Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/12 nk. 11-15
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya komonisa ete tozali kokende liboso
  • Tózala ndakisa na maloba
  • Tózala ndakisa na etamboli mpe bizaleli ya pɛto
  • Bolingo mpe kondima ezali na ntina
  • Salá makasi omonisa ete ozali kokende liboso
  • Bilenge—Bómonisa bokoli na bino polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tika ete kokola na yo emonana polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • “Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/12 nk. 11-15

Monisá polele ete ozali kokende liboso

“Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”​—1 TIM. 4:15.

1, 2. Makambo nini toyebi mpo na bomwana ya Timote mpe mbongwana oyo esalemaki ntango akómaki na mbula soki 20?

NTANGO Timote azalaki mwana moke, azalaki kofanda na Galatia, etúká oyo Baroma bazalaki koyangela, oyo ezali lelo ekólo Turquie. Mwa bambula nsima ya liwa ya Yesu, masangá mingi ya bokristo esalemaki kuna. Na eleko moko boye, elenge Timote, mama na ye, mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi bakómaki bakristo mpe bazalaki na moko ya masangá yango. (2 Tim. 1:5; 3:14, 15) Na ntembe te, Timote azalaki na esengo ya kozala elenge mokristo na esika oyo amesanaki na yango. Kasi, na mbala moko, makambo ebandaki kobongwana.

2 Makambo nyonso ebandaki ntango ntoma Paulo asalaki mobembo na etúká yango mpo na mbala ya mibale. Na ntango yango, Timote akokaki kozala na mbula pene na 20 to mwa moke koleka. Na mobembo yango, mbala mosusu ntango Paulo azalaki na Listra, atyaki likebi na ndenge “bandeko [ya masangá oyo ezalaki zingazinga] bazalaki koloba malamu” mpo na Timote. (Mis. 16:2) Na ntembe te, elenge Timote amonisaki ete akɔmɛli na elimo koleka bilenge ya mbula na ye. Na nsima, na litambwisi ya elimo santu, Paulo ná bankulutu ya lisangá batyelaki Timote mabɔkɔ, baponaki ye mpo akóma na mokumba moko ya ntina mingi na lisangá.​—1 Tim. 4:14; 2 Tim. 1:6.

3. Mokumba monene nini Timote azwaki?

3 Timote azwaki libaku moko monene​—asengelaki kokóma moninga ya mobembo ya ntoma Paulo! (Mis. 16:3) Na ntembe te, Timote akamwaki mpe asepelaki mpenza! Na bambula oyo ekolanda, Timote akosala mibembo elongo na Paulo mpe ntango mosusu elongo na bandeko mosusu, akobanda kokokisa mikumba ndenge na ndenge oyo bantoma mpe bankulutu bakopesa ye. Paulo ná Timote bakómaki kosala mibembo oyo esalisaki mingi na kolendisama ya bandeko na elimo. (Tángá Misala 16:4, 5.) Na yango, bakristo mingi bayebaki Timote mpo azalaki kokende liboso na elimo. Nsima ya kosala elongo na Timote mbula soki 10, ntoma Paulo akomelaki Bafilipi ete: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya [Timote], oyo azali komitungisa mpenza mpo na bino. . . . Boyebi ndenge amonisaki ete abongi kotyelama motema, mpo lokola mwana ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.”​—Flp. 2:20-22.

4. (a) Mokumba nini ya monene mpenza Paulo apesaki Timote? (b) Mituna nini maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Timote 4:15 ekoki kobimisa?

4 Na eleko oyo Paulo akomelaki Bafilipi, apesaki Timote mokumba monene mpenza: mokumba ya kotya bankulutu mpe basaleli na misala. (1 Tim. 3:1; 5:22) Emonani polele ete Timote akómaki mokɛngɛli mokristo ya sembo mpe oyo bakoki kotyela motema. Atako bongo, kaka na mokanda yango, Paulo alendisaki Timote ‘amonisa bato nyonso polele ete azali kokende liboso.’ (1 Tim. 4:15) Timote asilaki te komonisa polele ete azali mpenza kokende liboso? Bongo, Paulo alingaki mpenza koloba nini na maloba wana, mpe ndenge nini toli na ye ekoki kosalisa biso?

Ndenge ya komonisa ete tozali kokende liboso

5, 6. Likama nini ezalaki mpo na bopɛto ya elimo ya lisangá ya Efese, mpe ndenge nini Timote akokaki kopekisa likama yango?

5 Tótalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya 1 Timote 4:15. (Tángá 1 Timote 4:11-16.) Liboso Paulo akoma maloba wana, akendaki na Masedonia kasi asɛngaki Timote atikala na Efese. Mpo na nini? Bato mosusu na engumba yango bakómaki kokɔtisa bokabwani na lisangá na ndenge bazalaki kokɔtisa mateya ya lokuta. Timote asengelaki kobatela lisangá mpo ezala pɛto na elimo. Ndenge nini asengelaki kosala yango? Kati na makambo oyo asengelaki kosala, asengelaki kozala ndakisa malamu mpo na basusu.

6 Paulo akomelaki Timote ete: “Zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto.” Paulo abakisaki boye: “Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.” (1 Tim. 4:12, 15) Timote asengelaki komonisa ete azali kokende liboso na oyo etali bizaleli ya elimo, kasi te na oyo etali mikumba. Mokristo mokomoko asengeli komonisa ete azali kokende liboso nde na bizaleli ya elimo.

7. Bandeko nyonso ya lisangá basengeli kosala nini?

7 Lelo oyo, ndenge moko na eleko ya Timote, bandeko bakoki kozala na mikumba ndenge na ndenge na lisangá. Bamosusu bazali bankulutu to basaleli na misala. Basusu bazali babongisi-nzela. Basusu mpe bazali bakɛngɛli-batamboli, basusu basalaka na Betele, to bazali bamisionɛrɛ. Bankulutu bateyaka na mabaku ndenge na ndenge, na ndakisa na mayangani ya mike mpe ya minene. Nzokande, bakristo nyonso​—mibali, basi, mpe bilenge—​bazali na likoki ya komonisa ete bazali kokende liboso na elimo. (Mat. 5:16) Kutu, ndenge ezalaki mpo na Timote, ata bakristo oyo bazali na mikumba minene basengeli komonisa polele ete bazali kokende liboso na oyo etali bizaleli ya elimo.

Tózala ndakisa na maloba

8. Maloba na biso ekoki kosala nini na losambo na biso?

8 Moko na makambo oyo Timote asengelaki kozala ndakisa ezalaki maloba na ye. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kokende liboso na likambo yango? Maloba na biso emonisaka soki tozali bato ya ndenge nini. Yesu amonisaki yango na maloba oyo: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Yakobo, oyo azalaki mama moko ná Yesu, amonisaki mpe likambo oyo maloba na biso ekoki kosala na losambo na biso. Akomaki boye: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.”​—Yak. 1:26.

9. Na makambo nini tosengeli kozala ndakisa na maloba?

9 Maloba na biso ekoki komonisa bandeko mosusu ya lisangá soki tokɔmɛli mpenza na elimo. Na yango, na esika ya koloba maloba oyo ezangi lokumu, oyo elɛmbisaka, ya kotɔnga basusu, to ya kozokisa, bakristo oyo bakɔmɛli basalaka makasi bázala na maloba oyo etongaka, oyo ebɔndisaka mpe oyo elendisaka. (Mas. 12:18; Ef. 4:29; 1 Tim. 6:3-5, 20) Soki tosepelaka koyebisa basusu ntina oyo tondimaka kozala na etamboli ya pɛto mpe tokɔtelaka mitinda ya sembo ya Nzambe, yango ekoki komonisa ete tokangami mpenza na Nzambe. (Rom. 1:15, 16) Na ntembe te, bato ya mitema sembo bakomona ete tozali kosalela malamu likabo ya koloba mpe bakoki komekola ndakisa na biso.​—Flp. 4:8, 9.

Tózala ndakisa na etamboli mpe bizaleli ya pɛto

10. Mpo na nini kondima oyo ezangi bokosi ezali na ntina mpo tókende liboso na elimo?

10 Mpo mokristo azala ndakisa malamu, asengeli kosuka kaka te na kozala na maloba oyo elendisaka. Moto oyo alobaka makambo ya malamu kasi asalaka makambo ya malamu te, azali mokosi. Paulo ayebaki malamu bokosi ya Bafarisai mpe mbuma mabe na yango. Mbala soki mibale, akebisaki Timote na ezaleli wana ya bokosi. (1 Tim. 1:5; 4:1, 2) Kasi, Timote azalaki mokosi te. Na mokanda na ye ya mibale epai ya Timote, Paulo akomaki boye: “Nazali kokanisa lisusu kondima oyo ozali na yango, oyo ezangi bokosi.” (2 Tim. 1:5) Atako bongo, Timote asengelaki komonisa bato nyonso polele ete azali mpenza mokristo ya solosolo. Asengelaki kozala ndakisa na etamboli.

11. Paulo akomelaki Timote nini na likambo etali bozwi?

11 Na mikanda mibale oyo Paulo akomelaki Timote, apesaki ye toli na makambo mingi oyo etali etamboli. Na ndakisa, Timote asengelaki koboya komipesa na koluka bozwi. Paulo akomaki boye: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:10) Moto oyo alingaka mbongo amonisaka ete azali kokola malamu te na elimo. Nzokande, bakristo oyo bazalaka na bomoi ezangi mindɔndɔ, oyo basepelaka na ‘bilei mpe eloko ya kozipa nzoto oyo bazali na yango,’ bamonisaka ete bazali kokende liboso na elimo.​—1 Tim. 6:6-8; Flp. 4:11-13.

12. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kokende liboso na bomoi na biso?

12 Paulo akomelaki Timote ete ebongi ete bakristo ya basi “bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu.” (1 Tim. 2:9) Basi oyo balekisaka ndelo te mpe bazalaka na makanisi malamu na molato mpe monzɛlɛ na bango, mpe na makambo mosusu ya bomoi, bazali ndakisa malamu. (1 Tim. 3:11) Etinda yango etali mpe bakristo ya mibali. Paulo apesaki bakɛngɛli toli ete bázala ‘bato oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bato ya makanisi malamu, bato ya makambo na molɔngɔ.’ (1 Tim. 3:2) Soki tozali komonisa bizaleli yango na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, bato bakomona ete tozali kokende liboso.

13. Lokola Timote, ndenge nini tokoki kozala ndakisa na bizaleli ya pɛto?

13 Timote asengelaki mpe kozala ndakisa na bizaleli ya pɛto. Ntango Paulo asalelaki maloba wana, alobelaki likambo moko ya sikisiki oyo etali etamboli, likambo ya kosangisa nzoto. Mingimingi na boyokani na ye na basi, etamboli ya Timote esengelaki kozala ata na mbeba moko te. Asengelaki kotalela “basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.” (1 Tim. 4:12; 5:2) Ata makambo ya mbindo oyo moto akoki kokanisa ete ebombami, ezali polele na miso ya Nzambe, mpe nsukansuka eyebanaka epai ya bato. Ndenge moko mpe, misala ya malamu ya mokristo ekoki kobombama libela te. (1 Tim. 5:24, 25) Biso nyonso na lisangá tozali na libaku ya komonisa ete tozali kokende liboso na etamboli mpe na bizaleli ya pɛto.

Bolingo mpe kondima ezali na ntina

14. Ndenge nini Makomami emonisi ete tosengeli kozala na bolingo kati na biso?

14 Bolingo ezali na ntina mingi mpo na bakristo ya solo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Ndenge nini tomonisaka bolingo yango? Liloba ya Nzambe esɛngi biso tókangaka motema “moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo,” ‘tózalaka na boboto na kati na biso, tóyokelanaka mpenza mawa, tólimbisanaka na motema moko,’ mpe tóyambaka bapaya. (Ef. 4:2, 32; Ebr. 13:1, 2) Ntoma Paulo akomaki boye: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema.”​—Rom. 12:10.

15. Mpo na nini bolingo ezali na ntina mpo na biso nyonso, mingimingi mpo na bakɛngɛli bakristo?

15 Soki Timote azalaki makambo makasimakasi to azalaki kosalela bakristo mosusu makambo ezangi boboto, malamu nyonso oyo akokaki kosala na mosala ya koteya mpe kokɛngɛla elingaki kokende na mai. (Tángá 1 Bakorinti 13:1-3.) Nzokande, soki Timote azalaki komonisa ete alingi mpenza bandeko na ye, azali koyamba bapaya mpe azali na misala ya malamu, na ntembe te yango ezalaki komonisa ete azali kokende liboso na elimo. Yango wana, ebongaki mpenza ete na mokanda oyo akomelaki Timote, ntoma Paulo atánga bolingo mpo na komonisa ete ezali moko na bizaleli oyo Timote asengelaki komonisa.

16. Mpo na nini Timote asengelaki kozala na kondima makasi?

16 Ntango Timote azalaki na Efese, kondima na ye emekamaki. Bato mosusu bazalaki kobimisa mateya oyo eyokanaki te na mateya ya bokristo. Bamosusu bazalaki kotambwisa “masapo ya lokuta” to kolukaluka makanisi oyo esalisaki lisangá ata moke te na elimo. (Tángá 1 Timote 1:3, 4.) Paulo alobaki ete bato ya ndenge wana ‘bavimbi na lolendo, bazali kokanga ntina ya eloko ata moko te, kasi babɛli nde mitó mpo na kotyana ntembe mpe kowelana na maloba.’ (1 Tim. 6:3, 4) Timote akokaki kolekisa ntango na kolandela makanisi ya mabe oyo ezalaki kokɔta na lisangá? Te, mpo Paulo alendisaki Timote ‘abunda etumba ya malamu mingi ya kondima’ mpe aboya “bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu mpe maloba ya ntembe ya ‘boyebi’ ya lokuta.” (1 Tim. 6:12, 20, 21) Ntembe ezali te ete Timote alandaki toli ya bwanya oyo Paulo apesaki ye.​—1 Ko. 10:12.

17. Ndenge nini kondima na biso ekoki komekama lelo oyo?

17 Paulo ayebisaki Timote ete “na bileko oyo ekoya bato mosusu bakotika kondima, bakotya likebi na maloba ya bokosi ya bilimo mabe mpe na mateya ya bademo.” (1 Tim. 4:1) Bandeko nyonso ya lisangá, ata mpe baoyo bazali na mikumba, basengeli komekola Timote, basengeli kozala na kondima makasi mpenza. Soki tozali na ekateli makasi ya kotɛmɛla bapɛngwi, tokomonisa ete tozali kokende liboso mpe ete tozali ndakisa na kondima.

Salá makasi omonisa ete ozali kokende liboso

18, 19. (a) Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kokende liboso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Tomoni polele ete eloko oyo emonisaka ete mokristo ya solo azali kokola na elimo ezali te lolenge oyo azali komonana na miso ya bato, makoki oyo abotamá na yango to lokumu oyo azali na yango. Mbala mosusu kutu etalelaka mpe te bambula mingi oyo moto aumeli na lisangá. Nzokande, kokola na elimo emonanaka nde soki tozali kotosa Yehova na makanisi, na maloba mpe na etamboli na biso. (Rom. 16:19) Tosengeli kotosa etinda ya kolingana mpe kokómisa kondima na biso makasi. Ya solo, tókanisa malamu maloba oyo Paulo akomelaki Timote mpe tómipesa mobimba na yango mpo bato nyonso bámona polele ete tozali kokende liboso.

19 Esengo, oyo ezali na kati ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe, ezali ezaleli mosusu oyo emonisaka ete tozali kokende liboso na elimo mpe ete tozali bakristo oyo bakɔmɛli. (Gal. 5:22, 23) Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kolona mpe kobatela esengo na ntango ya mpasi.

[Okopesa eyano nini?

• Maloba na biso ekoki komonisa basusu nini na ntina na biso?

• Ndenge nini tokomonisa ete tozali kokende liboso na etamboli mpe na bizaleli ya pɛto?

• Mpo na nini bakristo basengeli kozala ndakisa na bolingo mpe na kondima?

[Elilingi na lokasa 11]

Elenge Timote amonisaki ete akɔmɛli na elimo koleka bilenge ya mbula na ye

[Bililingi na lokasa 13]

Bato mosusu bamonaka ete ozali kokende liboso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto