Liteya 24
Ndenge nini okoki kokotisa moto kati na Biblia
1, 2. Mpo na nini tosengeli kokotisa bayoki na biso kati na Biblia?
1 Kati na mosala na biso ya kosakola, tozali na mposa ya kokotisa bayoki na biso kati na Biblia, Liloba na Nzambe. Biblia ezali na nsango oyo biso tozali kosakola mpe tolingi ete bato bayeba ete makambo oyo tozali kolobela bango mauti na biso te, kasi mauti na Nzambe. Bato oyo balingi Nzambe batyeleka Biblia motema. Ntango bazali kotangela bango mikapo kati na yango, bazali koyoka mpe bazali kobomba na motema toli na yango. Nzokande ekosepelisa bango mingi mpe ekotikala na bango ntango molai soki bakoki kolanda botangi kati na Biblia na bango moko. Yango wana, soki libaku ezwami kati na mosala ya kosakola, ebongi malamu kosenga na moto ete alanda kati na Biblia na ye ntango yo ozali kotangela ye mikapo ya Biblia. Bobele bongo, na makita ya lisangá, soki molobi asengi na bayangani nyonso ete bakamata Biblia na bango, bato ya sika bakomona noki ete bindimeli na biso nyonso mauti na mokanda yango, mpe bayangani nyonso bakozwa litomba na komona na miso na bango moko makambo mazali kotangama.
2 Diskur na yo ekokotela malamu bayoki, soki mbala nyonso oyo likoki ezwami, ozali kobenga bayoki ete balanda kati na Biblia na bango mikapo oyo ozali kotangela bango. Okolonga na yango soki okozala na lolenge malamu ya kobenga bango. Ntina wana kati na fiche ya Toli mpo na balobi ezali na pwɛ́ moko “Kobenga bayoki ete bakamata Biblia”.
3, 4. Ndenge nini tokoki kosala yango malamu?
3 Kosenga bango bakamata Biblia. Moko kati na myango eleki malamu ezali ya kosenga na bayoki ete bakamata Biblia na bango; mwango oyo tosalelaka yango mingi. Tokoki mpe kozwa matomba malamu oyo moko na koyebisaka libela mokapo ya Biblia liboso ya kotanga yango; na ndakisa, okoki koloba: “Na ntango tokotanga 2 Timote 3:1-5, tokanisa na makambo mazali zongazonga na biso.” Na nsima, wana ezali yo koluka mokapo yango, okoki kotala bayoki mpo na komona soki bakangi ntina na makambo ozali kolobela bango. Mingimingi okomona ete bayangani babandi mpe koluka mokapo yango.
4 Oratere nde akozwa ekateli soki alingi kolobela makasi mikapo mosusu na kobengaka bayoki ete baluka yango. Tala bayoki na yo mpo na koyeba soki bazali kolanda yo. Ya solo, badiskur mosusu ezalaka maniskri oyo esengeli bobele kotangama, nde ata bongo, okoki kobimisa mikapo ya ntina na motindo boye ete bayoki bakoka kolanda yo kati na Biblia.
5, 6. Mpo na nini ezali malamu kotikela bayoki ntango ya koluka mpe komona mikapo oyo tolingi kotanga?
5 Kotikela bango ntango ya komona esika olingi kotanga. Ekoki te bobele koyebisa bayoki ete ozali kotanga mokapo boye to mokapo boye. Soki otangi mokapo moko mpe oleki na mokapo mosusu, kozanga kotikela bayoki na yo ntango ya kozwa mokapo yango kati na Biblia na bango, bakolemba mpe bakotya Biblia na bango pembeni. Talaka bayoki na yo mpe okotanga mokapo bobele soko mingi kati na bango bakomi na esika yango.
6 Mbala mingi, ebongi malamu komiyebisela libela mokapo oyo okotanga, naino ezali yo koloba. Na motindo yango, okobungisa ntango te mpe okolobaloba makambo ya mpamba te mpo na kozelaka ete bayoki bamona mokapo oyo olingi kotanga. Nzokande, kosala poze liboso ya kotanga mokapo ezali malamu. Epai mosusu, kobosana te ete maloba na yo nsima ya kopesa mokapo mpe liboso ya kotanga yango ekoyokama mpenza te. Na yango, makanisi ya ntina, mpo na yango olingi kotangela mokapo masengeli koyebisama liboso ya kopesa mokapo yango.
7-18. Bametode nini tokoki kosalela mpo na kobimisa mikapo ya Biblia oyo tobongisaki?
7 Mingimingi, mikapo ya Biblia mipesami kati na diskur ezali pwɛ́ minene ya diskur. Makanisi minene matongami zongazonga na mikapo yango. Ekobongisa diskur na biso soki tokosalela yango malamu. Ntina wana pwɛ́ moko esengami kati na fiche ya Toli mpo na balobi ezali boye ete “Mikapo mibimisami malamu”; ebongi ete otyela yango likebi nyonso.
8 Ndenge mingi ezali ya kobimisa mikapo ya Biblia, kotanga yango mpe komonisa ntina na yango. Ntango mosusu, maloba ya kobimisa mokapo ezali mpe komonisa ndenge ya kosalela yango, na motindo boye ete ekoki bobele kotanga yango mpo na komonisa ntina ya pwɛ́ oyo olobeli. Nzokande, tokosalelaka mpe mikapo mosusu malamu, kotangaka yango kozanga koloba eloko mosusu liboso na yango, mokapo yango moko esalelami lokola maloba ya ebandeli ya diskur.
9 Mpo na koyeba malamu lolenge nini ya maloba okoki kosalela liboso ya kobimisa mikapo na yo, talaka malamu motindo ezali kosala ba oratere oyo bameseni. Luka koyeba myango ndenge na ndenge oyo bazali kosalela mpo na kozwa maloba ya koyebisa bato liboso ya kotanga mikapo ya Biblia. Tala soki ezali kosimba. Ntango ozali kobongisa diskur na yo, talela libela mosala nini mokapo boye to mokapo boye ekosala kati na diskur na yo, mingimingi soki mokapo yango ezali verset clé esangisami esika moko na pwɛ́ moko ya ntina. Bongisa malamu maloba oyo okoloba liboso ya kopesa mokapo yango, na motindo boye ete ntango okotanga yango, ekoka kokotela bato malamumalamu. Topesi mwa makanisi na baparagrafe elandi mpo na ndenge okoki kosalela:
10 Motuna. Motuna nyonso esengaka eyano. Ezali kolamusa mposa ya bayoki. Mokapo to ndenge ya kosalela yango esengeli kopesa eyano. Na ndakisa soki ozali koloba mpo na likambo etali kozongisa makila na nzoto mpe soki osili koyebisa epekiseli ezwami kati na Makomami ya hébreu, okoki kobimisa Misala 15:28, 29, na kotunaka motuna molandi: “Kasi baklisto basengeli mpe kotosa epekiseli oyo? Landa ekateli oyo collège central ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso bazwaki, na kopemama na elimo santu, kati na Misala 15:28, 29.”
11 Likambo to etinda moko esimbami na verset oyo olingi kobimisa. Soki motó na likambo na yo etali mobulu, okoki koloba: “Tosengeli kopona bato oyo bakoki kozala baninga na biso, mpamba te yango ekoki kopusa biso na malamu to na mabe.” Na nsima okoki kobimisa mokapo ya 1 Bakolinti 15:33 mpo na kosimbisa likanisi yango.
12 Kobenga Biblia mpo na kokata likambo. Mpo na mikapo oyo mizali na mindondo mingi te, okoki koloba bobele ete: “Tala oyo Liloba ya Nzambe elobi na ntina na likambo yango.” Ezali ntina ekoki mpo na kobimisa mokapo mpe kotanga yango.
13 Kosilisa ntembe. Mpo na “lifelo”, tokoki koloba: “Mpo ete moto anyokwama na móto ya seko, esengeli ete azala koyeba makambo nsima na liwa. Nzokande, Mosakoli 9:5, 10 elobi ete . . .”
14 Kopona. Soki motuna ya direke to komonisa mokakatano moko ezali bametode ya mpasi mingi mpo na bayoki na yo, okoki kolakisa bango biyano mingi mpe kotika nzela na mokapo ete elakisa bango wapi eyano malamu. Na ndakisa, soki olingi kosalela mokapo ya Matai 6:9 mpo na kolakisa na mondimi moko ya katolike epai na nani tosengeli kotinda mabondeli na biso, motuna ya direke ekoki kotya ye na libunga. Yango wana okoki koloba boye: “Makanisi mazali mingi mpo na koyeba nani tokoki kosambela. Bamoko balobaka ete tosengeli kosambela Marie, bamosusu ete tosambela ‘basantu’, bamosusu mpe ete tosengeli kotinda mabondeli na biso bobele epai na Nzambe. Nzokande, tala oyo Yesu alobaki na ntina yango . . .”
15 Kopesa mwa lisolo. Soki olingi kosalela Baebele 9:12 kati na diskur moko ezali kolobela lisiko, mpo na komonisa bayoki ete Yesu azwelaki biso “lobiko ya seko” na ndenge apesaki makila na ye, mbala mosusu ekozala malamu ete opesa naino mwa lisolo na bayoki na yo mpo na kolimbwela bango “esika ya bosantu” kati na tabernakle ya kala ezalaki nini, mpamba te, engebene Paulo, Yesu akotaki wana na elimo.
16 Makambo mazali zongazonga ya mokapo. Mbala mosusu, baversets oyo ezali liboso to oyo elandi ezali litomba mpo na kobimisa verset oyo olingi kotanga. Na ndakisa, liboso ya kotanga Luka 20:25 mpo na komonisa eloko nini elimboli kopesa “biloko ya César na César”, mbala mosusu ekozala malamu kolimbola naino motindo Yesu asalelaki mbongo ya ebende oyo ezalaki na makomi mpe na elongi ya César, lokola eyebisami na verset oyo ezali liboso.
17 Kosangisa metode. Nzokande, okoki kosangisa bametode oyo, mpe ekozalaka litomba mingi.
18 Maloba na yo liboso ya kopesa mokapo esengeli mpenza kolamusa mposa ya bayoki mpo ete esimba likebi na bango, wana ekozala yo kotanga mokapo. Esengeli mpe ete maloba yango mamonisa polele ntina oyo ozali kotangela mokapo yango.
19, 20. Ndenge nini tokoki koyeba ete tolamusi mposa mpo na mokapo oyo tolingi kotanga?
19 Kolamusa mposa mpo na mikapo. Ndenge nini okoki koyeba ete olamusi mpenza mposa ya bayoki na yo mpo na mokapo oyo olingi kotanga? Ya liboso, talela bayoki na yo, kasi lisusu ndenge na yo ya kobimisa mokapo. Soki otangi te mokapo moko oyo oyebisaki yango bayoki na yo, bango bakotikala na mposa, kozelaka eyano na motuna moko oyo otunaki yango na maloba na yo ya ebandeli? Soki ezali boye, elakisi ete olamusaki mpenza mposa ya bayoki mpo na mokapo yango. Ya solo, maloba na yo ya ebandeli masengeli kozala na boyokani na motó ya likambo mpe na mokapo oyo olingi kotanga. Mokapo yango moko to ndimbola na yango, esengeli koyanola motuna nyonso oyo otunaki yango na maloba na yo ya ebandeli.
20 Ndenge ya kobimisa mikapo ezali lokola ndenge bakobetaka lokolé mpo na kobenda likebi ya bato liboso ya kosakola likambo moko ya ntina. Bobele bongo, tosengeli kozala na ndenge malamu ya kobimisa mikapo na biso, na motindo boye ete bato bayoka yango na esengo mpe bazwela yango litomba.
21. Mpo na nini tosengeli komonisa ntina oyo tozali kotangela mokapo?
21 Koyebisa ntina oyo otangeli mokapo yango. Atako, mpo na kobimisa mokapo moko, tokoki kotuna motuna moko kozanga koyanola yango, nzokande motuna esengeli komonisa mpo na nini mokapo yango ebongi na esika wana mpe mpo na nini tosengeli kotyela yango likebi. Na ndakisa, soki ozali koloba mpo na mabelé lokola efandelo ya seko mpo na moto, okoki kobimisa mokapo ya Emoniseli 21:3, 4 na maloba malandi: “Ntango tokotanga Emoniseli 21:3, 4, tya likebi mpo na komona epai wapi hema ya Nzambe ezali nsima na kolimwa na mpasi mpe na liwa.” Kosalaka bongo, olamusi mposa ya bayoki, mpo ete batya likebi na pwɛ́ moko oyo ekobima na mokapo mozali yo kotanga, nde lisusu obendi likebi na bango likoló na eteni ya ntina ya mokapo yango, oyo okolimbola yango nsima na kotanga. Kobendaka bongo likebi ya bayoki likoló na makambo makomami kati na mokapo, okomonisa polele ntina na Liloba na Nzambe.