Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 38 nk. 188-192
  • Tika ete kokola na yo emonana polele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tika ete kokola na yo emonana polele
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bilenge—Bómonisa bokoli na bino polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tiká ete bokóli na yo emonana!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 38 nk. 188-192

Liteya 38

Tika ete kokola na yo emonana polele

1, 2. Mpo na nini tosengeli biso banso kolinga kokola?

1 Awa esili yo koyekola na likebi nyonso mpe kosalela batoli nyonso ezwami na mokanda oyo, ozali komizela ete ozwa diplôme na Eteyelo ya mosala ya Nzambe? Te, mpamba te programme na yango ezali na mokano ya kopesa formation ya ntango nyonso mpo na mosala ya Nzambe. Ntina ya kopesa diplôme ezali te mpo okozala ntango nyonso na mposa ya kozwa boyebi ya Nzambe mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola. Nzokande, soki ozali moyekoli malamu, kokola na yo ekomonana polele epai na baoyo bayebi yo.

2 Ntoma Paulo alendisaki Timoté, leki na ye kati na kondima, ete ‘atyaka motema na kotanga Makomi polele mpe na kosakola mpe na koteya. Atyaka motema na makambo oyo, amipesa na yango, ete kokola na ye emonana polele’. (1 Tim. 4:13, 15) Yo oyo ozali kosambela Nzambe moko na bango, okoki komonisa polele bokoli na yo epai na bamosusu. Okoki ntango nyonso kosala bongo, mpamba te okoki kokoma na nsuka ya bokoli nyonso te. Jéhovah azali liziba na boyebi nyonso ya solo, liziba ekokani na libulu ya mai ya mpio oyo ekoki kokauka te. Tokokoka ata mbala moko te kosilisa mai nyonso na libulu yango, kasi tokoki seko kotoka bomoi na kati na yango. (Baloma 11:33, 34; Yisaya 55:8, 9) Kasi ndenge nini kokola na yo ekomonana polele epai na baoyo bazali kotala yo?

3, 4. Ndenge nini tozali komonisa polele kokola na biso na Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe na makita mosusu ya lisangá?

3 Ndenge nini kokola na yo ezali komonana polele. Ya liboso, ezali komonana polele na masolo oyo ozali kosala na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Ozali kokanisa mbala mosusu ete okoli naino mingi te, kasi bayangani mosusu bazali komona malamu bokoli na yo koleka yo moko. Mpo na yango, tokokani biso banso na mwana oyo akolinga kokola mbangumbangu mpenza, nzokande baboti to bandeko oyo bazali kotala ye bazali kokamwa ete: “Okoli ee!” Omikundola lisusu lisolo ya liboso oyo osalaki na eteyelo. Ozali koyeba yango lisusu? Kokanisa yango na oyo outi kosala kala mingi te. Uta ntango nyonso, osili koyekola makambo mingi mpe osili kozwa eksperianse, boye te? Kenda ntango nyonso liboso.

4 Kokola na yo ekomonana polele bobele kati na masolo oyo ozali kosala na Eteyelo ya Nzambe te. Ekoki lisusu komonana na ntango ya makita mosusu ya lisangá. Oyanganaka na makita yango ntango nyonso? Soko ee, yango emonisi ete ozali kokola mpe ozali komemya mpenza makambo oyo Jéhovah azali kosala mpo na kobatela kolongono na yo ya elimo. Lisusu, bakomantere na yo ya kitoko oyo ozali kopesa na makita ezali mpe komonisa ete ozali kokola. Baoyo bazali koyanola na maloba na bango moko na esika ya kotanga biyano na mokanda, bazali mpe komonisa polele bokoli na bango. Bobele bongo, baoyo, kati na bakomantere na bango, bazali kolobela ndimbola mpe motuya to ndenge oyo makanisi mayekolami makoki kosalelama, bango mpe bamonisi ete bakomi na bososoli. Na yango, koyangana na makita mbala na mbala mpe ndenge oyo tozali kobongisa mikumba mpe biyano na biso ezali na ntina mingi mpo na komonisa soko tosili kokola.

5. Eloko nini emonisaka ete tokoli kati na mosala ya kosakola?

5 Tokoloba boni sikawa mpo na kokola na yo kati na mosala ya kosakola? Omikundola ndenge oyokaki ntango okomaki na porte ya liboso, mbala ya yambo oyo obimaki na mosala ya kosakola. Tala sikawa makoki na yo mpo na mosala ya kosakola. Osili kokola, boye te? Ata bongo, ondimi mpenza kozanga ntembe ete okoki lisusu kobongisa makoki na yo ya mosakoli mpe moteyi. Okoki te kosangana lisusu na lolenge nyonso ya mosala oyo ekoki kopesamela yo? Ntoma Paulo alobaki: “Pelamoko bozwi epai na biso motindo mobongi na bino ete botambola mpe bosepelisa Nzambe, lokola mpe bozali kosala, [bolanda] kosalaka bongo.” (1 Bates. 4:1) Soko ozali ntango nyonso kokola na kosanganaka mingi mpenza na mosala ya Jéhovah, mosala na yo ya kosakola mpe mateya na yo makobota mbuma solo, kasi okomemya lisusu malamu koleka libaku malamu oyo ozali na yango ya kosalela Jéhovah. Ata ntango oyo bayoki to balobani na yo bakoyanola mpenza malamu te, okomona ata bongo ete ozali na libaku malamu ya kozala mosaleli ya Jéhovah mpo na kosakwela bango nsango malamu.

6. Ndenge nini masolo na biso mazali komonisa kokola na biso ya elimo?

6 Masolo na biso mpe ekomonisa polele kokola na biso. Yesu alobaki ete “monoko ekoloba na makambo matondisi motema.” (Luka 6:45) Ntango Jéhovah mpe mikano na ye bazali na esika monene kati na masolo ya moto, yango emonisi ete asili kokola. Bolingo na ye mpo na Jéhovah ezali kokola mpe boyokani na ye elongo na Nzambe ekokoma makasi koleka. Nzokande, wana ezali biso kobelema epai na ye, ye mpe akokoma libateli na biso eleki monene.

7. Epai wapi kokola na biso ekomonana mpo na oyo etali ndenge ya kosalela makambo tozali koyekola?

7 Kokola na biso ekomonana lisusu polele ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Ozali komimona te ete lelo oyo ozali na mokumba ya kozala na bizaleli bikeseni na oyo ozalaki na yango liboso ete oyeba Liloba na Jéhovah? Bokoli oyo osili kozwa na kolandaka ndenge Jéhovah asengi ezali mpe komonana kozanga ntembe kati na misala na yo nyonso. Ezali komonana epai na yo mpe na boyokani oyo ozali na yango elongo na basangani ya libota na yo. Ezali komonana na ndenge na yo ya kokokisa mikumba na yo. Na esika na yo ya mosala, ozali kosalela mitinda ya Biblia na likebi nyonso. Nyonso wana emonisi ete osili kokola. Kasi tokoki biso banso kokola na kolukaka kolanda malamu koleka mitinda ya Biblia.

8, 9. Wana tondimi kosalisa basakoli mosusu, yango elimboli nini mpe mabaku nini mapesameli biso?

8 Ndima komema mikumba. Mwango mosusu ya komonisa bokoli na biso polele ezali ya kolakisa ete tondimi komema mikumba pene mpo na kosalela Jéhovah mingi koleka. Kati na Nzembo 110:3 (Liénart), totangi boye: “Bato na yo bakoya komipesa epai na yo na bolingo na bango moko, na mokolo oyo okokenda na etumba.” Tokoki koloba bongo mpo na yo? Okoki komipesa koleka na mikolo mizali koya?

9 Okoki komonisa ete ondimi komema mikumba na kosalisaka baninga na yo mpe komibanzabanza solo mpo na bango. Bankulutu ya lisangá bakoki kosenga na yo ete osalisa bandeko mibali to bandeko basi,oyo mbala mosusu bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na koya na makita. Okondima kosalisa bango? Epai mosusu, kozela te ntango nyonso ete basenga yo yango. Mpo na nini okosalisa te na bolingo na yo moko baoyo bazali komonana ete bazali na mposa ya lisalisi? Ndeko moko azali na maladi to akoti lopitalo? Na bongo, kozela te ete bankulutu babenda likebi na yo na likambo yango; okoki yo moko kozwa likanisi ya kokenda kotala ye to kosalisa ye na likambo moko soko oyebi bamposa na ye. Otambwisaka boyekoli ya libota epai na yo mbala na mbala? Okoki mbala mosusu kosalisa libota moko oyo eyambi solo sika mpe oyo ezangi boyekoli yango na kobyangaka bango baposo mosusu ete baya koyekola elongo na libota na yo. To, soko obimaka yo moko na mosala ya kosakola, ezali na baklisto mosusu te oyo bakolinga kobima elongo na yo soko obengi bango? Mpo na nini okosenga te epai na mosakoli mosusu ete abima na yo elongo? Ezali solo ete basaleli ya Jéhovah bazali na mosala mingi na eleko na biso, kasi tokomonisa polele bokoli na biso na kosalisaka bandeko na biso mibali mpe basi kozanga ete bapusa biso. “Soko tozwi nzela, tosalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.”​—Bagal. 6:10.

10, 11. Na boyokani na 1 Timoté 3:1, ndenge nini bandeko mibali bakoki komonisa mposa na bango ya komema mikumba?

10 Soko ozali ndeko mobali, okoki kolakisa ete ondimi komema mikumba na kotyaka milende mpo na kokokisa masengami matangama kati na Liloba na Nzambe mpo na baoyo bazali kotambwisa lisangá. Mokapo ya 1 Timote 3:1 ekumisi baoyo bazali koluka mokumba ya mokengeli. Elingi koloba te ete baluka komilakisa to kotyana ntembe na bamosusu, kasi koluka komimonisa moklisto ateli, “nkulutu”, kokokisaka masengami mpe kondima kokokisa ata mosala nini esengami na bango. Lisangá mokomoko ezali na mposa ya “bankulutu” mpe “basaleli na misala” mingi mpo na kotambwisa mosala ya koteya mpe kosakola, mpe mpo na komema mikumba.

11 Bandeko oyo bandimi komema mikumba bakoki kozwa mabaku malamu mingi kati na lisangá. Bakoki kosenga bango ete basala elakiseli moko kati na likita ya mosala to mpe basunga bankulutu to basaleli na misala mpo ete basili komonisa ete balingi mosala mpe ete bakoki kotyela bango motema na kokokisa mikumba nyonso mipesamelaki bango. Soko mosala ekomi mingi, mposa na bango ya komema mikumba mpe bokoli na bango ekopusa batambwisi ya lisanga ete batinda nkombo na bango mpo na koponama bankulutu to basaleli na misala. Mpo na nini baponami? Mpo ete basili komonisa ete bandimi komema mikumba mpe basili kokola, kokokisaka bongo masengami ya Jéhovah mazwami kati na Liloba na ye. Bandeko yango baponami basaleli bakobyangama mpo na kokenda na Eteyelo ya Mosala ya Bokonzi oyo esalemaka nsima na bileko mpo na kozwa lisusu formation na ndenge bakoki kotalela matomba ya lisangá.

12, 13. Mabaku nini mosusu mapesameli baklisto mingi oyo bakoki mpe balingi komema mikumba?

12 Ezali na mabaku mosusu oyo baklisto nyonso bakoki kozwa soko ezalela na bango epesi bango nzela mpe soko bamimonisi ete bandimi komema mikumba. Lokola ezali kosala yango bibele na baklisto mosusu, okoki komipesa mbala na mbala mpo na kosala lokola pionnier auxiliaire? Okoki mbala mosusu kokoma moko kati na ba pionniers permanents oyo motuya na bango ezali ntango nyonso se kobakisama. Ezalela na yo mpenza mpe elimo na yo liboso na mosala ya Jéhovah ekotinda yo okenda na teritware mosusu mpo na kosalela Jéhovah, soko mposa emonani? Ezali yango esalaki baklisto mingi na kokomaka ba pionniers spéciaux, na kokotaka na Ecole de Galaad mpo na kobanda na nsima mosala ya misionere, to lisusu, wana ezali bango basakoli, bazali kokenda kosala epai kuna mposa ezali monene. Bamoko basili kondima kosala na Béthel. Basili kozwa mapamboli mingi na ndenge bamipesaki epai na Jéhovah.

13 Tozali kobika na eleko moko ya mpasi. Na “mikolo ya nsuka” oyo, Jéhovah azali kosalisa mosala moko kitoko etali kosakola mpe koteya mabelé mobimba. Ntango Jéhovah azali kobyanga biso na nsima na lisangá na ye mpo na kosangana na lolenge moko ya mosala, omituna motuna oyo: “Jéhovah azali koloba epai na ngai?” Talela malamumalamu ezalela na yo mpe motema na yo. Na ntembe te osili kosala mwa bokoli mpe osili komonisa mposa na yo ya kosalela Jéhovah. Ezali likambo malamu, kasi okoki te komonisa polele bokoli na yo lisusu na komibongisaka mpo na kokumba mikumba mileki minene? Okopambwama soko ozali kokola na botosi liboso na malako mpe litambwisi ya Jéhovah. Basaleli na ye bazwami kati na mokili mobimba, oyo basili komilengela mpo na kosalela ye, bakoki kotatola yango. Ya solo, soko tozali kokola, tokozwa lipamboli eleki kitoko kati na mapamboli nyonso, elingi koloba bomoi ya seko kati na mokili ya sika. Yango wana Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso na maloba malandi: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, mpo bato nyonso bamona polele ete ozali kokende liboso. Omisenzela yo moko mpe mateyo na yo; ee, oumela na yango, mpamba te ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe baoyo bazali koyoka yo.”​—1 Tim. 4:15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto