LITEYA 20
Kobimisa makanisi ya vɛrsɛ liboso ya kotánga yango
MATEYA nyonso oyo tozwaka na makita ya lisangá eutaka na Makomami. Ata makambo oyo tolobaka na mosala ya kosakola eutaka mpe na bavɛrsɛ ya Biblia. Nzokande, mpo bavɛrsɛ yango esalisa biso na lisolo oyo tozali kosala, yango etalaka mpenza ndenge oyo tozali kolobela yango.
Ekoki kaka te komonisa moto vɛrsɛ moko mpe kosɛnga ye ete atánga yango elongo na yo. Ntango ozali kobimisa vɛrsɛ moko, salá makasi okokisa makambo mibale oyo: (1) Olamusa mposa na ye, mpe (2) Omonisa ye ntina oyo ozali kotángela ye vɛrsɛ yango. Ezali na ndenge mingi oyo okoki kokokisa makambo mibale oyo.
Tuná mituna. Ezalaka malamu mpenza kotuna motuna soki bato oyo bazali koyoka yo bazali naino komona eyano na yango te. Salá ete otuna motuna yango na ndenge oyo ekotinda bato bákanisa. Yesu mpe azalaki kosala bongo. Ntango Bafalisai bayaki kokutana na ye na tempelo mpe na miso ya bato nyonso, bamekaki ye mpo báyeba soki ayebaki Makomami malamu, Yesu atunaki bango boye: “Bokanisi nini mpo na Klisto? Azali mwana ya nani?” Bango balobaki na ye ete: “Ya Davidi.” Na nsima, Yesu atunaki bango lisusu boye: “Boye, ndenge nini Davidi na kopemama azali kobenga ye ‘Nkolo’?” Mpe atángelaki bango maloba ya Nzembo 110:1. Bafalisai bazangaki maloba. Kasi ebele ya bato oyo bazalaki wana basepelaki mpenza koyoka Yesu.—Mat. 22:41-46.
Mpo na kobimisa malamu makanisi ya vɛrsɛ moko na mosala ya kosakola, okoki kotuna mituna lokola oyo: “Moto na moto azalaka na nkombo na ye. Bongo Nzambe, azali mpe na nkombo na ye moko? Tokoki kozwa eyano na motuna oyo na Nzembo 83:18.” “Ezali na mokolo oyo guvɛrnema moko kaka ekoyangela bato nyonso? Talá ndenge Danyele 2:44 eyanoli na motuna yango.” “Biblia ezali mpenza kolobela makambo oyo tozali komona lelo oyo na mokili? Talá makambo oyo ezali na 2 Timote 3:1-5 soki ekokani na makambo oyo ozali komona.” “Mpasi na liwa ekosila mokolo mosusu? Okoki komona eyano ya Biblia na Emoniseli 21:4, 5.”
Ntango ozali kosala lisukulu, soki ozali kosalela malamu mituna mpo na kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ malamu, yango ekoki kotinda bato oyo bazali koyoka yo ete básepela kotánga bavɛrsɛ yango, ata soki bayebi yango. Kasi mpo básala bongo, mituna na yo esengeli mpe kobenda likebi na makambo oyo etali bango. Ata soki lisolo na yo ezali kolobela makambo oyo esepelisaka bato oyo bazali koyoka yo, makanisi na bango ekoki koyengayenga soki ozali kotángela bango bavɛrsɛ oyo basilá koyoka mbala mingi. Mpo makanisi na bango eyengayenga te, osengeli kokanisa malamumalamu liboso mpo maloba oyo okobimisa ebenda mpenza likebi na bango.
Komonisa mokakatano moko. Okoki komonisa mokakatano moko mpe na nsima, obendi likebi ya bato na vɛrsɛ moko oyo ezali komonisa ndenge ya kolonga mokakatano yango. Koluka te kotinda bato bákanisa ete mikakatano na bango ekosila mbala moko. Mbala mingi, vɛrsɛ epesaka kaka ndambo ya eyano na mikakatano na biso. Nzokande, okoki kosɛnga bango ete ntango ozali kotánga vɛrsɛ yango, bátalela toli oyo vɛrsɛ yango ezali kopesa bango mpo na kolonga mikakatano yango.
Ndenge moko mpe, okoki kolobela etinda moko oyo etali bizaleli malamu mpe na nsima, okoki kosalela lisolo moko ya Biblia mpo na komonisa ete soki totosi etinda yango tokomonisa ete tozali na bwanya. Soki vɛrsɛ oyo bakotánga ezali na makanisi ya ntina mibale (to misato. . . ) oyo etaleli mpenzampenza likambo oyo bazali kolobela, balobi mosusu basɛngaka bato oyo bazali koyoka bátya likebi na makanisi yango. Soki emonani ete mokakatano oyo olobeli ezali mpasi mingi mpo na bato oyo bazali koyoka, okoki kotinda bango bákanisa; okoki komonisa bango ndenge mingi oyo mokakatano yango ekoki komonana mpe na nsima, tiká vɛrsɛ mpe ndimbola na yango emonisa bango oyo basengeli kosala.
Monisá ete Biblia nde esengeli kokata likambo. Soki olamwisi mposa ya bato mpo na lisolo na yo mpe soki olobeli likanisi moko to makanisi ndenge na ndenge oyo etali likambo yango, okoki koloba boye liboso ya kotánga vɛrsɛ moko: “Talá ndenge Liloba ya Nzambe elobi mpo na likambo yango.” Maloba oyo ekomonisa ete likambo oyo olingi kotánga nde ekokata likambo.
Yehova asalelaki bato lokola Yoane, Luka, Paulo mpe Petelo mpo na kokoma mikanda mosusu ya Biblia. Kasi bango bazalaki kaka bakomi mpamba, makanisi wana eutaki nde epai ya Yehova. Mingimingi, ntango ozali kosolola na bato oyo bayekolaka Makomami Mosantu te, soki mpo na kotánga vɛrsɛ moko olobi ete “Petelo akomaki” to “Paulo alobaki,” yango ekosimba mpenza likebi mingi te lokola soki omonisi ete vɛrsɛ wana ezali liloba ya Nzambe. Kobosana te ete na bantango mosusu, Yehova apesaki Yilimia etinda ete abanda bisakweli na ye na maloba oyo: “Bóyoka liloba ya [Yehova].” (Yil. 7:2; 17:20; 19:3; 22:2) Ezala tosaleli nkombo ya Yehova liboso ya kotánga vɛrsɛ to te, liboso tósukisa lisolo na biso, tosengeli kosala makasi mpo na komonisa ete makambo oyo ezali na kati ya Biblia ezali liloba na ye.
Talelá mpe bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe na nsima ya vɛrsɛ oyo okotánga. Ntango ozali kopona ndenge oyo okobimisa makanisi ya vɛrsɛ moko, osengeli mpe kotalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso na yango to oyo elandi yango. Na bisika mosusu, ekosɛnga olobela mbala moko makambo oyo mokapo wana mobimba elobeli, kasi makambo yango ekoki kotinda yo obongola mwa moke maloba na yo. Na ndakisa, makambo oyo okoloba liboso ya kotánga maloba ya Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, ekozala ndenge moko na oyo okoloba liboso ya kotánga maloba ya moto moko kati na bato oyo bazalaki kokosa ete bazali kobɔndisa ye? Luka nde moto akomaki mokanda ya Misala, kasi akomaki mpe maloba ya bato mosusu lokola Yakobo, Petelo, Paulo, Filipo, Setefano, baanzelu, Gamaliele mpe Bayuda mosusu oyo bazalaki baklisto te. Sikoyo, ntango ozali kopesa vɛrsɛ moko, okomonisa ete maloba wana ekomamaki na nani? Kobosana mpe te ete Davidi akomaki mokanda ya nzembo mobimba te mpe Salomo akomaki mokanda ya Masese mobimba te. Ezali mpe na ntina mingi oyeba soki mokomi wana ya Biblia azalaki kokomela banani mpe likambo nini azalaki kolobela bango.
Yebá kosalela makambo oyo ezalaki koleka na ntango wana. Soki omonisi ete makambo oyo ezalaki kosalema ntango bakomaki lisolo wana ya Biblia ekokani na makambo oyo ozali kolobela, yango ekosimba mpenza mitema ya bato. Na bantango mosusu, kolobela makambo oyo esalemaki na ntango wana, esalisaka mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ moko. Na ndakisa, soki ozali kosala lisolo moko oyo elobeli lisiko mpe olingi kotánga Baebele 9:12, 24, ekozala malamu liboso otánga vɛrsɛ yango olobela mwa moke ndenge eteni ya kati mpenza ya tabernakle ezalaki; makomami emonisi ete eteni yango ya kati ezalaki elilingi ya esika oyo Yesu akɔtaki ntango azongaki na likoló. Kasi kolobela makambo ebele ebele te, mpamba te bato bakoki kobosana ntina ya vɛrsɛ oyo olingi kotánga.
Mpo okóma kobimisa malamu makanisi ya bavɛrsɛ liboso ya kotánga yango, talá ndenge bandeko oyo bayebi mpenza koloba basalaka. Talá ndenge oyo bazali kolobela bavɛrsɛ. Talá malamumalamu matomba oyo lolenge mokomoko epesaka. Sikoyo ntango ozali kobongisa lisolo oyo yo moko okosala, luká bavɛrsɛ oyo ezali na makanisi ya ntina mpe luká koyeba ntina ya vɛrsɛ mokomoko. Bongisá malamu mpenza maloba oyo okoloba liboso ya kotánga vɛrsɛ mokomoko mpo esimba mpenza mitema ya bato. Na nsima, luká likanisi oyo euti na bavɛrsɛ nyonso oyo okotánga. Soki obongisi mpenza lolenge na yo ya kolobela bavɛrsɛ, okobanda kobenda likebi ya bato mingimingi na Liloba ya Nzambe.