Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ie lok. 21
  • Mpo na nini tokufaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tokufaka?
  • Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liwa euti na kozanga botosi
  • “Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso”
  • Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Yesu azali mobikisi​—Na ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Liwa mpe lisekwa ya Yesu—Ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
ie lok. 21

Mpo na nini tokufaka?

“Likoló na bangomba nyonso kimya ezali, likoló na banzete nyonso eloko moko ezali kopema te; bandɛkɛ balali nyɛɛ: zelá; mosika te, lokola biloko nyonso oyo, yo mpe osengeli kopema.”​—JOHANN WOLFGANG VON GOETHE, MOKOMI YA NTƆKI YA EKÓLO ALLEMAGNE.

1, 2. (a) Bato bazalisamaki na mposa nini? (b) Lolenge nini ya bomoi babalani ya liboso bazalaki na yango?

NZAMBE asalaki bato na mposa ya kozala na bomoi libela na libela. Ɛɛ, Biblia elobi ete atyaki “likanisi ya kozala na bomoi libela na libela kati na mitema na bango.” (Mosakoli 3:​11, Beck) Kasi Nzambe asukaki te bobele na kopesa bato mposa ya kozala na bomoi libela na libela. Apesaki bango mpe likoki ya kozala na bomoi yango.

2 Baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, bazalisamaki bato ya kokoka, bazalaki ata na mbeba moko te, ezala na makanisi to na nzoto na bango. (Deteronome 32:4) Kanisá naino​—bazalaki na bomoi ezangi mpasi, bazalaki kobanga liwa te mpe bazalaki na mitungisi te! Lisusu, Nzambe atyaki bango na paladiso, efandelo moko ya kitoko. Mokano ya Nzambe ezalaki ete moto azala na bomoi libela na libela mpe ete na boumeli ya ntango akoka kotondisa mabelé na bana oyo bakozala bana ya kokoka. (Genese 1:31; 2:15) Na bongo, mpo na nini tokufaka?

Liwa euti na kozanga botosi

3. Mpo ete bázwa bomoi ya libela na libela, Adama na Eva basengelaki kokokisa masɛngami nini?

3 Nzambe apesaki Adama etinda oyo: “Yo okoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga, nde mbuma na nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:​16, 17) Na bongo, mpo ete bázwa bomoi ya libela na libela, Adama na Eva bazalaki na masɛngami oyo basengelaki kokokisa; basengelaki kotosa Nzambe mpo na kozwa bomoi yango.

4. Ntango Adama na Eva basalaki lisumu, mpo na nini babungisaki elikya ya kozala na bomoi libela na libela kati na Paladiso?

4 Likambo ya mawa mpenza, Adama na Eva batosaki mobeko ya Nzambe te. (Genese 3:​1-6) Na kosaláká bongo, bakómaki bato na masumu mpamba te “lisumu elimboli bobuki mibeko.” (1 Yoane 3:4, NW) Adama na Eva basukaki na kobungisa elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Mpo na nini? Mpo ete “lifuti oyo lisumu efutaka ezali kufa.” (Baloma 6:​23, NW) Yango wana, ntango akatelaki Adama na Eva etumbu, Nzambe alobaki ete: “Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” Baboti na biso ya liboso babimisamaki bongo na Paladiso, oyo ezalaki efandelo na bango. Kobanda mokolo yango oyo basalaki lisumu, nzoto ya Adama na Eva ebandaki kobeba mokemoke kino bakufaki.​—Genese 3:​19, 23, 24.

“Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso”

5. Lolenge nini kufa epalanganaki epai na bato nyonso?

5 Sikawa lisumu ekɔtelaki mpenza Adama na Eva na bangei. Na bongo, bakokaki te kobota bana ya kokoka, lolenge moko masini oyo basalaka na yango biliki, soki ezali na mbeba, biliki nyonso oyo ekobima na masini yango ekozala semba te. (Yobo 14:4) Ya solo, kobotama ya moto nyonso endimisi ete baboti na biso ya liboso babungisaki bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango ya kokoka, mpe bomoi ya libela na libela mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. Ntoma moklisto Paulo akomaki ete: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”​—Baloma 5:​12; kokanisá na Nzembo 51:5.

6. Mpo na nini tokufaka?

6 Lelo oyo, banganga-mayele ya siansi bazali koyeba te mpo na nini bato bakómaka mibange mpe bakufaka. Nzokande, Biblia elimboli ete tokufaka mpamba te tobotamaka na masumu oyo tosangolaki na baboti na biso ya liboso. Kasi nini ekómelaka biso soki tokufi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto