Bapoze mpo na komonisa likambo ya ntina. Poze mpo na komonisa likambo ya ntina ezalaka lokola eloko ya mbalakaka. Etyaka naino mitema ya bayoki lokola na mwa likoló mpe etikelaka bango ntango ya kokanisa.
26 Poze liboso ya koloba likambo ya ntina esimbaka mpema ya bayoki. Yango wana nsima na koloba likanisi yango ya ntina ebongi osala poze mosusu mpo na kotikela bayoki ntango ya komela likanisi yango. Ezali wana ndenge mibale ya poze ntango ozali kosala diskur; okoki kopona wapi oyo okosalela to mpe kosalela nyonso mibale.
27 Bapoze ya lolenge oyo esengeli kozala mingimingi te; okosalela yango bobele mpo na makanisi oyo mazali solo makanisi ya ntina mingi, soki te motuya na yango ekomonana te.
28 Poze mpo na makelele. Ntango mosusu, oratere asengeli kotelema naino mwa moke mpo makelele ekoti. Soki makelele yango ezali mingi te, ebongi malamu kobakisa volime ya mongongo na esika ete otelema. Nzokande soki makelele eleki makasi mpe bato bazali koyoka yo lisusu te, ebongi malamu kotelema to kosala poze. Bayoki bakotondo yo mpo na yango. Mpamba te soki olandi koloba bakoyoka yo te lokola makelele ekoteli bango mingi. Na yango, yeba kosalela bapoze mpo ete bayoki na yo bazwa litomba mpenza na makambo kitoko oyo ozali kolobela bango.