Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 nk. 22-25
  • Zalá mosika na ntango omoni likámá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá mosika na ntango omoni likámá
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto oyo azalaki na bomoi ya likámá
  • Tózala mosika na likámá
  • Tómilongola mpe tómibatela liboso na likámá
  • Mwasi ya Lota atali nsima
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kanisá mwasi ya Lota
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 nk. 22-25

Zalá mosika na ntango omoni likámá

KOLEKA bato nyonso mosusu, bakumbi masúwa bazalaka ntango nyonso liboso na likámá. Basengeli kosenzela makasi mpo na oyo etali kobongwana ya ntango, mbonge mpe ntaka oyo ekaboli masúwa na mokili. Wana mbongé mpe mopepe makasi esangani mpo na kokumba masúwa penepene na mokili, basali kati na masúwa babundaka na mosala makasi mpe bazalaka kati na likámá.

Kati na ezalela ya makambo motindo wana​—masuwa ememami na mopepe mpo na kotutana na zelo pene na mokili​—mokumbi masúwa akosala makasi ete masúwa na ye mazala mosika na mokili, mingimingi soki masúwa yango etambolaka na mopepe. Búku moko ya batambwisi masúwa epesi ndimbola oyo ete ‘kozwama kati na ezalela oyo ete masuwa ememami na mopepe mpo na kotutana na zelo pene na mokili, ekoki kozala likambo ya mpasi mingi koleka’ oyo mokumbi masúwa akoki kokutana na yango. Nini ebongi kosala? ‘Kopesa nzela te ete likambo ya mpasi motindo wana ekómela masúwa na yo mokolo mosusu.’ Lolenge malamu mpo na kopengola kokende kotutana na zelo to na mabanga ezali ya kozala mosika na likámá.

Baklisto mpe basengeli koyeba nokinoki makámá oyo ekoki kozindisa kondima na bango. (1 Timoté 1:19) Na mikolo na biso, makambo mazali mpenza kopesa nzela te ete moto atikala ntango nyonso ngwi kati na nzela ya malamu. Lokola masúwa ekoki kobungisa nzela na yango mpo na mopepe mpe mbongé oyo ezali kobeta yango ntango nyonso, bobele bongo mpe bomoi oyo tosili kopesa na Yehova ekoki kobunga nzela mpo na bowelani ya ntango nyonso oyo ezali kouta na nzoto na biso ya kozanga kokoka mpe bopusi makasi oyo elimo ya mokili ezali na yango ntango nyonso likoló na nzoto na biso​—yango ekokani bongo na mopepe makasi mpo na oyo etali nguya na yango.

Moto oyo azalaki na bomoi ya likámá

Kozanga koyeba, ezalaka mpasi te mpo na kokutana na likámá kati na bibale ya elimo oyo etondi na makámá!

Tókamata ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki penepene na etimá ya mai moko monene oyo ezingami na bitando ya mabelé, Mer morte. Tolingi kolobela ndakisa ya Lota. Ekateli na ye ya kofanda na Sodomo ememelaki ye mikakatano mpe ebele ya bampasi. Nsima na kowelana kati na babateli na bango ya bibwele, Abalayama na Lota bayokanaki ete bakabwana. Lisoló eyebisi biso ete Lota aponaki Etúká ya Yordani mpe apikaki hema katikati na bingumba ya Etúká yango. Na nsima, azwaki ekateli ya kofanda na Sodomo, atako asepelaki te na lolenge ya bomoi ya bafandi ya Sodomo.​—Genese 13:5-13; 2 Petelo 2:8.

Mpo na nini Lota alandaki ntango nyonso kofanda kati na engumba oyo eyebanaki mingi na lolenge ya mabe mpo na makambo na yango ya mbindo, engumba oyo ezalaki mpenza kotuka Yehova mpe nkutu, ata bafandi ya zingazinga na yango bazalaki kosepela na bizaleli na yango soko moke te? Sodomo ezalaki na bozwi mingi mpe na ntembe te, mwasi ya Lota asepelaki na matomba ya mosuni ya bomoi kati na engumba wana. (Ezekiele 16:49, 50) Ekoki kozala ete ata Lota mpe asepelaki na nkita kitoko ya Sodomo. Ata soki afandaki kuna mpo na mokano nini, ebongaki ete atika engumba wana nokinoki kasi ye aumelaki. Ezalaki bobele na ntango baanzelu ya Yehova balendisaki bango nokinoki nde libota ya Lota batikaki etúká wana ya likámá.

Lisoló ya Genese elobi ete: “Wana etanaki ntɔngɔ banje balakaki Lota makasi ete: ‘Longwa mpe kamata mwasi na yɔ mpe bana basi mibale na yɔ bajali awa ete okufa kati na [mabe ya mboka oyo, NW] tɛ!’” Kasi ata nsima na likebisi wana ya nokinoki, Lota “aumelaki” naino. Na nsima baanzelu “basimbaki ye mpe mwasi na ye mpe bana basi mibale na ye na mabɔkɔ . . . mpe babimisaki ye, mpe batiaki ye na libanda na mboka.”​—Genese 19:15, 16.

Wana bakómaki na libanda ya engumba, baanzelu yango bapesaki makebisi oyo ya nsuka epai na libota ya Lota: “Kima ete obika. Kotala nsima na yɔ tɛ mpe kopema kati na lobwaku tɛ, kasi kima epai na ngomba ete okufa tɛ.” (Genese 19:17) Atako bongo, Lota asengaki nzela ete akende na engumba Zoar oyo ezalaki bobele pembeni wana na esika ete atika mpenza etúká wana na mobimba na yango. (Genese 19:18-22) Ezali polele ete alingaki te komitangola mosika na likámá.

Na nzela ya Zoar, mwasi ya Lota atalaki na nsima epai na Sodomo, emonani ete motema na ye ekanisaki na mawa nyonso biloko oyo atikaki na nsima. Mpo ete aboyaki kolanda malako ya baanzelu, mwasi yango akufaki. Lota​—moto na sembo​—abikaki na kobomama ya engumba wana, ye mpe bana na ye mibale ya basi. Kasi, oyo nde lifuti mabe azwaki mpo ete aponaki kofanda pembeni ya likámá!​—Genese 19:18-26; 2 Petelo 2:7.

Tózala mosika na likámá

Likambo ya mpasi oyo Lota akutanaki na yango ezali komonisa nini ekoki kobima soki tomibelemisi to toumeli kati na esika oyo ekoki kobimisa likámá. Lokola bakumbi malamu ya masuwa oyo bayebi malamu mosala na bango, bwanya ekotinda biso ete tomitika soko moke te kati na ezalela ya mpasi motindo wana. Wapi mwa ndambo ya makambo makoki kobimisa makámá, oyo ekozala malamu ete tozala mosika na yango? Baklisto mosusu babungaki nzela na komipesáká mingi koleka na misala na bango ya mosuni, komipesáká na boyokani makasi elongo na bato ya mokili, to na komikangisáká na mayoki epai na mwasi moko to mobali moko nzokande bazali na bonsomi ya kobalana te.

Kati na likambo moko na moko, nzela ya mayele ezali bongo kozala mosika na likámá. Na ndakisa, toyebaka nokinoki makámá ya elimo oyo ekoki kobima na oyo ebengami ete libaku malamu kati na makambo ya mombongo? Bandeko mosusu bamizindisaki kati na misala ya mosuni na kopesáká motuya moke na mabota na bango, na kolongono na bango ya nzoto, mpe na mikumba na bango ya teokrasi. Mbala mosusu likambo oyo ezali kolengola bato ezali bongo bomoi ya elengi mingi oyo mosolo mokoki komema. Na bantango mosusu, ezalaka mpo na komonisa na ntembe nyonso makoki ya kosala malamu kati na makambo matali mombongo. Basusu bakoki kobimisa likanisi oyo ete mokano na bango ezali ya kosalisa bandeko mosusu ete bazala na mosala ya kosala to mpe kozala na makoki ya kopesa makabo mingi mpo na mosala ya kosakola oyo mozali kosalema na mokili mobimba. Mbala mosusu bazali kokanisa ete wana misala na bango mizali kotambola malamu, bakozala na ntango mingi ya kopesa mpo na matomba ya Bokonzi.

Wapi mwa ndambo ya mitambo yango? Ezalela ya nkita oyo ezali kobongwana mbala na mbala mpe ‘makambo oyo mabimaka kozanga komizela na yango’ makoki kokweisa mikano ya mombongo oyo ebongisami mpenza malamu. (Mosakoli 9:11, NW) Kobundana mpo na kofuta ebakata ya nyongo ekoki kobimisa mpasi makasi mpe ekoki kozwa esika ya makambo na elimo. Ata soki mombongo ezali ntango nyonso kokende sé liboso, ekoki mpenza kolya yo ntango na yo nyonso mpe nguya na yo ya makanisi, mpe ekoki kosenga ete ozala mingimingi elongo na bato ya mokili.

Nkulutu moko moklisto na Espagne azalaki na mikakatano makasi mpo na oyo etali mosolo na ntango kompanyi moko oyo ekobatelaka mosolo ya bato mpo na kofuta bango yango na nsima wana bango moko bazwi likámá to biloko na bango bibebisami epesaki ye lipesi moko ya kolengola. Atako bilikya ya kozwa mosolo mingi ezalaki, mpo na kobanda mosala na ye moko ya motindo wana, kasi na nsuka aboyaki lipesi yango. Alobi ete: “Ezalaki likatami ya pɛtɛɛ te, kasi nazali na esengo lokola naboyaki. Ya liboso, naboyaki kozwa mosolo​—ata na lolenge mosusu​—na nzela ya boninga na ngai elongo na bandeko kati na lisangá. Mpe atako nasepelaki na likanisi ya kozala ngai moko nkolo ya mosala nalingaki kotambola mingi mpe kolekisa ntango mingi kati na mosala. Kozanga kopengola yango, elingaki mpenza kolimbola ete nasengelaki kosundola libota na ngai mpe lisangá. Oyo eleki mpenza ezali oyo ete soki nandimaki lipesi wana mbele nalingaki kobungisa likoki ya kotambwisa bomoi na ngai.”

Moklisto moko te akoki kolinga kobungisa likoki ya kotambwisa bomoi na ye. Yesu amonisaki makámá minene ya kosala bongo na kolobeláká lisese ya moto oyo andukaki ebele ya bozwi na mokano ete apema mpe azala na bomoi ya esengo. Kasi bobele na butu oyo amonaki ete asili kozwa mosolo oyo mokoki, akufaki. Yesu apesaki likebisi oyo ete: “Moto oyo abombi bilɔkɔ mpɔ na ye mpenja nde ajali mojui mpɔ na Njambe tɛ, ajali na motindo boye.”​—Luka 12:16-21; kokanisá na Yakobo 4:13-17.

Tosengeli mpe kosenzela na ntina ete tozala na boninga mingi te elongo na bato ya mokili. Ekoki kozala moninga ya kartyé, moninga ya kelasi, moninga ya mosala, to moninga ya mombongo. Tokoki komonisa likanisi oyo ete: ‘Azalaka na botosi epai na Batatoli, azali na bizaleli malamu, mpe na bantango mosusu tosololaka mpenza na ntina na solo.’ Nzokande, makambo oyo masilaki kokómela bato mosusu mamonisi ete ekoki mbala mosusu kokómela biso ete tobanda kosepela na baninga ya mokili motindo wana koleka bandeko na biso baklisto mibali mpe basi. Wapi moko na makámá ya boninga motindo wana?

Tokoki kobosana ete tozali kobika kati na eleko moko ya mpasi to kokólisa mposa ya biloko ya mosuni na esika ya kokolisa mposa ya makambo ya elimo. Kobanga koyinama epai na moninga moko oyo azali mondimi te, ekoki kopusa biso ete toluka kondimama na baninga ya mokili. (Kokanisá na 1 Petelo 4:3-7.) Nzokande Davidi, mokomi na Nzembo, asepelaki kozala moninga ya bato oyo balingaki Yehova. Akomaki ete: “Nakolakisa nkombo na yɔ epai na bandeko na ngai, na kati na koyangana nakosanjola yɔ.” (Njembo 22:22) Tokomibatela soki tomekoli ndakisa ya Davidi na kolukáká baninga oyo bakoki kolendisa biso na elimo.

Nzela mosusu ya likámá ezali bongo komikangisa na mayoki epai na mwasi moko to mobali moko nzokande okoki kobalana na ye te. Likámá likoki kobima wana obendami epai na moto oyo azali na bonzenga, moto oyo lolenge na ye ya koloba ezali kolendisa, to mpe azali na lolenge ya kotalela makambo motindo moko na yo to ezalela ya kosekisa motindo moko na yo. Okoki kosepela kozala ntango nyonso elongo na ye, kolobáká ete: ‘Nayebi soki nakosuka wapi. Tozali bobele baninga.’ Nzokande, soki mayoki malamwisami, ezalaka pɛtɛɛ te mpo na kopekisa yango.

Marie, elenge ndeko mwasi oyo asilaki kobala azalaki kosepela kozala elongo na Michel.a Azalaki ndeko mobali moko malamu kasi azalaki kokoka te kozwa baninga. Bazalaki na makambo mingi makokani, mpe bazalaki kolinga kosala maseki elongo. Marie alengolamaki na kokanisa ete ndeko mobali wana oyo azalaki monzemba alingaki koyebisa ye makambo na ye ya nkuku. Mosika te, likambo oyo emonanaki lokola boninga oyo ezali na yango mabe te ekómaki bokangami makasi kati na mayoki. Bazalaki mbala na mbala kolekisa ntango mingi elongo mpe na nsuka basalaki pite. Marie alobi na komilela ete: “Nakokaki koyeba likámá uta na ebandeli. Na ntango boninga ekolaki makasi, ekómaki lokola zelo oyo ezalaka pembeni ya mai monene ezali ntango nyonso kokitisa biso na bozindo makasi koleka.”

Tosengeli te kobosana likebisi oyo ya Biblia: “Motema ejali na bokosi koleka bilɔkɔ yɔnsɔ mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Motema na biso ezali na bokosi, lokola mbongé ekokumbaka masúwa oyo etambolaka na mopepe mpo na kotutisa yango na mabanga, bobele bongo mpe ekoki komema biso kino na boninga oyo epusami na mayoki mpe ezali na likámá. Esengeli kosala nini? Soki okoki kobalana na ye te, salá makasi ete omikangisa te na boyokani makasi elongo na mobali to na mwasi oyo ozali komona ete azali kosepelisa yo.​—Masese 10:23.

Tómilongola mpe tómibatela liboso na likámá

Tokosala boni soki tomimoni ete tosili komikotisa kati na likámá moko na elimo? Soki mopepe makasi mpe mbongé ekumbi bango pene na mokili na eteni oyo ezali na mabanga, bakumbi masúwa basalaka na makasi nyonso mpo na kozongisa masúwa na bango katikati na mayi monene, to mpe kobaluka epai na mopepe makasi kino bakokóma na eteni epai mayi mazangi likámá. Bobele bongo, tosengeli kobunda mpo na komilongola na ezalela ya mpasi. Na kolandáká batoli ya Makomami, na kobondeláká Yehova na molende nyonso ete asunga biso mpe na kolukáká lisungi ya baklisto oyo bateli, tokoki kozonga na nzela oyo ezangi likámá. Tokozwa mapamboli mingi elongo na kimya ya elimo mpe ya motema.​—1 Batesaloniki 5:17.

Ata soki tozali kati na ezalela motindo nini, ekozala likambo ya mayele ete tomibatela mpo na “makambo oyo ezali ya mokili.” (Bagalatia 4:3) Na kokesena na Lota, Abalayama aponaki kofanda mosika na bato mabe ya Kanana, atako esengelaki na ye kofanda kati na hema na boumeli ya mibu mingi. Mbala mosusu azangaki biloko ya mosuni oyo ekokaki kopesa elengi na bomoi na ye, kasi lolenge ya bomoi na ye oyo ezangi mindondo ebatelaki ye na elimo. Na esika ete kondima na ye ezinda, ayaki kokóma “tata na bango yɔnsɔ bajali na kondima.”​—Baloma 4:11.

Lokola tozingami na mokili oyo elingi bobele bisengo mpe ete “elimo” na yango ezali ntango nyonso kokóma makasi, tosengeli kolanda ndakisa ya Abalayama. (Baefese 2:2) Soki tondimi litambwisi ya Yehova kati na makambo nyonso, tokozwa mapamboli na komonáká biso moko libateli na ye oyo etondi na bolingo. Tokozala na makanisi motindo moko na Davidi oyo alobaki ete: “Ajali kobikisa molimo na ngai. Ajali kotambolisa ngai na njela na boyɛngɛbɛnɛ na ntina na nkombo na ye. Sɔlɔ malamu mpe ngɔlu ikokɛnda na ngai mikɔlɔ yɔnsɔ ya bomɔi na ngai mpe ngai nakofanda na ndako na [Yehova] kino nsuka na mikɔlɔ na ngai.” Ntembe ezali te ete kolanda “njela na boyɛngɛbɛnɛ,” na esika ya kolanda nzela ya likámá, ekomema mapamboli ya seko.​—Njembo 23:3, 6.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ebongolamaki.

[Maloba na elilingi ya lokasa 24]

Soki ozali na bonsomi te ya kobalana na ye, komikangisa te na boninga makasi elongo na mwasi to mobali oyo azali kosepelisa yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto