Yesu azali mobikisi—Na ndenge nini?
“Yesu abikisaka!” “Yesu azali Mobikisi na biso!” Na mikili mingi, soki otamboli, okomona maloba wana na bifelo ya bandako mpe na bisika oyo bato mingi balekaka. Bato ebele mpenza bandimaka ete Yesu azali Mobikisi na bango. Soki otuni bango, “Ndenge nini Yesu azali kobikisa biso?” mbala mosusu bakoloba ete, “Yesu akufaki mpo na biso” to, “Yesu akufaki mpo na masumu na biso.” Ya solo, liwa ya Yesu efungoli nzela ya lobiko mpo na biso. Kasi ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kofuta masumu ya bato ebele? Soki batuni yo, “Ndenge nini liwa ya Yesu ezali kobikisa biso?” okopesa eyano nini?
EYANO oyo Biblia epesi na motuna yango ezali polele mpe ezali na ndimbola monene. Nzokande, mpo tómona mpenza ntina na yango, tosengeli naino kotalela bomoi ya Yesu mpe liwa na ye lokola nzela ya kosilisa mokakatano moko monene. Soki tokangi malamumalamu ntina yango, na bongo tokoyeba motuya monene ya liwa ya Yesu.
Nzambe alingaki ete Yesu apesa bomoi na ye mpo na kosilisa mokakatano moko oyo ebimaki ntango Adama asalaki lisumu. Lisumu yango ebebisaki makambo ebele! Mobali ya liboso na mwasi na ye Eva bazalaki bato ya kokoka. Batyaki bango na elanga kitoko ya Edene. Nzambe apesaki bango mosala moko ya ntina mpenza: kobatela elanga epai bafandaki. Basengelaki kokɛngɛla bikelamu mosusu nyonso oyo ezalaki na bomoi awa na mabele. Lokola basengelaki kobotana mpo na kotondisa mabele, mokemoke balingaki koyeisa paladiso yango monene tii mabele mobimba elingaki kokóma paladiso. (Genese 1:28) Bapesaki bango mosala moko malamu mpe ya esengo! Longola yango, bango mibale bazalaki baninga. (Genese 2:18) Bazangaki ata eloko moko te. Bazalaki na elikya ya kozala na bomoi ya esengo mpo na libela.
Tozali koyeba te soki nini mpenza ekokaki kotinda Adama na Eva básala lisumu. Kasi, mobali na mwasi ya liboso batosaki te Moto oyo akelaki bango, elingi koloba Yehova Nzambe. Satana Zabolo, ekelamu moko ya elimo, asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva ete abuka mobeko ya Yehova, mpe na nsima, Adama alandaki nzela yango.—Genese 3:1-6.
Mozalisi ayebisaki liboso mpenza likambo oyo akosala Adama na Eva soki babuki mobeko na ye. Ayebisaki bango polele mbuma mabe oyo bakobuka soki batosi ye te, alobaki boye: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Kasi, motuna mosusu ya monene koleka ebimaki mpe esengelaki kokata yango.
Bato bakutani na mokakatano moko monene
Lisumu ya liboso ememelaki bato mokakatano moko monene. Na ebandeli, Adama azalaki moto ya kokoka. Na yango, akokaki kobota bana ya kokoka mpe bana yango bakokaki kozala na bomoi ya seko. Nzokande, ntango Adama asalaki lisumu, abotaki naino ata mwana moko te. Tokoki koloba ete bato nyonso bazalaki naino na mokɔngɔ na ye ntango bakatelaki ye etumbu na maloba oyo: “Na milunge ya elongi na yo okolya kwanga, kino ntango okozonga na mabele, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu.” (Genese 3:19) Na bongo, ntango Adama asalaki lisumu mpe mokemoke abandaki kokende na liwa ndenge Nzambe alobaki, bato nyonso mpe bazwaki etumbu ya liwa oyo bakatelaki ye.
Yango wana, na nsima, ntoma Paulo akomaki boye: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama], mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Mpo na lisumu oyo bato ya liboso basalaki, bana oyo basengelaki kobotama bato ya kokoka mpe na elikya ya bomoi ya seko, babotamaki bato oyo bakobanda kobɛla, kokóma mibange, mpe nsukansuka kokufa; nyonso wana mpo na lisumu ya liboso.
Kasi, moto mosusu akoki koloba ete “Yango ezali sembo te. Adama nde moto atosaki Nzambe te, kasi biso te. Mpo na nini biso tózanga bomoi ya seko mpe tózanga bolamu mpo na likambo oyo tosali te?” Toyebi ete soki tribinale moko ekati likambo ete bátya mwana moko na bolɔkɔ mpo tata na ye ayibaki motuka, mwana yango akoki mpenza koloba ete: “Ezali sembo te! Ngai nasali mabe moko te.”—Deteronome 24:16.
Ntango Satana akosaki mobali na mwasi ya liboso básala lisumu, ntango mosusu akanisaki ete akosukisa mayele ya Nzambe. Zabolo azelaki te, asalaki likambo mabe wana kaka na ebandeli, liboso ete bato bábota bana. Ntango Adama asalaki lisumu, motuna moko monene ebimaki: Yehova akosala nini mpo na bana oyo Adama na Eva bakobota?
Yehova Nzambe asalaki likambo oyo ezali sembo. Elihu, moto moko ya sembo alobaki ete: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Nyonso ete azala na lisumu!” (Yobo 34:10) Lisusu, mosakoli Mose akomaki na ntina na Yehova ete: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Mayele oyo Nzambe asalelaki mpo na kosilisa mokakatano oyo lisumu ya Adama ememaki ebateli likoki na biso ya kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele.
Nzambe abongisi lolenge moko ya malamu mingi mpo na kosilisa mokakatano yango
Talá ndenge oyo Nzambe abongisaki mpo na kosilisa likambo yango ntango akatelaki Satana Zabolo etumbu. Yehova alobaki na Satana boye: “Nakotya koyinana na kati na yo na mwasi [ebongiseli ya Nzambe kuna na likoló], na kati ya mombóto na yo [mokili ya Satana] mpe mombóto na ye [Yesu Klisto]. Ye akosasa yo [Satana] na motó mpe yo okosasa ye na litindi [liwa ya Yesu].” (Genese 3:15, NW) Na esakweli wana ya liboso na kati ya Biblia, Yehova amonisaki mokano na ye ya kotinda Mwana na ye ya elimo awa na mabele aya kobotama moto ya kokoka oyo abengamaki Yesu mpe na nsima akufa, na maloba mosusu, básasa ye na litindi, na nzoto na ye wana oyo ezangi lisumu.
Kasi, mpo na nini Nzambe alingaki kaka ete moto ya kokoka akufa? Etumbu nini Yehova Nzambe ayebisaki Adama ete akopesa ye soki asali lisumu? Alobaki ete akokufa. (Genese 2:16, 17) Ntoma Paulo akomaki ete: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 6:23) Liwa ya Adama efutaki lisumu na ye. Nzambe apesaki ye bomoi, ye moko aponaki lisumu, mpe liwa na ye ezalaki nde etumbu mpo na lisumu na ye. (Genese 3:19) Kasi, tokoloba boni mpo na etumbu oyo bato nyonso bazwi mpo na lisumu wana? Esengelaki ete moto moko akufa mpo na kolongola masumu na bango. Kasi, liwa ya nani ekokaki mpenza kozipa masumu ya bato nyonso?
Mobeko moko oyo Nzambe apesaki na ekólo ya Yisalaele na ntango ya kala elobaki ete “bomoi mpo na bomoi [to molimo mpo na molimo, NW].” (Exode 21:23) Soki tolandi mobeko yango, liwa oyo ekoki kozipa masumu ya bato esengeli kozala liwa ya moto oyo azali na bomoi oyo ezali na motuya ndenge moko na oyo Adama abungisaki. Kaka liwa ya moto oyo azali na bomoi ya kokoka nde ekokaki kofuta lisumu. Moto yango ezalaki Yesu. Yesu azalaki mpenza “lisiko oyo ekokani” mpo na kobikisa bana nyonso ya Adama oyo bakoki kosikolama.—1 Timote 2:6, NW; Baloma 5:16, 17.
Liwa ya Yesu ezali na motuya monene
Liwa ya Adama ezalaki ata na motuya moko te; ebongaki akufa mpo asalaki lisumu. Nzokande, liwa ya Yesu ezali na motuya monene, mpamba te azalaki na lisumu te, kasi akufaki. Yehova Nzambe andimaki mpenza motuya ya bomoi ya Yesu, moto ya kokoka, lokola lisiko mpo na bana ya Adama oyo bakotosa ye. Motuya ya mbeka ya Yesu ekokaki kosuka kaka te na kozipa masumu oyo tosalaki liboso. Soki ezala bongo, mbɛlɛ tokoki kozala na elikya moko te mpo na mikolo ekoya. Lokola tobotami na kati ya lisumu, tokosala kaka mabunga. (Nzembo 51:5) Ebongi mpenza tózala na botɔndi lokola liwa ya Yesu epesi biso nzela ya kokóma na ezaleli ya kokoka oyo Yehova akanaki mpo na bana ya Adama na Eva!
Adama azali lokola Tata moko oyo akufaki mpe atiki biso na nyongo moko monene (lisumu) oyo tozali na makoki ya kofuta yango te. Nzokande, Yesu azali lokola tata moko ya malamu oyo akufaki mpe atikeli biso bozwi oyo ekoki kosalisa biso tófuta nyongo monene oyo Adama akɔtaki, oyo na nsima ekómaki na motó na biso, mpe bozwi yango kaka ekoki kosalisa biso tózala na bomoi libela na libela. Liwa ya Yesu ezali kolongola masumu oyo tosalaki, kasi ezali mpe kobongisela biso bomoi ya malamu na mikolo ekoya.
Yesu azali Mobikisi mpamba te akufaki mpo na biso. Liwa na ye ezali mpenza ebongiseli moko ya ntina! Soki tokanisi ete liwa yango nde ezali nzela oyo Nzambe abongisaki mpo na kosilisa mokakatano monene oyo lisumu ya Adama ebimisaki, kondima na biso epai ya Yehova mpe na ndenge oyo asalaka makambo ekolendisama. Ya solo, liwa ya Yesu ezali nzela mpo ete “moto na moto oyo akondima” ye abikisama na masumu, na maladi, na bobange mpe na liwa. (Yoane 3:16) Ozali kotɔnda Nzambe na ndenge abongisi nzela wana ya lobiko mpo na biso?
[Elilingi na lokasa 5]
Adama amemelaki bato lisumu na liwa
[Elilingi na lokasa 6]
Yehova abongisaki lolenge moko ya malamu mingi mpo na kosilisa mokakatano yango