Mokapo ya mibale
Ntembe etyami likoló na mokanda ya Danyele
1, 2. Na ndenge nini mokanda ya Danyele ezali lokola moto oyo bafundi ye na tribinale, mpe mpo na nini ebongi tótalela bilembeteli oyo bizali kolongisa mokanda yango?
KANISÁ ete ofandi na kati ya tribinale. Ozali kolanda ndenge bazuzi bazali kosambisa likambo moko ya monene. Bafundi moto moko ete azali moto ya lokuta. Molobeli ya Leta anyati likambo yango mpe amonisi ete ezali mpenza bongo. Kasi banda kala, bato mingi bayebi ete moto yango azalaka moto ya lokuta te. Bongo okolinga koyoka moto yango ye moko aloba to avoka na ye, boye te?
2 Mokanda ya Danyele ekokani na moto yango oyo bafundi na tribinale. Moto oyo akomaki mokanda yango azalaki moto malamu mpenza. Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato bazalaki kotalela mokanda ya Danyele lokola mokanda ya ntina mpenza. Mokanda yango ezali na makambo ya solo. Ekomamaki na mosakoli Moebele Danyele, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya nsambo mpe ya motoba L.T.B. Mokanda ya Danyele ezali kolobela makambo oyo masalemaki banda mobu 618 L.T.B. kino mobu 536 L.T.B. Na mbula oyo, Danyele asilisaki kokoma mokanda na ye. Kasi kino lelo, mokanda yango ezali lokola moto oyo bafundi na tribinale. Na mikanda mosusu ezali komonisama polele to likolólikoló ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya lokuta.
3. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi nini mpo na bosolo ya mokanda ya Danyele?
3 Na ndakisa, buku moko (The New Encyclopædia Britannica) endimi ete banda kala “bato batalelaka [mokanda ya Danyele] lokola mokanda oyo ezali na makambo ya solo mpe na bisakweli ya solo.” Kasi buku yango ebakisi ete mokanda ya Danyele “ekomamaki bambula mingi na nsima na ntango moko ya mpasi mpo na mboka na bango, wana Bayuda bazalaki konyokwama makasi na [mokonzi ya Sulia] Antiochus IV Épiphane.” Bobele buku yango (The New Encyclopædia Britannica) ekanisi dati oyo mokanda ya Danyele ekomamaki ete ezalaki kati na mobu 167 L.T.B. mpe mobu 164 L.T.B. Buku yango moko endimi ete mokomi ya mokanda ya Danyele azalaki koyebisa te makambo oyo masengelaki koya nsima kasi azalaki nde kokoma “makambo oyo mazalaki masolo ya kala na kotalela ntango na ye [mokomi] mpe azalaki kokoma bisakweli oyo bikokokisama na mikolo mizalaki koya.”
4. Ntango nini bato babandaki kotyela mokanda ya Danyele ntembe, mpe nini ekolisaki ntembe yango na boumeli ya bankama ya bambula oyo euti koleka?
4 Makanisi yango ya kobɛta ntembe na mokanda ya Danyele mautaki wapi? Bato babandá kotyela mokanda ya Danyele ntembe uta kala. Ebandaki na ekeke ya misato T.B. na nganga-mayele moko ya filozofi oyo azalaki na nkombo Porphyre. Lokola bato mingi oyo bazalaki na Rome, Porphyre azalaki kobanga bokoli makasi ya lingomba ya boklisto. Mpo na kolɛmbisa lingomba yango “ya sika,” akomaki buku 15. Na buku na ye ya 12, Porphyre atyaki ntembe na mokanda ya Danyele. Alobaki ete mokanda yango etondi na makambo ya lokuta, oyo makomamaki na Moyuda moko na ekeke ya 2 L.T.B. Na ekeke ya 18 mpe ya 19, bato mosusu mpe balandaki ndakisa ya Porphyre. Na makanisi ya banganga-batyoli ya Biblia mpe ya bato oyo bandimaka bobele makambo oyo malimbolami na mayele ya bato kasi bindimeli ya mangomba te, moto moko te akoki koyeba makambo oyo mazali koya mpe koyebisa yango, mpe esalema mpenza bongo. Bakómaki bongo kotyola mosakoli Danyele. Na yango, bakómaki kosambisa ye mpe mokanda na ye. Banganga-batyoli ya Biblia balobaka ete bazali na bilembeteli mingi oyo bimonisi ete Danyele akomaki mokanda yango te, kasi moto mosusu nde akomaki yango nsima ya boombo ya Bayuda na Babilone.a Ntembe yango ekómaki makasi mpenza. Yango wana, mpo na kokɔtela Danyele, moto moko abimisaki buku oyo ezalaki na motó na likambo ete Daniel in the Critics’ Den (Danyele na libulu ya banganga-batyoli).
5. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba soki makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo?
5 Banganga-batyoli ya Biblia bazali mpenza na bilembeteli mpo na komindimisa makasi bongo? To bilembeteli ya solosolo ezali epai na bato oyo bandimaka mokanda ya Danyele? Tosengeli mpenza kozwa biyano na mituna oyo. Ezali bobele mpo na kobatela lokumu ya mokanda yango ya kala te kasi mpe mpo kondima na biso na bisakweli ya mokanda yango oyo bitali mikolo mizali koya ebebisama te. Soki makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele mazali makambo ya solo te, bilaka ya mokanda yango mpo na mikolo mikoya bizali mpe bilaka ya solo te. Kasi soki bilaka yango ezali bisakweli ya solo, ekozala malamu tóluka koyeba ndimbola na yango mpo na biso lelo. Tósimba likambo yango malamu. Na bongo, tótalela sikawa mwa bifundeli oyo mokanda ya Danyele efundami.
6. Efundeli nini banganga-batyoli bafundaka masolo ya kala oyo makomami na mokanda ya Danyele?
6 Tókamata ndakisa ya efundeli moko oyo ezwami na buku moko (The Encyclopedia Americana). Elobi boye: “[Danyele] abebisaki makambo mingi ya masolo ya kala [na ndakisa lisolo ya boombo ya Bayuda na Babilone].” Ezali mpenza ya solo? Tiká tótalela bobele makambo misato oyo banganga-batyoli ya Biblia bazwaka yango lokola mabunga.
NTEMBE MPO NA MOKONZI MOKO OYO ALOBELAMI TE
7. (a) Mpo na nini banganga-batyoli ya Biblia batyolaka mokanda ya Danyele mpo ete elobi nkombo ya Belesasala? (b) Nini eyaki koyebana na likambo oyo banganga-batyoli balobaki ete Belesasala azalaki moto ya solo te?
7 Mosakoli Danyele akomaki ete Belesasala, “mwana” ya Nebukadanesala, azalaki mokonzi na Babilone ntango engumba yango ekweisamaki. (Danyele 5:1, 11, 18, 22, 30) Banda kala, banganga-batyoli ya Biblia bazali kozwa likambo yango lokola elembeteli ete mokanda ya Danyele ezali na makambo ya lokuta. Mpamba te bamitunaka ete, ndenge nini nkombo ya Belesasala ekomami bobele na Biblia kasi na mikanda mosusu te! Lisusu, mpo na banganga-mayele ya masolo ya kala, Nabonide nde moto azwaki bokonzi nsima ya liwa ya Nebukadanesala mpe azalaki mokonzi ya nsuka na bokonzi ya Babilone. Yango wana, na 1850, Ferdinand Hitzig alobaki ete nkombo ya Belesasala eutaki bobele na makanisi ya moto oyo akomaki mokanda yango. Kasi makanisi ya Hitzig elongobani mpenza? Lokola bobele Biblia nde elobi nkombo ya Belesasala, yango ezali mpenza elembeteli ete mokonzi yango azalaki na bomoi te, mingi mpenza na ntango yango oyo mikanda mizalaki mingi te? Na 1854, na sudi ya ekólo Irak, na esika oyo engumba ya kala ya Babilone na nkombo Ulu ezalaki, bakundolaki mwa bitanda oyo bisalemaki na mabelé mpe bikomamaki na ekomeli ya cunéiforme. Bitanda yango bizalaki na makomi ya Nabonide mpe libondeli na ye mpo na ‘Belesasala, mwana na ye ya mobali ya liboso.’ Ata banganga-batyoli ya Biblia bandimaki likambo yango: Ezalaki mpenza Belesasala oyo mokanda ya Danyele ezali kolobela.
8. Ndenge nini eyaki komonana solo, lokola Danyele akomaki yango, ete Belesasala azalaki mokonzi?
8 Ata ndenge wana, ntembe ya banganga-batyoli ya Biblia esilaki te. Moko na bango, Fox Talbot, alobaki: “Wana ezali mpenza elembeteli te.” Mpo na ye, mwana oyo balobelaki na makomi yango azalaki bobele mwana moke kasi mokonzi te lokola Danyele alobaki. Nzokande, mbula moko nsima ya maloba ya Talbot, bakundolaki ebele ya bitanda ya ekomeli ya cunéiforme oyo bimonisaki ete Belesasala azalaki na bakomeli mpe na bato ya misala. Te, azalaki mwana moke te! Bitanda mosusu ya mabelé oyo bakundolaki na nsima bikataki likambo. Bimonisaki ete, na ntango moko, Nabonide alekisaki bambula mingi mosika na Babilone. Bitanda yango bimonisaki lisusu ete na boumeli ya eleko wana, Nabonide “atikaki bokonzi” ya Babilone na mabɔkɔ ya mwana na ye ya mobali ya liboso (Belesasala). Na ntango yango, Belesasala azalaki mpenza koyangela elongo na tata na ye.b
9. (a) Na lolenge nini Danyele alobaki ete Belesasala azalaki mwana ya Nebukadanesala? (b) Mpo na nini banganga-batyoli ya Biblia bazali na elonga te ntango bazali kondima ete Danyele alobelaki ata moke te bomoi ya Nabonide?
9 Lokola banganga-batyoli ya Biblia bandimaki kaka te, bakómaki koloba mabe na ndenge Danyele abéngaki Belesasala, mwana ya Nebukadanesala, na esika ya kobénga ye mwana ya Nabonide. Basusu kati na bango bakómaki konyata makasi likambo oyo ete Danyele alobelaki Nabonide ata moke te na mokanda na ye. Kasi soki totaleli likambo yango na bozindo, ntembe ekozala lisusu te. Balobaka ete Nabonide abalaki mwana ya Nebukadanesala. Belesasala, mwana ya Nabonide, azalaki bongo mwana ya mwana ya Nebukadanesala. Nzokande, na lokota ya Liebele to ya Araméen, liloba mpo na kolobela “nkɔkɔ ya mobali” to “mwana ya mwana” ezali te. Na bongo, liloba “mwana ya” ekoki kosalelama mpo na kolobela “mwana ya mwana ya” to “mwana oyo abotami na libota ya.” (Kokanisá na Matai 1:1.) Lisusu, likambo moko oyo esalemaki na ntango yango etindi biso tóndima, lokola Biblia elobi yango, ete Belesasala azalaki mwana ya Nabonide. Ntango Belesasala amonaki lobɔkɔ ya moto ezali kokoma na efelo, abangaki mingi mpe alɛmbaki nzoto. Yango wana alapaki ndai ete moto nyonso oyo akolimbolela ye maloba yango akozwa esika ya misato na bokonzi na ye. (Danyele 5:7) Mpo na nini alakaki moto yango esika ya misato kasi esika ya mibale te? Mpo ete tata na ye Nabonide azalaki na esika ya liboso mpe ye moko Belesasala, mwana na ye, azalaki na esika ya mibale.
10. Mpo na nini mokanda ya Danyele ezali kolobela makambo ya sikisiki na ntina na bokonzi ya Babilone koleka mikanda ya banganga-mayele ya masolo ya kala na ntango wana?
10 Kokoma nkombo ya Belesasala na mokanda na ye elingi koloba te ete Danyele “abebisaki” masolo ya kala. Ata azalaki kokoma masolo ya kala ya Babilone te, kasi Danyele amonisi biso makambo mingi, koleka oyo banganga-mayele ya masolo ya kala lokola Hérodote, Xénophon mpe Berossus bakomaki likoló na bokonzi ya Babilone. Mpo na nini Danyele akomaki makambo mingi na bosikisiki koleka oyo banganga-mayele bakomaki? Mpo azalaki na Babilone. Mokanda na ye ezali mokanda oyo ekomamaki na moto oyo azalaki komona makambo mpe kokoma yango. Kasi ekomamaki te na moto ya lokuta oyo azalaki na bomoi bikeke mingi na nsima.
DALIO MOTO YA MEDE AZALAKI NANI?
11. Mpo na Danyele, Dalio moto ya Mede azalaki nani, kasi nini elobamaka na ntina na ye?
11 Danyele alobi ete “Dalio moto ya Mede” akómaki mokonzi ntango Babilone ekweaki. (Danyele 5:31, NW) Mikanda ya kala to biloko bakundolaki elobeli Dalio moto ya Mede te. Na yango, buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete Dalio azalaki “moto ya solo te.”
12. (a) Mpo na nini banganga-batyoli ya Biblia basengeli koluka koyeba makambo na bozindo na esika ya kosukisa mbala moko ete Dalio moto ya Mede azalaki moto ya solo te? (b) Likambo nini ekoki kosalisa biso mpo na koyeba soki Dalio moto ya Mede azalaki nani, mpe elembeteli nini emonisi yango?
12 Banganga-mayele mosusu bakómi na bokɛngi. Banganga-batyoli ya Biblia balobaki mpo na Belesasala ete azalaki “moto ya solo te.” Ndenge moko mpe bakomonana bato ya lokuta na likambo ya Dalio. Bitanda ya ekomeli ya cunéiforme oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki liboso, emonisaki te ete Sirise moto ya Perse akómaki “mokonzi ya Babilone” mbala moko nsima ya kokweya ya engumba yango. Molukiluki moko apesaki makanisi na ye: “Moto nyonso oyo azalaki kokóma ‘mokonzi ya Babilone’ azalaki na bokonzi koleka oyo ya Sirise te.” Nkombo Dalio ekokaki kozala nkombo ya bakonzi nyonso oyo bazalaki koyangela na Babilone to ebengeli ya bokonzi? Bato mosusu bakanisaka ete Dalio ezalaki nkombo mosusu ya Gubaru. Sirise atyaki ye guvernere ya Babilone mpe mikanda ya masolo ya kala endimaka ete Gubaru azalaki guvernere ya lokumu mpenza. Etanda moko ya ekomeli ya cunéiforme emonisaki ete Gubaru atyaki baguvernere-balandi na Babilone. Nzokande, mosakoli Danyele alobaki ete Dalio atyaki baguvernere 120 mpo na kobatela Babilone.—Danyele 6:1.
13. Wapi ntina mpenza oyo mokanda ya Danyele elobeli Dalio moto ya Mede kasi mikanda mosusu ya masolo ya kala elobeli ye te.
13 Na mikolo mizali koya, ntango mosusu banganga-mayele ya arkeoloji bakokundola biloko mosusu ya kala, oyo ekopesa bilembeteli ya sikisiki mpo na koyeba soki mokonzi Dalio azalaki nani. Atako biloko oyo basili kokundola emonisi bilembeteli ya sikisiki te soki Dalio azalaki “moto ya solo,” tokoki kokata na mbala moko te ete azalaki “moto ya solo te.” Ebongi malamu mpenza tótalela masolo ya mokanda ya Danyele lokola masolo ya moto oyo azalaki kokoma makambo ntango yango ezalaki kosalema. Yango wana alobelaki ata makambo ya mikemike oyo makomamaki na mikanda ya masolo ya kala te.
BOKONZI YA YOYAKIMI
14. Mpo na nini tokoki koloba ete maloba ya Danyele, na ntina na bokonzi ya Yoyakimi, ekeseni na maloba ya Yilimia?
14 Na Danyele 1:1 tozali kotánga boye: “Na mbula ya misato ya bokonzi ya Yoyakimi mokonzi ya Yuda, Nebukadanesala mokonzi ya [Babilone] akómaki na Yelusaleme, mpe azingaki yango na etumba.” Banganga-batyoli ya Biblia bamoni libunga na vɛrsɛ oyo mpamba te vɛrsɛ mosusu na mokanda ya Yilimia elobi ete mbula ya minei ya bokonzi ya Yoyakimi ezalaki mbula ya liboso ya bokonzi ya Nebukadanesala. (Yilimia 46:2) Maloba ya Danyele mpe ya Yilimia ekeseni? Soki totaleli likambo yango malamumalamu, tokomona ete likambo moko ya mpasi ezali wana te. Ntango Falo Neko mokonzi ya Ezipito atyaki Yoyakimi mokonzi ya Yelusaleme na mobu 628 L.T.B., Yoyakimi akómaki bongo moombo na ye. Ezalaki soko mbula misato liboso ete Nebukadanesala akóma mokonzi ya Babilone na mobu 624 L.T.B., nsima ya liwa ya tata na ye. Mwa moke na nsima (na mobu 620 L.T.B.), Nebukadanesala abɔtɔlaki mokili ya Yuda mpe akómisaki Yoyakimi moombo na ye. (2 Mikonzi 23:34; 24:1) Mpo na Moyuda oyo azalaki kofanda na Babilone, “mbula ya misato” ya Yoyakimi ezalaki mbula na ye ya misato kobanda ntango mokonzi ya Babilone atyaki ye mokonzi. Ntango azalaki kokoma, mosakoli Danyele azalaki kotalela makambo lokola moto oyo azalaki kofanda na Babilone. Nzokande, mosakoli Yilimia azalaki kotalela makambo lokola Bayuda oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme. Yango wana azalaki kotánga mbula ya bokonzi ya Yoyakimi banda ntango Neko atyaki ye mokonzi.
15. Mpo na nini ezali na ntina te kotyola mokanda ya Danyele mpo na bokeseni ya bambula oyo ekomami na Danyele 1:1?
15 Na bongo, likambo oyo limonanaki lokola bongolabongola kati na Danyele mpe Yilimia epesi kutu elembeteli monene ete Danyele akomaki mokanda na ye na Babilone, ntango Bayuda bazalaki na boombo kuna. Ezali mpe na likambo mosusu ya ntina oyo banganga-batyoli ya Biblia batalelaka te liboso ya kotyola mokanda ya Danyele. Babosanaka ete mokomi ya mokanda ya Danyele azalaki na kopi ya mokanda ya Yilimia mpe azalaki kotánga yango. (Danyele 9:2) Soki mokomi ya mokanda ya Danyele azalaki mokosi, lokola banganga-batyoli ya Biblia balobaka yango, alingaki mpenza kokoma maloba makeseni na oyo ya mosakoli Yilimia, bobele na vɛrsɛ ya liboso ya mokanda na ye? Te!
BILEMBETELI MOSUSU YA SIKISIKI
16, 17. Ndenge nini biloko ya kala oyo banganga-mayele bakundolaki endimisi lisolo ya mokanda ya Danyele na ntina na (a) ekeko oyo Nebukadanesala asalaki mpo ete bato nyonso ya engumba na ye báfukamela yango? (b) Lolendo ya Nebukadanesala mpo na bandako mpe misala minene ya botongi oyo ye asalisaki?
16 Sikoyo, tótika makambo ya batyoli mpe tótalela bilembeteli ya solosolo. Tótalela mwa makambo mosusu ya mikemike kati na mokanda ya Danyele oyo mamonisi ete mokomi ya mokanda yango azalaki na boyebi ya sikisiki ya makambo ya ntango wana.
17 Danyele ayebaki ata makambo mikemike oyo mazalaki kosalema na Babilone na ntango ya kala. Mpe yango ezali elembeteli monene oyo endimisi ete lisolo na ye ezali lisolo ya solo mpenza. Na ndakisa, Danyele 3:1-6 elobi ete Nebukadanesala asalaki ekeko moko ya monene mpo bato nyonso báfukamela yango. Biloko ya kala oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki emonisaki bilembeteli mosusu ete mokonzi yango alingaki bato na ye bámipesa mpenza na makambo ya losambo mpe bálinga ekólo na bango mingi koleka. Danyele mpe alobaki ete Nebukadanesala azalaki komikumisa mpo na bandako mpe misala minene oyo ye asalisaki. (Danyele 4:30) Bobele na ntango na biso nde biloko oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki eyaki kondimisa ete Nebukadanesala asalaki misala minene ya botongi na Babilone. Na lolendo nyonso, akomisaki nkombo na ye na biliki mokomoko! Soki mokanda ya Danyele ekomamaka na moto moko oyo azalaki mokosi, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Bamakabe (na mobu 167 kino mobu 63 L.T.B.), ndenge nini moto yango akokaki koyeba misala yango ya minene ya botongi? Mpo ete yango esalemaki soko mbula nkama minei liboso mpe liboso mpenza ete bákundola biloko ya kala oyo bindimisaki yango polele.
18. Na ntina na bitumbu oyo bizalaki kopesama na bokonzi ya Babilone mpe ya Perse, ndenge nini emonani ete Danyele ayebaki malamumalamu makambo ya bokonzi mokomoko?
18 Mokanda ya Danyele ezali mpe komonisa ete mibeko ya bokonzi ya Babilone ekeseneki mpenza na mibeko ya Bamede na Baperse. Na ndakisa, botosi na mibeko ya Babilone esɛngaki ete bábwaka baninga misato ya Danyele na mɔ́tɔ makasi mpo baboyaki kotosa mobeko ya mokonzi. Bambula mingi na nsima, Danyele abwakamaki na libulu ya nkosi mpo aboyaki kotosa mobeko ya Perse oyo etungisaki lisosoli na ye. (Danyele 3:6; 6:7-9) Bamoko na banganga-batyoli ya Biblia bamekaki kotya ntembe, kolobáká ete mɔ́tɔ yango ezalaki bobele lisapo mpamba. Kasi nkoma moko oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki emonisaki ete na ntango ya kala, bazalaki kopesa bato etumbu ya ndenge wana na Babilone. Nzokande, epai na Bamede na Baperse, mɔ́tɔ ezalaki ekila. Na esika na yango, bazalaki kopesa bitumbu mosusu ya nsɔmɔ lokola. Na bongo, tokoki kokamwa te ete bazalaki kobwaka bato na libulu ya nkosi.
19. Bokeseni nini mokanda ya Danyele ezali komonisa polele kati na mibeko ya Babilone mpe oyo ya Bamede na Baperse?
19 Ezali mpe na ndakisa mosusu oyo emonisi bokeseni kati na mibeko yango. Mokanda ya Danyele elobi ete Nebukadanesala azalaki na lotomo ya kobimisa mibeko mpe kolongola yango soki alingi. Nzokande, Dalio azalaki na lotomo ya kolongola ‘mibeko ya Bamede na Baperse’ te, ezala mibeko oyo ye moko abimisaki! (Danyele 2:5, 6, 24, 46-49; 3:10, 11, 29; 6:12-16) John C. Whitcomb, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomaki ete: “Na masolo ya kala, bokeseni ezalaki kati na mibeko ya Babilone oyo mokonzi azalaki likoló na yango mpe mibeko ya Bamede na Baperse oyo mokonzi azalaki na nse na yango.”
20. Makambo nini malekaki na fɛti ya Belesasala oyo mamonisi ete Danyele ayebaki malamumalamu mimeseno ya Babilone?
20 Lokola Danyele mokapo 5 elobi yango, lisolo ya fɛti oyo Belesasala asalaki ezali na makambo ya ntina mingi. Emonanaki ete na fɛti yango biloko ya kolya mpe masanga ezalaki mingi mpenza, mpo mokanda ya Danyele elobeli vinyo mbala mingi. (Danyele 5:1, 2, 4) Na mayemi oyo bato bazalaki kosala mpo na komonisa makambo ya ntina oyo mazalaki kosalema na bafɛti yango, bazalaki koyema mingi bobele bato bazali komela masanga. Na ntembe te, na bafɛti ya ntango wana, masanga ezalaki na ntina mingi mpenza. Mosakoli Danyele alobaki mpe ete basi ya Belesasala mpe bamakango na ye bazalaki na fɛti yango. (Danyele 5:3, 23) Banganga-mayele ya arkeoloji bamonisi ete yango ezalaki momeseno ya bato ya Babilone. Nzokande, na ntango ya Bamakabe, Bayuda mpe Bagreke bazalaki kolinga te ete basi bázala na fɛti esika moko na mibali. Ntango mosusu ezali mpo na momeseno yango nde mabongoli ya liboso ya mokanda ya Danyele na lokota ya Greke—libongoli ya Septante na Greke—elobeli basi na vɛrsɛ yango te.c Bongo mokomi yango ya mokanda ya Danyele, na ndenge banganga-batyoli ya Biblia bakanisaka, akokaki kozala na bomoi na ntango wana oyo bonkɔkɔ ya Bagreke ezalaki makasi, to na eleko oyo babimisaki libongoli ya Biblia Septante!
21. Likambo nini mpenza emonisi ete mosakoli Danyele azalaki na boyebi ya mozindo ya mimeseno ya Babilone na ntango ya boombo?
21 Soki totaleli boyebi yango ya mozindo na makambo mikemike nyonso oyo, ezali mpenza likambo ya kokamwa ete buku moko (The New Encyclopædia Britannica) eloba ete, mokomi ya mokanda ya Danyele ayebaki “makambo mingi te” matali boombo ya Bayuda na Babilone. To mpe koloba ete ayebaki yango na “bosikisiki te.” Ndenge nini moto oyo azalaki mokosi, oyo azalaki na bomoi bankama ya bambula nsima ya boombo, lokola banganga-batyoli ya Biblia balobelaka ye, akokaki koyeba malamumalamu mimeseno ya bato ya Babilone mpe ya Perse na lolenge wana? Tóyeba lisusu ete, liboso mpenza ya ekeke ya 2 L.T.B., bikonzi yango mibale esilaki kolɛmba. Banganga-mayele ya arkeoloji bazalaki mpenza na ntango wana te. Bakisa mpe, Bayuda ya ntango wana bayebaki mimeseno ya bato ya bikólo mosusu te mpe bayebaki masolo na bango ya kala te. Bobele mosakoli Danyele, moto oyo azalaki ntango makambo yango ezalaki kosalema nde akokaki koyebisa yango na bosikisiki lokola asili kosala yango na mokanda oyo ezwi nkombo na ye.
EZALI NA BILEMBETELI OYO BIMONISI ETE MOKANDA YA DANYELE ELOBAKA MAKAMBO YA SOLO TE?
22. Banganga-batyoli ya Biblia balobaka nini mpo na esika oyo batyaki mokanda ya Danyele kati na mikanda ya Makomami ya Liebele?
22 Moko na bantina oyo banganga-batyoli ya Biblia bandimaka mokanda ya Danyele te ezali bongo esika oyo balabi batyá mokanda yango na mikanda ya Makomami ya Liebele. Na ntango ya kala, balabi bakabolaki mikanda ya Makomami ya Liebele na biteni misato: mibeko, basakoli mpe masolo. Batyaki mokanda ya Danyele na mikanda ya basakoli te kasi na mikanda ya masolo. Mpo na banganga-batyoli ya Biblia, yango emonisi ete mokanda ya Danyele eyebanaki te na ntango wana oyo bazalaki kosangisa mikanda ya basakoli mosusu. Banganga-batyoli ya Biblia bakanisaka ete mokanda ya Danyele etyamaki na mikanda ya masolo mpamba te mikanda yango esangisamaki nsima.
23. Na ntango ya kala, ndenge nini Bayuda bazalaki kotalela mokanda ya Danyele, mpe nini esalisi biso tóyeba yango?
23 Kasi banganga-mayele ya Biblia bandimaka bango nyonso te ete balabi bakabolaki mikanda ya Biblia na lolenge wana to batyaki mokanda ya Danyele na mikanda ya basakoli te. Ata soki balabi batyaki mokanda ya Danyele na mikanda ya masolo, yango elimboli ete mokanda yango ekomamaki bambula mingi na nsima? Te. Banganga-mayele oyo bayebani mingi bamekaki kopesa mwa bantina oyo balabi batyaki mokanda ya Danyele na mikanda ya basakoli te. Ntango mosusu, basalaki bongo mpamba te mokanda ya Danyele ezalaki kolobela mabe na bango to mpo ete na miso na bango Danyele azalaki mosakoli oyo akesanaki na basakoli mosusu lokola asalaki mosala ya Leta na mboka mopaya. Ezala ata mpo na ntina nyonso wana te, likambo ya ntina mpenza yango oyo: Bayuda bazalaki kotalela mokanda ya Danyele na motuya mpenza mpe bandimaki yango kati na mikanda ya Makomami ya Liebele. Lisusu, bilembeteli bizali komonisa ete mikanda ya Makomami ya Liebele misangisamaki na ekeke ya 2 L.T.B. Na nsima, baboyaki ete mikanda mosusu mibakisama, lokola mikanda oyo mikomamaki na ekeke ya 2 L.T.B.
24. Ndenge nini banganga-batyoli ya Biblia basalelaki mokanda ya Sira mpo na kokweisa mokanda ya Danyele, kasi nini emonisi ete likanisi yango elongobani te?
24 Oyo nde lisɛki ete banganga-batyoli ya Biblia básalela mikanda yango oyo mindimamaki te mpo na kozwa mbeba likoló na mokanda ya Danyele! Na ndakisa, mokanda ya Sira, moko na mikanda yango oyo endimamaki te, ekomamaki pene na mobu 180 L.T.B. na Jesus Ben Sira. Lokola nkombo ya mosakoli Danyele ezalaki kati na bato ya sembo na mokanda yango te, banganga-batyoli ya Biblia mpe ata banganga-mayele bazwaki yango lokola elembeteli ete mosakoli Danyele ayebanaki na ntango wana te. Kasi tóyeba ete nkombo ya bato mosusu ya sembo ekomamaki na mokanda yango te, lokola nkombo ya Ezela mpe Moledekai (nzokande bazalaki bato ya lokumu mpenza na miso ya Bayuda nsima ya boombo), mokonzi malamu Yosafata, Yobo, moto ya sembo; ata nkombo ya mosambisi moko te, longola bobele Samwele!d Tokoki koloba ete bato ya sembo nyonso wana bazalaki na bomoi te, bobele mpo ete nkombo na bango ekomamaki na mokanda yango te, mokanda oyo kutu endimamaki na mikanda ya Makomami ya Liebele te? Ezali bongo te.
BILEMBETELI MOSUSU OYO BINDIMISI MOKANDA YA DANYELE
25. (a) Litatoli nini Josèphe, nganga-mayele na masolo ya kala ya Bayuda, apesaki mpo na komonisa ete mokanda ya Danyele ezali na makambo ya solo? (b) Masolo mosusu ya kala endimisi makambo oyo mokanda ya Danyele esakolaki na ntina na Alesandala Monene mpe litatoli oyo Josèphe apesaki mpo na ye na likambo yango? (Talá esika ya mibale ya maloba na nse ya lokasa.) (c) Ndenge nini bilembeteli oyo biuti na lokota bindimisi mokanda ya Danyele? (Talá lokasa 26.)
25 Tótalela bilembeteli mosusu oyo bizali kondimisa ete mokanda ya Danyele ezali na makambo ya solo. Balobaka ete ezali na mokanda moko te ya Makomami ya Liebele oyo ezali na bilembeteli ya bosolo na yango koleka oyo ya mokanda ya Danyele. Na ndakisa, Josèphe, nganga-mayele ya lokumu na masolo ya kala ya Bayuda, apesaki mpe elembeteli moko ya bosolo ya mokanda yango. Alobaki ete ntango Alesandala Monene akómaki na Yelusaleme wana azalaki kobunda etumba na Perse na ekeke ya 4 L.T.B., banganga Bayuda balakisaki ye kopi moko ya mokanda ya Danyele. Alesandala ye moko andimaki ete bitumba oyo ye azalaki kobunda kino Perse ezalaki kokokisa esakweli ya mokanda ya Danyele.e Yango esalemaki soko mbula 150 liboso ete banganga-batyoli ya Biblia báloba ete mokanda ya Danyele ezali mokanda “ya lokuta.” Basukaki wana te, kutu batyolaki Josèphe mpo na litatoli oyo ye apesaki. Batyolaki ye mpe mpo andimaki ete bisakweli mosusu ya mokanda ya Danyele ekokisamaki. Nzokande, Joseph D. Wilson, nganga-mayele mosusu ya masolo ya kala, alobaki na bango ete, “[Josèphe] ayebaki mpenza makambo mingi koleka banganga-batyoli nyonso oyo bazali lelo.”
26. Elembeteli nini ezwami na mikanda oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki pene na Mbu Ekufá mpo na kondimisa ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo?
26 Elembeteli mosusu oyo emonisi ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo euti na mikanda oyo bakundolaki pene na Mbu Ekufá na engumba Qumran na ekólo Israël. Na mobu 1952, kati na mikanda yango oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki, bakopi ya mokanda ya Danyele ezalaki mingi, ezala na mobimba to ndambo na yango. Kopi oyo eumelaki mingi koleka kati na bakopi yango ekomamaki na nsuka ya ekeke ya 2 L.T.B. Nzokande, na ntango yango, mokanda ya Danyele esilaki koyebana mpe kokabolama mingi mpenza. Buku moko (The Zondervan Pictorial Encyclopedia of the Bible) elobi boye: “Tosengeli kotika kokanisa ete mokanda ya Danyele ekomamaki na ntango ya Bamakabe mpamba te ntango elingaki kozala mpenza moke mpo mokanda yango ekomama mpe ekabolama na bakopi, mpo ete bato nyonso ya lingomba moke ya Bamakabe bákoka kozala na yango.”
27. Wapi elembeteli ya kala mpenza oyo emonisi ete Danyele azalaki moto ya solo mpe ayebanaki mingi na ntango ya boombo na Babilone?
27 Nzokande, ezali na elembeteli moko ya kala mpenza mpe oyo ezali kondimisa ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo. Ezali bongo maloba ya Ezekiele oyo azalaki mpe mosakoli ya Nzambe lokola Danyele na ntango Bayuda bazalaki na boombo na Babilone. Na mokanda na ye, Ezekiele atángi mbala mingi mosakoli Danyele na nkombo na ye. (Ezekiele 14:14, 20; 28:3) Yango emonisi ete Danyele azalaki na bomoi na ekeke ya 6 L.T.B. Ayebanaki malamumalamu lokola moto ya sembo mpe ya mayele, moto oyo nkombo na ye ebongaki kotángama elongo na nkombo ya bato mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe, lokola Noa mpe Yobo.
LITATOLI OYO LILEKI MONENE
28, 29. (a) Wapi elembeteli oyo ezali kondimisa koleka bilembeteli nyonso ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo? (b) Mpo na nini tosengeli kondima litatoli ya Yesu?
28 Litatoli ya Yesu Klisto ezali litatoli oyo lileki matatoli nyonso mpo na komonisa ete mokanda ya Danyele ezali mokanda oyo ezali na makambo ya solo. Ntango azalaki koyebisa makambo oyo makosalema na mikolo ya nsuka, Yesu atángaki “mosakoli Danyele” mpe moko na bisakweli na ye.—Matai 24:15; Danyele 11:31; 12:11.
29 Soki mpenza mokanda ya Danyele ekomamaki na ntango ya Bamakabe, lokola banganga-batyoli ya Biblia bakanisaka yango, tosengeli koyeba na makambo mibale oyo, oyo wapi ezali mpenza ya solo: To Yesu amikosaki na kondimáká mokanda yango, nzokande ezali mokanda ya lokuta to maloba oyo Matai akomaki ete ezali maloba ya Yesu, ezalaki solo maloba na ye te. Kasi makanisi nyonso mibale wana ezali ya solo te. Soki tokoki kondima nsango malamu oyo ezali na mokanda ya Matai te, ndenge nini tokoki kondima mikanda mosusu ya Biblia? Soki, na makanisi na biso, toboyi kondima maloba yango, maloba mosusu nini tokondima na Makomami Mosantu? Ntoma Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, . . . mpo na kosembola.” (2 Timote 3:16) Soki Danyele azalaki mokosi, boye Paulo mpe azalaki mokosi! Bongo Yesu akosamaki? Soko moke te. Ye azalaki na likoló ntango Danyele azalaki kokoma mokanda na ye. Kutu Yesu alobaki ete: “Naino ezalaki Abalayama te, ngai nazali.” (Yoane 8:58) Kati na bato nyonso oyo bazalaki na mokili, Yesu alingaki kozala moto ya kotyela motema mpenza mpo na koluka koyeba bosolo ya mokanda ya Danyele. Kasi moto moko te akoki kotinda biso na makasi tótuna ye. Na ndenge touti komona, litatoli na ye ezali polele mpenza.
30. Elembeteli mosusu nini Yesu amonisaki mpo na kondimisa ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo?
30 Batisimo ya Yesu emonisaki ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali mpenza makambo ya solo. Yesu akómaki Masiya mpe akokisaki bongo esakweli ya mokanda ya Danyele oyo elobelaki pɔsɔ 69 ya bambula. (Danyele 9:25, 26; talá mokapo 11 ya buku oyo.) Ata soki ezali solo ete mokanda ya Danyele ekomamaki na ntango oyo ye azalaki na bomoi te, ndenge banganga-batyoli ya Biblia balobaka yango, kasi mokomi ya mokanda ya Danyele ayebisaki makambo oyo mazalaki koya mbula 200 liboso. Bongo Nzambe alingaki mpenza kopesa bisakweli na ye ya solo na mokosi, na moto oyo asalelaki nkombo na ye mpenza te, mpo akoma bisakweli yango? Te, litatoli ya Yesu endimami na motema moko na bato nyonso oyo bazali sembo epai na Nzambe. Ata soki banganga-mayele mpe banganga-batyoli nyonso ya mokili mobimba bamitii na ngámbo moko mpo na kobɛta ntembe na mosakoli Danyele, litatoli ya Yesu yango moko ekosukisa ntembe na bango mpamba te ye azali “Motatoli ya sembo mpe ya solo.”—Emoniseli 3:14.
31. Mpo na nini banganga-batyoli mingi batyelaka mokanda ya Danyele ntembe?
31 Mpo na ebele na banganga-batyoli ya Biblia, ata litatoli ya Yesu ekoki kosilisa ntembe na bango te. Kasi lokola touti kotalela lisolo oyo na bozindo, okoki komituna soki elembeteli mosusu nini ekoki kondimisa bango! Profesere moko ya Iniversite ya Oxford akomaki boye: “Bato bakoki kondima eloko moko te soki bazali kokangama na makanisi na bango ya kala lokola likanisi ya koloba ete ‘esakweli ezalaka te.’” Na bongo, makanisi na bango ya kala ezipi bango miso. Wana ezali nzela oyo bango moko baponi kasi nsuka na yango ekozala se libebi.
32. Nini tokoyekola na mokanda ya Danyele?
32 Ezali boni mpo na yo? Soki omoni ete ntina moko ezali te mpo na kotya ntembe na bosolo ya mokanda ya Danyele, tokosepela kosala mobembo elongo na yo mpo na komona makambo kitoko oyo mazali na mokanda yango. Okomona ete masolo na yango ezali kitoko mpe okokamwa na bisakweli na yango. Likambo ya ntina koleka, okomona ete kondima na yo ekokóma makasi wana tozali kotalela mokapo mokomoko. Okoloba soki moke te ete nalekisaki ntango na ngai mpamba mpo na koyekola esakweli ya Danyele!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kolɛmbisa mwa moke bifundeli na bango, banganga-batyoli mosusu ya Biblia bakómi koloba ete mokomi ya mokanda yango amibéngaki Danyele kasi ezalaki nkombo na ye mpenza te. Ezali na mikanda mosusu ya kala oyo mindimami na Biblia te kasi mikomamaki na bato oyo basalelaki bankombo na bango moko te. Ata ndenge wana, Ferdinand Hitzig, moko na banganga-batyoli ya Biblia, alobaki: “Likambo ya koyeba nani akomaki mokanda ya Danyele ekeseni mpenza na likambo ya moto oyo akomi mokanda mpe amipesi nkombo mosusu. Nde mpo na mokanda ya Danyele, soki ekomamaki na moto oyo amipesaki nkombo mosusu, na bongo, mokanda yango etondi mpenza na makambo ya lokuta, mpe ekomamaki bobele mpo na kokosa bato.”
b Nabonide azalaki na engumba ya Babilone te ntango yango ekweaki na mabɔkɔ ya banguna. Na bongo, Belesasala nde amonanaki lokola mokonzi ya Babilone na ntango wana. Banganga-batyoli ya Biblia balɛmbi te mpe balobi ete Belesasala ayebanaki lokola mokonzi ya mboka na mikanda ya Leta te. Nzokande, na ntango ya kala, bato bazalaki kotalela mokambi ya engumba lokola mokonzi ya ekólo.
c Na ntina na Danyele 5:3, F. Keil, nganga-mayele Moebele, akomaki ete: “Na vɛrsɛ oyo mpe na vɛrsɛ 23, Biblia Septante etángi basi te, mpo na kotosa bonkɔkɔ ya bato ya Macédoine, ya Grèce mpe Baloma.”
d Ntango azalaki kotánga bato ya sembo na Baebele mokapo 11, ntoma Paulo, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, atángaki mpe bato ya sembo oyo bazwami na mokanda ya Danyele. (Danyele 6:16-24; Baebele 11:32, 33) Nzokande, ntoma Paulo atángaki bato nyonso ya sembo te. Na ndakisa atángaki Yisaya, Yilimia mpe Ezekiele te, kasi yango elingi koloba te ete bazalaki na bomoi te.
e Banganga-mayele mosusu na masolo ya kala bamonaki ete ekoki kozala mpo na yango nde Alesandala amoniselaki Bayuda boboto mingi. Nzokande, bango bazalaki baninga ya kala ya Perse mpe na ntango wana mpenza, Alesandala azalaki kobundisa bikólo nyonso oyo bizalaki na boninga na Perse.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Mokanda ya Danyele efundami na likambo nini?
• Mpo na nini bifundeli oyo banganga-batyoli ya Biblia bazali kofunda na yango mokanda ya Danyele ezali na ntina te?
• Bilembeteli nini bizali kondimisa ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo?
• Elembeteli nini ezali kondimisa koleka bilembeteli nyonso ete makambo oyo makomami na mokanda ya Danyele ezali makambo ya solo?
[Etanda na lokasa 26]
Bilembeteli biuti na nkota oyo mokanda ya Danyele ekomamaki
MOKANDA ya Danyele, oyo ekomamaki na lokota ya Liebele, ya Araméen mpe maloba moke na lokota ya Greke mpe ya Perse, esukaki kokomama pene na mobu 536 L.T.B. Mikanda mingi ya Makomami mikomamaki na nkota mingi bongo te. Kasi mokanda ya Ezela ekomamaki na Liebele mpe na Araméen. Nzokande, mpo na banganga-batyoli mosusu, lokola mokanda ya Danyele ekomamaki na nkota yango, emonani mpenza ete ekomamaki bambula mingi nsima ya mobu 536 L.T.B. Nganga-mayele moko oyo ayebani mingi alobaki ete mokanda ya Danyele ekomamaki mpenza na dati moko ya nsima soki totaleli maloba ya Greke oyo masalelamaki na kati na yango. Nganga-mayele yango alobaki ete ekomeli ya Liebele mpe ya Araméen na mokanda ya Danyele endimisi ete mokanda yango ekomamaki bambula mingi na nsima, na ekeke oyo ezalaki mpenza mosika te, lokola ekeke ya mibale L.T.B.
Kasi banganga-mayele nyonso oyo bayekolaka nkota bandimi likanisi yango te. Basusu bazali koloba ete ekomeli ya Liebele oyo ezali na mokanda ya Danyele ekokani na ekomeli ya Liebele oyo ezali na mokanda ya Ezekiele mpe ya Ezela. Kasi ekeseni mpenza na Liebele oyo bakomaki na yango mikanda oyo mindimamaki te na Makomami ya Liebele, na ndakisa mokanda ya Sira, oyo mokomamaki bambula mingi na nsima. Mpo na lokota ya Araméen oyo mosakoli Danyele asalelaki, tótalela mikanda mibale oyo banganga-mayele ya arkeoloji bakundolaki pene na Mbu Ekufá, esika moko na mwa mikanda ya Biblia. Mikanda yango mibale mpe mikomamaki na Araméen na ekeke ya mibale mpe ya liboso L.T.B. Ekomamaki mpenza na ntango oyo banganga-batyoli bakanisaka ete mokanda ya Danyele ekomamaki. Kasi banganga-mayele basili komona ete ekomeli ya lokota ya Araméen oyo ekomamaki na mikanda yango mibale mpe oyo ekomamaki na mokanda ya Danyele ekeseni mpenza. Banganga-mayele mosusu bamoni wana elembeteli ete mokanda ya Danyele ekomamaki bikeke mingi liboso ya ekeke oyo banganga-batyoli bakaniselaka yango.
Maloba ya Greke oyo mazwami na mokanda ya Danyele mabimisaki mpe “mikakatano”? Eyaki komonana ete maloba mosusu oyo bakanisaki kala ete ezali maloba ya Greke, ezalaki nde maloba ya lokota ya Perse! Nkombo misato oyo bandimaki ete euti mpenza na lokota ya Greke ezali nkombo ya bisaleli misato ya miziki. Bobele mpo nkombo yango misato ezwamaki na mokanda ya Danyele nde banganga-mayele basengeli koloba ete mokanda yango ekomamaki bambula mingi na nsima? Likanisi motindo wana elongobani te. Mpamba te biloko ya kala oyo bikundolamaki bisili komonisa ete, mwa bikeke liboso ete Grèce ekóma koyangela mokili mobimba, lokota ya Greke esilaki koyebana mingi. Soki mpenza mokanda ya Danyele ekomamaki na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso, na ntango oyo mimeseno mpe lokota ya Greke eyebanaki bipai nyonso, mokanda yango elingaki kozala bobele na maloba misato ya Greke? Ezali solo te. Elingaki kozala na maloba mingi koleka. Na bongo, nkota oyo mokanda ya Danyele ekomamaki epesi biso mpenza bilembeteli ete mokanda yango ezali mokanda ya solo.
[Elilingi na lokasa mobimba 12]
[Bililingi na lokasa 20]
(Likoló) Makomi oyo mamonisi lolendo ya Nebukadanesala mpo na bandako mpe misala minene oyo ye asalaki
(Na nse) Nkombo ya Mokonzi Nabonide na mwana na ye Belesasala ekomamaki na ekeko moko ya mabelé na tempelo ya Babilone
[Elilingi na lokasa 21]
Libanga ya Nabonide elobeli lolenge basoda ya Sirise bakɔtaki na Babilone kozanga kobunda etumba
[Bililingi na lokasa 22]
(Na lobɔkɔ ya mobali) “Lisolo ya bomoi ya Nabonide” elobi ete apesaki bokonzi na mwana na ye ya mobali ya liboso
(Na lobɔkɔ ya mwasi) Mikanda ya masolo ya kala ya Babilone eyebisi ndenge Nebukadanesala abɔtɔlaki mokili ya Yuda