Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-2 mok. 1 nk. 5-15
  • Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Pole engɛngi na kati ya molili
  • Bato boni bakomaki mokanda ya Yisaya?
  • Makambo oyo emonisi ete mokomi azali kaka moko
  • Mokanda moko ya bisakweli oyo ebongi tótyela motema
  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mosakoli moko ya kala kasi nsango na ye etaleli mikolo na biso
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mokanda ya Biblia nimero 23—Yisaya
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Kobá kozela Yehova
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
ip-2 mok. 1 nk. 5-15

Mokapo ya Liboso

Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole

1, 2. Makambo nini ezali kotungisa mpenza bato mingi lelo oyo?

NA NTANGO oyo tozali, ekómi komonana lokola nde bato bazali na likoki ya kosala makambo nyonso. Bafize ná bamasini mosusu oyo batindaka na likoló, baordinatɛrɛ, kobongola biloko mikemike (gènes) oyo ezalaka na kati ya baselile mpe makambo mosusu ya sika oyo bato ya siansi bazali kobimisa, nyonso wana epesi bato mabaku ya sika mpe elikya ya bomoi moko ya malamu mingi, mpe oyo ntango mosusu ekoki kozala molai koleka.

2 Makambo nyonso wana ya sika esali ete ofandaka na ndako na yo na kimya? Elongoli makanisi ya bitumba na mitó ya bato? Esilisi bamaladi to elongoli mpasi oyo bato bayokaka ntango bakufeli ndeko to moninga? Soki moke te! Makambo ya sika oyo bato babimisi, ata soki ezali malamu ndenge nini, ezali kokokisa bamposa nyonso ya bato te. Na lapolo oyo ebongiseli moko (Worldwatch Institute) ebimisaki, bakomaki boye: “Toyebi ndenge ya kokóma na sanza, kosala biloko ya malamu oyo etambwisaka baordinatɛrɛ mpe baapareyi mosusu (puces électroniques), mpe kolongola ba-gène ya moto moko mpo na kokɔtisa yango na nzoto ya moto mosusu. Kasi tii sikoyo tokoki naino te kopesa bato miliare moko mai ya pɛto, kosala ete bato bátika kosilisa mitindo ya banyama mpe ya banzete ndenge na ndenge, to mpe kotambwisa bamasini na biso kozanga kobebisa mopɛpɛ.” Yango wana, bato mingi bazali komitungisa mpenza mpo na avenire na bango, bazali koyeba te epai wapi to epai ya nani bakozwa libɔndisi mpe bakotya elikya na bango.

3. Makambo nini ezalaki na Yuda na ekeke ya mwambe L.T.B.?

3 Makambo ya mikolo na biso ekokani na oyo libota ya Nzambe bazalaki na yango na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na ntango wana, Nzambe apesaki mosaleli na ye Yisaya mokumba ya komemela bato ya Yuda nsango moko ya kobɔndisa, mpamba te bazalaki mpenza na mposa ya kobɔndisama. Ekólo na bango ezalaki na yikiyiki. Mosika te, boyangeli mabe ya bato ya Asiria esengelaki kobundisa mboka na bango, mpe yango ekolɛngisa bato mingi kati na bango. Epai wapi libota ya Nzambe basengelaki koluka lobiko? Nkombo ya Yehova ezalaki ntango nyonso na minɔkɔ na bango, kasi bamonaki malamu kotya elikya na bango epai ya bato.​—2 Mikonzi 16:7; 18:21.

Pole engɛngi na kati ya molili

4. Wapi nsango mibale oyo Yisaya azwaki mokumba ya kosakola?

4 Lokola Yuda etombokelaki Yehova, Yelusaleme esengelaki kobebisama mpe bato ya Yuda basengelaki kokenda na boombo na Babilone. Mikolo ya mpasi ezalaki mpenza koya. Yehova apesaki Yisaya mokumba ya kosakola ntango yango ya mpasi, kasi ayebisaki ye asakola mpe nsango moko ya malamu: Bayuda bakosala mbula 70 na boombo na Babilone, kasi nsima na yango bakozwa bonsomi! Na esengo nyonso, batikali bakozonga na Siona mpe bakozala na libaku malamu ya kozongisa losambo ya solo kuna. Yehova angɛngisaki pole na kati ya molili na nzela ya nsango yango ya esengo oyo mosakoli na ye asakolaki.

5. Mpo na nini Yehova ayebisaki mikano na ye liboso mpenza bongo?

5 Ntango Yisaya asilisaki kokoma bisakweli na ye, mbula koleka monkama elekaki liboso ete Yuda etikala mpamba. Mpo na nini Yehova ayebisaki mikano na ye liboso mpenza bongo? Ntango makambo oyo Yisaya asakolaki ekokokisama, ekozala ete bato oyo bayokaki makambo yango na matoi na bango basí bakufá kala mpenza, boye te? Ezali boye. Atako bongo, na nzela ya bisakweli oyo Yehova apesaki Yisaya, baoyo bakozala na bomoi na mobu 607 L.T.B., mbula oyo Yelusaleme ekobebisama, bakozala na mokanda oyo ezali na bisakweli yango. Yango ekomonisa bango polelepolele ete Yehova azali ‘oyo asakolaka makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalami naino te.’​—Yisaya 46:10; 55:10, 11.

6. Na makambo nini Yehova aleki bato nyonso oyo bayebisaka makambo oyo ekoya nsima?

6 Kaka Yehova nde abongi mpenza koloba bongo. Toboyi te, moto akoki koyebisa makambo oyo ekosalema nsima ya mwa mikolo soki ayebi malamu ndenge makambo ezali koleka na politiki mpe na kati ya bana-mboka na mikolo na ye. Kasi, kaka Yehova nde akoki koyeba ndenge makambo ekozala, ezala na ntango nini, ata mpe makambo oyo ekoya ebele ya bambula na nsima. Akoki mpe kopesa basaleli na ye likoki ya koyebisa makambo oyo ekosalema ebele ya bambula na nsima. Biblia elobi boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.”​—Amosa 3:7.

Bato boni bakomaki mokanda ya Yisaya?

7. Ndenge nini bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia batyaka ntembe na likambo etali moto oyo akomaki mokanda ya Yisaya, mpe mpo na nini?

7 Na kotalela lolenge ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Yisaya, bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia batyaka ntembe mingi na likambo ya koyeba nani akomaki mokanda yango. Bato yango balobaka ete eteni ya nsuka ya mokanda yango ekomamaki na moto moko oyo azalaki na bomoi na ekeke ya motoba L.T.B., ntango Bayuda bazalaki na boombo na Babilone to nsima na yango. Mpo na bango, bisakweli oyo emonisaki ete Yuda ekotikala mpamba ekomamaki nsima ya kokokisama na yango; na bongo, ekoki mpenza kobengama bisakweli te. Lisusu, bato yango balobaka ete kobanda na Yis mokapo 40, mokanda ya Yisaya ezali koloba lokola nde Babilone ezalaki ekólo oyo elekaki makasi na ntango wana mpe lokola nde Bayisalaele bazalaki na boombo na ekólo yango. Yango etindi bango bákanisa ete moto oyo akomaki eteni ya nsuka ya mokanda ya Yisaya, ezala nani to nani, akomaki yango mpenza na ntango wana, elingi koloba na ekeke ya motoba L.T.B. Ezali nde na bantina oyo ezali mpenza kolongisa makanisi ya motindo wana? Ata moko te!

8. Ntango nini ntembe likoló ya moto oyo akomaki mokanda ya Yisaya ebandaki, mpe ndenge nini epalanganaki?

8 Ntembe likoló ya moto oyo akomaki mokanda ya Yisaya ebandaki na ekeke ya 12 ya ntango na biso (T.B.). Moto ya liboso oyo abandaki likambo yango ezali Abraham Ibn Ezra, Moyuda moko oyo azalaki kolimbola makambo ya Biblia. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Na bandimbola oyo [Abraham Ibn Ezra] akomaki mpo na mokanda ya Yisaya, alobaki ete eteni ya mibale [ya mokanda yango], elingi koloba kobanda na Yis mokapo 40 tii na nsuka, ekomamaki na mosakoli moko oyo azalaki na bomoi na ntango [Bayuda bazalaki] na boombo na Babilone mpe na bambula ya ebandeli ya Kozonga [na bango] na Siona.” Na ekeke ya 18 mpe ya 19, ebele ya bato ya mayele na makambo ya Biblia balandaki makanisi ya Ibn Ezra, moko na bango Johann Christoph Doederlein, moto ya mayele na teoloji na ekólo Allemagne, oyo abimisaki buku na ye ya bandimbola ya mokanda ya Yisaya na 1775, mpe ebimaki lisusu mpo na mbala ya mibale na 1789. Buku moko (New Century Bible Commentary) elobi boye: “Lelo oyo, bato nyonso ya mayele na makambo ya Biblia, longola kaka baoyo batingamá na makanisi ya kala, bandimaka likanisi oyo Doederlein apesaki . . . ete bisakweli oyo ezali na mokapo 40 tii 66 ya mokanda ya Yisaya ekomamaki te na mosakoli Yisaya oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mwambe, kasi ekomamaki nde bambula ebele na nsima.”

9. (a) Na ndenge nini bakaboli mokanda ya Yisaya bitenibiteni? (b) Ndenge nini moto moko ya mayele oyo alimbolaka makambo ya Biblia alobeli na mokuse ntembe oyo etali koyeba nani akomaki mokanda ya Yisaya?

9 Kasi, ntembe yango oyo etali moto oyo akomaki mokanda ya Yisaya esukaki wana te. Likanisi oyo elobi ete ezali na moto ya mibale oyo akomaki mokanda ya Yisaya​—to Yisaya ya mibale​—ebimisaki likanisi mosusu ete ekoki mpe kozala na moto ya misato oyo mpe akomaki mokanda yango.a Na nsima, bato yango ya mayele bakabolaki mokanda yango bitenibiteni: moko na bango alobi ete Yis mokapo 15 mpe 16 ekomamaki na mosakoli moko oyo ayebani te, nzokande mosusu atii ntembe likoló ya moto oyo akomaki Yis mokapo 23 tii 27. Mosusu alobi ete Yisaya akokaki te kokoma maloba oyo ezali na Yis mokapo 34 ná 35. Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo ezali na mikapo yango ekokani mpenza na oyo ezali na Yis mokapo 40 tii 66, oyo balobaki ete ekomamaki te na Yisaya oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mwambe kasi na moto mosusu! Charles Torrey, moto moko ya mayele oyo alimbolaka makambo ya Biblia, amonisi na mokuse esika makanisi wana ememi bato yango. Alobi boye: “Bakómisi moto oyo azalaká kotalelama lokola ‘Mosakoli [monene] ya Boombo’ moto mpamba mpenza, mpe tokoki koloba ete bakundi ye na ndenge bakaboli [mokanda na ye] bitenibiteni.” Kasi, bato nyonso ya mayele na makambo ya Biblia bandimaka te ndenge wana ya kokabola mokanda ya Yisaya.

Makambo oyo emonisi ete mokomi azali kaka moko

10. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete mokanda ya Yisaya esaleli maloba mosusu ndenge moko kobanda na ebandeli tii na nsuka mpo na komonisa mpenza ete moto moko kaka nde akomaki yango.

10 Ezali na bantina ya solosolo oyo ezali komonisa ete mokanda ya Yisaya ekomamaki kaka na moto moko. Moko na yango ezali ete mokanda yango esaleli maloba mosusu ndenge moko kaka kobanda na ebandeli tii na nsuka. Na ndakisa, maloba “Mosantu ya Yisalaele,” oyo ezali kolobela Yehova, esalelami mbala 12 na mokapo 1 tii 39 ya mokanda ya Yisaya mpe mbala 13 na mokapo 40 tii 66 ya mokanda yango; nzokande mikanda mosusu nyonso ya Makomami ya Liebele esaleli yango kaka mbala 6 mpamba. Ndenge oyo mokanda ya Yisaya esaleli mbala ebele maloba yango, oyo esalelamaka mpenza mingi te, emonisi ete moto moko kaka nde akomaki mokanda yango.

11. Makambo nini oyo ezali na Yisaya mokapo 1 tii 39 ezali mpe na Yisaya mokapo 40 tii 66?

11 Yisaya mokapo 1 tii 39 ná Yisaya mokapo 40 tii 66 ezali mpe na makambo mosusu oyo ekokani. Biteni yango mibale esaleli mbala ebele maloba ya elilingi ndenge moko; na ndakisa, elobeli mwasi moko oyo azali koyoka mpasi ya kobota mpe “nzela” to “balabala” moko.b Elobeli mpe mbala ebele “Siona,” nkombo oyo esalelami mbala 29 na mokapo 1 tii 39 mpe mbala 18 na Yis mokapo 40 tii 66. Soki totali malamu, mokanda ya Yisaya elobeli Siona mingi koleka mikanda mosusu nyonso ya Biblia! Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) emonisi ete makambo nyonso oyo touti kolobela “esali ete mokanda yango ekesana na mikanda mosusu, likambo oyo ezali mpasi mpo na kolimbola” soki mokanda yango ekomamaki na bato mibale, misato to koleka.

12, 13. Ndenge nini Makomami ya Grɛki ya boklisto emonisi ete mokanda ya Yisaya ekomamaki na moto moko kaka?

12 Likambo oyo ezali komonisa mpenza ete moto moko kaka nde akomaki mokanda ya Yisaya ezali na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Makomami yango emonisi polele ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima ete mokanda ya Yisaya ekomamaki na moto moko. Na ndakisa, Luka alobeli mosali moko ya Leta ya Etiopia oyo azalaki kotánga makomi oyo ezali sikoyo na Yisaya mokapo 53; ezali makomi wana nde bato yango ya mayele balobaka ete ekomamaki na Yisaya ya mibale. Kasi, Luka ye alobi ete Moetiopia yango “azalaki kotánga na mongongo makasi mosakoli Yisaya.”​—Misala 8:26-28.

13 Tólobela sikoyo Matai. Na Evanzile oyo akomaki, alimboli ndenge oyo mosala ya Yoane Mobatisi ekokisaki esakweli oyo ezali sikoyo na Yisaya 40:3. Matai amonisi ete esakweli yango ekomamaki na nani? Na Yisaya ya mibale oyo ayebani te? Te, Matai abengi mokomi na yango kaka na nkombo “Yisaya mosakoli.”c (Matai 3:1-3) Mokolo mosusu, Yesu atángaki na rulo moko maloba oyo ezali sikoyo na Yisaya 61:1, 2. Ntango Luka azali kobɛta lisolo yango, alobi boye: “Bapesaki ye rulo ya mosakoli Yisaya.” (Luka 4:17) Na mokanda oyo Paulo atindelaki baklisto ya Loma, asalelaki makanisi mosusu oyo euti na biteni nyonso mibale ya mokanda ya Yisaya, kasi ata esika moko te amonisaki ata mwa moke ete mokomi na yango ezalaki Yisaya te kasi moto mosusu. (Baloma 10:16, 20; 15:12) Emonani polele ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima te ete mokanda ya Yisaya ekomamaki na bato mibale, misato to koleka.

14. Ndenge nini Barulo ya Mbu Ekufá esalisi biso na likambo etali moto oyo akomaki mpenza mokanda ya Yisaya?

14 Tótalela mpe litatoli ya Barulo ya Mbu Ekufá, oyo ezali makomi ya kalakala, oyo mosusu kati na yango ekomamaki liboso ya kobotama ya Yesu. Maniskri moko ya mokanda ya Yisaya, oyo eyebani na nkombo Rulo ya Yisaya, ekomamaki na ekeke ya mibale L.T.B.; maniskri yango emonisi polele ete likanisi ya bato ya mayele oyo balobaka ete Yisaya ya mibale nde akomaki Yis mokapo 40 tii na nsuka ya mokanda yango ezali solo te. Ndenge nini emonisi yango? Na maniskri yango ya kalakala, eteni oyo tozali kobenga lelo Yis mokapo 40 ebandi na molɔngɔ ya nsuka ya kolone moko mpe fraze na yango ya ebandeli ekei kosuka na kolone oyo elandi. Yango emonisi polele ete moto oyo akomaki maniskri yango ayebaki te ete, kobanda na esika wana, makambo oyo elandaki ekomamaki na mosakoli mosusu to mpe eteni mosusu ya mokanda yango ya Yisaya ebandi na esika wana.

15. Flavius Josèphe, Moyuda moko ya ekeke ya liboso oyo azalaki moto ya mayele na makambo ya kala, alobi nini mpo na bisakweli ya Yisaya oyo etali Sirise?

15 Mpo na kosukisa, tótalela sikoyo litatoli ya Flavius Josèphe, Moyuda moko ya ekeke ya liboso oyo azalaki moto ya mayele na makambo ya kala. Ye alobi ete bisakweli ya mokanda ya Yisaya oyo elobeli Sirise ekomamaki na ekeke ya mwambe L.T.B. mpe alobi ete Sirise ayebaki bisakweli yango. Josèphe akomi boye: “Sirise ayebaki makambo yango mpo atángaki mokanda ya bisakweli oyo Yisaya akomaki mbula nkama mibale na zomi liboso.” Mpo na Josèphe, lokola Sirise ayebaki bisakweli yango, ntango mosusu yango nde etindaki ye andima kozongisa Bayuda na mboka na bango; mpamba te Josèphe akomi ete Sirise “azalaki na mposa makasi mpe na mokano ya kosala makambo oyo ekomamaki.”​—Antiquités judaïques, Buku XI, mokapo 1, paragrafe 2.

16. Tokoloba nini mpo na likanisi oyo ya bato ya mayele ete na eteni ya nsuka ya Yisaya balobeli Babilone lokola nde ezali bokonzi oyo eleki bikonzi mosusu nyonso na nguya?

16 Ndenge tolobaki yango liboso, bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete kobanda na Yisaya mokapo 40 tii na nsuka, mokanda yango elobeli Babilone lokola bokonzi oyo elekaki bikonzi mosusu nyonso na nguya na ntango wana mpe elobeli Bayisalaele na ndenge oyo ezali komonisa ete bazali na boombo na Babilone. Likambo yango emonisi nde ete moto oyo akomaki eteni yango azalaki na bomoi na ekeke ya motoba L.T.B.? Mpenzampenza te. Tosengeli koyeba ete ata na mikapo oyo ezali liboso ya mokapo 40 ya Yisaya, balobeli Babilone na bisika mosusu lokola bokonzi oyo eleki bikonzi mosusu nyonso na nguya. Na ndakisa, na Yisaya 13:19, babengi Babilone “nkembo ya makonzi” to “pauni ya mokili,” ndenge babongoli yango na Bible na lingala ya lelo oyo. Emonani polele ete maloba yango ezalaki nde esakweli, mpamba te Babilone ekómaki ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba se nsima ya mbula koleka monkama. Mpo na “kosilisa” likambo yango oyo bato ya mayele bazali komona ete ezali mokakatano, moto mosusu ya mayele akataki kaka na mokuse ete mokapo 13 ya Yisaya ekomamaki na moto mosusu! Nzokande, na bisakweli mingi ya Biblia balobelaka makambo ekoya lokola nde esili kosalema. Ndenge wana ya kokoma emonisaka mpenza ete bisakweli yango ekozanga te kokokisama. (Emoniseli 21:5, 6) Kaka Nzambe oyo apesaka bisakweli ya solo nde akokaki kobimisa maloba oyo: “Nazali koyebisa makambo ya sika. Liboso ebanda kobima, nazali koyokisa bino yango.”​—Yisaya 42:9, NW.

Mokanda moko ya bisakweli oyo ebongi tótyela motema

17. Mpo na nini kobanda na mokapo 40 ya Yisaya tii na nsuka ndenge ya kokoma ebongwani?

17 Na makambo tolobeli, likanisi nini ya nsuka tozwi? Tozwi likanisi ya nsuka ete mokanda ya Yisaya ekomamaki na moto moko oyo apemamaki na Nzambe. Mokanda yango mobimba ekatisi bikeke nyonso wana lokola buku moko kaka, kasi te lokola babuku mibale to koleka. Toboyi te, bato mosusu bakoki koloba ete lolenge ya kokoma oyo basaleli na mokanda ya Yisaya ebongwani mwa moke kobanda na mokapo 40. Kasi, tóbosana te ete Yisaya azalaki mosakoli ya Nzambe mbula koleka 46. Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te soki na boumeli ya ntango nyonso wana, nsango oyo azalaki kosakola mpe ndenge oyo azalaki koloba yango ebongwani. Yango ezali bongo, mpamba te mosala oyo Nzambe apesaki ye esengelaki kaka te kosuka na kosakola bitumbu oyo Nzambe akatelaki bato. Asengelaki mpe koyebisa bango maloba oyo ya Yehova: “Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai.” (Yisaya 40:1) Libota oyo Nzambe asalaki na bango kondimana basengelaki mpenza kobɔndisama na elaka oyo apesaki bango ete, nsima ya mbula 70 ya boombo, Bayuda bakozonga na mboka na bango.

18. Likanisi nini ya ntina mpenza na mokanda ya Yisaya ekotalelama na buku oyo?

18 Kolongwa ya Bayuda na boombo na Babilone ezali likanisi ya ntina mpenza ya mikapo mingi ya mokanda ya Yisaya oyo etalelami na buku oyo.d Ndenge tokomona yango, mingi kati na bisakweli yango ezali kokokisama na ntango na biso. Longola yango, mokanda ya Yisaya ezali na bisakweli ya kosepelisa mpenza oyo ekokisamaki na bomoi ya Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe mpe na ntango ya liwa na ye. Na ntembe te, koyekola bisakweli ya ntina mingi oyo ezali na mokanda ya Yisaya ekosalisa mpenza basaleli ya Nzambe mpe bato mosusu na mokili mobimba. Bisakweli yango ezali mpenza pole mpo na bato nyonso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato ya mayele na makambo ya Biblia basalelaka nkombo Yisaya ya misato mpo na kobenga moto yango oyo bango bakanisaka ete azali mokomi ya misato mpe ete ye nde akomaki Yis mokapo 56 tii 66.

b Mwasi moko oyo azali koyoka mpasi ya kobota: Yisaya 13:8; 21:3; 26:17, 18; 42:14; 45:10; 54:1; 66:7. “Nzela” to “balabala” moko: Yisaya 11:16; 19:23; 35:8; 40:3; 43:19; 49:11; 57:14; 62:10.

c Na Baevanzile na bango, na bisika makambo na yango ekokaná, Malako, Luka ná Yoane basaleli kaka maloba moko.​—Malako 1:2; Luka 3:4; Yoane 1:23.

d Mikapo 40 ya ebandeli ya mokanda ya Yisaya etalelami na buku Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso I, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na lokasa 9]

Mbongwana ya lokota emonisi nini?

Nsima ya koyekola makambo ya mikemike oyo etali mbongwana ya lokota na mokanda ya Yisaya (analyse diachronique) na boumeli ya bambula mingi, bato mosusu ya mayele bamoni ete mokanda yango ekomamaki na moto moko kaka. Soki eteni moko ya mokanda ya Yisaya ekomamaki na ekeke ya mwambe L.T.B. mpe eteni mosusu mbula 200 na nsima, Liebele oyo basaleli na biteni yango mibale esengelaki kokesana. Kasi, na kotalela lapolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Westminster Theological Journal), “makambo oyo koyekola mbongwana ya lokota emonisi, endimisi mpenza ete Yisaya mokapo 40-66 ekomamaki liboso ya boombo.” Moto oyo asalaki lapolo yango asukisi boye: “Soki bato ya mayele oyo batalelaka mikanda bazali kaka koloba ete mokanda ya Yisaya ekomamaki na eleko ya boombo to nsima na yango, yango emonisi ete bazali kolanda te makambo oyo boyekoli yango emonisi.”

[Elilingi na lokasa 11]

Eteni ya Rulo ya Yisaya oyo ezwamaki na Mbu Ekufá. Totye mwa elembo na esika oyo Yis mokapo 39 esuki

[Bililingi na lokasa 12, 13]

Mbula soki 200 liboso, Yisaya asakoli kobima ya Bayuda na boombo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto