Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/5 nk. 14-18
  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yisaya azwi mokumba ya kosakola
  • Kokokisama ya monene koleka
  • “Tinda ngai”
  • Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mosakoli moko ya kala kasi nsango na ye etaleli mikolo na biso
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Kobá kozela Yehova
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/5 nk. 14-18

Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?

“Jehovah (alobaki ete): ‘Nakotinda nani? Nani akokenda mpo na biso?’ ‘Ngai oyo! Tinda ngai.’”​—YISAYA 8:8.

1, 2. Likambo nini epesaki esengo epai na babalani mibale?

“TOZALI na esengo ya koyebisa bino ete tondimi mpo na kokenda na Colombie. Mosala na biso na Equateur esepelisi biso mingi mpe tozangi ndenge ya kolimbola yango.” Ezali nde na maloba oyo babalani mibale, ba Témoins de Jéhovah baoyo bakendaki na Equateur, epai oyo bazalaki kotonga filiale ya sika ya la Société Watch Tower babandaki mokanda na bango oyo batindaki na la Societe.

2 Ba ministres wana bakendaki na Equateur bobele mpo na kopesa maboko na botongi wana te, kasi lisusu mpo na kosangana kati na mosala ya boklisto oyo etali koteya. Tala oyo bakomaki: “Tosili kondima ete, mosala ya kosakola ezali moko na makambo ya ntina monene koleka. Ekoki sikawa poso misato, bato mwambe kati na biso bakendaki kosakola na zando mpe batikaki to bakabolaki mikanda 73 mpe bazulunalo koleka 40. Poso oyo ya liboso, tobandaki boyekoli misato ya sika ya Biblia. Tomoni ete mposa ya filiale ya sika ezali komonana. Mwasi na ngai mpe ngai tolingi kotondo bino mpo na privilege oyo bopesaki biso ya kolanda kosala kati na lolenge mosusu oyo ya mosala ya pionnier” na Colombie.

3. Ndenge nini ebele ma bato bamonisaki elimo motindo moko na oyo ya Yisaya?

3 Babalani wana, mpe bankama mosusu baoyo bamipesaki mpo na kokende na mokili ya mopaya, bazali komonisa elimo motindo moko na mosakoli Yisaya. Ntango ayokaki Jéhovah koloba: “Nakotinda nani mpe nani akokende mpo na biso?” Yisaya ayanolaki: “Ngai oyo! Tinda ngai.” Na bongo Nzambe apesaki ye etinda oyo: “Kenda mpe loba na bato oyo ete: ‘Boyoka koyoka, nde yeba ntina te.’” (Yisaya 6:8, 9) Mosala ya Yisaya ezalaki kotalela likambo nini, mpe likambo nini emonanaki? Bokokani nini tokoki kosala sikawa na lisalisi ya lisolo yango, mpe liteya nini tokoki komizwela biso moko kati na yango?

Yisaya azwi mokumba ya kosakola

4, 5. (a) Ezalela ya mboka ntango Yisaya azwaki emonaneli oyo mokapo 6 ezali kolobela ezalaki ndenge nini? (b) Likambo nini Yisaya amonaki kati na emonaneli?

4 Ezali na mobu ya liwa ya mokonzi Ozias nde Jéhovah atunaki motuna oyo epai na Yisaya: “Nakotinda nani?” (Yisaya 6:1) Yango elekaki na 777 liboso ya ntango na biso, mibu 170 liboso ete Bababilonya baboma Yelusaleme mpe babebisa Yuda. Jéhovah azalaki komona likambo ya mawa oyo ezalaki kobelema; yango wana apesaki epai na mosakoli nsango moko oyo ebongaki mpenza. Mokumba oyo epesamaki na Yisaya ekoki koteya biso likambo nini?

5 Lokola nde soki tozalaki na esika na ye, Yisaya asengelaki kosepela mingi mpo na ndenge oyo azwelaki mokumba yango. Akomi: “Namonaki Jéhovah afandi na kiti na bokonzi etombwi likolo mosika mpe elamba na nsima na ye etondisaki tempelo. Baselafe batelemaki likolo na ye, moko na moko azalaki na mapapu motoba, na mibale azipaki elongi na ye mpe na mibale azipaki makolo na ye mpe na mibale azalaki kopombwa. Moko abyangaki mosusu, alobaki ete, ‘Bulee! bulee! bulee! Jéhovah na bibele, mokili mobimba etondi na nkembo na ye.’”​—Yisaya 6:1-3.

6. Mpo na nini ezalaki privilege mpo na Yisaya na komona emonaneli yango?

6 Yisaya ayebaki ete Ozias azwaki etumbu ya maba mpo amikotisaki na lolendo nyonso kati na esika Mosanto ya temple mpo na kotumba mpaka na malasi, nzokande azalaki moto na libota ya banganga te. Mpo na yango, privilege nini mosakoli azalaki na yango mpo na komona Nzambe kati na emonaneli! Yisaya moto na kozanga kokoka, amonaki mpenza Jéhovah te, kasi azwaki emonaneli na ye (Exode 33:20-23), emonaneli oyo lokumu na yango emonisami na komonana ya baanzelu ya molongo ya liboso, baselafe, penepene na kiti na bokonzi ya Jéhovah. Baanzelu yango, koyebaka bosantu ya Nzambe, bazalaki kobomba na limemya nyonso “bilongi” na bango. Longola motindo na bango ya kobomba elongi, bazalaki kokumisa makasi bosantu ya Nzambe. Okanisi bopusi nini emonaneli ya motindo boye ekoki kozala na yango likolo na moto?

7. Ndenge nini Yisaya asalaki, mpe mpo na nini mbula mosusu tokoki kosala motindo moko?

7 Yisaya ayanoli: “Boye nalobaki ete: ‘Mawa na ngai, mpamba te nabungi! Nazali moto na bibebu na mbindo mpe nafandi kati na bato na bibebu na mbindo; mpo ete miso na ngai mamoni Mokonzi, Jéhovah na bibele!’” (Yisaya 6:5) Yisaya ayebaki ete azali molobeli ya Nzambe, kasi emonaneli wana emonisaki mbindo na ye; azalaki na bibebu ya mpeto te oyo ebongaki na molobeli ya Mokonzi wana ya lokumu mpe ya bulee. Ekoki kozala mbala mosusu ete, bamoko kati na biso bazwi bolembu mpo na ezaleli na bango ya bato na masumu, bazali komiyoka ete babongi te mpo na kosolola na Nzambe kati na libondeli, mpe lisusu bakoki mpenza te ete babengama na nkombo na ye. Likambo oyo ekomelaki Yisaya na nsima ekoki kolendisa bango.

8. Likambo nini anzelu moko asalaki, mpe litomba nini ebimisaki?

8 Moko na baselafe oyo bazalaki wana apumbwaki epai na ye, na likala ya moto oyo azwaki likolo na etumbelo oyo likolo na yango batumbaki nyama mpo na mbeka. Kokotisaka likala na monoko na Yisaya, anzelu alobaki: “Tala oyo emami bibebu na yo; mabe na yo esili kolongolama mpe masumu na yo elimbisami.” (Yisaya 6:6, 7) Na mikolo ya Salomon, moto eutaki na likolo emonisaki ete Jéhovah andimaki etumbelo ya mbeka, ata soki mbeka oyo bapesaki ekokaki kopetola mobimba te banganga liboso na Nzambe. (2 Ntango 7:1-3; Baebele 10:1-4, 11) Mbindo na ye lokola ezikisamaki na likala ya moto, Yisaya akokaki na bongo kondima ekateli ya Jéhovah oyo ete mbeka epesamaki mpo na masumu na ye, nyonso wana mpo ete azwa mokumba ya sipesiale ya kosakola nsango. Makambo yango mazalaki koyebisa likambo nini?

9. Likambo nini nsango ya Yisaya ezalaki koyebisa?

9 Emonaneli oyo ya kokamwisa ezali kolandana, mpe mosakoli azwi mokumba ya kosakola. (Yosua 6:8, 9) Nzokande, mpo na nini Yisaya asengelaki koloba ete bato bakoyoka nsango mbala mingi, kasi bakozwa boyebi ata moko te? Mongongo euti na Nzambe ebakisi: “Zalisa motema na bato oyo na mafuta mpe matoi na bango na bozito, zipa mpe miso na bango; ete batala na miso na bango te . . . ete babongwana te mpe babikisama te.” (Yisaya 6:10) Maloba oyo elimboli ete Yisaya asengelaki kozala moto na kopamela bato to kozanga bokengi, ete asengelaki koboya Bayuda, mpo ete bango bazala na boyokani te elongo na Jéhovah? Te. Ezalaki wana bobele mwa elembo moke ya lolenge oyo mingi kati na Bayuda basengelaki kosala, atako Yisaya amimonisi sembo mpe akokisi malamu mpenza mokumba oyo endimaki ye moko na kolobaka ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.”

10. (a) Soki bato bazalaki lokola bakufi-miso mpe bakufeli-matoi, mokumba ezalaki epai na nani? (b) Likambo nini Yisaya alingaki koloba na liloba “kino ntango nini”?

10 Bato bazalaki babandisi ya mpasi oyo ekwelaki bango. Yisaya alingaki kopesa epai na Bayisraele libaku ya ‘koyoka lisusu mpe lisusu’; atako bongo, bazwaki ata boyebi te ata mayele mpe te. Nzambe ayebisaki ete na ntina na motó makasi na bango mpe kozanga bizaleli ya elimo, bakozala na motema petee te mpo na kondima nsango, longola bobele mwa ndambo moke mbala mosusu; nzokande, bango nyonso, bakozala bakufi-miso, lokola soki nde, bazipaki miso na bango na ekangeli moko ya makasi koleka. Yisaya atunaki na nsima motuna oyo: “E Jéhovah, kino ntango nini?” Azalaki kotuna ye kino ntango nini ezaleli oyo ya mawa esengelaki koumela, kasi te kino ntango nini asengelaki kosakola. Na bongo Nzambe ayanolaki ye: “Kino mboka ebebisami, na mofandi kuna te.” Mpe ezali yango esalamaki, atako nsima ya liwa ya Yisaya. Bababilonyé babenganaki na mboka bato oyo babotami na mabele wana, “kobebisaka” Yuda mpe kotikaka yango mpamba.”​—Yisaya 6:11, 12; 2 Mikonzi 25:1-26.

11. Kobondisa nini nsango ya Yisaya ezalaki kopesa?

11 Nsima na yango, Jéhovah alendisaki Yisaya ete elikya ebungaki te. “Ata ndambo na zomi ekotikala wana (kati na mboka).” Na yango, ezalaki ‘lokola nzete na ela wana esili yango kokatama. Boye mboto na bulee ezali ntina na yango’. (Yisaya 6:13) Nsima na mibu 70 ya boombo na Babilone, libota moko, to batikali, ezongaki na mboka, lokola soki nde mboto ya sika ebimaki na mosisa ya nzete na ela. (2 Ntango 36:22, 23; Ezela 1:1-4; tala Yobo 14:7-9; Danyele 4:10, 13-15, 26) Nzokande, atako nsango ya Yisaya ezalaki molili, ezalaki kobondisa. Lisusu, tozali na bantina euti na Biblia ya komona kati na Yisaya elakiseli mpo na mikolo oyo mizali koya liboso. Ndenge nini?

Kokokisama ya monene koleka

12. Likolo na moboko nini ya Biblia tokoki kobenga Yesu Yisaya Monene?

12 Bikeke mingi nsima ya liwa na Yisaya moto oyo balingaki kobenga ye Yisaya Monene, Yesu Klisto ayaki. Ntango azalaki naino ekelamo ya elimo, amimonisaki ye moko liboso ya Tata na ye mpo na kotindama na mabelé, epai oyo asakolaki na kozongelaka maloba mosusu oyo Yisaya akomaki. (Masese 8:30, 31; Yoane 3:17, 34; 5:36-38; 7:28; 8:42; Luka 4:16-19; Yisaya 61:1) Azalaki koloba na ntina na Yisaya mokapo 6 wana azalaki kolimbola mpo na nini azalaki koteya lolenge wana ezalaki ye kosala. (Matai 13:10-15; Malako 4:10-12; Luka 8:9, 10) Bokokani yango ebongaki mpenza mpamba te mingi kati na Bayuda oyo bazalaki koyoka Yesu bazalaki na mposa ya kondima nsango na ye te mpe na kosala lokola yango esengi ndenge moko mpe lokola baoyo bayokaki mosakoli Yisaya. (Yoane 12:36-43) Lisusu, na mobu 70, Bayuda oyo bamikomisaki ‘bakufi-miso mpe bakufi-matoi’ na nsango ya Yesu bazwaki libebi ya motindo moko na oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Ezalaki bongo mpo na engumba yango bolozi moko ‘lokola emonana naino te uta ebandeli ya mokili, mpe ekobima lisusu te.’ (Matai 24:21) Nzokande, lokola Yisaya asakolaki yango, batikali, to “libota na bulee”, emonisaki kondima. Basangani ya batikali yango basangisamaki na libota ya elimo, “Yisraele na Nzambe”, oyo epakolami na elimo.​—Bagalatia 6:16.

13. Mpo na nini tosengeli komizela na kokokisama mosusu ya Yisaya mokapo 6?

13 Ezali nde na motindo boye esakweli ya Yisaya mokapo 6 ezali kozwa ndimbola mosusu ya Biblia. Mpo na koyeba soki yango ezali likambo nini, totalela maloba oyo ntoma Paulo alobaki penepene na mobu 60, ntango azalaki naino na Rome. Azalaki kolimbola mpo na nini ebele na Bayuda oyo bazalaki koyoka ye bazalaki kondima ‘litatoli na ye te na ntina na Bokonzi ya Nzambe’. Ntina ezalaki ete Yisaya 6:9, 10 ezalaki kokokana lisusu. (Misala 28:17-27) Yango elimbolaki ete nsima wana Yesu akotika mabele, bayekoli na ye bakokokisa mokumba moko lokola oyo ya Yisaya? Ee!

14. Na ndimbola nini bayekoli na Yesu basengelaki kokokisa mosala ya motindo moko na oyo ya Yisaya?

14 Liboso ya kobuta na ye na likolo, Yisaya Monene alobaki ete bayekoli na ye bakozwa elimo santu mpe bakozala “batemwe na ye na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia mpe kino nsuka ya mokili”. (Misala 1:8) Ndenge moko lokola etumbelo na mbeka epesaki likabo oyo ezalaki na ntina mpo ete mbeba ya Yisaya elimbisama, ndenge moko mbeka na Yesu esalisaki ete ‘mbondi esalama mpo na masumu’ ya bayekoli na ye. (Levitike 6:12, 13; Baebele 10:5-10; 13:10-15) Na yango, Nzambe akokaki kopakola bango na elimo santu, likambo oyo ekopesa bango ndingisa ya kozala ‘batatoli kino nsuka ya mokili’. Mosakoli Yisaya mpe Yisaya Monene bango mibale batindamaki mpo na kosakola nsango ya Nzambe. Ndenge moko mpe, bayekoli na Yesu bazalaki “batindami ya Nzambe . . . elongo na Klisto”.​—2 Bakolinti 2:17.

15. Na eleko na biso lokola mpe na eleko ya Yisaya, ndenge nini bato nyonso bazali koyamba nsango malamu, mpe nkembo yango ezali komonisa nini?

15 Na eleko na biso, mingi mpenza uta nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, baklisto bapakolami na elimo bazali komona ntina ya kosakola nsango na Nzambe; kati na makambo mosusu, yango ezali kopesa nzela na kokanisa likolo na bobelemi ya “mokolo na nkanda ya Nzambe na biso”. (Yisaya 61:2) Kobebisama oyo mokolo yango ekomema ekokwela liboso boklisto ya mokili oyo, lokola Yisraele ya kala, azali komikumisa ete azali libota na Nzambe, banda kala. Atako mosala ya kosakola oyo batemwe ya Nzambe bapakolami na elimo bazali kokokisa na bosembo nyonso uta ebele na mibu, mingi kati na basangani ya boklisto na mokili ‘bayeisi mitema na bango makasi mpe matoi na bango bozito; mpe bazipi miso na bango’. Esakweli na Yisaya ezali koyebisa ete ezalela yango “ekoumela kino mboka ebebisami, na mofandi kuna te; mpe ndako ezangi bato mpe mokili ebebisami nyee”. Kokokisama ya esakweli oyo ekomema nsuka ya biloko mabe na ntango oyo.​—Yisaya 6:10-12.

“Tinda ngai”

16. Mpo na nini tokoki koloba ete “ebele monene” bazali kokokisa mosala ya motindo moko na oyo ya Yisaya?

16 Lelo oyo, bankoto na baklisto bamipesi bazali na elikya, oyo etongami likolo na Makomami, na kozala na bomoi ya seko na mabelé ebongwani paradis. Na lisalisi ya makila na mbeka ya Yesu, masumu ya “ebele monene” yango ekoki kolimbisama, na meko oyo ebongi mpo na eleko na biso. Ebele monene yango bazali mpe kozwa nguya mpe lisalisi na nsima ya elimo na Nzambe, mpamba te bazali kosangana elongo moko na batikali baklisto bapakolami na elimo mpo na koloba: “Ngai oyo! Tinda ngai.” Batindami mpo na nini? Paulo amonisi yango na Baloma 10:13-15: “‘Moto na moto akobelela nkombo na Jéhovah akobika.’ Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli? Bakosakola na nzela nini soki batindami te? Pelamoko ekomami (na Yisaya 52:7): ‘Kitoko boni makolo na bango bakosakola nsango na makambo malamu!’”​—Emoniseli 7:9-15.

17. Bonene ya nsango na biso ezali nini, soki tokokanisi yango na oyo ya Yisaya?

17 Tomikundola ete Yisaya alobaki: “Ngai oyo! Tinda ngai” liboso ete ayeba nsango oyo asengelaki koyebisa epai na bato. Nzokande, lelo, toyebi oyo Nzambe alingi ete tosakola yango soki toyanoli na libyangi na ye: “Nakotinda nani mpe nani akokende mpo na biso?” Ezali bongo kosakola “mokolo ya nkanda na Nzambe na biso”, mpe lisusu “nsango malamu ya makambo kitoko”. Na ndakisa, bato oyo “batindami” bazali kosakola “ekangweli epai na bakangami mpe kozipolama na ekangelo epai na baoyo bakangami”. Mosala yango ekokaki mpenza kozala liziba na bosepeli mingi. Boye te?​—Yisaya 61:1, 2.

18, 19. Motindo nini ya kokesena ebele na bato bazali koloba lelo: “Tinda ngai”?

18 Soki osila kobanda kosakola “nsango malamu ya makambo kitoko”, kotalelama oyo ya Yisaya mokapo 6 ezali kopusa yo mbala mosusu na komituna motuna oyo: Ndenge nini nakoki komonisa mpenza koleka elimo oyo eyebisami kati na Yisaya 6:8? Bankama na mibali mpe basi, lokola oyo tolobi mpo na bango na ebandeli ya lisolo oyo, basili komipesa mpo na kosala na Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na botongi. Mingi mosusu, baoyo bazali na makoki ya sipesiale te kati na mosala ya botongi bandako, bakendaki na mikili ya bopaya, epai kuna mposa mpo na basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi to mingi. Liboso basengaki toli epai ya la société Watch Tower mpo na koyeba likambo basengelaki kosala. Ya solo, ezali malamu na komibongisa, mpamba te lokota, nivo ya bomoi, koluka mosala mpe makambo mosusu makoki kokesena makasi mpenza na mokili mokomoko. Nzokande, kobwaka nokinoki te libaku yango, bobele mpo ete ekosenga yo mbala mosusu osala mbongwana monene. Ebele na baoyo bazali na elimo motindo moko na liloba “Ngai oyo! Tinda ngai” bakendaki bongo na mokili ya bopaya mpe bapambolamaki mingi koleka epai na Nzambe.​—Tala Masese 24:27; Luka 14:28-30.

19 Kozanga ete batika mboka na bango to région na bango, bamosusu lisusu​—bandeko mibali mpe bandeko basi minzemba, babalani, ata mabota mobimba bakendaki esika kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi to ya bakengeli baklisto ezalaki monene koleka (Misala 16:9, 10) Ekoki kosalama ete mbongwana motindo boye esenga komipesa, lokola oyo ya kondima mosala mosusu oyo yo osalaka yango te, na kozwaka mbala mosusu mwa lifuta moke. Bamosusu basengaki pension na bango wana mibu na bango mpo na pension ekokaki naino te mpe bazwi pension ya nokinoki; bazwaki mosala moko oyo basengeli kosala na ndambo ya mokolo mpo na kosala mingi kati na mosala ya Nzambe. Ezali esengo na komona mabota mobimba koloba: “Biso oyo! Tinda biso!” Tala lisusu ndenge ya komonisa ezalela ya Yisaya. Na yango, mwasi na ye azalaki kokokisa na molende nyonso mokano ya Nzambe, mpamba te azalaki mosakoli ya mwasi; mpe bana na ye bazalaki to bakotisamaki kati na kokokisama ya bansango na bisakweli.​—Yisaya 7:3, 14; 8:3, 4.

20. Na kokanisaka na Yisaya 6:8, likambo nini osengeli komituna?

20 Ata soki ezaleli na yo ya sikawa epesi yo nzela te na kosala mbongwana minene, okoki komituna: ‘Eske nasali nyonso ekoki na ngai esika oyo nazali mpo na komekola molende ya Yisaya?’ Meka na makasi nyonso kosakolaka nsango ya Nzambe, ata soki ntango ezali malamu mingi te to soki bato bazali koboya kondima biso; na ntembe te ezali yango Yisaya azalaki kosala. Sakola “nsango malamu ya makambo kitoko” na mposa nyonso epai na mozalani. Jéhovah alobaki: “Nakotinda nani?” Monisa ete, lokola Yisaya, ozali koyanola: “‘Ngai oyo! Tinda ngai!’ koyebisa nsango na Yo.”

Bozongeli

◻ Makambo nini mamemaki Yisaya na kozwa emonaneli oyo eyebisami kati na mokapo na ye ya motoba, mpe likambo nini amonaki?

◻ Mokumba nini Yisaya azwaki?

◻ Mpo na nini tokoki kobenga Yesu Yisaya Monene, mpe na nini mosala oyo bayekoli na ye bazali kosangana na yango ekokani na oyo ya Yisaya?

◻ Ndenge nini okoki komonisa elimo motindo moko na oyo ya Yisaya?

[Elilingi na lokasa 15]

Yisaya apetolamaki mpe azwaki mokumba ya kosakola

[Elilingi na lokasa 17]

Mingi bazali koyanola na kolobaka: Ngai oyo! Tinda ngai.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto