Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
Tala naino bililingi bilakisami na lokasa oyo. Ezali kopesa yo mayoki nini? Motema na yo elukaka kimya, esengo mpe bolamu lokola emonisami awa, boye te? Na ntembe te. Kasi ezali bobele ndoto mpamba na kondima ete makambo oyo makozala mokolo mosusu awa na mabelé?
Mingi bakoki kokanisa boye. Makambo tozali komona lelo ezali nde bitumba, mabe ya ndenge nyonso, nzala, maladi, konuna, bongo na bongo. Nzokande, tozali kotya elikya mpo na mpamba te. Kosakolaka mpo na ntango ezali koya, Biblia elobi ete “tozali kozela makoló ya sika mpe mabelé ya sika lokola [Nzambe] alakaki; boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:13, NW; Yisaya 65:17.
Elobeli “makoló ya sika” mpe “mabelé ya sika” ezali elilingi. Mpamba te mabelé oyo tozali konyata mpe makoló oyo tomonaka ezalisamaki ya kokoka, mpe engebene Biblia, ekoumela seko. (Nzembo 89:36, 37; 104:5) “Mabelé ya sika” ekozala lisangá ya bato ya sembo oyo bakozala na bomoi na mabelé, mpe “makoló ya sika” ekozala nde bokonzi ya likoló mpe ya sembo, boyangeli oyo ekotambwisa bato na ntango wana awa na mokili. Kasi tokoki kondima ete “mabelé ya sika”, to mokili ya sika ya kitoko mingi ekoki kosalema?
Tobosana te ete makambo oyo kitoko ezalaki mokano na Nzambe na ebandeli na ntina na mabelé. Nzambe atyaki mobali mpe mwasi ya liboso na Edene, paradis oyo ezalaki awa na mabelé, apesaki bango lotomo kitoko mingi, mpo ete alobaki na bango: “Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botya yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Ee, mokano na Nzambe ezalaki ete mobali mpe mwasi babota bana mpe bamema Paradis kino na nsuka ya mokili. Atako na nsima bazangaki botosi epai na Nzambe, komonisaka bongo ete babongi na bomoi ya seko te, nzokande mokano na Nzambe na ebandeli ebongwanaki te. Mpe esengeli kokokisama kati na mokili ya sika.—Yisaya 55:11.
Yango wana, ntango obondelaka ete “Tata na biso oyo azali na likoló” mpe osengaka ete Bokonzi na Nzambe eya, osambelaka mpo ete Boyangeli na ye ya likoló elongola mabe na mokili mpe eyangela mokili wana ya sika. (Matai 6:9, 10) Tokoki kondimisama ete Nzambe akoyoka libondeli yango, mpamba te Liloba na ye elaki biso ete: “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe
Bokonzi na Nzambe ekozala liziba na mapamboli nsuka te mpo na mabelé; ekokokisa mposa nyonso ya bato engebene bolamu oyo Nzambe abongisaki mpo na bango na ebandeli. Koyinana mpe kotiolana ekozala lisusu te! Moto nyonso akozala moninga ya mozalani na ye. Kati na Biblia, Nzambe alaki ete ‘akosilisa bitumba kino na nsuka ya mokili’. “Mokili moko ekotombwela mokili mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Nzembo 46:9; Yisaya 2:4, NW.
Mabelé mobimba ekokoma elanga kitoko to paradis. Biblia elobi: “Esobe mpe esika ekauki ekosepela, esobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na [nsolo kitoko]. Mpo ete mai makopunzwa kati na esobe, bitima kati na mokili mokauki. Zelo oyo ekauki ekobongwana liziba mpe mabelé na mposa ekozala bitima na mai.”—Yisaya 35:1, 6, 7.
Nzala ekozala lisusu te. Biblia elobi ete “Mokili ekobota mbuma na yango.” (Nzembo 67:6; 72:16) Mozalisi alaki biso ete moto na moto akosepela na mbuma na mosala na ye: “Bakokona bilanga na miwiti mpe bakolia mbuma na yango. Bakokona te ete mosusu alia.”—Yisaya 65:21, 22.
Kati na mokili ya sika ya Nzambe, tokomona lisusu te bandako milai mpe minene oyo bato mingi bafinani kuna na kati, tokomona lisusu te bandako ya bakarto to ya manzanza ya tono, na mokuse bandako mabe, mpamba te Nzambe alaki boye ete: “Bakotonga bandako mpe bakofanda na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda.” Biblia elaki lisusu: “Bakosala mosala na mpamba te.” (Yisaya 65:21-23) Na yango, bato bakozala na mosala oyo ezali kobota mbuma mpe ezali kosepelisa bango. Bomoi ekozala motungisi te.
Na ntango ekoki, Bokonzi na Nzambe ekozongisa mpe boyokani ya kimya oyo ezalaki na elanga ya Edene kati na banyama, mpe kati na bato elongo na banyama. Biblia elobi: “Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana na mpate; mpe nkoi akolala elongo na mwana na ntaba; mwana na ngombe mpe nkosi mpe nyama na mafuta bakozala elongo mpe mwana moke na moto akokamba bango.”—Yisaya 11:6-9; Hosea 2:18.
Kanisa naino moke. Kati na Paradis na mabelé maladi nyonso mpe bilembo na nzoto ekolimwa! Liloba na Nzambe elaki biso ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.” (Yisaya 33:24) “[Nzambe akopangusa mai na miso] na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:4.
Okoki kozwa bolamu oyo
Na ntembe te motema na yo esepeli mingi na koyoka bilaka biuti na Nzambe na ntina etali bomoi kati na mokili ya sika ya sembo. Ata bamosusu bakanisi ete oyo nyonso ezali lokola ndoto moko kitoko, nzokande ezali boye te na miso na Mozalisi na biso oyo alingi biso mingi, mpamba te ye akokokisa nyonso oyo.—Nzembo 145:16; Mika 4:4.
Kasi ezali na masengami oyo moto nyonso asengeli kokokisa yango mpo na kozala na bomoi ya seko na ntango ezali koya kati na Paradis na mabelé. Yesu amonisaki lisengami eleki monene kati na libondeli moko epai na Nzambe. Alobaki: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Na yango, soki tolingi solo kozala na bomoi kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, esengeli na biso liboso toyekola mpo na koyeba mokano na Nzambe mpe nsima kosala mokano yango. Mpamba te mokili “ezali mpe [koleka] mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko” mpe akosepela libela na libela na bolamu bokouta na Mozalisi na biso oyo alingi biso mingi.—1 Yoane 2:17.
Soki liyebisi lizali te, mikapo ya Biblia mizwami na Biblia Lingala, haut-fleuve, 1970. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.