Mokapo ya liboso
Mokanda ya Danyele—Ntina na yango mpo na yo
1, 2. (a) Tángá mwa makambo ya kokamwisa oyo mazali na mokanda ya Danyele (b) Mituna nini bato bazali komituna lelo likoló na mokanda ya Danyele?
MOKONZI moko azali komitungisa mpo na ndɔtɔ ya nsɔmɔ oyo ye alɔtaki na butu kasi abosani yango. Abéngi bato na ye ya mayele mpo báyebisa ye ndɔtɔ yango mpe bálimbola yango kasi bakoki te. Mokonzi asiliki mpe akani koboma bango soki balimboleli ye ndɔtɔ yango te. Bilenge mibali misato baboyi kofukamela ekeko moko ya monene mpe ya molai. Babwaki bango na mɔ́tɔ makasi kasi bakufi te. Bato bazali kolya mpe komela na fɛti mpe talá, lobɔkɔ ya moto ezali kokoma na efelo. Ebele ya bato oyo bayaki na fɛti bamoni makomi yango, kasi bayebi ndimbola na yango te. Bato ya motema mabe bakaneli mobange moko mpo abwakama na libulu ya nkosi, kasi abimi mobimba bobele ndenge babwakaki ye. Mosakoli moko ya Nzambe amoni emonaneli ya nyama minei mpe ndimbola na yango ya esakweli ezali kofungolama na boumeli ya bankóto na bambula kino mikolo mizali koya.
2 Wana ezali bobele mwa masolo oyo okokuta na mokanda ya Danyele. Kasi tosengeli mpenza kotya likebi na masolo yango? Litomba nini tokozwa na masolo ya mokanda yango ya kala? Mpo na nini tokomitungisa na makambo oyo masalemá kala, eleki lelo mbula pene na 2 600?
MOKANDA YA DANYELE—MOKANDA YA KALA OYO EZALI NA NTINA NA MIKOLO NA BISO
3, 4. Mpo na nini ezali mabe te ete bato mingi bámitungisa na lolenge mokili esengeli kozala na mikolo mizali koya?
3 Lelo oyo, bato bazali komitungisa mingi na lolenge mokili esengeli kotambwisama. Nzokande yango ezali likambo oyo mokanda ya Danyele elobeli mingi koleka. Ntango oyo tozali ezali ntango ya mpasi, nani abungi yango? Mokolo na mokolo, tozali koyoka bobele nsango ya mabe. Mpe yango ezali komonisa lolenge bato batondi na mikakatano ya ndenge na ndenge. Nzokande, bato bakómi na mayele mingi mpenza na ntango na biso soki totali biloko oyo bazali kosala, na ndakisa mituka, bankisi to bamasini ya sika, mpe makambo mosusu ya minene.
4 Tókanisa mwa moke: Moto asili kotambola na sanza, kasi na bisika mingi awa na mabelé mboka na ye, azali kobanga kotambola na balabala mosusu. Akoki kotondisa ndako na ye na biloko ya kitoko ndenge na ndenge, kasi akoki kosukisa likambo ya koboma mabala te. Moto akoki kosalela baordinatɛrɛ mpe biloko mosusu mpo na kotinda nsango to kozwa yango na lombangu, ezala epai wapi azali na mokili, kasi azali kokoka te koteya bato báfanda kimya. Hugh Thomas, profesere moko ya Istware, akomaki: “Mayele mingi oyo bato bazwaka na kelasi eteyaka bango báyeba kokanga motema te. Eteyaka bango mpe te koyeba kofanda kimya elongo na bato mosusu.”
5. Na makambo mingi mpenza, boyangeli ya moto esili kobimisa matomba?
5 Mpo na komeka kotambwisa mokili na lolenge ya malamu, bato basali biyangeli ndenge na ndenge. Ata ndenge wana, biyangeli yango nyonso bizali koyangela bato lokola Mokonzi Salomo alobaki yango kala: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 4:1; 8:9) Ya solo, bakonzi mosusu balingaka mpenza kosalisa bato. Kasi mokonzi moko te akoki kosilisa maladi mpe liwa. Moto moko te akoki kozongisa mabelé Paladiso lokola Nzambe asalaki yango.
6. Mpo na nini Yehova akoki kosɛnga ndingisa epai na bato te to biyangeli na bango te mpo na kokokisa mokano na ye?
6 Ezali bobele te ete Mozalisi na biso azali na bolingo ya kosala yango kasi azali mpe na makoki ya kosala makambo nyonso wana. Mpo na kokokisa mokano na ye, akosɛnga ndingisa epai na mokonzi moko te. Mpo ete na miso na ye “mabota [bazali] lokola litanga moko kati na kantini; batángami lokola mputulu mike na epimeli na bozito.” (Yisaya 40:15) Ɛɛ, Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Na bongo, bokonzi na ye eleki oyo ya bato mosika. Bokonzi ya Nzambe ekolongola biyangeli nyonso ya bato mpe ekoyangela mpo bato bázwa mapamboli libela na libela. Ezali na mokanda mosusu ya Biblia te oyo bokonzi ya Nzambe elobelami polelepolele koleka mokanda ya Danyele.
NZAMBE ALINGAKI MOSAKOLI DANYELE MINGI
7. Danyele azalaki nani, mpe ndenge nini Yehova azalaki kotalela ye?
7 Yehova Nzambe alingaki Danyele mingi. Ye azalaki mosakoli na ye mpe asalelaki ye mbula mingi. Yango wana, anzelu ya Nzambe alobaki na Danyele ete “yo olingami mingi.” (Danyele 9:23) Maloba ya Liebele oyo ebongolami na Lingala “yo olingami mingi” elimboli mpenzampenza “moto oyo bazwaka ye na lokumu mpenza,” to moto oyo ‘balingaka mingi mpenza.’ Danyele azalaki moto ya ntina mpenza na miso ya Nzambe.
8. Ndenge nini Danyele akómaki na Babilone?
8 Tótalela mwa moke makambo minene oyo masalemaki na bomoi ya mosakoli yango oyo Nzambe alingaki mingi. Na mobu 618 L.T.B., Nebukadanesala, Mokonzi ya Babilone, azingaki Yelusaleme mpo na etumba. (Danyele 1:1) Mwa moke na nsima, azwaki bamoko kati na bilenge Bayuda oyo bazalaki bato ya mayele mingi mpe amemaki bango na boombo na Babilone. Danyele mpe azalaki kati na bango. Ekoki kozala ete na ntango yango, akómaki naino na mbula 20 te.
9. Kobongisama nini Danyele na baninga na ye bazwaki na kelasi?
9 Danyele na baninga na ye Hanania, Misaele mpe Azalia bazalaki kati na bilenge Baebele oyo baponamaki mpo báyekola “mayele mpe lokota ya Bakaladi” na boumeli ya mbula misato. (Danyele 1:3, 4) Kasi banganga-mayele mosusu bazali kolimbola ete yango ezalaki bobele boyekoli mpamba ya lokota te. Profesere C. F. Keil alobaki polele: “Danyele na baninga na ye basengelaki koteyama mayele ya banganga-nzambe Bakaladi mpe ya bato ya mayele oyo ezalaki koteyama na biteyelo ya Babilone.” Na bongo, Danyele na baninga na ye babongisamaki mpenzampenza mpo na misala ya Leta.
10, 11. Komekama nini Danyele na baninga na ye bakutanaki na yango, mpe ndenge nini Yehova asungaki bango?
10 Oyo nde mbongwana monene mpo na Danyele mpe baninga na ye! Na mokili ya Yuda, bazalaki kofanda elongo na basambeli ya Yehova. Sikoyo bakómaki kofanda esika moko na bato oyo basambelaka banzambe ya lokuta. Ata ndenge wana, Danyele, Hanania, Misaele mpe Azalia bazalaki kobanga eloko te. Atako bakutanaki na komekama makasi ya kondima na bango, bazwaki ekateli ete bakokangama na losambo ya solo.
11 Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Mokonzi Nebukadanesala azalaki mosambeli monene ya Maladuku, mokonzi ya banzambe ya Babilone. Ntango mosusu, Nebukadanesala azalaki kosɛnga bango makambo oyo mosaleli ya Yehova akokaki kosala te. (Talá, na ndakisa, Danyele 3:1-7.) Kasi Yehova azalaki elongo na Danyele mpe baninga na ye. Na boumeli ya mbula misato oyo balekisaki na kelasi, Nzambe apambolaki bango. Bazwaki “boyebi mpe [bososoli] na ndenge na mikanda mpe na mayele nyonso.” Nzambe apesaki Danyele mayele mingi mpo alimbola bimonaneli na bandɔtɔ. Ntango basilisaki kelasi, mokonzi atalaki bilenge mibali yango minei mpe amonaki ete bazalaki na mayele mingi. “Balekaki mbala zomi banganga-nkisi mpe banganga na soloka nyonso na bokonzi na ye mobimba.”—Danyele 1:17, 20.
KOSAKOLA NSANGO YA NZAMBE
12. Mokumba nini ya sikisiki Danyele azalaki na yango?
12 Na boumeli ya mbula mingi oyo alekisaki na Babilone, Danyele asakolaki nsango ya Nzambe epai na bato lokola Nebukadanesala mpe mokonzi Belesasala. Mosala na ye ezalaki mosala ya ntina mpenza. Yehova azwaki Nebukadanesala lokola soda na ye mpe apesaki ye nzela abebisa Yelusaleme. Na nsima, engumba ya Babilone mpe esengelaki kobomama na ntango oyo ekanamaki na Nzambe. Ya solo, mokanda ya Danyele ezali kokumisa Yehova Nzambe lokola Oyo-Aleki-Likoló mpe Moyangeli na “bokonzi ya bato.”—Danyele 4:17.
13, 14. Nini ekómelaki Danyele nsima ya kokweya ya Babilone?
13 Danyele asalaki mosala ya Leta na Babilone pene na mbula 70 kino ntango engumba yango ebomamaki. Atako Biblia ezali kolobela yango polele te ete mosakoli Danyele azongaki elongo na Bayuda, kasi aumelaki na bomoi kino amonaki ebele na bango ntango bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Mosakoli Danyele azalaki naino makasi ata na mbula ya misato ya boyangeli ya Mokonzi Sirise, mobandisi ya bokonzi ya Perse. Na ntango yango, akómaki na mbula pene na 100!
14 Na nsima, ntango Babilone ebomamaki, Danyele akomaki makambo oyo masalemaki na bomoi na ye na mokanda oyo ezwi nkombo na ye. Mokanda ya Danyele ezali moko na mikanda ya ntina kati na Biblia Mosantu. Kasi mpo na nini tosengeli kotalela mokanda yango ya kala na likebi mpenza?
NSANGO MOKO EYEBISAMI LOLENGE MIBALE
15. (a) Wapi ndenge mibale oyo mokanda ya Danyele ekomamaki? (b) Litomba nini tokoki kozwa na eteni ya mokanda ya Danyele oyo ekomamaki lokola lisolo?
15 Mokanda ya Danyele ezali bobele na nsango moko oyo eyebisami na lolenge mibale: na lolenge ya lisolo, mpe ya bisakweli. Atako ekomamaki na lolenge mibale, nsango oyo ezali na mokanda yango ekoki kotonga kondima na biso. Ndenge nini? Eteni ya mokanda ya Danyele oyo elobelami lokola masolo ezalaka bobele na masolo kitoko na kotánga te kasi mingi mpenza endimisaka biso ete Yehova Nzambe akopambola mpe akobatela baoyo bazali kokangama na ye. Atako bakutanaki na komekama makasi oyo elongolaki bango elikya nyonso ya kozala lisusu na bomoi, Danyele na baninga na ye misato batikalaki sembo. Ndakisa na bango ekolendisa baoyo nyonso balingi kotikala sembo epai na Yehova lelo oyo.
16. Liteya nini tokoki kozwa na eteni ya mokanda ya Danyele oyo ezali kolobela bisakweli?
16 Bisakweli ya mokanda ya Danyele ekotonga kondima na biso mpamba te yango ezali komonisa Yehova lokola moto oyo ayebi makambo makoya, ezala nsima ya mbula nkama to mbula nkóto. Na ndakisa, mosakoli Danyele ayebisaki polele kotyama mpe kokweya ya biyangeli ya nguya na mokili mobimba, kobanda boyangeli ya Babilone kino biyangeli oyo bisengelaki kobima na “ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4, NW) Danyele azali komonisa biso ete Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Mokonzi oyo Ye moko aponi mpe na baninga ya mokonzi yango, “bato na bulɛɛ.” Danyele amonisi biso lisusu ete bokonzi yango ekoumela libela na libela. Ekokokisa mokano nyonso oyo Yehova akamataki mpo na mabelé mpe baoyo nyonso balingi kosalela ye bakopambolama.—Danyele 2:44; 7:13, 14, 22.
17, 18. (a) Ndenge nini boyekoli ya mozindo ya mokanda ya Danyele ekolendisa kondima na biso? (b) Likambo nini tosengeli koyeba liboso tómipesa na boyekoli ya mokanda yango ya Biblia oyo etondi na bisakweli?
17 Tiká tópesa Yehova matɔndi mpo abombelaka biso makambo mazali koya te. Kutu azali moto oyo “akomonisaka makambo mabombami.” (Danyele 2:28) Soki totaleli ndenge bisakweli ya mokanda ya Danyele bizali kokokisama, kondima na biso na bilaka ya Nzambe ekokóma lisusu makasi. Tokokóma na kondima makasi koleka ntango tokoyeba ete Nzambe akokokisa mikano na ye na ntango mpe na lolenge oyo ye moko asilá kokana.
18 Baoyo nyonso bazali kofungola mitema na bango mpo na koyamba makambo oyo bazali koyekola na mokanda ya Danyele bakokolisa kondima na bango. Kasi liboso ya kobanda kotalela mokanda yango na mozindo, tóyeba naino soki ezali mpenza mokanda oyo ezali na makambo ya solo. Mpamba te banganga-mayele mosusu ya Biblia bakómi kotyela mokanda yango ntembe. Bakómi koloba ete bisakweli na yango bikomamaki nsima wana makambo yango masilaki kosalema kasi liboso te. Ezalaki mpenza bongo? Tokozwa eyano na mokapo oyo elandi.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Mpo na nini mokanda ya Danyele ezali na ntina na mikolo na biso lelo?
• Ndenge nini esalemaki ete Danyele mpe baninga na ye bákóma kosala misala ya Leta na Babilone?
• Mokumba nini ya sikisiki Danyele azalaki na yango na Babilone?
• Mpo na nini tosengeli kotalela esakweli ya Danyele?
[Elilingi na lokasa mobimba 4]
[Elilingi na lokasa mobimba 11]