Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 15
  • Mwasi ya Lota atali nsima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwasi ya Lota atali nsima
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Kanisá mwasi ya Lota
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Zalá mosika na ntango omoni likámá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 15

Lisolo 15

Mwasi ya Lota atali nsima

LOTA ná libota na ye bafandaki esika moko na Abrahama na mokili ya Kanana. Mokolo moko Abrahama alobi na Lota ete: ‘Esika ekoki lisusu te mpo na bampate mpe bangɔmbɛ na biso nyonso. Nabondeli yo, tókabwana. Soki yo okei epai oyo, ngai nakei oyo kuna.’

Lota atali mokili. Amoni eteni moko oyo ezalaki na mai mingi mpe na matiti ya kitoko mpo na koleisa bibwɛlɛ na ye. Ezalaki Etúká ya Yordani. Lota akamati libota na ye ná bibwɛlɛ na ye bakei kuna. Bakómi kofanda na Sodoma.

Bato ya Sodoma bazalaki mabe mingi. Likambo yango ezalaki kotungisa Lota, mpo ye azalaki moto malamu. Ezalaki mpe kotungisa Nzambe. Nsukansuka, Nzambe atindi baanzelu mibale báyebisa Lota ete akoboma Sodoma ná Gomora, mpo bazali bato mabe.

Baanzelu balobi na Lota ete: ‘Salá noki! Kamatá mwasi na yo ná bana na yo mibale ya basi, bóbima!’ Lokola Lota ná libota na ye bazalaki koumela, baanzelu basimbi bango na mabɔkɔ mpe babimisi bango na mboka. Anzelu moko alobi ete: ‘Kimá mpo na kobikisa bomoi na yo! Kotala nsima te! Kimá na bangomba mpo okufa te!’

Lota ná bana na ye ya basi batosi, balongwe na Sodoma. Batɛlɛmaki na nzela te, batalaki mpe nsima te. Kasi mwasi ya Lota atosaki te. Nsima ya kotika Sodoma mwa moke, atɛlɛmi mpe atali nsima. Bongo akómi likonzí ya mungwa. Bozali komona ye na elilingi oyo?

Lisolo oyo epesi biso liteya. Emonisi biso ete Nzambe abikisaka baoyo batosaka ye, kasi baoyo batosaka ye te bakokufa.

Ebandeli 13:5-13; 18:20-33; 19:1-29; Luka 17:28-32; 2 Petro 2:6-8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto