Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/10 nk. 8-10
  • Bisakweli oyo ekokokisama mosika te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bisakweli oyo ekokokisama mosika te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mapamboli oyo ekozala na mokili ya sika
  • Mapamboli mpo na mikolo ekoya
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Okokɔta na mokili ya sika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bokonzi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • “Bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala”
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/10 nk. 8-10

Bisakweli oyo ekokokisama mosika te

NTANGO ntoma Petelo asakolaki makambo oyo ekokómela bato mpe mabelé, alobaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye [Nzambe], mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Elaka ya “likoló ya sika mpe . . . mabelé moko ya sika” esakolamaki libosoliboso na mosakoli Yisaya. (Yisaya 65:17; 66:22) Lokola Petelo azongelaki esakweli wana, yango emonisaki ete ekokisamaki naino te na ntango na ye.

Na nsima, soki na mobu 96 T.B., ntoma Yoane azwaki emoniseli oyo emonisaki ete “mabelé ya sika” ekoya ntango Bokonzi ya Nzambe ekopambola mabelé. (Emoniseli 21:1-4) Makambo oyo Yesu ná ntoma Paulo basakolaki ete ekosalema na mokili liboso Bokonzi ya Nzambe eya ezali kokokisama na mikolo na biso. Na yango, tokoki kolikya ete mosika te Bokonzi yango ekokómisa mabelé oyo mokili ya sika. Mokili wana ya sika ekozala ndenge nini? Mokanda ya Yisaya ekosalisa biso.

Mapamboli oyo ekozala na mokili ya sika

Kimya na mokili mobimba mpe bomoko ya losambo. “Bakotula mipanga na bango ete ezala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete ezala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”​—Yisaya 2:2-4.

Kimya na kati ya bato mpe banyama. “Nyama na yauli akofanda elongo na mwana ya mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana ya ntaba; mwana ya ngɔmbɛ mpe nkɔsi mpe nyama ya mafuta bakozala elongo mpe mwana moke ya moto akokamba bango. Ngɔmbɛ mpe ngombolo bakolyaka elongo, bana na bango bakolala esika moko; nkɔsi akolya matiti lokola ngɔmbɛ. . . . Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”​—Yisaya 11:6-9.

Bilei ekozala beboo mpo na bato nyonso. “[Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei ya mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, ya bilei kitoko etondi na mafuta mpe ya vinyo eumeli mpe eponami.”​—Yisaya 25:6.

Liwa ekozala lisusu te. “[Nzambe] akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsɔni ya bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.”​—Yisaya 25:8.

Bakufi bakosekwa. “Bato na yo oyo bakufá bakosekwa, bibembe ya bandeko na ngai ekozonga na bomoi. Bato oyo balalá na mabelé bakolamuka, pe bakoyemba na esengo. . . . Pe mabelé ekobimisa bato oyo bakufá.”​—Yisaya 26:19, Bible na lingala ya lelo oyo.

Masiya akozala zuzi ya sembo. “Akosambisa te na kolanda oyo miso na ye emoni, akopamela te na kolanda makambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa mpenza bato mpamba na boyengebene, mpe akopamela na bosembo bato ya komikitisa oyo bazali na mabelé.”​—Yisaya 11:3, 4, NW.

Bato bakufá miso mpe baoyo bakufá matoi bakobika. “Miso ya bakufeli miso makofungolama, mpe matoi ya bimimi makozipolama.”​—Yisaya 35:5.

Mabelé ekauká ekobimisa milona. “Lisobe mpe esika ekauki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa [fololo] ya habaselete. Ekobimisa [fololo] mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo.”​—Yisaya 35:1, 2.

Mabelé ya sika. “Nazali kotonga lola ya sika [boyangeli ya sika ya likoló] mpe mokili ya sika [libota ya sika ya bato ya sembo]; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; . . . . [Bato oyo bakofanda na mokili ya sika oyo Nzambe alaki] bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakolona bilanga [ya vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakolona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te, zambi bakozala bakitani mpe bapambolami ya [Yehova] mpe bana na bango elongo na bango. Naino babyangi te, nakozongisela bango monɔkɔ; naino bazali koloba mpenza, nakoyoka.” “Zambi, lokola lola ya sika mpe mokili ya sika oyo ekosala ngai ekoumela liboso na ngai (Yehova alobi bongo) bongo bakitani na bino mpe nkombo na bino ekoumela.”​—Yisaya 65:17-25; 66:22.

Mapamboli mpo na mikolo ekoya

Kaka Yisaya te nde asakolaki makambo kitoko oyo ekosalema na mikolo ekoya. Biblia etondi na bisakweli oyo ezali kolobela makambo kitoko oyo Nzambe akosala na nzela ya boyangeli ya Klisto.a Okosepela kozala na paladiso yango? Likoki ezali mpenza! Luká koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza na ntina na mikano ya Nzambe mpo na mikolo ekoya, mpe luká koyeba oyo osengeli kosala mpo na kozala na kati ya bato oyo bakozala na paladiso. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi lisusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe oyo yango ekosala, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 76-85, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 8]

Bato bakozala na kimya na kati na bango mpe na banyama

[Elilingi na lokasa 9]

Bakufi bakosekwa

[Elilingi na lokasa 10]

Mabelé mobimba ekokóma paladiso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto